Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/4 nk. 8-11
  • Lebeka​—Mwasi ya mpiko oyo azalaki kobanga Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lebeka​—Mwasi ya mpiko oyo azalaki kobanga Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge oyo balukaki mwasi oyo abongi
  • Lebeka azalaki mpenza mwasi oyo abongi?
  • Bana mapasa
  • Asali nyonso mpo na kozwela Yakobo lipamboli
  • Batindi Yakobo na Halana
  • “Nandimi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Rebeka andimaki kosepelisa Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Rebeka alingaki kosepelisa Yehova
    Teyá bana na yo
  • Yisaka azwi mwasi malamu
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/4 nk. 8-11

Lebeka​—Mwasi ya mpiko oyo azalaki kobanga Nzambe

KANISÁ ete yo nde osengeli koponela mwana na yo mwasi. Okopona mwasi ya ndenge nini? Bizaleli nini asengeli kozala na yango? Okoluka mwasi ya kitoko, ya mayele, ya boboto, oyo alingaka mosala? To okoluka naino makambo mosusu?

Likambo ya ndenge wana ekómelaki Abalayama. Yehova alakaki ete akopambola bankɔkɔ na ye na nzela ya mwana na ye Yisaka. Lisolo na biso ebandi na ntango oyo Abalayama akómaki mobange, kasi mwana na ye azalaki naino monzemba. (Genese 12:1-3, 7; 17:19; 22:17, 18; 24:1) Lokola Yisaka asengelaki kozwa mapamboli yango elongo na mwasi oyo amonaki ye naino te mpe ná bana oyo basengelaki kobota, Abalayama asalaki nyonso mpo na kozwela Yisaka mwasi ya malamu. Libosoliboso, mwasi yango asengelaki kozala mosaleli ya Yehova. Lokola bakokaki te kozwa mwasi ya ndenge wana na Kanana, mboka oyo Abalayama afandaki, asengelaki koluka ye epai mosusu. Nsukansuka, mwasi oyo baponaki ezalaki Lebeka. Ndenge nini bazwaki ye? Azalaki mpenza mwasi ya elimo? Liteya nini tokoki kozwa soki totaleli ndakisa na ye?

Ndenge oyo balukaki mwasi oyo abongi

Abalayama atindaki mosali na ye ya mokóló, mbala mosusu Eliezele, na Mezopotamia mpo na kolukela Yisaka mwasi na kati ya bandeko na ye oyo bazalaki mpe kosambela Yehova. Lokola ezalaki likambo ya kozwa na lisɛki te, Abalayama asɛngaki na Eliezele alapa ndai ete akozwela Yisaka mwasi ya Kanana te. Tokoki mpenza komona ete ezalaki likambo ya lisɛki te na ndenge oyo Abalayama alobelaki yango.​—Genese 24:2-10.

Ntango Eliezele akómaki na mboka ya bandeko ya Abalayama, akendaki na bakamela na ye zomi na libulu moko ya mai. Salá lokola ozali mpenza komona likambo yango! Mpokwa ekómi, mpe Eliezele abondeli ete: “Talá nazali kotɛlɛma epai ya liziba ya mai, mpe bana basi ya bato ya mboka bazali kobima mpo na kotoka mai. Tiká ete moseka oyo ngai nakolɔmba ye ete, Kitisá mbɛki na yo ete namɛla, mpe ye akozongisela ngai ete, Mɛlá, mpe nakomɛlisa bakamela na yo, tiká ete, azala mwasi eponi yo mpo na moombo na yo Yisaka.”​—Genese 24:11-14.

Na ntembe te mwasi nyonso ya mboka wana ayebaki ete kamela oyo ezali na mposa ya mai emɛlaka mingi (ata litrɛ 100). Yango wana, mwasi oyo andimi komɛlisa kamela 10, akosala mosala monene mpenza. Soki asali mosala wana ye moko mpe baninga na ye bazali kotala ye kaka, kasi basalisi ye te, ekomonisa mpenza ete azali makasi na mosala, azali na motema molai, na komikitisa, mpe na boboto mpo na bato mpe mpo na banyama.

Nini esalemaki? “Naino esilaki ye koloba te, Lebeka, oyo abotamaki na Betuele, mwana na Milika, mwasi ya Nahola, ndeko ya Abalayama, abimaki na mbɛki na ye na lipeka na ye. Moseka yango azalaki bonzenga mpenza, . . . ye akitaki epai ya motó ya mai, atondisaki mbɛki mpe abutaki. Bongo moombo atambolaki mbangu kozwana na ye mpe alobaki ete, Tiká namɛla mwa ndambo ya mai na mbɛki na yo. Ye alobaki ete, Mɛlá, tata na ngai, mpe akitisaki mbɛki na ye na lobɔkɔ na ye mpe apesaki ye komɛla.”​—Genese 24:15-18.

Lebeka azalaki mpenza mwasi oyo abongi?

Lebeka azalaki nkɔkɔ ya Abalayama; azalaki mwasi kitoko mpe azalaki na bizaleli malamu. Abangaki te kosolola na mopaya, kasi asalaki mpe te lokola nde bayebaná banda kala. Ntango Eliezele asɛngaki ye mai, andimaki kopesa ye mbala moko. Ezali likambo ya kokamwa te, mpamba te yango ezalaki ndenge na bango ya komonisa bonkonde. Ezali boni mpo na likambo ya mibale oyo asɛngaki na libondeli na ye?

Lebeka alobaki boye: “Mɛlá, tata na ngai.” Kasi, asukaki wana te. Abakisaki boye: “Nakokata mai mpo na bakamela na yo lokola, kino esili bango komɛla.” Asalaki mingi koleka oyo esengelaki. Mbala moko, ‘asopaki nokinoki mai ya mbɛki na ye na emelelo mpe akendaki lisusu mpe lisusu na liziba kotoka mai, mpe atokaki mpo na bakamela na ye nyonso.’ Azalaki mpenza makasi na mosala. Biblia elobi ete: ‘Na ntango wana, mobali yango azali kotala ye na kokamwa.’​—Genese 24:19-21, NW.

Ntango Eliezele ayebaki ete elenge mwasi yango azali ndeko ya Abalayama, afukamaki mpo na kotɔnda Yehova. Atunaki ye soki esika ya kolala ekoki komonana na ndako ya tata na ye mpo na ye ná bato oyo azalaki na bango. Lebeka andimaki mpe akimaki mbangu na ndako mpo na koyebisa nsango ete bazwi bapaya.​—Genese 24:22-28.

Ntango Labana, ndeko ya Lebeka, ná Betuele, tata na ye, basilisaki koyoka Eliezele, bamonaki mpenza ete Nzambe nde atambwisaki makambo. Bamonaki ete ebongaki mpenza ete Lebeka akóma mwasi ya Yisaka. Balobaki na ye ete, “Kamatá ye mpe kendá ete azala mwasi ya mwana ya nkolo na yo, lokola esili [Yehova] koloba.” Lebeka akanisaki nini? Ntango batunaki ye soki akondima kokende mbala moko, apesaki eyano na liloba moko ya Liebele oyo elimboli: “Nakokende.” Bandimisaki ye libala yango na makasi te. Abalayama ayebisaki Eliezele polele ete akozala lisusu na ngambo te mpo na ndai oyo alapaki “soki mwasi yango aboyi” kokende na ye. Kasi, Lebeka mpe amonaki mpenza ete Yehova nde atambwisaki makambo ndenge wana. Na bongo, kozanga kolekisa ntango, atikaki libota na ye mpo na kobala mobali oyo amonaki naino te. Lokola azwaki ekateli ya mpiko ndenge wana, emonisi polele ete azalaki na kondima makasi. Azalaki mpenza mwasi oyo abongi!​—Genese 24:29-59.

Ntango Lebeka akutanaki na Yisaka, abombaki elongi na ye na elamba mpo na komonisa botosi na ye. Yisaka abalaki ye, mpe na ntembe te alingaki ye mingi mpamba te azalaki na bizaleli ya malamu mpenza.​—Genese 24:62-67.

Bana mapasa

Eumelaki mbula 19 mobimba, Lebeka azalaki kaka kobota te. Nsukansuka, akómaki na zemi ya mapasa, kasi zemi yango etungisaki ye mingi mpamba te bana yango bazalaki kobunda na kati ya libumu; yango wana, Lebeka akómaki kolela epai ya Nzambe. Biso mpe tokoki kosala bongo soki tokutani na mikakatano ya makasi. Yehova ayokaki kolela ya Lebeka mpe alendisaki ye. Asengelaki kokóma nkɔkɔ ya bikólo mibale, mpe “oyo ya liboso akosalela oyo ya nsima.”​—Genese 25:20-26.

Na ntembe te, ezali kaka maloba yango te nde etindaki Lebeka alinga mingi Yakobo, mwana na ye ya nsuka. Bana yango bakesanaki mpenza. Yakobo “azalaki moto ya kimya,” kasi Esau azalaki mpenza kotyola makambo ya elimo, yango wana, mpo na saani moko ya bilei, atɛkelaki Yakobo lotomo na ye ya mwana ya liboso, oyo asengelaki kozwa bilaka ya Nzambe. Lokola Esau abalaki basi mibale Bahiti, emonisaki polele ete azalaki komona makambo ya elimo mpamba, ata mpe kotyola yango, mpe yango ezalaki kotungisa baboti na ye.​—Genese 25:27-34; 26:34, 35.

Asali nyonso mpo na kozwela Yakobo lipamboli

Biblia elobi te soki Yisaka ayebaki ete Esau asengeli kosalela Yakobo. Atako bongo, Lebeka ná Yakobo bayebaki malamu ete ye nde asengelaki kopambolama. Lebeka alukaki mbala moko likambo oyo akokaki kosala ntango ayokaki ete Yisaka akani kopambola Esau soki alambeli ye nyama ya zamba. Mpiko mpe molende oyo Lebeka azalaki na yango na bolenge esilaki te. ‘Atindaki’ Yakobo amemela ye bana mibale ya ntaba. Alambaki elubu oyo mobali na ye alingaka mingi. Na nsima, Yakobo asengelaki kokosa Tata na ye ete azali Esau, mpo apambola ye. Yakobo aboyaki. Soki tata na ye ayebi ete azali kokosa ye, akolakela ye mabe! Kasi, Lebeka andimisaki ye kaka ete asala bongo. Alobaki na ye boye: “Elakeli mabe na yo ezala na ngai, mwana na ngai.” Na nsima, alambaki biloko, alatisaki Yakobo mposo ya nyama mpe atindaki ye epai ya mobali na ye.​—Genese 27:1-17.

Biblia elobi te ntina oyo Lebeka asalaki bongo. Bato mingi balobaka ete asalaki mabe, kasi, Biblia elobi bongo te, ata Yisaka ye moko mpe alobaki te ete mwasi na ye asali mabe ntango ayebaki ete apambolaki nde Yakobo. Kutu Yisaka abakiselaki ye nde mapamboli mosusu. (Genese 27:29; 28:3, 4) Lebeka ayebaki oyo Yehova alobaki na ntina na bana na ye. Yango wana, asalaki nyonso mpo Yakobo azwa mapamboli oyo azalaki mpenza na lotomo ya kozwa. Emonani polele ete likambo yango eyokanaki na mokano ya Yehova.​—Baloma 9:6-13.

Batindi Yakobo na Halana

Lebeka ayebaki oyo Esau azalaki kokana kosala, yango wana atindaki Yakobo akima tii ntango nkanda ya ndeko na ye ekosila. Atunaki Yisaka na boboto mpenza soki akondima ete Yakobo akende epai mosusu, kozanga aloba ete Esau azalaki kokana kosala ye mabe. Kutu asalaki mayele ya koloba na ye ete azali kobanga noki Yakobo abala mwasi ya Kanana. Lokola Yisaka akokaki kondima te ete Yakobo abala mwasi ya Kanana, andimaki likanisi yango mpe atikaki ye akende epai ya bandeko ya Lebeka mpo na kobala mwasi oyo abangaka Nzambe. Biblia elobi te soki Lebeka na Yakobo bamonanaki lisusu, kasi, likambo oyo asalaki, ememaki lipamboli monene mpo na ekólo Yisalaele oyo esalemaki na nsima.​—Genese 27:43–28:2.

Makambo ya Lebeka oyo toyebi ezali kotinda biso tósepela na ye. Azalaki mwasi kitoko, kasi kitoko na ye ya solosolo ezalaki nde na ezaleli na ye ya kokangama na Nzambe. Yango nde ezaleli oyo Abalayama alingaki ete mwasi oyo akokóma bokilo na ye azala na yango. Emonani ete azalaki na bizaleli mosusu ya malamu oyo kutu Abalayama akanisaki te. Kondima mpe mpiko oyo azalaki na yango ya kolanda litambwisi ya Nzambe mpe molende, boboto, mpe ezaleli ya koyamba bapaya oyo amonisaki, ezali bizaleli malamu oyo baklisto nyonso ya basi basengeli komekola. Yango nde bizaleli oyo Yehova alukaka epai ya basi ya malamu.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto