Mibange bazali na motuya mingi na kati ya lisangá
“Baoyo balonami na ndako ya Yehova . . . bakobimisa fololo. Bakotika te kobota mbuma ata ntango bakokóma na nsuki mpɛmbɛ.”—NZEMBO 92:13, 14, NW.
1. Ndenge nini bato mingi bazali kotalela mibange?
YEHOVA alingaka basaleli na ye nyonso ya sembo, ata baoyo bakómi mibange. Nzokande, ankɛtɛ moko esalemaki na États-Unis emonisi ete na ekólo yango, mbula na mbula bazali konyokola to kosundola mibange pene na nkóto 500. Bansango ya bikólo mosusu ezali komonisa ete bazali konyokola mibange na mokili mobimba. Ebongiseli moko elobaki ete ntina ya likambo yango ezali “makanisi oyo bato mingi bakómi na yango . . . ete mibange bazali lisusu na ntina te, bazali lisusu kosala eloko moko te mpe bakómi mokumba mpo na bato mosusu.”
2. (a) Ndenge nini Yehova atalelaka basaleli na ye oyo bakómi mibange? (b) Maloba nini ya kitoko ezali na Nzembo 92:12-15?
2 Mpo na Yehova Nzambe, basaleli na ye ya sembo oyo bakómi mibange bazali na motuya mingi. Yehova atalaka nde “bomoto na biso ya kati,” to elimo na biso, kasi te na makambo oyo tokokaka lisusu kosala te ntango nzoto na biso elɛmbi. (2 Bakolinti 4:16) Liloba na ye, Biblia, elobi maloba ya kolendisa oyo: “Moyengebene akobimisa fololo lokola nzete ya mbila; akokola lokola sɛdrɛ ya Liban. Baoyo balonami na ndako ya Yehova, na mapango ya Nzambe na biso, bakobimisa fololo. Bakotika te kobota mbuma ata ntango bakokóma na nsuki mpɛmbɛ, bakozala kaka mafuta mpe mobesu, mpo na kosakola ete Yehova azali sembo.” (Nzembo 92:12-15, NW) Boyekoli ya bavɛrsɛ oyo ekomonisa makambo malamu oyo bino mibange bokoki kosala na kati ya lisangá.
‘Babotaka mbuma ata ntango bakómi na nsuki mpɛmbɛ’
3. (a) Mpo na nini Biblia elobi ete bayengebene bazali lokola banzete ya mbila? (b) Ndenge nini mibange bakoki ‘kotika te kobota mbuma ata ntango bakómi na nsuki mpɛmbɛ’?
3 Mokomi ya nzembo alobaki ete bayengebene bazali lokola banzete ya mbila oyo ‘elonami na mapango ya Nzambe na biso.’ ‘Batikaka te kobota mbuma ata ntango bakómi na nsuki mpɛmbɛ.’ Omoni te ete yango ezali mpenza likanisi ya kolendisa? Na ntango ya kala, na mikili ya Moyen-Orient, mapango mingi ezalaki na banzete ya mbila ya kitoko mpe ya semba. Banzete yango ezalaki kobongisa lopango; bato bazalaki mpe kolinga yango mingi mpo ezalaki kobota mbuma mingi, mpe banzete mosusu ezalaki kaka kobota mbuma ata soki eleki mbula nkama.a Soki bopiki mpenza misisa na losambo ya solo, bino mpe bokoki “kokoba kobota mbuma na mosala nyonso ya malamu.”—Bakolose 1:10.
4, 5. (a) Mbuma nini ya ntina mingi baklisto basengeli kobota? (b) Tángá bandakisa ya mibange oyo Biblia elobeli oyo babotaki “mbuma ya mbɛbu.”
4 Yehova azalaka na mposa ete baklisto bábota “mbuma ya mbɛbu,” elingi koloba maloba oyo ezali kosanzola ye mpe mikano na ye. (Baebele 13:15) Likambo yango etaleli mpe yo oyo ozali mobange? Ɛɛ.
5 Biblia elobeli ebele ya bato ya kala oyo bazalaki kobanga te kotatola nkombo mpe mikano ya Yehova. Moize asilaki koleka “mbula . . . ntuku nsambo” ntango Yehova apesaki ye mokumba ya kozala mosakoli mpe momonisi na ye. (Nzembo 90:10; Exode 4:10-17) Atako akómaki mobange, mosakoli Danyele azongaki nsima te mpe abangaki te kotatola mpo na bokonzi ya Yehova. Ekoki mpenza kozala ete Danyele akómaki na mbula koleka 90 ntango Belesasala asɛngaki ye alimbola makomi oyo lobɔkɔ moko ekomaki na efelo. (Danyele, mokapo 5) Tokoloba boni mpo na ntoma Yoane? Na nsuka ya bomoi na ye, nsima ya kosalela Nzambe na bosembo bambula ebele, bakangaki ye mpe batyaki ye na esanga Patimosi ‘mpo azalaki koloba na ntina etali Nzambe mpe kopesa litatoli na ntina etali Yesu.’ (Emoniseli 1:9) Na ntembe te oyebi bato mosusu na Biblia, oyo babotaki “mbuma ya mbɛbu” ntango bakómaki mibange.—1 Samwele 8:1, 10; 12:2; 1 Mikonzi 14:4, 5; Luka 1:7, 67-79; 2:22-32.
6. Ndenge nini Yehova asaleli “mibange” mpo na kosakola na mikolo oyo ya nsuka?
6 Ntoma Petelo azongelaki maloba ya mosakoli Yoele ntango alobaki boye: “Nzambe alobi boye, ‘Mpe na mikolo ya nsuka nakosopa ndambo ya elimo na ngai likoló ya mosuni ya ndenge nyonso [ná mibange], . . . mpe bakosakola.’” (Misala 2:17, 18; Yoele 2:28) Yango wana, na mikolo ya nsuka oyo, Yehova asaleli mibange oyo bazali bapakolami mpe oyo bazali na kati ya “bampate mosusu” mpo na kosakola mikano na ye. (Yoane 10:16) Bamosusu kati na bango bazali kobota mbuma ya Bokonzi banda ebele ya bambula.
7. Monisá ndenge oyo mibange bazali kokoba kobota mbuma ya Bokonzi ata soki bazali nzoto kolɔngɔnɔ te.
7 Tózwa ndakisa ya Sonia, oyo akómaki mosakoli ya ntango nyonso ya Bokonzi na 1941. Atako asali bambula ebele na maladi oyo eumelaka, sanza na sanza azalaki koyekola na bato Biblia na ndako na ye. Sonia alobaki boye: “Kosakola nsango malamu ezali mpenza mosala ya bomoi na ngai. Nasengeli koloba mpenza ete ezali bomoi na ngai. Naboyi kozwa pansiɔ na mosala yango.” Eleki mwa mikolo, Sonia ná yaya na ye Olive, na esika oyo bazelaka mpo na kokutana na monganga, bakutanaki na Janet, mwasi moko oyo azali na maladi oyo akobika na yango mpe bayebisaki elikya ya Biblia. Mama ya Janet, Mokatolike moko ya molende, asepelaki na ndenge batyelaki mwana na ye likebi; yango wana andimaki koyekola Biblia mpe sikoyo azali kokola malamu mpenza na elimo. Yo mpe okoki kosalela mabaku ya ndenge wana mpo na kobota mbuma ya Bokonzi?
8. Ndenge nini Kalebe amonisaki ete azalaki kotyela Yehova motema ntango akómaki mobange, mpe ndenge nini baklisto oyo bazali mibange bakoki kolanda ndakisa na ye?
8 Baklisto oyo bakómi mibange mpe bakangami na mpiko nyonso na mosala ya kosakola Bokonzi atako bazali na mikakatano ya nzoto, bazali kolanda ndakisa ya Kalebe, Moyisalaele ya sembo oyo atambolaki na Moize na esobe na boumeli ya mbula 40. Kalebe azalaki na mbula 79 ntango akatisaki Ebale Yolodani mpo na kokɔta na Mokili ya Ndaka. Nsima ya kobunda bitumba mpe kolonga na boumeli ya mbula motoba lokola soda ya Yisalaele, akokaki kokanisa ete asengeli kopema mpo asali mingi. Kasi, asalaki bongo te; na mpiko mpenza, asɛngaki mokumba ya mpasi ya kobɔtɔla ‘bamboka minene oyo ezingami makasi’ oyo ezalaki na bangomba ya Yuda, etúká oyo bana ya Anaki, bato milai mpenza mpe ya mbinga, bazalaki kofanda. Na lisalisi ya Yehova, Kalebe ‘abimisaki bango lokola elobaki Yehova.’ (Yosua 14:9-14; 15:13, 14) Yo mpe zalá na elikya ete, ndenge Yehova azalaki na Kalebe, akozala mpe na yo wana ozali kokoba kobota mbuma ya Bokonzi atako okómi mobange. Soki otikali sembo, akopesa yo esika na mokili ya sika oyo alaki.—Yisaya 40:29-31; 2 Petelo 3:13.
“Bakozala kaka mafuta mpe mobesu”
9, 10. Ndenge nini baklisto oyo bakómi mibange batikalaka makasi na kondima mpe babatelaka makasi na bango ya elimo? (Talá etanda na lokasa 13.)
9 Mpo na komonisa ete basaleli ya Yehova oyo bakómi mibange babotaka kaka mbuma, mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Moyengebene akobimisa fololo lokola nzete ya mbila; akokola lokola sɛdrɛ ya Liban. Bakotika te kobota mbuma ata ntango bakokóma na nsuki mpɛmbɛ, bakozala kaka mafuta mpe mobesu.”—Nzembo 92:12, 14, NW.
10 Ndenge nini okoki kobatela makasi na yo ya elimo ata soki okómi mobange? Nzete ya mbila ezalaka kaka kitoko ata soki eumeli bambula ebele mpo etikaka te kobenda mai. Yo mpe okoki kozwa makasi na mai ya elilingi, elingi koloba solo ya Biblia, soki ozali koyekola Liloba ya Nzambe mpe soki okangami na ebongiseli na ye. (Nzembo 1:1-3; Yilimia 17:7, 8) Soki ozali makasi na elimo, okozala na motuya mingi na miso ya bandeko mosusu na lisangá. Tótalela ndenge oyo Nganga-Nzambe Monene Yoyada, oyo akómaki mobange, amonisaki yango.
11, 12. (a) Makambo nini ya malamu mingi Yoyada asalaki mpo na ekólo Yuda? (b) Ndenge nini Yoyada asalelaki mokumba na ye mpo na kotombola losambo ya solo?
11 Ekoki mpenza kozala ete Yoyada alekaki mbula nkama ntango Mokonzi-Mwasi Atalia abomaki bankɔkɔ na ye mpe akómaki koyangela Yuda. Mobange Yoyada asalaki likambo nini? Mbula motoba mobimba, ye ná mwasi na ye babombaki na kati ya tempelo mwana kaka moko ya mokonzi oyo abomamaki te, nkombo ya mwana yango ezalaki Yoasa. Na nsima, Yoyada asalaki likambo moko monene: asakolaki ete Yoasa, oyo azalaki na mbula nsambo, akómi mokonzi mpe abomisaki Atalia.—2 Ntango 22:10-12; 23:1-3, 15, 21.
12 Lokola azalaki kobatela mokonzi, Yoyada asalelaki libaku malamu wana mpo na kotombola losambo ya solo. “Akataki ndai kati na ye moko mpe na bato nyonso mpe na mokonzi ete bakozala bato ya [Yehova].” Yoyada apesaki mitindo mpe bato babukaki ndako ya Baala, nzambe ya lokuta mpe, bakweisaki bitumbelo mpe bikeko na yango, mpe babomaki nganga-nzambe ya Baala. Lisusu, ezali mpe kaka Yoyada nde apesaki Yoasa toli, mpe Yoasa azongisaki misala ya tempelo mpe asalisaki mosala ya kobongisa tempelo. “Yoasa asalaki malamu na miso ya [Yehova] mikolo nyonso wana nganga Yoyada alakisaki ye.” (2 Ntango 23:11, 16-19; 24:11-14; 2 Mikonzi 12:2) Ntango Yoyada akufaki na mbula 130, bakundaki ye na lokumu monene na malita ya bakonzi mpamba te “asalaki malamu kati na Yisalaele mpe epai ya Nzambe mpe libota na ye.”—2 Ntango 24:15, 16.
13. Ndenge nini baklisto oyo bazali mibange bakoki ‘kosala malamu epai ya Nzambe mpe libota na ye’?
13 Mbala mosusu maladi to mikakatano mosusu ezali kopekisa yo osala mingi mpo na losambo ya solo. Atako bongo, okoki kaka kosala ‘malamu epai ya Nzambe mpe libota na ye.’ Okoki komonisa ete ozali na molende mpo na ndako ya Yehova soki ozali koyangana na makita mpe kopesa biyano mpe ozali kobima na mosala ya kosakola ndenge oyo makoki na yo ezali kopesa nzela. Ezaleli na yo ya kondima toli ya Biblia mpe bokangami na yo epai ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpe na lisangá ekolendisa bandeko mosusu. (Matai 24:45-47) Okoki mpe kopesa bandeko mosusu mposa ya komonisa “bolingo mpe misala ya malamu.” (Baebele 10:24, 25; Filemona 8, 9) Okozala mpe lipamboli mpo na bandeko mosusu soki ozali kolanda toli ya ntoma Paulo oyo: “Tiká ete mibange mibali bázala na bokatikati na bizaleli, bato bayebi kopesa nzoto kilo, bato ya makanisi malamu, makasi na kati ya kondima, na kati ya bolingo, na kati ya ezaleli ya koyika mpiko. Ndenge moko mpe mibange basi bázala bato ya etamboli ya kobanga Nzambe, bákoselaka bato makambo te, baombo ya ebele ya vinyo te, bateyi ya makambo ya malamu.”—Tito 2:2-4.
14. Baklisto oyo baumeli na mokumba ya nkulutu bakoki kosala nini mpo losambo ya solo ekende liboso?
14 Ekoki kozala ete ozali nkulutu banda bambula ebele. Ndeko moko oyo aumeli mingi na mokumba ya nkulutu apesaki toli oyo: “Salelá mpenza bwanya ya bobange mpo na kosalisa basusu. Tikeláká mpe bandeko mosusu mikumba mosusu, lakisá bandeko mosusu oyo bazali na elimo ya komipesa makambo oyo oyebi . . . Luká koyeba makoki oyo bandeko mosusu bazali na yango. Salisá bango na kokolisa yango. Bongisáká makambo mpo na mikolo ekoya.” (Deteronome 3:27, 28) Mposa na yo ya komona mosala ya Bokonzi ezali kokende liboso ekomemela bandeko mosusu mapamboli mingi.
‘Bakosakola ete Yehova azali sembo’
15. Ndenge nini baklisto oyo bazali mibange ‘basakolaka ete Yehova azali sembo’?
15 Basaleli ya Nzambe oyo bakómi mibange bakokisaka na esengo mokumba na bango ya “kosakola ete Yehova azali sembo.” Soki ozali moklisto oyo akómi mobange, maloba mpe misala na yo ekoki komonisa basusu ete ‘Yehova azali libanga na yo mpe mabe ezali na ye soki moke te.’ (Nzembo 92:15) Atako nzete ya mbila elobaka te, emonisaka bizaleli malamu mingi ya Mozalisi. Nzokande yo, Yehova apesi yo libaku malamu ya kotatola mpo na ye epai ya bato oyo bazali koyamba losambo ya solo. (Deteronome 32:7; Nzembo 71:17, 18; Yoele 1:2, 3) Mpo na nini yango ezali na ntina?
16. Ndakisa ya nani na Biblia ezali komonisa ntina ya ‘kosakola ete Yehova azali sembo’?
16 Ntango Yosua, mokambi ya Yisalaele, “anunaki mpe azalaki na mbula mingi,” “abyangaki Yisalaele nyonso, mikóló na bango mpe bato ya liboso mpe basambisi na bango mpe bakapita na bango,” mpe amonisaki bango misala ya sembo ya Nzambe. Alobaki boye: “Eloko moko ezangi te na makambo malamu nyonso oyo [Yehova] Nzambe na bino atyaki ndaka na yango na ntina na bino. Yango nyonso ebimelaki bino.” (Yosua 23:1, 2, 14) Na boumeli ya mwa ntango, maloba yango elendisaki ekateli na bango ya kotikala sembo. Kasi, nsima ya liwa ya Yosua, “libota mosusu ebimaki . . . baoyo bayebaki [Yehova] te mpe bayebaki mosala oyo esalelaki ye Yisalaele te. Bato ya Yisalaele basalaki mabe na miso ya [Yehova] mpe basalelaki Babaala.”—Basambisi 2:8-11.
17. Makambo nini Yehova asali mpo na basaleli na ye na ntango na biso?
17 Lelo oyo, soki lisangá ya boklisto ezali sembo, ezali te mpo na litatoli ya basaleli ya Nzambe oyo bakómi mibange. Kasi, kondima na biso epai ya Yehova mpe na bilaka na ye elendisamaka ntango tozali koyoka masolo ya bato oyo bamonaki na miso “mosala monene” oyo Yehova asali mpo na basaleli na ye na mikolo oyo ya nsuka. (Basambisi 2:7; 2 Petelo 1:16-19) Soki oumeli mingi na lisangá ya Yehova, mbala mosusu ozali koyeba lisusu ntango oyo bozalaki kaka mwa basakoli moke na etúká to ekólo na bino to ntango bazalaki kotɛmɛla bino makasi na mosala ya kosakola. Nsima ya bambula, omonaki ndenge Yehova alongolaki mikakatano mosusu mpe ‘ayeisaki mbangu’ kobakisama ya basakoli ya Bokonzi. (Yisaya 54:17; 60:22) Omonaki ndenge mateya mosusu ya Biblia elimbolamaki polele mpe omonaki ndenge makambo ezalaki kobonga mokemoke na lisangá ya Nzambe awa na mabelé. (Masese 4:18; Yisaya 60:17) Olukaka kolendisa bato mosusu na masolo ya makambo oyo okutaná na yango, oyo ezali komonisa ete Yehova azali sembo? Yango ekoki mpenza kosepelisa mpe kolendisa baklisto mosusu!
18. (a) Lobelá matomba oyo emonanaka, ata nsima ya bambula, soki tozali ‘kosakola epai ya bato mosusu ete Yehova azali sembo.’ (b) Ndenge nini yo moko omonaki ete Yehova azali sembo?
18 Ezali boni mpo na makambo oyo okutanaki na yango na bomoi na yo, oyo endimisaki yo ete Yehova alingaka mpe atambwisaka yo? (Nzembo 37:25; Matai 6:33; 1 Petelo 5:7) Martha, ndeko mwasi moko ya mobange, azalaki na momeseno ya kolendisa basusu na maloba oyo: “Ezala likambo nini ekómeli yo, kotika Yehova te. Akosunga yo.” Toli yango ekɔtaki mpenza na motema ya Tolmina, mwasi moko oyo Martha ayekolaki na ye Biblia mpe azwaki batisimo na ebandeli ya bambula ya 1960. Tolmina alobi boye: “Ntango mobali na ngai akufaki, nalɛmbaki mingi, kasi maloba wana elendisaki ngai mpe nazangisaki makita ata mbala moko te. Mpe Yehova asungaki ngai mpenza mpo nazonga nsima te.” Tolmina mpe azalaki kopesa bato mingi oyo azalaki koyekola na bango Biblia toli yango. Ya solo, soki bozali kolendisa mpe koyebisa misala ya bosembo ya Yehova, bokoki kolendisa kondima ya bandeko mosusu.
Yehova asepelaka mingi na basaleli na ye ya sembo oyo bakómi mibange
19, 20. (a) Ndenge nini Yehova atalelaka misala ya basaleli na ye oyo bakómi mibange? (b) Lisolo oyo elandi ekolobela nini?
19 Na mokili oyo ezangi botɔndi, bato bazalaka na ntango te ya kotyela mibange likebi. (2 Timote 3:1, 2) Bakanisaka mibange kaka mpo na makambo oyo basalá, balobelaka kaka oyo mibange yango bazalaki, kasi te oyo bazali. Nzokande, Biblia elobi boye: “Nzambe azali te moto oyo azangi boyengebene mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomonisaki mpo na nkombo na ye, na ndenge bosalelaki basantu mpe bozali kokoba kosalela bango.” (Baebele 6:10) Yehova Nzambe abosani te misala ya sembo oyo osalaki. Kasi azali mpe kotalela na motuya mosala oyo ozali kokoba kosalela ye. Mpo na ye, mibange ya sembo bazali naino kobota mbuma, bazali makasi mpe kolɔngɔnɔ na elimo: bazali komonisa nguya na ye.—Bafilipi 4:13.
20 Otalelaka mibange na kati ya lisangá ndenge oyo Yehova atalelaka bango? Soki otalelaka bango bongo, yango ekotinda yo omonisa ete olingaka bango. (1 Yoane 3:18) Lisolo oyo elandi ekolobela mwa ndenge malamu oyo tokoki kokokisa bamposa na bango mpo na komonisa ete tolingaka bango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Etuka moko ya mbila (palmier dattier) ekoki kozala na mbuma nkóto moko mpe ekoki kozala na kilo mwambe to koleka. Mokomi moko alobaki ete “nzete moko [ya mbila], banda ebandi kobota mbuma tii ntango ekokufa, ekoki kobimisa tɔni mibale to misato ya mbila.”
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini mibange ‘babotaka mbuma’?
• Mpo na nini makasi ya elimo ya baklisto oyo bakómi mibange ezali na motuya?
• Ndenge nini mibange bakoki “kosakola ete Yehova azali sembo”?
• Mpo na nini Yehova asepelaka mingi na basaleli na ye oyo bakómi mibange?
[Etanda na lokasa 13]
Makambo oyo esalisaki baklisto mosusu bátikala makasi na kondima
Nini esalisaki baklisto mosusu oyo baumeli mingi na lisangá bátikala makasi na kondima mpe bázala ntango nyonso makasi na elimo? Talá oyo bamosusu kati na bango balobaki:
“Ezali na ntina mingi kotánga mikapo ya Biblia oyo elobelaka boyokani na biso na Yehova. Mbala mingi na butu, nazongelaka na motó maloba ya Nzembo 23 mpe Nzembo 91.”—Olive, azwá batisimo na 1930.
“Namityelá mokano ya kolandaka lisukulu nyonso ya batisimo mpe koyoka yango na likebi mpenza, lokola nde bazali kosala yango mpo na ngai. Lokola nasalaka makasi nabosana te ete namipesaki na Yehova, esalisaka ngai mingi na kotikala sembo.”—Harry, azwá batisimo na 1946.
“Kobondela mokolo na mokolo ezali na ntina mingi—kosɛnga Yehova asalisa biso, abatela biso mpe apambola biso, ‘kondima ye na banzela na biso nyonso.’” (Masese 3:5, 6)—Antônio, azwá batisimo na 1951.
“Koyoka masolo ya bato oyo bazali sembo epai ya Yehova banda bambula ebele epesaka ngai lisusu makasi ya kotikala sembo epai na ye.”—Joan, azwá batisimo na 1954.
“Ezali na ntina tókanisaka te ete tozali na valɛrɛ mingi. Nyonso oyo tozali na yango, tozwi yango mpo na boboto monene ya Nzambe. Kotalela makambo ndenge wana esalisaka biso tókoba kolya bilei ya elimo oyo tosengeli na yango mpo na koyika mpiko tii na nsuka.”—Arlene, azwá batisimo na 1954.
[Elilingi na lokasa 11]
Mibange babotaka mbuma malamu ya Bokonzi
[Elilingi na lokasa 14]
Makasi ya elimo ya mibange ezali na motuya