Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Levitike
MBULA mobimba ekokaki naino te banda Bayisalaele balongwaki na boombo na Ezipito. Bato ya ekólo wana ya sika bazalaki na nzela mpo na kokende na mokili ya Kanana. Yehova alingaki ete ekólo moko ya bosantu efanda na mokili wana. Nzokande, bizaleli ya Bakanana mpe losambo na bango etondaki na makambo ya mbindo. Yango wana, Nzambe ya solo apesaki libota ya Yisalaele mibeko na ye mpo bázala ekólo oyo ezali kosalela ye. Mibeko yango ezali na mokanda ya Levitike. Moize akomaki yango na esobe ya Sinai, soki na mobu 1512 liboso ya ntango na biso (L.T.B.); mokanda yango elobeli makambo oyo esalemaki na boumeli ya sanza moko. (Exode 40:17; Mituya 1:1-3) Yehova azalaki mbala na mbala koyebisa basambeli na ye ete basengeli kozala basantu.—Levitike 11:44; 19:2; 20:7, 26.
Lelo oyo, Batatoli ya Yehova basɛngisami te kotosa Mibeko oyo Nzambe apesaki na nzela ya Moize. Liwa ya Yesu esukisaki Mibeko yango. (Baloma 6:14; Baefese 2:11-16) Atako bongo, tokoki kozwa matomba na mibeko oyo ezali na mokanda ya Levitike mpe yango ekoki koteya biso makambo mingi mpo na losambo ya Nzambe na biso, Yehova.
MAKABO MOSANTU: YA BOLINGO MALAMU MPE OYO ESƐNGISAMAKI
Ezalaki na makabo mpe bambeka mosusu ya Mibeko oyo moto akokaki kopesa soki asepeli; nzokande, mosusu esɛngisamaki. Na ndakisa, moto akokaki kopesa mbeka ya kotumba soki asepeli. Bazalaki kopesa mbeka yango mobimba epai ya Nzambe, ndenge kaka Yesu andimaki kopesa bomoi na ye mobimba lokola mbeka mpo na kobikisa bato. Mbeka ya bondeko ezalaki kokabolama. Bazalaki kotumbela Nzambe ndambo na yango likoló ya etumbelo, banganga bazalaki kolya ndambo mosusu, mpe ndambo oyo etikali ezalaki ya moto oyo apesi mbeka yango. Ndenge moko mpe, mpo na baklisto bapakolami, Ekaniseli ya liwa ya Yesu ezali bolei ya bato ebele.—1 Bakolinti 10:16-22.
Mbeka ya lisumu mpe mbeka ya ekweli esɛngisamaki na moto nyonso. Mbeka ya lisumu ezalaki kopesama soki moto asali lisumu na nko te. Moto azalaki kopesa mbeka ya ekweli mpo na kozongisa boyokani na Nzambe to mpo na kozwa lotomo ya kosala makambo oyo azalaki lisusu kosala te to mpo na bantina wana mibale. Bazalaki mpe kopesa mbeka ya bilei mpo na kotɔnda Yehova mpo ebele ya biloko oyo azalaki kopesa bango. Makambo oyo nyonso etaleli biso mpamba te bambeka oyo esɛngamaki na kondimana ya Mibeko ezalaki elilingi ya Yesu Klisto mpe mbeka na ye to ya matomba oyo yango ekomemela biso.—Baebele 8:3-6; 9:9-14; 10:5-10.
Biyano na mituna ya Biblia:
2:11, 12—Mpo na nini Yehova aboyaki bápesaka mafuta ya nzoi “lokola mbeka na mɔtɔ”? Mafuta oyo balobeli awa ekoki te kozala oyo euti mpenza na nzoi. Atako bakokaki kopesa yango te “lokola mbeka na mɔtɔ,” batángi yango na kati ya “mbuma ya liboso ya . . . biloko nyonso bibimi na bilanga.” (2 Ntango 31:5) Yango emonisi polele ete oyo babengi mafuta ya nzoi, ezalaki nde mai ya mbuma oyo bakamoli. Lokola ekokaki mai ya mbuma ekoki kokóma ngaí, Nzambe aboyaki bápesaka yango lokola mbeka na etumbelo.
2:13—Mpo na nini esengelaki kotya mungwa ‘na mbeka nyonso? Soki bazalaki kotya mungwa na mbeka, ezalaki te mpo ekóma elɛngi. Na mokili mobimba, bato basalelaka mungwa mpo na kobatela bilei epɔla te. Emonani ete bazalaki kotya mungwa na mbeka mpo mungwa emonisaka eloko oyo epɔlá te mpe ebebá te.
Mateya mpo na biso:
3:17. Lokola Bayisalaele bazalaki kotalela mafuta lokola eteni oyo eleki malamu, emonani ete mobeko oyo epekisaki bango kolya mafuta ezalaki koteya bango ete esengeli kopesa na Yehova eteni oyo eleki malamu. (Genese 45:18) Yango ezali koteya biso ete tosengeli kopesa Yehova oyo tozali na yango ya malamu koleka.—Masese 3:9, 10; Bakolose 3:23, 24.
7:26, 27. Bayisalaele basengelaki kolya makila te. Na miso ya Nzambe, makila ezali bomoi. Levitike 17:11 elobi ete: “Bomoi ya mosuni ezali kati na makila.” Lelo oyo mpe, basambeli ya solo basengeli kotosa mobeko ya koboya makila.—Misala 15:28, 29.
BATYE BONGANGA-NZAMBE BOSANTU
Banani bazwaki mokumba ya kosala misala nyonso etali kopesa bambeka mpe makabo? Ezalaki mokumba ya banganga-nzambe. Ndenge Nzambe atindaki, Moize asalaki molulu ya kotya Alona nganga-nzambe monene mpe bana na ye minei, banganga-nzambe balandi. Emonani ete molulu yango eumelaki mikolo nsambo, mpe na mokolo oyo elandaki, banganga-nzambe babandaki mosala na bango.
Biyano na mituna ya Biblia:
9:9—Kosopa makila na nse ya etumbelo mpe kopakola yango na bisika ndenge na ndenge, ezalaki kolimbola nini? Yango ezalaki komonisa ete Yehova andimi makila mpo na kolimbisa masumu. Bazalaki kosalela makila na bibongiseli nyonso mpo na kolimbisama ya masumu. Ntoma Paulo akomaki boye: “Biloko pene na nyonso epɛtolamaka na makila engebene Mibeko, mpe soki makila esopami te bolimbisi ezali te.”—Baebele 9:22.
10:1, 2—Lisumu ya bana ya Alona, Nadaba ná Abihu, ekokaki mpe kozala likambo nini? Ntango Nadaba ná Abihu basalaki misala na bango ya nganga-nzambe na ndenge oyo esengeli te; mwa moke na nsima Yehova apekisaki banganga komɛla vinyo mpe masanga mosusu ya makasi ntango bazali kosala na tabenakle. (Levitike 10:9) Yango etindi biso na kokanisa ete mbala mosusu bana wana mibale ya Alona bamɛlaki masanga ntango basalaki likambo yango. Kasi, ntina mpenza oyo bakufaki ezali nde mpo bapelisaki “mɔtɔ mosusu liboso na [Yehova], oyo ye alakelaki bango te.”
Mateya mpo na biso:
10:1, 2. Basaleli ya Yehova oyo bazali na mikumba basengeli kotosa mitinda na ye. Lisusu, ntango bazali kokokisa mikumba na bango, basengeli te kosala makambo oyo bazali na ndingisa na yango te.
10:9. Tosengeli te kosala mosala ya Nzambe ntango tomɛli masanga.
LOSAMBO YA BOSANTU ESƐNGAKA BOPƐTO
Mibeko oyo Yehova apesaki Bayisalaele ya kolya banyama ya pɛto mpe kolya te banyama ya mbindo epesaki bango matomba na ndenge mibale. Mibeko yango ezalaki kobatela bango bázwa maladi te na nzela ya mikrobɛ mpe ezalaki kokesenisa bango na bikólo oyo ezalaki zinganzinga na bango. Mibeko mosusu elobelaki makambo ya kosala soki moto akómi mbindo mpo asimbi ebembe, ndenge ya kopɛtola mwasi oyo aboti, malako mpo na bato ya maba, mpo na mobali oyo akómi mbindo mpo na mai ya mibali mpe mwasi oyo akómi mbindo mpo amoni sanza. Banganga-nzambe nde bazalaki na mokumba ya kotalela makambo ya bato oyo bakómi mbindo.
Biyano na mituna ya Biblia:
12:2, 5—Mpo na nini mwasi oyo auti kobota azalaki “mbindo”? Binama ya kobotela esalemaki mpo na kobota bana ya kokoka. Kasi, lokola bankɔkɔ na biso batikelá biso lisumu, baboti bapesaka bana na bango bomoi ya kozanga kokoka mpe ya masumu. Mwa ntango oyo moto azalaki ‘mbindo’ nsima ya kobota, to na ntango mosusu, na ndakisa ntango mwasi amoni sanza to mobali abimi mai ya mibali, ezalaki kosalisa bango bábosana te ete bazali bato ya masumu. (Levitike 15:16-24; Nzembo 51:5; Baloma 5:12) Mibeko etali kopɛtolama ezalaki kosalisa Bayisalaele na komona ntina ya mbeka oyo esengelaki kolongola lisumu mpe kozongisa bato na bomoi ya kokoka. Na bongo, Mibeko ekómaki “molakisi na [bango] oyo azalaki kokamba epai ya Klisto.”—Bagalatia 3:24.
15:16-18 (NW)—‘Kobima ya mai ya mobali’ oyo balobeli na vɛrsɛ oyo ezali nini? Emonani ete bavɛrsɛ yango ezali kolobela kobima ya mai ya mobali oyo esalemi na butu ntango alali to na ntango babalani bazali kosangisa nzoto.
Mateya mpo na biso:
11:45. Yehova Nzambe azali mosantu mpe azali kosɛnga baoyo bazali kosalela ye mosala ya mosantu ete bázala basantu. Basengeli koluka kozala basantu mpe kotikala ntango nyonso pɛto na nzoto mpe na elimo.—2 Bakolinti 7:1; 1 Petelo 1:15, 16.
12:8. Yehova atikaki nzela ete babola bápesaka bandɛkɛ lokola mbeka na esika ya kopesa mpate, oyo ezalaki ntalo mingi. Yehova amibanzabanzaka mpenza mpo na babola.
ESENGELI KOBATELA BOSANTU
Mokolo ya Mbɔndi, oyo ezalaki kosalema mbala moko na mbula, nde mokolo bazalaki kopesa bambeka ya masumu mpo na ekólo mobimba. Bazalaki kopesa ngɔmbɛ moko mpo na banganga-nzambe mpe libota ya Balevi. Ntaba moko mpo na mabota mosusu ya Yisalaele. Bazalaki kotinda ntaba mosusu ya bomoi na zamba nsima ya kolakela yango masumu ya ekólo mobimba. Bazalaki kopesa bantaba wana mibale lokola mbeka ya lisumu. Makambo nyonso wana ezalaki elilingi oyo ezalaki komonisa ete Yesu Klisto akokabama lokola mbeka mpe akomema masumu ya bato.
Mibeko oyo etalelaki banyama oyo basengelaki kolya te mpe makambo mosusu ezali komonisa biso ntina ya kozala pɛto ntango tozali kosambela Yehova. Basɛngaki banganga-nzambe likambo oyo ebongi mpenza ete basengelaki kozala basantu. Bafɛti misato oyo bazalaki kosala mbula na mbula ezalaki bantango ya esengo mpenza mpe ya kotɔnda Mozalisi. Yehova apesaki mpe bato na ye mibeko ya kobebisa lokumu ya nkombo na ye mosantu te, kotosa Sabata mpe mokolo ya Yubile, mpe ndenge oyo basengelaki kotalela babola mpe baombo. Bamonisi mapamboli oyo basengelaki kozwa soki batosi Nzambe mpe bilakeli mabe oyo esengelaki koyela bango soki baboyi kotosa ye. Ezali mpe na mibeko mosusu oyo etalelaki ndai mpe motuya ya eloko oyo moto alaki kopesa na Nzambe, bana ya liboso ya banyama, mpe kopesa ndambo ya zomi ya eloko nyonso lokola “eloko ya bosantu mpo na Yehova.”
Biyano na mituna ya Biblia:
16:29 (NW)—Na ndenge nini Bayisalaele basengelaki ‘konyokola milimo na bango’? Likambo yango, oyo Bayisalaele bazalaki kosala na Mokolo ya Mbɔndi, ezalaki mpo na komonisa ete bazali na mposa Nzambe alimbisa masumu na bango. Emonani polele ete na ntango wana, bazalaki komipimela kolya mpo na kondima ete basalaki masumu. Na bongo, tokoki koloba ete ‘konyokola milimo’ ezalaki komipimela kolya.
19:27—Mpo na nini Nzambe apekisaki ‘kokata nsuki ya pembeni ya motó mpo na koyeisa yango zero’ to ‘kobebisa nsuka’ ya mandefu? Emonani ete bapesaki Bayuda mobeko yango mpo na kobatela bango ete bámekola te ndenge oyo bato ya bikólo mosusu bazalaki kobongisa mandefu to nsuki na bango. (Yilimia 9:25, 26; 25:23; 49:32) Kasi, mobeko wana ya Nzambe epekisaki Bayuda te kokata ata moke mandefu na bango to nsuki ya elongi.—2 Samwele 19:24.
25:35-37—Ezalaki ntango nyonso mabe ete Bayisalaele básɛnga matabisi ntango badefisi moto mbongo? Soki moto adefi mbongo mpo na kosala mombongo, moto oyo adefisi ye akokaki kosɛnga azongisa yango na matabisi. Kasi, Mibeko epekisaki kosɛnga matabisi na mbongo oyo moto adefi mpo azali mobola. Mibeko epekisaki kolyela babola.—Exode 22:25.
26:19 (NW)—Ndenge nini ‘likoló ekoki kokóma lokola ebende mpe mabelé lokola kwivrɛ’? Lokola mbula esengelaki kobɛta te, likoló ya mokili ya Kanana elingaki komonana lokola ebende ya makasi, oyo ezali madusumadusu te. Mpo na kozanga mbula, mabelé elingaki kokóma na langi ya kwivrɛ, lokola nde ezali kongɛnga.
26:26 (NW)—Na ndimbola nini ‘basi zomi bakotumba mampa na fulu moko’? Na momeseno, mwasi mokomoko azalaki na fulu na ye mpo na kotumba mampa na ye nyonso. Kasi, maloba oyo emonisi ete bilei ekokóma mpasi na boye ete fulu moko ekokoka mpo na kotumba mampa ya basi zomi. Wana ezali moko ya bampasi oyo elingaki koyela bango soki babateli bosantu te.
Mateya mpo na biso:
20:9. Na miso ya Yehova, koyina mpe motema mabe ezalaki lokola koboma moto. Yango wana, alobaki ete moto oyo afingi baboti na ye asengeli kozwa etumbu ndenge moko na oyo abomi bango. Makambo oyo esengeli kotinda biso na kolinga baninga na biso bandimi!—1 Yoane 3:14, 15.
22:32; 24:10-16, 23. Tosengeli kosambwisa nkombo ya Yehova te. Tosengeli nde kokumisa yango mpe kobondela ete nkombo yango esantisama.—Nzembo 7:17; Matai 6:9.
Mokanda ya Levitike mpe losambo na biso
Lelo oyo, Batatoli ya Yehova basɛngisami te ete bátosaka Mibeko. (Bagalatia 3:23-25) Kasi, lokola mokanda ya Levitike ezali komonisa biso makanisi ya Yehova na makambo ndenge na ndenge, na ntembe te, yango ekoki mpe kotalela losambo na biso.
Na ntembe te, ntango ozali kotánga Biblia pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kobongisa Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, okomona ete Nzambe azali kosɛnga basaleli na ye ete bázala basantu. Mokanda yango ya Biblia ekoki kotinda yo na kopesa Oyo-Aleki-Likoló nyonso oyo ozali na yango ya malamu koleka, mpe kotikala ntango nyonso pɛto mpo na lokumu na ye.
[Elilingi na lokasa 21]
Bambeka oyo esɛngamaki na Mibeko ezalaki elakiseli ya Yesu Klisto mpe mbeka oyo apesaki
[Elilingi na lokasa 22]
Bayisalaele bazalaki mpenza kosepela mokolo ya Fɛti ya mampa ezangá levire
[Elilingi na lokasa 23]
Bayisalaele bazalaki kotɔnda Yehova na bafɛti oyo bazalaki kosala mbala moko na mbula, na ndakisa Fɛti ya Mingombo