Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/9 nk. 30-31
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Masolo mosusu
  • Nani akokende na likoló?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Bazali koyemba loyembo ya sika mpe ya bolongi
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
  • Mokanda ya Emoniseli elimboli nini mpo na yo na mikolo ezali koya?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • “Nsango ya esengo” na mokanda ya emoniseli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/9 nk. 30-31

Mituna ya batángi

Mpo na nini Batatoli ya Yehova balobaka ete esengeli kotalela motángo 144 000 oyo elobelami na mokanda ya Emoniseli kaka ndenge ezali, kasi na ndenge ya elilingi te?

Ntoma Yoane akomaki boye: “Nayokaki motángo ya baoyo batyamaki elembo, nkóto nkama moko na ntuku minei na minei.” (Emoniseli 7:4) Na Biblia, maloba “baoyo batyamaki elembo” ezali komonisa bato oyo baponami na mokili mpo na koyangela mabelé oyo ekobongwana Paladiso elongo na Klisto na likoló. (2 Bakolinti 1:21, 22; Emoniseli 5:9, 10; 20:6) Ezali na bantina mingi oyo tolobaka ete bato yango bazali mpenza 144 000. Moko na yango emonisami na bavɛrsɛ oyo ezali na nse ya Emoniseli 7:4.

Nsima ya koyebisa ntoma Yoane, na emonaneli, makambo etali etuluku yango ya bato 144 000, balakisaki ye etuluku mosusu. Yoane alobeli etuluku yango ya mibale lokola, “ebele ya bato, oyo ata moto moko te akokaki kotánga, bauti na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso.” Ebele ya bato yango bazali komonisa baoyo bakobika na “bolɔzi monene” oyo ezali koya, oyo ekoboma mokili mabe ya lelo.​—Emoniseli 7:9, 14.

Kasi, talá ndenge Yoane amonisi bokeseni oyo ezali kati na vɛrsɛ 4 mpe 9 ya Emoniseli mokapo 7. Apesi motángo mpenza ya bato ya etuluku ya liboso, “baoyo batyamaki elembo.” Nzokande, mpo na etuluku ya mibale, “ebele ya bato,” motángo na bango eyebani te. Na kotalela likanisi oyo, tokoki mpenza kotalela motángo 144 000 lokola motángo ya solo. Soki motángo 144 000 ezalaki ya elilingi mpe elobelaki etuluku moko ya bato oyo motángo na bango eyebani te, boye bokeseni elingaki kozala te kati na bavɛrsɛ yango mibale. Na bongo, bavɛrsɛ wana mibale emonisi polele ete bato yango bazali mpenza 144 000.

Bato mingi ya mayele na makambo ya Biblia, ezala na ntango ya kala to lelo, balobaka mpe ete motángo yango ezali ya elilingi te. Na ndakisa, eleki mbula soki 100, Doktɛrɛ Ethelbert Bullinger, moto moko ya mayele na maloba ya lokota, alobaki mpo na Emoniseli 7:4, 9 boye: “Yango ezali motángo moko ya sikisiki, oyo ekeseni na motángo ya sikisiki te oyo balobeli na mokapo yango.” (The Apocalypse or “The Day of the Lord,” lokasa 282) Eumeli mingi te, Robert Thomas, Profɛsɛrɛ moko oyo atángisaka Testama ya Sika na Seminɛrɛ ya monene na États-Unis akomaki boye: “Na ndenge bayekoli likambo yango, eloko moko te emonisi ete motángo yango ezali ya elilingi.” Abakisi boye: “[Na Emoniseli 7:4], basaleli motángo moko ya sikisiki, kasi na Emoniseli 7:9 basaleli motángo ya sikisiki te. Soki esengeli kotalela motángo yango na ndenge ya elilingi, motángo moko te na mokanda ya Emoniseli esengeli kotalelama lokola motángo ya solo.”​—Revelation: An Exegetical Commentary, Volimi 1, lokasa 474.

Bato mosusu balobaka ete lokola mokanda ya Emoniseli ezali na elobeli ya elilingi, mitángo nyonso oyo ezali na mokanda yango, bakisa mpe motángo 144 000, esengeli kotalelama kaka na ndenge ya elilingi. (Emoniseli 1:1, 4; 2:10) Kasi, likanisi yango ebongi te. Toboyi te, mitángo mingi oyo ezali na mokanda ya Emoniseli ezali ya elilingi, nzokande, mosusu ezali mpenza mitángo ya solo. Na ndakisa, Yoane alobeli “bankombo ya bantoma zomi na mibale ya Mwana-Mpate.” (Emoniseli 21:14) Ezali polele ete motángo 12 oyo balobeli na vɛrsɛ oyo ezali motángo ya solo, kasi ya elilingi te. Lisusu, ntoma Yoane alobeli ‘mbula nkóto’ ya boyangeli ya Klisto. Soki totaleli malamumalamu makambo oyo Biblia elobi, tokomona ete motángo yango esengeli kotalema lokola motángo ya solo.a (Emoniseli 20:3, 5-7) Na bongo, mpo na koyeba soki motángo moko oyo balobeli na mokanda ya Emoniseli ezali ya solo to ya elilingi, esengeli kotalela bavɛrsɛ mosusu.

Bavɛrsɛ mosusu ya Biblia ezali mpe komonisa ete 144 000 ezali motángo ya solo; ezali motángo ya bato moke soki tokokanisi bango na “ebele ya bato.” Na ndakisa, na makambo mosusu oyo Yoane amonaki nsima, balobi ete bato yango 144 000 “basombamaki na kati ya bato lokola bambuma ya liboso.” (Emoniseli 14:1, 4) Maloba “bambuma ya liboso” emonisi ete bato oyo baponami bazali moke mpenza. Lisusu, ntango Yesu azalaki na mabelé, alobelaki bato oyo bakoyangela elongo na ye na Bokonzi ya likoló mpe abengaki bango “etonga moke.” (Luka 12:32; 22:29) Tomoni mpenza ete bato oyo bakokende koyangela na likoló bazali moke mpenza soki tokokanisi bango na bato oyo bakofanda awa na mabelé oyo ekobongwana Paladiso.

Na bongo, bavɛrsɛ oyo ezali na pembeni ya Emoniseli 7:4 mpe bavɛrsɛ mosusu ya Biblia emonisi ete tosengeli kotalela motángo 144 000 lokola motángo ya solo. Ezali kolobela bato oyo bakokende na likoló mpo na koyangela elongo na Klisto mabelé oyo ekobongwana paladiso mpe ekotonda na ebele ya bato oyo motángo na bango eyebani te, oyo bakosambela Yehova Nzambe na esengo.​—Nzembo 37:29.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba makambo mingi na ntina na Mbula Nkóto ya Boyangeli ya Klisto, talá Buku Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi! nkasa 289-290, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 31]

Bato oyo bakozwa libula na likoló bakozala kaka 144 000

[Elilingi na lokasa 31]

Motángo ya “ebele ya bato” eyebani te

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 31]

Minzoto: Na ndingisa ya Anglo-Australian Observatory, fɔtɔ ya David Malin

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto