“Bosengeli kobondela ndenge oyo”
OYEBI maloba ya Libondeli ya Nkolo? Ezali libondeli ya ndakisa oyo Yesu Klisto ateyaki. Na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu alobaki boye: “Na bongo, bosengeli kobondela ndenge oyo.” (Matai 6:9) Lokola Yesu nde ateyaki libondeli yango, mbala mosusu babengaka yango Libondeli ya Nkolo, to mpe Tata na Biso to Tata wa Biso.—Na Latin, Pater noster.
Ebele ya bato na mokili mobimba bakangá Libondeli ya Nkolo na motó mpe bazongelaka yango mbala na mbala. Na bambula oyo, bato mingi bazali kosala libondeli yango na kelasi mpe na milulu mosusu ya minene. Mpo na nini bato bapesaka Libondeli ya Nkolo motuya mingi ndenge wana?
Cyprien, moto moko ya teoloji na ekeke ya misato ya ntango na biso (T.B.), akomaki boye: “Ezali nde na libondeli mosusu oyo ekoki kozala mosantu koleka oyo Klisto alakisá biso . . . ? Ndenge nini mosusu ya kobondela Tata ekoki koleka ndenge oyo Mwana, oyo azali Solo, alakisá biso?”—Yoane 14:6.
Buku ya katikisimo to buku ya malongi ya Lingomba ya Katolike elobi ete Tata wa Biso ezali “libondeli ya ntina mingi mpo na baklisto.” Buku The World Book Encyclopedia elobi ete libondeli yango ezali na ntina mingi na mangomba nyonso ya boklisto, mpe ebengi yango moko ya “bisakola ya ntina mingi ya boklisto.”
Kasi, toyebi mpe ete bato mingi oyo bakangá Libondeli ya Nkolo na motó bayebaka mpenza ndimbola ya maloba na yango te. Zulunalo Ottawa Citizen, oyo ebimaka na Canada, elobi boye: “Soki okolá na lingomba moko ya boklisto, na ntembe te okoki kozongela libondeli yango na motó mbangumbangu mpe kozanga kopema, kasi soki balobi na yo olimbola liloba na yango mokomoko, okokoka te.”
Esengeli mpenza tóyeba ndimbola ya mabondeli na biso? Mpo na nini Yesu alakisaki biso Libondeli ya Nkolo? Libondeli yango ezali na ndimbola nini mpo na yo? Tiká tótalela naino mituna yango.