Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/9 nk. 10-15
  • “Bókoba kozwa nguya na kati ya Nkolo”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bókoba kozwa nguya na kati ya Nkolo”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tozali kobunda líbanda ná mampinga ya bilimo mabe
  • Toyebi mayele ya Satana
  • Tosengeli kotɛlɛma ngwi
  • Tosengeli kolata “molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe”
  • Ndenge nini tokoki kotɛmɛla bademo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Totelema ngwi liboso na mayele mabe ya Satana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Bótɛmɛla Satana, mpe akokima!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • “Boláta moláto mobimba ya etumba na Nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/9 nk. 10-15

“Bókoba kozwa nguya na kati ya Nkolo”

“Bókoba kozwa nguya na kati ya Nkolo mpe na kati ya nguya ya bokasi na ye.”​—BAEFESE 6:10.

1. (a) Etumba nini ya kokamwa ebundamaki eleki sikoyo mbula soki 3 000? (b) Mpo na nini Davidi alongaki?

ELEKI sikoyo mbula soki 3 000, mampinga mibale ya basoda ezalaki kotalana; mobundi moko abimaki na ngámbo mokomoko mpe bakutanaki na katikati. Oyo azalaki leki na kati na bango mibale ezalaki Davidi, elenge moko mobateli ya mpate. Abimaki mpo na kobunda na Goliata, mobali moko makasi mpe mbinga. Kazaka ya ebende oyo alataki ezalaki na kilo soki 57, azalaki na likɔnga moko monene ná mopanga ya molai. Davidi alataki ata molato ya etumba te, mpe ebundeli na ye ezalaki kaka bilingongo, to lasi. Ntango engambe Mofilistia Goliata atalaki elenge oyo batindaki mpo na kobunda na ye, amonaki ete bazali kosakana na ye. (1 Samwele 17:42-44) Basoda ya ngámbo mibale oyo bazalaki kotala bakanisaki ete bayebi moto oyo akolonga. Nzokande, ntango mosusu moto ya makasi alongaka etumba te. (Mosakoli 9:11) Davidi alongaki mpamba te abundaki na makasi ya Yehova. Alobaki boye: ‘Etumba ezali ya Yehova.’ Biblia elobi ete “Davidi alekaki Mofilistia na [lasi] mpe na libanga.”​—1 Samwele 17:47, 50.

2. Baklisto bazali kobunda etumba ya ndenge nini?

2 Baklisto babundaka bitumba ya mosuni te. Atako bazalaka na kimya na bato nyonso, bazali kobunda etumba ya elimo na banguna ya nguya mingi. (Baloma 12:18) Na mokapo ya nsuka ya mokanda oyo Paulo akomelaki Baefese, alobelaki etumba moko oyo moklisto nyonso azali kobunda. Akomaki boye: “Tozali kobunda líbanda ná makila mpe mosuni te, kasi ná baguvɛrnema, ná bakonzi, ná bayangeli ya mokili ya molili oyo, ná mampinga ya bilimo mabe na kati ya bisika ya likoló.”​—Baefese 6:12.

3. Na kolanda Baefese 6:10, nini ekosalisa biso tólonga etumba?

3 “Mampinga ya bilimo mabe” yango ezali nde Satana ná bademo na ye; bazali koluka kobebisa boyokani na biso na Yehova Nzambe. Lokola bango baleki biso na makasi, tozali lokola Davidi, mpe soki na makasi ya Yehova te, tokoki kolonga te. Kutu, Paulo alendisi biso ‘tókoba kozwa nguya na kati ya Nkolo mpe na kati ya nguya ya bokasi na ye.’ (Baefese 6:10) Nsima ya kopesa toli wana, Paulo alobelaki bibundeli ya elimo mpe bizaleli ya boklisto oyo ekosalisa biso tólonga etumba yango.​—Baefese 6:​11-17.

4. Wapi makambo mibale ya ntina tokotalela na lisolo oyo?

4 Sikoyo, tótalela oyo Biblia elobi na ntina na makasi mpe mayele ya monguna na biso. Na nsima, tokotalela mayele oyo tosengeli kosalela mpo na komibatela. Soki tolandi malako ya Yehova, tokoki kozala na elikya ete banguna bakolonga biso te.

Tozali kobunda líbanda ná mampinga ya bilimo mabe

5. Ndenge nini maloba “kobunda líbanda” na Baefese 6:12 ezali kosalisa biso tóyeba mayele ya Satana?

5 Paulo alobaki ete “tozali kobunda líbanda . . . ná mampinga ya bilimo mabe na kati ya bisika ya likoló.” Elimo mabe ya liboso ezali Satana Zabolo, “moyangeli ya bademo.” (Matai 12:24-26) Biblia ebengi etumba oyo tozali kobunda “líbanda,” to etumba ya mabɔkɔ. Na Grèce ya kala, mobundi ya líbanda asengelaki kosala makasi akweisa moninga makalekale. Ndenge moko mpe, Zabolo azali koluka biso tólɛmba na elimo. Ndenge nini akoki kolɛmbisa biso?

6. Na lisalisi ya Biblia, monisá mayele ndenge na ndenge oyo Zabolo akoki kosalela mpo na kolɛmbisa kondima na biso.

6 Zabolo akoki kosala lokola nyoka, lokola nkɔsi oyo ezali konguluma, to mpe lokola anzelu ya pole. (2 Bakolinti 11:3, 14; 1 Petelo 5:8) Akoki kotinda bato bányokola to bálɛmbisa biso. (Emoniseli 2:10) Lokola Satana azali koyangela mokili oyo mobimba, akoki kosalela bamposa mpe makambo kitoko na yango mpo na kotyela biso motambo. (2 Timote 2:26; 1 Yoane 2:16; 5:19) Akoki kosalela makanisi ya mokili to ya bapɛngwi mpo na kokosa biso, se ndenge akosaki Eva.​—1 Timote 2:14.

7. Makambo nini bademo bakoki te kosala, mpe tozali na makambo nini oyo ekoki kosalisa biso?

7 Atako ekoki komonana ete Satana ná bademo na ye bazali na nguya mingi mpe na bibundeli ya makasi, bazali na nguya nyonso te. Bilimo mabe yango bakoki te kosalisa biso na makasi makambo oyo Tata na biso ya likoló asepelaka na yango te. Tokelamá na bonsomi ya kopona, mpe tokoki kokanisa mpe kosala makambo oyo tolingi. Lisusu, tozali biso moko te na etumba yango. Ndenge ezalaki na ntango ya Elisa, ezali se bongo na moi ya lelo: “Baoyo bazali na biso baleki baoyo bazali na bango.” (2 Mikonzi 6:16) Biblia eyebisi biso ete soki totosi Nzambe mpe totɛmɛli Zabolo, akokima biso.​—Yakobo 4:7.

Toyebi mayele ya Satana

8, 9. Mikakatano nini Satana abimiselaki Yobo mpo na kokweisa ye, mpe lelo oyo makama nini ekoki kokómela biso na elimo?

8 Toyebi mayele ya Satana malamu mpamba te Biblia ezali komonisa biso ndenge asalaka. (2 Bakolinti 2:11) Zabolo asilisaki bozwi ya Yobo, abomaki bana na ye, apesaki mwasi na ye makanisi ya kotɛmɛla ye, anyokolaki ye na maladi, mpe atindaki baninga ya lokuta báloba na ye mabe. Yobo atungisamaki mingi mpe akanisaki ete Nzambe asundoli ye. (Yobo 10:1, 2) Lelo oyo, Satana akoki te kobimisela moto mikakatano nyonso wana; kasi baklisto mingi bakutanaka na yango, mpe Zabolo akoki kosalela yango mpo na kolɛmbisa bango.

9 Na mikolo oyo ya nsuka, makambo oyo ekoki kolɛmbisa na elimo ekómi ebele. Tofandi na mokili oyo bato mingi bazali kotya biloko ya mokili liboso ya mikano ya elimo. Kutu televizyo ná babuku ezali komonisa lokola nde kosala pite mpe ekobo ezali na mabe ata moko te, epesaka nde esengo. Bato mingi bakómi ‘kolinga bisengo na esika ya kozala bato oyo balingaka Nzambe.’ (2 Timote 3:1-5) Tosengeli ‘kobunda etumba makasi mpo na kondima,’ soki te, makanisi motindo wana ekobebisa elimo na biso.​—Yuda 3.

10-12. (a) Likebisi nini Yesu apesaki na ndakisa ya moloni? (b) Monisá ndenge oyo makambo ya elimo ekoki kotyama nkaka.

10 Moko na mayele oyo Satana azali kosalela mpe kolonga na yango mingi ezali kotinda biso tómipesa na makambo ya mokili mpe bamposa na yango. Na ndakisa ya moloni oyo Yesu apesaki, alobaki ete “motungisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo mpe nguya ya bokosi ya bomɛngo” ekoki ‘kotya liloba [ya Bokonzi] nkaka.’ (Matai 13:18, 22) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na ‘kotya nkaka’ elimboli “kokamola mpenza.”

11 Na bazamba minene, tokoki kokuta nzete oyo babengaka ngumu, to ngumbu; ntango ezali kokola, ekangamaka na nzete mosusu mpe malɛmbɛmalɛmbɛ ezingaka mobimbi na yango mobimba. Mokemoke, ekangaka nzete mobimba ntango misisa na yango ezali kokemba. Lokola ezalaka na ebele ya misisa, nsukansuka, ebendaka bilei mingi na mabelé na esika nzete oyo yango ezingi ezali, mpe nkasa na yango ezipaka nzete yango mpe epekisaka yango kozwa moi. Nsukansuka, nzete wana ekufaka.

12 Ndenge moko mpe, mitungisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo mpe mposa ya bozwi mpe ya bomɛngo ekoki mokemoke kolya ntango mpe makasi na biso nyonso. Soki tomipesi na makambo ya mokili, ekozala mpasi te tóbosana koyekola Biblia, tókóma na momeseno ya kozangisa makita, mpe na ndenge yango, tokozanga bilei ya elimo. Mposa ya biloko ya mokili ekozwa esika ya mikano ya elimo, mpe na nsuka, ekozala mpasi te mpo Satana akweisa biso.

Tosengeli kotɛlɛma ngwi

13, 14. Tosengeli kosala nini ntango Satana azali kobundisa biso?

13 Paulo alendisaki baninga na ye bandimi ‘bátɛlɛma ngwi liboso ya mayele mabe ya Zabolo.’ (Baefese 6:11) Ya solo, biso tozali na makasi te ya koboma Zabolo ná bademo na ye. Nzambe apesi mokumba wana na Yesu Klisto. (Emoniseli 20:1, 2) Kasi, lokola Satana alongolami naino te, biso tosengeli ‘kotɛlɛma ngwi’ mpo alonga biso te.

14 Ntoma Petelo mpe amonisaki ete tosengeli kotɛlɛma ngwi liboso ya Satana. Akomaki boye: “Bóbatela makanisi na bino, bókebaka. Monguna na bino, Zabolo, azali kotambola epai na epai lokola nkɔsi oyo ezali konguluma, kolukáká kolya moto. Kasi bótɛmɛla ye, bózala makasi na kati ya kondima, koyebáká ete makambo wana na oyo etali bampasi ezali mpe kosalema na lisangá mobimba ya bandeko na bino na kati ya mokili.” (1 Petelo 5:8, 9) Lisalisi ya bandeko na biso bandimi ezali na ntina mingi mpo na kotɛlɛma ngwi ntango Zabolo, lokola nkɔsi ezali konguluma, azali kobundisa biso.

15, 16. Pesá ndakisa moko euti na Biblia mpo na komonisa ete lisungi ya bandeko na biso bandimi ekoki kosalisa biso tótɛlɛma ngwi.

15 Na kati ya zamba, ntango nkɔsi moko angulumi, bamboloko bakoki mbala moko kokima mpo na kolongwa na likama. Kasi, banzoku basalaka likambo moko oyo ezali koteya biso kopesana mabɔkɔ. Buku Nzoku: Nyama minene ya Afrika mpe ya Azia (na Lingelesi) elobi boye: “Mpo na komibatela, mbala mingi banzoku batɛlɛmaka liboke moko, batye bana na kati mpe mikolo bazali kotala epai likama ezali kouta.” Ntango nkɔsi amoni banzoku batɛlɛmi bongo, ezalaka mpasi alanda ata mwana.

16 Biso mpe ndenge moko, ntango Satana ná bademo na ye balingi kobundisa biso, tosengeli kosimbana makasi, kozala liboke moko na bandeko na biso oyo bazali makasi na kondima. Paulo alobaki ete baninga na ye baklisto mosusu bazalaki ‘lisalisi oyo ezali kopesa ye makasi’ ntango azalaki na bolɔkɔ na Loma. (Bakolose 4:10, 11) Na Makomami ya Grɛki mobimba, liloba ya Grɛki oyo ebongolami na ‘lisalisi oyo ezali kopesa makasi’ ezali kaka na esika moko wana. Buku Expository Dictionary of New Testament Words ya William Vine elobi ete “liloba yango euti na verbe moko oyo elimboli nkisi oyo ekitisaka mpasi.” Ndenge pomadi esalaka na esika oyo moto azali koyoka mpasi, lisungi ya basambeli ya Yehova oyo bateli na elimo ekoki kokitisa mpasi ya makanisi to ya nzoto.

17. Nini ekosalisa biso tótikala sembo epai ya Nzambe?

17 Lelo oyo mpe, soki bandeko na biso baklisto bazali kolendisa biso, yango ekoki kobakisela biso makasi na mokano na biso ya kosalela Nzambe na bosembo. Mingimingi bankulutu bazalaka pene mpo na kosalisa na elimo. (Yakobo 5:13-15) Koyekola Biblia ntango nyonso mpe koyangana na makita mpe na mayangani ekosalisa biso mpe tótikala sembo. Soki tokómi baninga mpenza ya Nzambe, yango ekosalisa biso tótikala sembo epai na ye. Ezala tozali kolya, komɛla, to kosala eloko nini, tosengeli kosalaka yango mpo na nkembo ya Nzambe. (1 Bakolinti 10:31) Kasi, tobosani te ete kotyela Nzambe motema mpe kobondela ye ezali na ntina mingi mpo na kokoba kosala makambo oyo esepelisaka ye.​—Nzembo 37:5.

18. Mpo na nini tosengeli te kozonga nsima ata soki mikakatano elɛmbisi biso?

18 Mbala mosusu Satana abundisaka biso na ntango oyo tozali komiyoka mpenza makasi te na elimo. Nkɔsi epumbwelaka nyama oyo elɛmbi. Mikakatano ya libota, kozanga mbongo, to maladi ekoki kolɛmbisa biso na elimo. Kasi, tótika te kosala oyo esepelisaka Nzambe, mpamba te Paulo alobaki boye: “Ntango nazali na bolɛmbu, na ntango wana nde nazali mpenza na nguya.” (2 Bakolinti 12:10; Bagalatia 6:9; 2 Batesaloniki 3:13) Alingaki koloba nini? Alingaki koloba ete nguya ya Nzambe ekoki kosalisa biso ntango tozali na bolɛmbu, soki tosɛngi Yehova apesa biso makasi. Ndenge Davidi alongaki Goliata ezali komonisa ete Nzambe akoki kopesa bato na ye makasi, mpe asalaka yango. Batatoli ya Yehova ya mikolo na biso bakoki kotatola ete na bantango mosusu oyo bazalaki na mikakatano makasi, bamonaki lobɔkɔ makasi ya Nzambe.​—Danyele 10:19.

19. Pesá ndakisa moko oyo ezali komonisa ete Yehova akoki kopesa basaleli na ye makasi.

19 Na ntina na lisalisi oyo Nzambe apesaki mobali moko ná mwasi na ye, bakomaki boye: “Biso mibale tosaleli Yehova bambula mingi mpe tozwi mapamboli mingi mpe toyebani na ebele ya bato ya malamu. Lisusu, Yehova apesi biso formasyo mpe makasi ya koyikela mikakatano mpiko. Lokola Yobo, tozalaki ntango mosusu koyeba te ntina oyo makambo mosusu ezalaki kokómela biso, kasi toyebaki ete Yehova azalaki ntango nyonso pene mpo na kosalisa biso.”

20. Ndenge nini Biblia ezali komonisa ete Yehova asungaka basaleli na ye ntango nyonso?

20 Lobɔkɔ ya Yehova ezali mokuse te mpo alɛmba kosunga mpe kolendisa basaleli na ye ya sembo. (Yisaya 59:1) Davidi akomaki boye: ‘Yehova asimbaka baoyo nyonso balingi kokwea mpe atombolaka baoyo nyonso bagumbami.’ (Nzembo 145:14) Ya solo, Tata na biso ya likoló ‘amemaka mikumba na biso mokolo na mokolo’ mpe apesaka biso nyonso oyo tosengeli na yango mpenza.​—Nzembo 68:19.

Tosengeli kolata “molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe”

21. Ndenge nini Paulo amonisaki ntina ya molato ya elimo?

21 Totaleli mwa ndambo ya mayele oyo Satana asalelaka mpe tomoni ntina oyo tosengeli kotɛlɛma ngwi ntango azali kobundisa biso. Sikoyo, tótalela likambo mosusu ya ntina mingi oyo ekosalisa biso mpo kondima na biso elɛmba te. Na mokanda na ye epai ya Baefese, ntoma Paulo alobelaki mbala mibale likambo moko ya ntina mingi oyo ekosalisa biso tótɛlɛma ngwi liboso ya masɛnginya ya Satana mpe tólonga na líbanda oyo tozali kobunda na bilimo mabe. Paulo akomaki boye: “Bólata molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe mpo bókoka kotɛlɛma ngwi liboso ya mayele mabe ya Zabolo . . . Bókamata molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe, mpo bókoka kopika na mokolo ya mabe mpe, nsima wana bokosilisa kosala makambo nyonso malamumalamu, bótɛlɛma ngwi.”​—Baefese 6:11, 13.

22, 23. (a) Molato na biso ya etumba ya elimo ezali na biloko nini? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

22 Tomoni ete tosengeli kolata “molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe.” Ntango Paulo akomelaki Baefese, soda moko Moloma azalaki kokɛngɛla ye, mpe ekoki kozala ete na bantango mosusu, soda yango azalaki kolata molato mobimba ya etumba. Kasi, elimo ya Nzambe etindaki ntoma Paulo alobela molato ya elimo oyo ezali na ntina mingi mpo na mosaleli mokomoko ya Yehova.

23 Molato yango oyo euti na Nzambe ezali nde bizaleli oyo moklisto asengeli kozala na yango, bakisa mpe bibongiseli mosusu ya elimo oyo Yehova asali. Na lisolo oyo elandi, tokolobela eteni mokomoko ya molato yango. Yango ekosalisa biso tóyeba soki tozali mpenza na nyonso oyo esengeli mpo na etumba ya elimo. Lisusu, tokomona ndenge oyo ndakisa ya Yesu Klisto ezali kosalisa biso tólonga kotɛmɛla Satana Zabolo.

Okopesa eyano nini?

• Etumba nini baklisto nyonso bazali kobunda?

• Lobelá mwa bamayele oyo Satana asalelaka.

• Ndenge nini lisungi ya bandeko na biso bandimi ekoki kopesa biso makasi?

• Nguya ya nani tosengeli kotyela motema mpe mpo na nini?

[Bililingi na lokasa 11]

Baklisto ‘bazali kobunda líbanda ná mampinga ya bilimo mabe’

[Elilingi na lokasa 12]

Mikakatano ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ekoki kotya liloba ya Bokonzi nkaka

[Elilingi na lokasa 13]

Baninga baklisto bakoki kozala “lisalisi oyo ezali kopesa makasi”

[Elilingi na lokasa 14]

Obondelaka Nzambe mpo na kosɛnga ye makasi?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto