Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/10 nk. 20-23
  • Ozelaka ndenge nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozelaka ndenge nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndakisa moko ya kozela ya mabe
  • Ntina oyo Yehova azali na motema molai
  • Kozela ya malamu
  • Kokanga mabɔkɔ te ntango ozali kozela
  • Motema molai ya Nkolo na biso elimboli lobiko
  • Ayekolaki komonisa motema mawa
    Mekolá kondima na bango
  • Ayekoli koyokela basusu mawa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Yehova amoniselaki Yona motema molai
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Mokanda ya Biblia nimero 32—Yona
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/10 nk. 20-23

Ozelaka ndenge nini?

LELO oyo, bato mingi bazalaka mitema likolólikoló ntango bazali kozela eloko moko to moto moko. Nzokande, Biblia ezali kolendisa basaleli ya Nzambe báyebaka “kozela.” Bato ya ntango ya mosakoli Mika bayebaki kozela te; kasi, ye moko Mika alobaki boye: “[Nakozela] Nzambe ya kobika na ngai.”​—Mika 7:7, NW; Bileli 3:26.

Kasi, kozela Yehova elimboli nini? Ndenge nini moklisto asengeli kozela Nzambe? Ezali na kozela ya malamu mpe ya mabe? Ndakisa ya Yona, oyo azalaki mosakoli ya Nzambe na ekeke ya libwa liboso ya ntango na biso (L.T.B.) ezali koteya biso.

Ndakisa moko ya kozela ya mabe

Yehova Nzambe atindaki Yona akende kosakola na Ninive, engumba-mokonzi ya Asulia. Ninive ezalaki kobengama “engumba ya makila” mpo bato na yango bazalaki na mobulu mpe makambo mabe. Bato ya mayele na masolo ya kala mpe bato ya arkeoloji bamonaki mpe likambo yango. (Nahumu 3:1) Liboso, Yona akimaki mosala oyo Yehova apesaki ye; kasi nsukansuka mosakoli yango akendaki na Ninive.​—Yona 1:3–3:2.

“Yona abandaki kokɔta na mboka, kino mobembo ya mokolo moko; agangaki ete, Naino mikolo ntuku minei mpe Ninive akobukama.” (Yona 3:4) Mosala ya Yona ebimisaki litomba: “Bato ya Ninive bandimaki Nzambe; babongisaki kokila mpe balataki ngɔtɔ, longwa na oyo alekaki monene kati na bango kino oyo alekaki moke na bango.” (Yona 3:5) Yango wana, Yehova, Nzambe oyo ‘alingaka te moto ata moko abomama kasi alingaka nde bato nyonso bákóma na kobongola motema,’ alimbisaki engumba yango.​—2 Petelo 3:9.

Yona asalaki nini? Lisolo yango elobi boye: “Nde eyokisaki Yona mabe mingi mpe azalaki na nkanda.” (Yona 4:1) Mpo na nini? Ekoki kozala ete Yona akanisaki lokola Ninive ebomamaki te tii na ntango wana, bakoki kobenga ye mosakoli ya lokuta. Emonani ete akómaki kokanisa mingi lokumu na ye na esika ya kozala na motema mawa mpo na basusu mpe komibanzabanza mpo na lobiko na bango.

Ya solo, Yona akómaki te tii na koboya mokumba ya mosakoli. Kasi, azelaki mpo na ‘kotala likambo nini ekosalema na mboka.’ Tomoni ete akómaki na nkanda mpe azalaki kozela mpo amona soki makambo ekoleka ndenge nini. Ntango amonaki ete makambo esalemi te ndenge ye akanisaki, asalaki mongombo moko, afandaki na nse na yango, mpe azelaki na nkanda mpo amona likambo nini ekosalema. Nzokande, Yehova asepelaki na ezaleli ya Yona te; yango wana, na bolingo nyonso asalisaki mosakoli yango azonga na nzela.​—Yona 4:5, 9-11.

Ntina oyo Yehova azali na motema molai

Atako na ntango wana bato ya Ninive babongolaki motema mpe mboka na bango ebomamaki te, na nsima, bazongelaki lisusu misala ya mabe. Na nzela ya mosakoli Nahumu mpe mosakoli Sefania, Yehova asakolaki ete mboka na bango ekobomama. Yehova asakolaki na ntina na “engumba ya makila” ete akoboma Asulia mpe akokómisa Ninive esika ya mpamba. (Nahumu 3:1; Sefania 2:13) Na mobu 632 L.T.B., Ninive ebomamaki mpo na libela.

Lelo oyo mpe ndenge moko, mokili ezali na nyongo ya makila koleka kutu oyo ya Ninive. Yango wana, Yehova azwi ekateli ete ebongiseli ya makambo mabe ya ntango oyo ekosuka na “bolɔzi moko monene.”​—Matai 24:21, 22.

Kasi, liboso ya koboma mokili oyo, Yehova azali naino kozela mpo bato ya sembo bábongola mitema ndenge bato ya Ninive babongolaki mitema mpo bábikisama. Ntoma Petelo alobelaki motema molai ya Nzambe na maloba oyo: “Yehova azali koumisa makambo te na oyo etali elaka na ye, ndenge bato mosusu batalelaka koumisa makambo, kasi azali nde na motema molai epai na bino mpo alingi te moto ata moko abomama kasi alingi nde bato nyonso bákóma na kobongola motema.”​—2 Petelo 3:9, 10, 13.

Kozela ya malamu

Petelo abakisaki boye: “Lokola biloko nyonso wana esengeli kosilela bongo, bosengeli kozala bato ya ndenge nini na misala ya etamboli ya bosantu mpe na misala ya ezaleli ya kokangama na Nzambe, kozeláká mpe kobateláká na makanisi kozala ya mokolo ya Yehova!” (2 Petelo 3:11, 12) Tómoni ete ntango tozali kozela mokolo ya Yehova, tosengeli komonisa “misala ya etamboli ya bosantu mpe misala ya ezaleli ya kokangama na Nzambe”; na maloba mosusu, tosengeli kokanga mabɔkɔ te.

Moto oyo azali kozela na ndenge ya malamu azalaka na elikya mpenza ete mokolo ya Yehova ekoya na ntango oyo atyá. Kondima ya ndenge wana etindaka moto asala misala ya etamboli ya bosantu mpe ya ezaleli ya kokangama na Nzambe, oyo ya liboso kati na yango ezali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Yesu apesaki ndakisa ya malamu na mosala ya kosakola, mpe alobaki na bayekoli na ye bapakolami boye: “Tiká loketo na bino ekangama mpe miinda na bino epela, mpe bino moko bózala lokola bato oyo bazali kozela nkolo na bango ntango akouta na libala, mpo ntango akoya mpe akobɛta kɔkɔkɔ bákoka kofungola ye na mbala moko. Esengo na baombo oyo nkolo na bango ntango akoya akokuta bango bazali kokɛngɛla!”​—Luka 12:35-37.

Na ekeke ya liboso, baombo bazalaki ‘kokanga loketo’ na bango boye: bazalaki kotombola zambala tii na loketo mpe kokanga yango na eteni ya elamba mpo ezala nkaka te ntango bazali kosala mosala ya makasi. Yango wana, moklisto asengeli kozala makasi mpe molende na misala ya malamu. Asengeli koboya ‘kolekisaka ntango mpambampamba,’ na ndakisa na komipesa na bisengo to na koluka biloko ya mokili. Asengeli nde kozala na “mingi ya kosala na kati ya mosala ya Nkolo” ntango azali kozela mokolo monene mpe ya nsɔmɔ ya Yehova.​—Baloma 12:11; 1 Bakolinti 15:58.

Kokanga mabɔkɔ te ntango ozali kozela

Batatoli ya Yehova bakangi mabɔkɔ te na ntango bazali kozela mokolo ya Yehova. Na ndakisa, na mobu ya mosala 2003, mokolo na mokolo balekisaki ngonga soki 3 383 000 na kosakola liloba ya Yehova. Na maloba mosusu, moto moko asengeli kosakola mbula 386 kozanga kopema mpo akokisa bangonga oyo bango nyonso basalaki na mokolo moko!

Atako bongo, mokomoko na biso asengeli komituna ete: ‘Ngai nazelaka ndenge nini?’ Yesu apesaki ndakisa moko oyo emonisi molende oyo baklisto ya sembo oyo bazali bapakolami na elimo basengeli kozala na yango na mosala. Alobelaki baombo misato: “Epai na moko [nkolo] apesaki talanta mitano, epai na mosusu mibale, epai na mosusu lisusu moko, epai na moto na moto na kotalela likoki na ye mpenza, mpe akendaki na mboka mopaya. Na mbala moko oyo azwaki talanta mitano akendaki mpe asalaki mombongo na yango mpe abotisaki mosusu mitano. Ndenge moko mpe oyo azwaki mibale abotisaki mosusu mibale. Kasi oyo azwaki kaka moko akendaki, mpe atimolaki libulu na mabelé mpe abombaki mbongo yango ya palata ya nkolo na ye. Nsima ya ntango moko molai nkolo ya baombo wana ayaki mpe atalelaki makambo ya mbongo na ye elongo na bango.”​—Matai 25:15-19.

Baombo yango misato bazalaki kozela kozonga ya nkolo na bango. Ntango nkolo azongaki, alobaki na mokomoko na baombo mibale oyo bamipesaki na mombongo na ntango bazalaki kozela ye boye: “Longonya, moombo ya malamu mpe ya sembo!” Kasi, nkolo apesaki longonya te na moombo oyo akangaki mabɔkɔ ntango azalaki kozela. Alobaki boye: “Bóbwaka moombo oyo ya mpamba na kati ya molili ya libándá.”​—Matai 25:20-30.

Atako ndakisa yango ezali kolobela baklisto bapakolami, biso nyonso tokoki kozwela yango liteya. Nkolo Yesu Klisto azali na mposa ete biso nyonso tósala mosala na ye na molende ntango tozali kozela koya na ye na mokolo monene ya Yehova. Andimaka mosala ya moto na moto na “kotalela makoki na ye mpenza” mpe bomoi na ye. Ekozala esengo mingi na nsuka soki Nkolo apesi biso longonya!

Motema molai ya Nkolo na biso elimboli lobiko

Ezali boni soki tozali komona ete ebongiseli ya makambo oyo eumeli koleka ndenge tozalaki kokanisa? Ntina ezali. Ntoma Petelo akomaki boye: “Bótalela motema molai ya Nkolo na biso lokola lobiko.” (2 Petelo 3:15) Soki toyebi malamumalamu mikano ya Nzambe, tokomikitisa mpe tokomipesa valɛrɛ mingi te, yango ekosalisa biso tóyeba kozela ntango nyonso oyo Yehova akomona ete ebongi amonisa motema molai mpo na ebongiseli oyo.

Mpo na kolendisa baklisto bázala na motema molai, Yakobo, mokomi moko ya Biblia apesaki ndakisa moko. Akomaki boye: “Talá! Moloni-bilanga akobaka kozela mbuma ya malamu ya mabelé, komonisáká motema molai likoló na yango tii akozwa mbula ya ebandeli mpe mbula ya nsuka. Bino mpe bómonisa motema molai; bókómisa mitema na bino ngwi, mpamba te kozala ya Nkolo ekómi pene.”​—Yakobo 5:7, 8.

Yehova Nzambe alingi te tólɛmba to tózonga nsima ntango tozali kozela. Apesi biso mosala mpe akosepela soki na ntango oyo tozali kozela, tomipesi mpenza na mosala yango. Alingi tózala na kati ya bato oyo ntoma Paulo alobeli na mokanda na ye epai ya Baebele: “Tolingi ete mokomoko na bino amonisa molende ya ndenge wana mpo na kozala na kondimisama makasi ya elikya tii na nsuka, mpo bókóma te bagɔigɔi, kasi bózala nde bamekoli ya baoyo na nzela ya kondima mpe na motema molai bazali kozwa libula ya bilaka.”​—Baebele 6:11, 12.

Yango wana, tólɛmba te. Kasi, tiká ete boyokani na biso na Yehova Nzambe, kondima na biso na mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kobikisa biso, mpe elikya kitoko ya mokili ya sika ezala nguya oyo ezali kotambwisa bomoi na biso. Lokola “moombo ya malamu mpe ya sembo” oyo Yesu alobelaki, mpo tózala bato oyo babongi kozwa longonya mpe mbano, tiká tókoba kosanzola Nzambe lokola mokomi ya nzembo oyo akomaki ete: “Kasi ngai nakolikya epai na yo ntango nyonso mpe nakofulisa masanzoli na ngai kosanzola yo.”​—Nzembo 71:14.

[Elilingi na lokasa 21]

Lokola alɛmbaki nzoto, Yona azelaki mpo na kotala nini ekokómela Ninive

[Bililingi na lokasa 22]

Tómonisa ezaleli ya kokangama na Nzambe ntango tozali kozela mokolo ya Yehova

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto