Nani abongi mpenza kozala mokonzi lelo oyo?
Na 1940, parlema ya Angleterre ezalaki na mposa ya mokonzi ya malamu. David Lloyd George, oyo azalaki na mbula 77 azalaki kolanda masolo na bango; mobali yango alongisaká basoda ya Angleterre na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba mpe, lokola asalaki ebele ya bambula na politiki, ayebaki kotalela malamu mosala ya bakonzi ya Leta. Na lisukulu moko oyo asalaki na Parlema mokolo ya 8 Mai, alobaki boye: “Soki tozali na bakonzi ya malamu, soki guvɛrnema eyebisi biso mikano na yango polelepolele mpe soki tondimi mpenza ete bato oyo bazali kotambwisa yango bazali kosala nyonso oyo bakoki, tokoki kondima ata mpasi nini mpo na ekólo na biso.”
MALOBA wana ya Lloyd George ezali komonisa polele ete bato balingaka kozala na bakonzi oyo bayebi mosala mpe bazali kosala na bosembo mpenza nyonso oyo bakoki mpo mboka ekende liboso. Mwasi moko oyo azalaki kosalela moto moko propagandi ya voti alobaki boye: “Ntango bato bazali kopona prezida, batikaka avenire na bango mpe bana na bango na mabɔkɔ ya moto oyo bazali kopona.” Yango ezali mokumba ya lisɛki te. Mpo na nini?
Mokili etondi na mikakatano oyo tozali koyeba te soki ekosila mpenza. Na ndakisa, mokonzi nini azali na bwanya mpe na nguya ya kosilisa bato mabe oyo bazali koboma bato mpambampamba mpe ya kosilisa bitumba? Lelo oyo, mokonzi nini azali na makoki mpe na motema mawa mpo na koleisa bato nyonso, kopesa bango mai ya malamu mpe kosalisa bato ya maladi? Nani azali na mayele mpe na mokano ya kobatela mpe kobongisa zamba, mai mpe mopɛpɛ? Nani azali na makoki mpe na nguya ya kopesa bato bomoi molai mpe ya esengo?
Bato bazali na makoki te ya kosala makambo wana
Toboyi te, bakonzi mosusu basali mwa makambo oyo emonani. Nzokande, baumelaka kaka mwa bambula moke mpe na nsima balongwaka na bokonzi—mpe banani bayaka nsima na bango? Salomo, mokonzi ya Yisalaele ya kala, moko na bakonzi ya malamu mpenza, akanisaki motuna wana. Yoká eyano na ye: “Ɛɛ, nayinaki mosala nyonso na ngai mosalaki ngai na nse ya moi, zambi nakotika yango epai ya moto oyo akoya nsima na ngai. Nani mpe ayebi soki akozala moto ya mayele soki na zoba? Nde akozala na lokumu likoló ya misala nyonso oyo ngai nasalaki yango mpe oyo ngai namekaki na mayele na nse ya moi. Yango mpe ezali bisalasala.”—Mosakoli 2:18, 19.
Salomo ayebaki te soki moto oyo akoya nsima na ye akokoba na misala malamu oyo ye asalaki to nde akobebisa yango. Salomo amonaki ete likambo oyo esalemaka ete mokonzi moko alongwa mpe mosusu azwa esika na ye ezali “bisalasala.” Na Babiblia mosusu babongoli liloba yango na “mpamba,” to “kozanga ntina.” Biblia moko elobi boye: “Ezali na ntina moko te.”
Mbala mosusu, bato basalaka mobulu mpo na kolongola mokonzi mpe kotya mosusu. Tomoná babomá bakonzi mosusu ya malamu. Abraham Lincoln, prezida moko ya États-Unis oyo bato balingaki mingi alobaki mokolo moko boye: “Boponaki ngai mpo nakokisa mokumba moko ya ntina mingi mpo na ntango mokuse, kasi talá sikoyo, nakómi na lokumu mingi, oyo ekoumela te, ekoleka.” Ya solo mpenza, aumelaki na bokonzi yango te. Atako Prezida Lincoln asalaki mwa makambo mingi mpo na bolamu ya bato ya Amerika mpe azalaki na mposa ya kosala mingi lisusu, aumelaki na ebonga ya bokonzi kaka mbula minei. Ntango baponaki ye lisusu mpo na mbala ya mibale, kaka na ebandeli, moto moko oyo alingaki ete moto mosusu azwa bokonzi abomaki ye.
Ata soki bakonzi bazali malamu ndenge nini, lokola bazali bato, bazali na likoki te ya komibatela bango moko. Na bongo, okanisi ete bakoki nde kobatela yo? Biblia elobi boye: “Ndimelá bana ya mikonzi te, to moto, mpo ete azali na kosunga te. Soki [elimo, NW] na ye ekolongwa, moto akozonga na mabelé lisusu; bobele na mokolo yango kokanisa na ye esili.” Biblia Liloba lya Nzambe ebongoli eteni ya nsuka ya vɛrsɛ 4 boye: “Mokolo mona mikano mya bango minso mikobeba.”—Nzembo 146:3, 4.
Ekoki kozala mwa mpasi tólanda toli wana oyo eyebisi biso tótyela bato oyo bazali na bokonzi motema te. Kasi, Biblia elobi te ete bato bakozwa bakonzi ya malamu mpe ya libela ata mokolo moko te. Yisaya 32:1 elobi boye: “Talá mokonzi akozala na lokumu kati na boyengebene.” Yehova Nzambe, Mokeli ya bato, aponi “mokonzi” to mokambi oyo, mosika te, akoyangela mabelé mobimba. Mokonzi yango nani? Esakweli ya Biblia esalisi biso na koyeba ye.
Mokonzi oyo abongi mpenza
Eleki lelo mbula nkóto mibale, anzelu moko ayebisaki elenge mwasi Moyuda moko na nkombo Malia ete: “Okozwa zemi na matrisi na yo mpe okobota mwana mobali, mpe osengeli kobenga ye na nkombo Yesu. Ye akozala moto monene mpe akobengama Mwana ya Oyo-Aleki-Likoló; mpe Yehova Nzambe akopesa ye kiti ya bokonzi ya Davidi tata na ye, mpe akoyangela ndako ya Yakobo libela na libela, mpe nsuka ekozala te na bokonzi na ye.” (Luka 1:31-33) Ya solo, Yesu ya Nazalete nde Mokonzi oyo esakweli wana ya Biblia elobelaki.
Mbala mingi, bililingi ya mangomba ebimisaka Yesu lokola mwa mwana moke, to alɛmbalɛmbá lokola moto oyo alyaka malamu te, to mpe lokola moto moko oyo atikaka básala ye nyonso oyo balingi. Bililingi wana ekoki te kotinda biso tótyela ye motema ete azali Mokonzi oyo abongi. Nzokande, Biblia ezali komonisa ete Yesu Klisto azalaki mobali ya makasi, ya molende mpe moto ya mayele mingi. Azalaki mpe na bizaleli mosusu oyo ezali komonisa ete akozala mokonzi ya malamu. (Luka 2:52) Talá mwa bizaleli oyo amonisaki.
Yesu atikalaki sembo na makambo nyonso. Lokola azalaki na etamboli ya sembo, asɛngaki banguna na ye báyebisa ata mabe moko oyo bazwaki epai na ye. Bazwaki ye ata mabe moko te. (Yoane 8:46) Makambo ya solo oyo ateyaki esimbaki mpenza mitema ya ebele ya bato ya sembo mpe bakómaki bayekoli na ye. —Yoane 7:46; 8:28-30; 12:19.
Yesu amipesaki mobimba na Nzambe. Lokola azalaki mpenza na mokano ya kosilisa mosala oyo Nzambe apesaki ye, monguna moko te—ezala moto to demo—akokaki kozongisa ye nsima. Bazalaki ata kobundisa ye, kasi abangaki te. (Luka 4:28-30) Kolɛmba mpe nzala ezongisaki ye nsima te. (Yoane 4:5-16, 31-34) Atako baninga na ye basundolaki ye, atikaki mokano na ye te.—Matai 26:55, 56; Yoane 18:3-9.
Yesu azalaki mpenza komibanzabanza mpo na bato. Apesaki baoyo bazalaki na nzala biloko ya kolya. (Yoane 6:10, 11) Abɔndisaki baoyo bazalaki kotungisama na makanisi. (Luka 7:11-15) Afungolaki miso ya bato bakufá miso, matoi ya bato bakufá matoi mpe abikisaki bato ya maladi. (Matai 12:22; Luka 8:43-48; Yoane 9:1-6) Alendisaki bayekoli na ye oyo bazalaki kosala mosala makasi. (Yoane, mokapo 13-17) Azalaki “mobateli ya bampate oyo aleki malamu,” azalaki mpenza komibanzabanza mpo na bampate na ye.—Yoane 10:11-14.
Yesu azalaki kokakatana te kosala mosala. Asukolaki bantoma na ye makolo mpo na kopesa bango liteya moko ya ntina mpenza. (Yoane 13:4-15) Azalaki kotambola na banzela etondi na zɛlɔ na Yisalaele mpo na kosakola nsango malamu. (Luka 8:1) Ata ntango azalaki na mposa akende kopema “na esika oyo bato bazalaki te,” ebele ya bato bayaki mpo na koyoka mateya mpe abandaki koteya bango. (Malako 6:30-34) Na ndenge yango, atikelá baklisto nyonso ndakisa ya molende.—1 Yoane 2:6.
Yesu akokisaki mokumba oyo ayelaki awa na mabelé mpe azongaki na likoló. Lokola atikalaki sembo tii na nsuka, Yehova Nzambe apesaki ye bokonzi mpe nzoto ya elimo oyo ekoki kokufa te kuna na likoló. Mpo na Yesu oyo asekwi, Biblia elobi boye: “Klisto, sikoyo lokola alamwisami na bakufi, akokufa lisusu te; liwa ezali lisusu na bokonzi likoló na ye te.” (Baloma 6:9) Osengeli kondima ete azali Mokonzi ya malamu koleka bakonzi nyonso. Ntango Yesu akoyangela mabelé, ntina ya kopesa moto mosusu bokonzi ekozala lisusu te, ata mpe ya kolongola mokonzi moko mpo na kotya mokonzi mosusu. Bakoboma ye ata mokolo moko te na ntango azali na ebonga na ye ya bokonzi, mpe mokonzi mosusu akoya nsima na ye te mpo na kobebisa mosala na ye. Kasi, Yesu akosala mpenza nini mpo na bolamu ya bato?
Makambo oyo mokonzi yango ya sika akosala
Nzembo 72 ezali kosakola makambo oyo tokomona na boyangeli ya Mokonzi yango ya malamu mpenza, oyo akoki kokufa te. Na Nzembo 72 vɛrsɛ 7 mpe 8, tozali kotánga boye: “Na mikolo na ye, moyengebene akozala na makila malamu; kimya mpe ekoyikana na ntango nyonso ekoumelaka sanza. Bokonzi na ye ekozala longwa na mai monene epai moko bobele na mai monene epai mosusu; longwa mpe na ebale kino ndelo ya mokili mpenza.” Lokola boyangeli na ye ekozala malamu, bato bakozala na kimya libela na libela awa na mabelé. Akobebisa bibundeli nyonso oyo ezali lelo oyo mpe akolongola ata mposa ya bitumba na mitema ya bato. Bato oyo bazali lelo kobundisa basusu lokola bankɔsi to oyo bazali kosasa bazalani na bango lokola bangombolo bakobongwana mpenza. (Yisaya 11:1-9) Kimya ekotonda nde kotonda.
Na Nzembo 72 vɛrsɛ 12 tii na vɛrsɛ 14, totángi boye: “Akobikisa mobola oyo akoganga mpe moto ya mawa oyo azali na mosungi te. Akoyokela moto ya bolɔzi mpe mobola mawa; akobikisa milimo ya babola. Akosikola milimo na bango na kati ya konyokola mpe na kongala; makila na bango ekozala na motuya na miso na ye.” Moto ya mawa, ya bolɔzi mpe mobola, bango nyonso bakokóma na esengo; Mokonzi Yesu Klisto akosangisa bango mpe ye moko akoyangela bango. Bakozala na esengo, kasi na mawa te; bakozanga mpe elikya te.—Yisaya 35:10.
Nzembo 72 Vɛrsɛ 16 epesi elaka oyo: “Masango ekotondana na mokili ata kino likoló ya [ngomba, NW].” Ebele ya bato bazali kotungisama na nzala lelo oyo. Lokola mbala mingi makambo ya politiki mpe lokoso esalaka ete bato mosusu bázanga biloko ya kolya, ebele ya bato, mingimingi bana mike, bazali kokufa na nzala. Kasi, na boyangeli ya Yesu Klisto, mokakatano yango ekozala lisusu te. Mabelé ekotonda mpenza na biloko kitoko ya kolya. Bato nyonso bakobanda kolya malamu.
Okosepela kozwa mapamboli wana oyo bokonzi ya malamu ekomema? Soki ezali bongo, tolendisi yo oluka koyeba makambo etali Mokonzi oyo, mosika te, akoyangela mabelé mobimba. Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo na koyeba makambo yango. Soki osali bongo, okolekisa ntango na yo mpamba te, mpo Yehova Nzambe ye moko alobi mpo na Mwana na ye boye: ‘Ngai nafandisi mokonzi na ngai likoló ya Siona, na ngomba na ngai mosantu.’—Nzembo 2:6.
[Etanda na lokasa 5]
BATIKAKI BOKONZI NA MBALAKAKA
Bato batosaka mokonzi mpe bapesaka ye mabɔkɔ soki azali kotya mwa kimya na mboka mpe azali kobongisa makambo. Nzokande, soki mpo na ntina moko boye, bato bazali kotyela ye lisusu motema te, lobilobi okoyoka moto mosusu akómi mokonzi na esika na ye. Talá mwa makambo oyo esalaki ete bakonzi ya nguya mpenza bátika bibonga na bango na mbalakaka.
Mpasi ekɔtaki mpenza na mboka. Na France, na nsuka ya bambula ya 1700, bazalaki kofutisa bato mingi ebele ya mpako, kasi bato yango bazalaki kozanga biloko ya kolya. Mokakatano yango ebimisaki Révolution française, oyo esalaki ete bákata Mokonzi Louis XVI nkingo na mobu 1793.
Etumba. Etumba ya Liboso ya mokili mobimba esukisaki bokonzi ya baamperɛrɛ mosusu oyo balekaki na nguya na mokili. Na ndakisa, nzala oyo etumba yango ekɔtisaki na 1917 na engumba Saint-Pétersbourg, na ekólo Russie, ebimisaki Révolution de février. Likambo yango esalaki ete Amperɛrɛ Nicolas II alongwa mpe Bakoministe bázwa bokonzi. Na Novɛmbɛ 1918, Allemagne asɛngaki ete etumba esila, kasi bikólo oyo esanganaki mpo na kobunda na bango balobaki ete etumba ekosila kaka soki mokonzi ya Allemagne alongwe mpe batye mokonzi mosusu. Nsukansuka, Amperɛrɛ Guillaume II ya Allemagne atikaki bokonzi mpe akimaki na Pays-Bas.
Bato balingaki guvɛrnema ya ndenge mosusu. Na 1989, politiki ya Bakoministe ekweaki na Mpoto ya Ɛsti. Lokola bato balingaki lisusu politiki ya Bakoministe te mpe baponaki bapolitiki ya ndenge mosusu, bakonzi ya nguya mpenza bakweaki, atako bazalaki komonana lokola nde bakoki kokwea ata mokolo moko te.
[Bililingi na lokasa 4]
Lloyd George: Fɔtɔ ya Kurt Hutton/Picture Post/Getty Images
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 7]
Yesu apesaki baoyo bazalaki na nzala biloko ya kolya, abikisaki bato ya maladi mpe atikelá baklisto nyonso ndakisa ya malamu mpenza