Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/11 nk. 8-9
  • ‘Misala na yo mingi boni, Ee Yehova!’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Misala na yo mingi boni, Ee Yehova!’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Masolo mosusu
  • Yekolá makambo mingi etali Yehova na nzela ya bozalisi na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Salelá bozalisi mpo na koteya bana na yo makambo etali Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Tósanzola Mokonzi ya seko!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Misala ya kokamwa ya bozalisi emonisaka nkembo ya Nzambe
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/11 nk. 8-9

Kitoko ya biloko oyo Yehova akelá

‘Misala na yo mingi boni, Ee Yehova!’

EZALA tofandaka na mboka ya moke to na vile, likoló ya ngomba to pembeni ya ebale, tomonaka biloko kitoko mpe ya kokamwa oyo Nzambe akelá. Na yango, Calendrier des Témoins de Jéhovah 2004 ezali na bililingi ya biloko ndenge na ndenge ya kokamwa oyo Yehova Nzambe akelá.

Misala ya Nzambe ebendaka ntango nyonso likebi ya bato oyo bazali na botɔndi. Tózwa ndakisa ya Salomo, moto oyo “mayele na ye elekaki mayele ya bato nyonso ya epai ya ebimelo ya moi.” Biblia elobi mpo na ye ete: “Alobaki mpo na nzete, longwá na ɛlɛzɛ oyo ezali na Lebanona kino isɔpɔ oyo ebimi na etutu; alobaki mpe mpo na nyama mpe na ndɛkɛ mpe na nyoka mpe na mbisi.” (1 Mikonzi 4:30, 33) Mokonzi Davidi, tata ya Salomo, azalaki mbala na mbala komanyola likoló ya misala minene ya Nzambe. Alobaki na Mozalisi na ye boye: “Misala na yo mingi boni, Ee [Yehova]! Otɛmisaki yango nyonso na mayele malamu. Mokili etondi maa na biloko bisalaki yo.”​—Nzembo 104:24.a

Biso mpe tosengeli kotalaka na likebi mpenza biloko oyo Yehova akelá mpe komanyola likoló na yango. Na ndakisa, tokoki “kotombola miso na biso likoló” mpe komituna boye: “Nani asalaki yango?” Ezali nde Yehova Nzambe, ye oyo azali na ‘nguya monene’ mpe “makasi kati na nguya”!​—Yisaya 40:26.

Ndenge nini komanyola likoló na biloko oyo Yehova akelá ekoki kosalisa biso? Ekoki kosalisa biso na makambo misato. Ekoki (1) kosalisa biso tóbosana te kotalela bomoi lokola eloko ya motuya (2) kopesa biso mposa ya kosalisa bato mosusu bázwa liteya na biloko oyo Nzambe akelá, mpe (3) kotinda biso tóyeba Mozalisi na biso malamumalamu mpe kopesaka ye matɔndi koleka.

Bomoi na biso bato, oyo eleki na mosika mpenza oyo ya “banyama bazangá mayele,” esalisaka biso tótala biloko ya kokamwa oyo Nzambe akelá mpe tómona motuya na yango. (2 Petelo 2:12) Miso na biso ekoki komona zamba kitoko. Matoi na biso ekoki koyoka banzembo kitoko ya bandɛkɛ. Mpe likoki oyo tozali na yango ya koyeba ntango mpe esika oyo tozali esalisaka biso tóbomba makambo na bɔɔngɔ oyo tokoki kokanisa yango ata bambula mingi na nsima. Ya solo, atako lelo oyo tozali na bomoi ya kokoka te, kozala na bomoi yango ezali mpenza na ntina!

Baboti bazalaka na esengo ntango bazali komona bana na bango bazali kosepela na biloko oyo Nzambe akelá. Bana basepelaka mingi soki bazali kobɔkɔla nsɔsɔ to nyama mosusu, kosakana na nyama, komata na nzete! Baboti bakoki kosalisa bana na bango báyeba ete soki biloko wana ezali, emonisi ete ezali na Mozalisi oyo asalaki yango. Ntango bana bazali naino mike, soki bayekoli kosepela mpe komemya biloko oyo Yehova akelá, bakotikala na ezaleli yango bomoi na bango mobimba.​—Nzembo 111:2, 10.

Soki tozali kosepela na biloko oyo tozali komona, kasi tozali kopesa Mozalisi na yango nkembo te, ekomonana ete tozali kokanisa malamu te. Esakweli ya Yisaya esalisi biso tokanisa malamu na likambo yango. Elobi boye: “Oyebi te? Oyoki te ete [Yehova] azali Nzambe libela. Motongi ya nsuka ya mokili? Ye akosenzwa te, ye akolɛmba te, bososoli na ye eyebani nsuka te.”​—Yisaya 40:28.

Ya solo, misala ya Yehova emonisaka polele ete bwanya mpe nguya na ye eleki oyo ya bato na mosika, mpe emonisaka ete alingaka biso mingi. Soki totali biloko kitoko oyo ezali zingazinga na biso mpe tomoni bizaleli ya Mozalisi na yango, tokoki koloba ndenge Davidi alobaki ete: “Ee [Yehova], mosusu azali [ndenge moko, NW] na yo te, mpe mosala mosusu ekokani na misala na yo te.”​—Nzembo 86:8.

Tokoki mpenza kondima ete bato ya botosi bakokoba kosepela na misala ya Yehova. Tokozala seko na seko na mabaku ya koyekola makambo mingi na ntina na Yehova. (Mosakoli 3:11) Soki tozali koyekola makambo mingi na ntina na Mozalisi na biso, yango ekosala mpe ete tolinga ye mingi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Calendrier des Témoins de Jéhovah 2004, Novɛmbɛ/Desɛmbɛ.

[Etanda na lokasa 9]

Maloba oyo ezali kokumisa Mozalisi

Bato mingi ya siansi oyo bazali na makanisi malamu bandimaka ete Nzambe nde akelá biloko nyonso. Mwa bandakisa oyo elandi ekomonisa likambo yango:

“Namonaka litomba ya siansi oyo nayekolaka mpe nayokaka esengo na yango soki namoni likambo moko ya sika; na ntango wana nalobaka ete ‘boye nde Nzambe asalá yango.’ Mposa na ngai ezali ete nayeba ata moke kaka mokano ya Nzambe.”​—Henry Schaefer, profɛsɛrɛ ya Chimie.

“Mpo na oyo etali bonene ya molɔ́ngɔ́, motángi ye moko nde akoki kopesa makanisi na ye, kasi soki [Nzambe] Ye moko ayebisi biso yango te, tokoyeba molɔ́ngɔ́ na ndenge ya kokoka te.”​—Edward Milne, moto moko ya mayele na kosmoloji na Angleterre.

“Toyebi ete molɔ́ngɔ́ esalemaki na kolanda mituya ya sikisiki mpo Nzambe nde akelá yango.”​—Alexander Polyakov, moto moko ya Russie, oyo ayekolá matematiki.

“Ntango toyekolaka biloko oyo Nzambe akelá, totalelaka nde makanisi ya Mozalisi, tolandaka kaka ndenge oyo abongisá makambo, tolukaka kozwa ndimbola ya makambo ndenge oyo Ye abongisá kasi biso te.”​—Profɛsɛrɛ Louis Agassiz, moto ya bioloji na États-Unis.

[Elilingi na lokasa 8]

Bandɛkɛ ya mai babengi “manchots papous,” na Antarctique

[Elilingi na lokasa 9]

Parkɛ ya Grand Teton, na etúká ya Wyoming, États-Unis

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Jack Hoehn/Index Stock Photography

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto