Mituna ya batángi
Ntango Yesu asekwaki, mpo na nini alobaki na Toma asimba ye, nzokande liboso aboyaki Malia Magadalena asimba ye?
Mabongoli ya Biblia mosusu ya kala epesaka likanisi ete Yesu alobaki na Malia Magadalena asimba ye te. Na ndakisa, Biblia Liloba lya Nzambe, ebongoli maloba wana ya Yesu boye: “Osímba ngáí té, mpô nabutí naíno epái ya Tatá té.” (Yoane 20:17) Nzokande, liloba ya Grɛki oyo mbala mingi babongolaka yango na “kosimba,” elimboli mpe “kokangama na, kotingama.” Soki totali malamu, Yesu aboyaki te ete Malia Magadalena asimba ye mpo apesaki basi mosusu oyo bazalaki na lilita nzela ete ‘bákanga ye na makolo.’—Matai 28:9.
Mabongoli mingi ya mikolo oyo, na ndakisa, Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya boklisto, esalisi biso tóyeba ndimbola ya solosolo ya maloba ya Yesu na ndenge ebongoli yango boye: “Tiká kokangama na ngai.” Mpo na nini Yesu alobaki bongo na Malia Magadalena oyo azalaki mpenza moninga na ye?—Luka 8:1-3.
Ekoki kozala ete Malia Magadalena akanisaki ete Yesu alingi kotika bango mpe komata na likoló. Lokola azalaki na mposa makasi ya kozala elongo na Nkolo na ye, akangamaki na Yesu, aboyaki kotika ye akende. Mpo na kondimisa ye ete azali na bango naino, Yesu ayebisaki Malia ete atika kokangama na ye, mpe akende koyebisa bayekoli na ye ete asekwi.—Yoane 20:17.
Nzokande, lisolo ya Yesu ná Toma ezalaki ndenge mosusu. Ntango Yesu abimelaki bayekoli mosusu, Toma azalaki te. Na nsima, Toma atyaki ntembe ete Yesu asekwi, alobaki ete akondima kaka soki amoni elembo ya nsɛtɛ na mabɔkɔ ya Yesu mpe soki atye lobɔkɔ na mipanzi na ye. Mikolo mwambe na nsima, Yesu abimelaki lisusu bayekoli na ye. Na mbala wana, Toma azalaki, mpe Yesu alobaki na Toma atya misapi na bampota na ye. —Yoane 20:24-27.
Na yango, epai ya Malia Magadalena, Yesu alukaki nde kolongola ye makanisi oyo azalaki na yango ya kotingama ye mpo atika bango te; nzokande epai ya Toma, Yesu azalaki nde kosalisa moto ya ntembe. Na likambo mokomoko wana, Yesu asalaki oyo asengelaki asala.