Mokolo ya kopesa badiplome—Mokolo moko malamu mpenza
“MOKOLO ya lelo ezali mokolo ya malamu mingi. Moi ezali makasi. Likoló ezali polele. Matiti ezali mobesu. Bandɛkɛ bazali koyemba. Makambo nyonso ekoki mpo na mokolo moko ya malamu mingi, mpe nabanzi ete tokosepela mpenza. Yehova azali Nzambe oyo ayokisaka bato mawa te, kasi azali Nzambe oyo apesaka mapamboli.”
Ezali na maloba wana nde Ndeko Samuel Herd, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, afungolaki likita mpo na kopesa badiplome na bana-kelasi ya mbala ya 117 ya Gileadi, Eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia. Ezalaki mokolo ya 11 Sɛtɛmbɛ 2004. Na likita yango, balobi bapesaki batoli ya kolendisa oyo euti na Biblia mpe bana-kelasi babɛtaki masolo ya makambo oyo bakutanaki na yango na basanza oyo bazalaki na kelasi mpe bandeko mosusu babɛtaki masolo ya makambo oyo bamisionɛrɛ bakutanaki na yango. Ezalaki mpenza mokolo moko ya malamu mingi mpo na bato 6 974 oyo bayanganaki na eteyelo ya Watchtower, na Patterson, na etúká ya New York mpe na bandako mosusu na Brooklyn mpe na Wallkill, epai bazalaki kolanda likita yango na bililingi.
Masukulu mpo na kolendisa bana-kelasi
John Kikot, oyo azali na komite ya filiale ya États-Unis asalaki lisukulu oyo motó ya likambo na yango ezalaki: “Batelá esengo na mosala ya misionɛrɛ.” Ndeko yango amonisaki ete bana-kelasi ya Gileadi bayebani lokola bato ya esengo, ndenge ezalaki mpe komonana na likita ya kopesa badiplome. Mateya oyo bana-kelasi bazwaki epesaki bango esengo mpe bakómaki na makoki ya kosalisa bato mosusu báyoka mpe esengo ya ndenge wana. Na ndenge nini? Na komipesa na mosala na bango ya misionɛrɛ. Yesu alobaki boye: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35) Soki bamisionɛrɛ yango ya sika balandi ndakisa ya Yehova, “Nzambe ya esengo” mpe oyo azali lobɔkɔ pɛtɛɛ, oyo alakisaka bato solo, yango ekosalisa bango bábungisa esengo na bango te.—1 Timote 1:11.
Molobi oyo alandaki ezali Ndeko David Splane, ye mpe azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi; motó ya likambo ya lisukulu na ye ezalaki “Okomesana na bato epai batindi yo?” Ntembe ezali te ete kozala na bomoko ezali malamu mpe epesaka esengo, atako yango ekoki kosɛnga kokóma “makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso.” (1 Bakolinti 9:22; Nzembo 133:1) Ndeko Splane alobaki ete bana-kelasi oyo bazwi badiplome bakokutana na bato mingi na mosala ya misionɛrɛ: bato ya mboka oyo batindi bango, baninga na bango bamisionɛrɛ, bandeko ya masangá oyo bakozala, mpe bandeko oyo basalaka na biro ya filiale oyo etambwisaka mosala ya kosakola na teritware na bango. Apesaki batoli mpo na kofanda malamu na bato: Báyekola monɔkɔ ya mboka, bámesana na makambo ya mboka yango, bápesa baninga na bango bamisionɛrɛ limemya, mpe bátosa bandeko oyo bazali na mokumba ya kotambwisa lisangá.—Baebele 13:17.
Na nsima, ekómaki ngala ya Ndeko Lawrence Bowen, ye azali molakisi na Gileadi; motó ya likambo ya lisukulu na ye ezalaki: “Okanisaka ndenge nini?” Alobaki na bana-kelasi ete baoyo ‘basambisaki na ndenge bazalaki komona na libándá’ bandimaki te ete Yesu azali Masiya. (Yoane 7:24) Lokola biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka, tosengeli kokeba ete ‘tókanisaka makanisi ya bato te’ kasi “makanisi ya Nzambe.” (Matai 16:22, 23) Ata bato oyo bazali makasi na elimo basengeli kokoba kosembola makanisi na bango. Lokola masuwa na kati ya mbu, makambo oyo bozali kobongisa sikoyo na bomoi na bino nde ekosala ete bókóma na libongo to bózinda na elimo. Soki bozali ntango nyonso koyekola Biblia na mozindo, ekosalisa bino bókanisa “makanisi ya Nzambe.”
Wallace Liverance, molakisi mosusu ya Gileadi, asalaki lisukulu ya nsuka ya eteni ya liboso ya likita yango. Motó ya likambo ya lisukulu na ye, “Bokosomba nini?” eutaki na Yisaya 55:1. Alendisaki bana-kelasi ‘básomba’ makasi mpe esengo oyo bisakweli ya Nzambe mpo na mikolo na biso ezali kopesa. Yisaya alobaki ete bisakweli ya Nzambe ezali lokola mai, vinyo, mpe miliki. Ndenge nini moto akoki kosomba yango “na mosolo te, na motuya mpe te”? Ndeko Liverance alobaki ete moto akoki kosomba yango soki azali koyekola bisakweli ya Biblia mpe azali kobwaka makanisi mpe banzela ya mokili mpe azali kolanda makanisi mpe banzela ya Nzambe. (Yisaya 55:2, 3, 6, 7) Soki bamisionɛrɛ yango ya sika bazali kosala bongo, bakozwa makasi ya kosala mosala na bango na mboka mopaya. Mbala mingi, bato ya kozanga kokoka bakanisaka ete esengeli koluka biloko mingi ya mokili mpo na kozala na bomoi ya esengo. Molobi alobaki ete “Bóndima likanisi wana te. Bósomba ntango mpo na koyekola mpenza bisakweli ya Liloba ya Nzambe. Yango nde ekokitisa bino motema, ekolendisa bino, mpe ekopesa bino esengo na mosala ya misionɛrɛ.”
Masolo ya bana-kelasi mpe mituna na bandeko mosusu
Pɔsɔ na pɔsɔ bana-kelasi bazalaki mpe kobima na mosala ya kosakola. Mark Noumair, oyo azali mpe molakisi na Gileadi, atambwisaki eteni moko ya programɛ oyo bana-kelasi basalaki bilakiseli ya makambo oyo bakutanaki na yango; motó ya likambo ya eteni yango ezalaki ‘Bazali koyokela nsango malamu nsɔni te.’ (Baloma 1:16) Bayangani basepelaki koyoka ndenge baministre yango oyo baumeli na mosala bapesaki litatoli ndako na ndako, na balabala, mpe na bamagazini. Bana-kelasi oyo bayebi minɔkɔ ya bapaya bazwaki likanisi ya koluka bato oyo balobaka minɔkɔ yango na bateritware ya masangá epai bazalaki koyangana. Bamosusu basalelaki mikanda oyo elimbolaka Biblia oyo Batatoli ya Yehova babimisaka ntango bazali kozongela bato oyo basepelaki mpe mpo na kobanda koyekola Biblia na bato. Bayokelaki nsango malamu ‘nsɔni te.’
Ndeko William Nonkes, oyo asalaka na biro oyo etalelaka mosala ya kosakola, atunaki mituna epai ya bandeko oyo baumeli na mosala ya misionɛrɛ oyo bautaki na Burkina Faso, na Lettonie, mpe na Russie. Bapesaki batoli malamu na eteni oyo motó ya likambo na yango ezalaki “Yehova apesaka bato ya sembo mbano.” Moko na bandeko oyo batunaki mituna alendisaki bana-kelasi bákanisa basoda 300 ya Gideona. Soda mokomoko azalaki na mokumba oyo esalaki ete bango nyonso bálonga. (Basambisi 7:19-21) Ndenge moko mpe, bamisionɛrɛ oyo bakokisaka mikumba oyo bapesi bango bazwaka mbano.
Samuel Roberson, ye azali molakisi na Patterson, atunaki mpe bandeko mituna; motó ya likambo ya eteni na ye elobaki ete: “Bókóma makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso.” Atunaki bandeko oyo bazali na bakomite ya filiale na Sénégal, na Guam, na Liberia, mpe na Madagascar. Na bamboka wana nyonso, bamisionɛrɛ bazali 170. Biyano na bango esalisaki bana-kelasi báyeba makambo oyo bandeko ya bakomite ya filiale basalaka mpo na kosalisa bamisionɛrɛ ya sika oyo batindi na bateritware na bango mpo bámesana na makambo ya mboka. Mbala mingi, yango esɛngaka koyekola makambo oyo bato ya mikili ya Mpoto bamesaná na yango te. Na ndakisa, na mikili mosusu, mbala mingi mibali, ata mpe bandeko mibali na lisangá, basimbanaka lobɔkɔ ntango bazali kotambola. Na bisika mosusu, na teritware ya filiale ya Guam, bato balyaka biloko mosusu ya kokamwa. Lokola bamisionɛrɛ oyo bakendá liboso bamesanaki, bamisionɛrɛ ya sika bakoki mpe komesana.
Ndeko Guy Pierce, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, asalaki lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Bótikala sembo na ‘Bokonzi ya Nkolo na biso.’” Alobaki na bayangani boye: “Yehova akelaki biloko nyonso na mokano moko. Ayebaki ntina oyo asalaki yango. Mokano na ye mpo na mabelé oyo ebongwani te. Mokano yango ezali kokokisama mokemoke. Eloko moko te ekoki kobongola yango.” (Genese 1:28) Ndeko Pierce alendisaki bayangani nyonso ete bátika te kotosa bokonzi ya Nzambe, atako lisumu ya Adama, moto ya liboso, ememá ebele ya mikakatano. Ndeko Pierce alobaki lisusu boye: “Tozali sikoyo na ngonga ya kosambisama. Ntango ya koluka bato ya mitema sembo mpe kosalisa bango báyeba solo etikali moke. Tósalela ntango malamu mpo na koyebisa bato nsango malamu ya Bokonzi.” Bato oyo bazali na ngámbo ya Bokonzi ya Nzambe bakoki kotyela ye motema.—Nzembo 18:25.
Mpo na kosukisa likita yango, prezida atángaki bambote oyo eutaki na bafiliale ya mokili mobimba. Na nsima, apesaki bana-kelasi badiplome, mpe moko na bango atángaki mokanda na bango nyonso mpo na kozongisa botɔndi mpo na formasyo oyo bazwaki. Na ndenge wana nde mokolo wana ya malamu mingi oyo bayangani nyonso bakobosana yango te esukaki.
Maloba ya kolimbola elilingi na lokasa 23]
MAKAMBO ETALI BANA-KELASI
Bauti na bikólo: 11
Batindami na bikólo: 22
Bana-kelasi bazalaki: 48
Mwayene ya mbula ya kobotama: 34,8
Mwayene ya mbula balekisi kati na solo: 18,3
Mwayene ya mbula balekisi na mosala ya ntango nyonso: 13,4
[Elilingi na lokasa 24]
Kelasi ya mbala ya 117 ya Gileadi, Eteyelo ya Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia
Bankombo na bango ekomami awa na nse na kolanda ndenge batɛlɛmi na fɔtɔ; banda na moto ya liboso na lobɔkɔ ya mwasi; mpe banda na molɔngɔ ya liboso tii na molɔngɔ ya nsuka.
(1) Thompson, E.; Norvell, G.; Powell, T.; Kozza, M.; McIntyre, T. (2) Reilly, A.; Clayton, C.; Allan, J.; Blanco, A.; Muñoz, L.; Rustad, N. (3) Guerrero, Z.; Garcia, K.; McKerlie, D.; Ishikawa, T.; Blanco, G. (4) McIntyre, S.; Cruz, E.; Guerrero, J.; Ritchie, O.; Avellaneda, L.; Garcia, R. (5) Powell, G.; Fiskå, H.; Muñoz, V.; Baumann, D.; Shaw, S.; Brown, K.; Brown, L. (6) Shaw, C.; Reilly, A.; Peloquin, C.; Münch, N.; McKerlie, D.; Ishikawa, K. (7) Münch, M.; Peloquin, J.; Kozza, T.; Avellaneda, M.; Allan, K.; Ritchie, E.; Norvell, T. (8) Cruz, J.; Baumann, H.; Clayton, Z.; Fiskå, E.; Thompson, M.; Rustad, J.