Tólanda ndakisa ya Yesu
“Napesi bino ndakisa, mpo, ndenge nasaleli bino yango, bino mpe bósalaka bongo.”—YOANE 13:15.
1. Mpo na nini Yesu azali ndakisa mpo na baklisto?
BANDA mokili ebandá, kaka moto moko nde asalá lisumu te na bomoi na ye mobimba. Moto yango ezali Yesu. Longola Yesu, “moto azali te oyo akosalaka masumu te.” (1 Mikonzi 8:46; Baloma 3:23) Yango wana, baklisto ya solo bamonaka ete Yesu azali ndakisa oyo basengeli mpenza kolanda. Kutu, mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), mwa moke liboso Yesu akufa, ye moko ayebisaki bayekoli na ye ete bálanda ndakisa na ye. Alobaki boye: “Napesi bino ndakisa, mpo, ndenge nasaleli bino yango, bino mpe bósalaka bongo.” (Yoane 13:15) Na butu wana ya nsuka, alobelaki makambo mingi oyo baklisto basengeli kosala lokola ye. Na lisolo oyo tokolobela mwa ndambo ya makambo yango.
Tosengeli kozala na komikitisa
2, 3. Na ndenge nini Yesu apesaki ndakisa eleki malamu ya komikitisa?
2 Ntango Yesu alendisaki bayekoli na ye bálanda ndakisa na ye, azalaki kolobela komikitisa na ye. Yesu apesaki bayekoli na ye toli mbala mingi ete bázala na komikitisa; kasi na butu ya mokolo ya 14 Nisana, asukolaki bantoma na ye makolo mpo na komonisa ete ye moko azalaki na komikitisa. Na nsima, alobaki na bango boye: “Soki ngai, atako Nkolo mpe Moteyi, nasukoli bino makolo, bino mpe bosengeli kosukolana makolo bino na bino.” (Yoane 13:14) Na nsima, ayebisaki bantoma na ye ete bálanda ndakisa na ye. Tomoni ete apesaki bango ndakisa malamu mpenza!
3 Ntoma Paulo alobi na biso ete liboso Yesu aya na mabelé, “azalaki na ndenge ya Nzambe.” Atako bongo, andimaki kokóma moto mpamba. Kutu, “amikitisaki mpe akómaki moto ya botosi tii na liwa, ɛɛ, liwa likoló ya nzete ya mpasi.” (Bafilipi 2:6-8) Kanisá naino! Yesu, moto ya mibale oyo aleki monene na molɔ́ngɔ́ mobimba, andimaki kokita na nse ya baanzelu, kobotama lokola mwana nyonso, kobɔkɔlama na baboti oyo bazali bato ya kozanga kokoka, mpe nsukansuka kokufa lokola mosali ya mabe. (Bakolose 1:15, 16; Baebele 2:6, 7) Talá komitikisa ya ndenge wana! Tokoki nde komekola ‘makanisi’ wana mpe kolona “elimo ya komikitisa”? (Bafilipi 2:3-5) Tokoki kosala yango, kasi ezali likambo ya pɛtɛɛ te.
4. Makambo nini ekómisaka bato lolendo, kasi mpo na nini lolendo ezali mabe?
4 Moto oyo azali na komikitisa te azali moto ya lolendo. (Masese 6:16-19) Satana akweaki mpo na lolendo. (1 Timote 3:6) Ezalaka mpasi te mpo motema ya moto ekóma na lolendo, kasi soki aloni ezaleli yango, ezalaka mpasi mpo na kolongola yango. Makambo mingi etindaka bato bázala na lolendo: mosusu mpo azali moto ya ekólo boye, mosusu mpo azali mondɛlɛ to moindo, azali na bozwi, atángá bakelasi minene, asalá makambo minene, asalaka mosala ya lokumu, azali kitoko, ayebi malamu kobɛta lisano moko boye, mpe bongo na bongo. Nzokande, moko te na makambo wana ezali na ntina na miso ya Yehova. (1 Bakolinti 4:7) Soki makambo yango ekómisi biso lolendo, tokobebisa nde boyokani na biso na ye. “Yehova azali likoló, kasi amonaka moto ya komikitisa; nzokande moto ya lofundo, ayebaka ye se na mosika.”—Nzembo 138:6, NW; Masese 8:13.
Komikitisa liboso ya bandeko
5. Mpo na nini ezali na ntina mingi bankulutu bázala na komikitisa?
5 Makambo oyo tozali kosala na mosala ya Yehova to mikumba oyo tozali na yango na lisangá esengeli te kokómisa biso lolendo. (1 Ntango 29:14; 1 Timote 6:17, 18) Kutu, ntango tozali na mikumba minene, tosengeli komikitisa mingi koleka. Ntoma Petelo apesaki bankulutu toli ete ‘bámikómisa te bakonzi ya baoyo bazali libula ya Nzambe, kasi nde bákóma bandakisa epai ya etonga.’ (1 Petelo 5:3) Bankulutu baponamaka mpo na kosalela bandeko mpe kopesa bango ndakisa, kasi te mpo bázala bakonzi.—Luka 22:24-26; 2 Bakolinti 1:24.
6. Na makambo nini esɛngaka ete moklisto azala na komikitisa?
6 Kaka bankulutu te nde basengeli kozala na komikitisa. Bilenge bakoki kokóma na lolendo mpo bɔɔngɔ na bango ekangaka makambo noki koleka ya mibange mpe bazali na makasi koleka bango; yango wana Petelo akomelaki bango boye: “Bólata elimo ya komikitisa na kati na bino, mpamba te Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amonisaka boboto monene na ye epai ya bato ya komikitisa.” (1 Petelo 5:5) Tomoni mpenza ete kozala na komikitisa lokola Klisto ezali na ntina mingi. Mpo na kosakola nsango malamu esɛngaka kozala na komikitisa, mingimingi ntango bato bazali koboya koyoka biso to bazali kotɛmɛla biso. Esɛngaka mpe kozala na komikitisa mpo na kondima toli to mpo na kotika makambo mosusu mpo na komipesa mingi na mosala ya kosakola. Lisusu, tosengeli kozala na komikitisa, kondima makasi mpe mpiko mpo tózonga nsima te ntango bazali kokosela biso makambo, bazali kofunda biso na batribinale, to bazali konyokola biso.—1 Petelo 5:6.
7, 8. Wapi mwa makambo tokoki kosala mpo na kolona ezaleli ya komikitisa?
7 Moto asengeli kosala nini mpo na kotika lolendo mpe kokóma ‘na elimo ya komikitisa mpe kotalela bamosusu ete baleki’ ye? (Bafilipi 2:3) Ya liboso, asengeli komitalela ndenge oyo Yehova atalelaka ye. Yesu amonisaki ndenge oyo ebongi komitalela na maloba oyo: “Bongo bino, mpe, ntango bosilisi kosala makambo nyonso oyo batindaki bino bósala, bóloba ete, ‘Tozali na biso baombo mpamba. Oyo tosali ezali oyo tosengelaki kosala.’” (Luka 17:10) Tóbosana te ete ata soki tosali makambo nini, ekokokana te na oyo Yesu asalaki. Kasi, Yesu azalaki na komikitisa.
8 Longola wana, tokoki mpe kosɛngaka Yehova asalisa biso tómitalelaka na ndenge ebongi. Lokola mokomi ya nzembo, tokoki kobondela boye: “Lakisá ngai bososoli malamu mpe boyebi zambi nandimi malako na yo.” (Nzembo 119:66) Yehova akosalisa biso tókóma komitalela na ndenge ebongi, mpe akopambola biso soki tozali na komikitisa. (Masese 18:12) Yesu alobaki boye: “Moto nyonso oyo azali komitombola akokitisama, mpe moto nyonso oyo azali komikitisa akotombwama.”—Matai 23:12.
Ndenge malamu ya kotalela mabe ná malamu
9. Ndenge nini Yesu azalaki kotalela mabe ná malamu?
9 Atako Yesu afandaki elongo na bato ya kozanga kokoka mbula 33, atikalaki kaka moto oyo “azangi lisumu.” (Baebele 4:15) Kutu, mokomi ya nzembo asakolaki na ntina na Masiya boye: “Olingi boyengebene mpe oyini bokesene.” (Nzembo 45:7; Baebele 1:9) Na likambo wana mpe baklisto basalaka makasi bálanda ndakisa ya Yesu. Basukaka te kaka na kokesenisa mabe ná malamu, kasi bayinaka mpe oyo ezali mabe mpe balingaka oyo ezali malamu. (Amosa 5:15) Yango esalisaka bango bábundisa bamposa ya mabe ya mitema na bango.—Genese 8:21; Baloma 7:21-25.
10. Soki tozali kosala “makambo ya mabe” mpe tolingi kobongola motema te, tozali komonisa elimo nini?
10 Yesu alobaki na Nikodeme, moto oyo azalaki Mofalisai, ete: “Moto oyo asalaka makambo ya mabe ayinaka pole mpe ayaka te epai ya pole, mpo misala na ye epamelama te. Kasi moto oyo asalaka oyo ezali solo ayaka epai ya pole, mpo misala na ye emonisama polele lokola esalemaki na boyokani na Nzambe.” (Yoane 3:20, 21) Kanisá likambo oyo: Yoane alobaki ete Yesu azali “pole ya solosolo oyo epesaka pole epai ya bato ya ndenge nyonso.” (Yoane 1:9, 10) Nzokande, Yesu alobaki ete soki tozali kosala “makambo ya mabe,” elingi koloba makambo oyo Nzambe aboyi, tozali koyina pole. Okondima ete oyina Yesu mpe mitinda na ye? Nzokande, yango nde ezaleli ya bato ya masumu oyo baboyi kobongola motema. Ntango mosusu, bango moko bakanisaka bongo te, kasi tomoni polele ete Yesu atalelaka yango bongo.
Ndenge tokoki kotalela mabe ná malamu lokola Yesu
11. Likambo nini ezali na ntina mingi mpo na kotalela mabe ná malamu lokola Yesu?
11 Tosengeli mpenza koyeba kokesenisa mabe ná malamu ndenge Yehova akesenisaka yango. Kaka boyekoli ya Biblia, Liloba ya Nzambe, nde ekoki kosalisa biso na kosala yango. Longola koyekola Biblia, na mabondeli na biso tosengeli mpe kolobaka lokola mokomi ya nzembo ete: “Ee [Yehova], yebisá ngai nzela na yo; monisá ngai bilekelo na yo.” (Nzembo 25:4) Kasi, tosengeli kobosana te ete Satana azali mokosi. (2 Bakolinti 11:14) Akoki kokosa moklisto oyo azali na bokɛngi te mpe komonisa ye likambo ya mabe lokola nde ezali malamu. Yango wana, tosengeli kofandaka mpe kokanisa na mozindo makambo oyo tozali koyekola mpe kolanda malamumalamu batoli ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45-47) Koyekola, kobondela, kokanisa na mozindo makambo oyo tozali koyekola nde ekosalisa biso tókola na elimo mpe tózala bato oyo “makoki na bango ya kososola, lokola bazali kosalela yango, eteyami mpo na kokesenisa ná mabe ná malamu.” (Baebele 5:14) Soki tozali kosala bongo nde tokoyina oyo ezali mabe mpe tokolinga oyo ezali malamu.
12. Toli nini ya Biblia ekosalisa biso tósalaka makambo ya mabe te?
12 Soki tozali koyina oyo ezali mabe, tokotika te ete mposa ya makambo mabe ekola na mitema na biso. Bambula mingi nsima ya liwa ya Yesu, ntoma Yoane akomaki boye: “Bólingaka mokili te ná biloko oyo ezali na kati ya mokili. Soki moto azali kolinga mokili, bolingo ya Tata ezali na kati na ye te; mpamba te eloko nyonso oyo ezali na kati ya mokili—mposa ya mosuni mpe mposa ya miso mpe kolakisa na lolendo biloko na yo ya kobikela—euti epai ya Tata te, kasi euti na mokili.”—1 Yoane 2:15, 16.
13, 14. (a) Mpo na nini kolinga biloko ya mokili ezali likama mpo na baklisto? (b) Tosengeli kosala nini mpo tókóma te na mposa ya biloko ya mokili?
13 Bato mosusu bakoki koloba ete makambo mosusu ya mokili ezali mabe te. Atako bongo, mokili ná bisengo na yango ekoki kotinda biso tóbosana mosala ya Yehova. Lisusu, mokili ezali ata na eloko moko te oyo esalemi mpo na kosalisa biso tópusana penepene na Yehova. Yango wana, soki tokómi kolinga biloko ya mokili, ata biloko oyo ezali mpenza mabe te, tokomitya na likama. (1 Timote 6:9, 10) Epai mosusu, makambo mingi ya mokili ezali mpenza mabe mpe ekoki kobebisa biso. Soki tozali kotala bafilme ya bitumba, to oyo ezali kopesa mposa ya kozala na biloko mingi ya mokili, to oyo ezali kolakisa pite to ekobo, tokoki kobanda kondima makambo yango mpe nsukansuka tokokóma na mposa ya kosala yango. Soki tokómi baninga ya bato oyo bakanisaka kaka ndenge bakoki kokóma na bomɛngo to kosala mombongo, makambo yango ekoki kozwa esika ya liboso na bomoi na biso.—Matai 6:24; 1 Bakolinti 15:33.
14 Nzokande, soki tozali kosepela na Liloba ya Yehova, tokobendama te na ‘mposa ya mosuni mpe mposa ya miso mpe kolakisa na lolendo biloko ya kobikela.’ Lisusu, soki tokómi baninga ya bato oyo batyaka Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso, tokokóma lokola bango, tokolinga makambo oyo balingaka mpe tokoboya makambo oyo baboyaka.—Nzembo 15:4; Masese 13:20.
15. Na ndakisa ya Yesu, ndenge nini kolinga boyengebene mpe koyina botyoli-mibeko ekoki kopesa biso makasi?
15 Koyina botyoli-mibeko mpe kolinga boyengebene esalisaki Yesu abosana te “esengo oyo etyamaki liboso na ye.” (Baebele 12:2) Ekoki mpe kozala bongo mpo na biso. Toyebi ete “mokili ezali koleka mpe ndenge moko mposa na yango.” Bisengo nyonso oyo tokoki kozwa na mokili oyo ezali se ya ntango moke. Nzokande, “moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.” (1 Yoane 2:17) Lokola Yesu asalaki mokano ya Nzambe, afungolelaki bato nzela ya bomoi ya seko. (1 Yoane 5:13) Tiká ete biso nyonso tólanda ndakisa na ye mpe tózwa litomba na bosembo na ye.
Ntango bazali konyokola biso
16. Mpo na nini Yesu alendisaki bayekoli na ye ete bálinganaka?
16 Yesu alakisaki lolenge mosusu oyo bayekoli na ye basengeli kolanda ndakisa na ye ntango alobaki boye: “Komandema na ngai yango oyo, ete bólinganaka ndenge ngai nalingi bino.” (Yoane 15:12, 13, 17) Baklisto basengeli kolinga bandeko na bango mpo na bantina mingi. Na libaku wana, Yesu azalaki kokanisa mingimingi koyina oyo mokili ekoyina bayekoli na ye. Alobaki boye: “Soki mokili eyini bino, boyebi ete eyinaki ngai liboso ya koyina bino. . . . Moombo aleki nkolo na ye te. Soki banyokolaki ngai, bakonyokola mpe bino.” (Yoane 15:18, 20) Na bongo, ata ntango bazali konyokola bango, baklisto balandaka ndakisa ya Yesu. Baklisto basengeli kozala liboke moko mpe kolingana makasi, yango nde ekosalisa bango bázonga nsima te ata soki bazali koyina bango.
17. Mpo na nini bato ya mokili bayinaka baklisto ya solo?
17 Mpo na nini bato ya mokili bayinaka baklisto? Mpamba te, na ndakisa ya Yesu, “bazali bato ya mokili te.” (Yoane 17:14, 16) Batatoli ya Yehova bakɔtaka na bitumba to mpe na makambo ya politiki te, batosaka mitinda ya Biblia, batalelaka bomoi ete ezali mosantu mpe bamitambwisaka malamu mpenza. (Misala 15:28, 29; 1 Bakolinti 6:9-11) Batyaka mikano ya elimo na esika ya liboso, kasi koluka biloko ya mokili te. Bazali na mokili, kasi ndenge Paulo akomaki, ‘basalelaka yango na makambo nyonso te.’ (1 Bakolinti 7:31) Toyebi ete bato mosusu bakumisaka Batatoli ya Yehova ete bazali na bizaleli malamu. Kasi, Batatoli ya Yehova balukaka te kosepelisa bato mpo bákumisa bango to bándima bango. Yango wana, bato mingi basepelaka na bango te, bamosusu kutu bayinaka bango.
18, 19. Na ndakisa ya Yesu, baklisto basalaka nini ntango bazali kotɛmɛla mpe konyokola bango?
18 Bantoma bamonaki koyina makasi oyo bato ya mokili bayinaki Yesu ntango bakangaki ye mpe babomaki ye; bamonaki mpe ezaleli ya Yesu liboso ya banguna na ye. Ntango bazalaki na elanga ya Getesemane, banguna ya Yesu bayaki kokanga ye. Petelo abimisaki mopanga mpo na kopekisa bango, kasi Yesu alobaki na ye boye: “Zongisá mopanga na yo na esika na yango, mpo baoyo nyonso bakamataka mopanga bakokufa na mopanga.” (Matai 26:52; Luka 22:50, 51) Na ntango ya kala, Bayisalaele bazalaki kobunda na banguna na bango na mipanga. Nzokande, Yesu amonisaki ete makambo ezalaki lisusu ndenge wana te. Bokonzi ya Nzambe ezalaki “ya mokili oyo te” mpe ezalaki na mabelé te oyo esengelaki kobatelama mpo banguna bábɔtɔla yango te. (Yoane 18:36) Mwa moke na nsima, Petelo asengelaki kokóma moto ya ekólo moko ya elimo, oyo bato na yango bakozala basitwayɛ ya likoló. (Bagalatia 6:16; Bafilipi 3:20, 21) Yango wana, kobanda na ntango wana, bayekoli ya Yesu basengeli kosalaka lokola ye ntango bazali koyina to konyokola bango, elingi koloba basengeli kobanga te, kasi basengeli mpe kobundisa banyokoli na bango te. Basengeli kotika nyonso na mabɔkɔ ya Yehova mpe kotya motema ete akopesa bango makasi ya koyikela minyoko mpiko.—Luka 22:42.
19 Bambula mingi na nsima, Petelo akomaki boye: “Klisto mpe anyokwamaki mpo na bino, kotikeláká bino ndakisa mpo bólanda matambe na ye malamumalamu. . . . Ntango azalaki kofingama, azalaki kozongisa kofinga te. Ntango azalaki konyokwama, azalaki kokanela moto te, kasi akobaki komitika na mabɔkɔ ya moto oyo asambisaka na boyengebene.” (1 Petelo 2:21-23) Ndenge Yesu alobaki yango, baklisto bazali konyokwama makasi. Ezala na ekeke ya liboso to na ntango na biso, balandi ndakisa ya Yesu mpe bamonisi mpenza ezaleli ya koyika mpiko, mpe na ndenge yango bamonisi ete bazali bato ya kimya mpe ya bosembo. (Emoniseli 2:9, 10) Tiká ete mokomoko na biso amonisa bizaleli yango soki akutani na makambo oyo esɛngi yango.—2 Timote 3:12.
‘Bólata Nkolo Yesu Klisto’
20-22.Ndenge nini baklisto ‘balataka Nkolo Yesu Klisto’?
20 Paulo akomelaki lisangá ya Loma boye: “Bólata nde Nkolo Yesu Klisto, mpe bósalaka myango te mpo na bamposa ya mosuni.” (Baloma 13:14) Na maloba ya elilingi, baklisto balataka Yesu ndenge moto alataka elamba. Basalaka makasi ete bámekola bizaleli mpe misala na ye mpe, na ndenge yango, bamonisaka mpenza bomoto ya Nkolo na bango, atako basalaka yango na ndenge ya kokoka te.—1 Batesaloniki 1:6.
21 Tokolonga ‘kolata Nkolo Yesu Klisto’ soki tosali makasi ya koyeba ndenge atambwisaki bomoi na ye mpe tozali kolanda ndakisa na ye. Tosengeli komekola bizaleli na ye lokola komikitisa, kolinga boyengebene, koyina botyoli-mibeko, kolinga bandeko, kokɔta na makambo ya mokili te, kozala motema molai mpe koyikela minyoko mpiko. Tosengeli te ‘kosalaka myango mpo na bamposa ya mosuni,’ elingi koloba ete esengeli te mikano ya mokili to kokokisa bamposa ya nzoto ezala makambo ya liboso na bomoi na biso. Ntango tolingi kozwa ekateli moko to tozali kobunda na mokakatano moko, tosengeli nde komitunaka boye: ‘Yesu alingaki kosala nini na likambo oyo? Akolinga ngai nasala nini?’
22 Likambo ya nsuka, tokolanda ndakisa ya Yesu soki tozali komipesa na ‘kosakola nsango malamu.’ (Matai 4:23; 1 Bakolinti 15:58) Na likambo wana mpe baklisto balandaka ndakisa oyo Yesu apesaki, mpe lisolo oyo elandi ekolobela ndenge oyo basalaka yango.
Okoki kolimbola?
• Mpo na nini ezali na ntina mingi moklisto azala na komikitisa?
• Ndenge nini tokoki kokóma na ndenge malamu ya kotalela mabe ná malamu?
• Na ndenge nini baklisto balandaka ndakisa ya Yesu ntango bazali kotɛmɛla mpe konyokola bango?
• Ndenge nini moto akoki ‘kolata Nkolo Yesu Klisto’?
[Elilingi na lokasa 7]
Yesu apesaki ndakisa eleki malamu ya komikitisa
[Elilingi na lokasa 8]
Moklisto asengeli kozala na komikitisa na makambo nyonso ya bomoi na ye, ata na mosala ya kosakola
[Elilingi na lokasa 9]
Satana akoki kokosa moklisto mpe komonisa ye ete masano ya mabe ezali malamu
[Elilingi na lokasa 10]
Bolingo ya bandeko ekosalisa biso tózonga nsima te ntango bazali kotɛmɛla biso