Mituna ya batángi
Maloba ya Setefano oyo ezali na Misala 7:59 emonisi nde ete tosengeli kotindaka mabondeli na biso epai ya Yesu?
Misala 7:59 elobi boye: “Bakobaki kobamba Setefano mabanga wana abelelaki mpe alobaki ete: ‘Nkolo Yesu, yambá elimo na ngai.’” Maloba wana ebimisaki mituna na makanisi ya bato mosusu mpo Biblia elobi ete Yehova nde ‘ayokaka mabondeli.’ (Nzembo 65:2) Setefano abondelaki mpenza Yesu? Yango emonisi ete Yesu ye wana kaka Yehova?
Libongoli ya King James elobi ete Setefano azalaki “kobelela na nkombo ya Nzambe.” Yango wana bato mingi balobaka lokola Matthew Henry, molimboli moko ya Biblia oyo alobaki ete: “Na vɛrsɛ oyo, Setefano azali kobondela Yesu, biso mpe tosengeli kobondelaka ye.” Nzokande, lolenge wana ya kokanisa ezali libunga. Mpo na nini?
Buku moko (Barnes’ Notes on the New Testament) elobi likambo moko ya solo ete: “Liloba Nzambe ezali te na makomi ya ebandeli, esengeli mpe kozala te ntango tobongoli vɛrsɛ yango. Ezali mpe ata na [maniskri] moko te ya kala to na mabongoli ya kala.” Kasi, ndenge nini liloba “Nzambe” ekɔtaki na vɛrsɛ yango? Abiel Abbot Livermore, molimboli moko ya maloba ya Biblia, abengaki yango “ndakisa moko ya bisika oyo babongoli bakɔtisaki mateya ya mangomba na bango na kati ya Biblia.” Yango wana, mabongoli mingi ya lelo elongolá liloba Nzambe, oyo babakisaki yango kobakisa.
Atako bongo, mabongoli mingi elobaka ete Setefano “abondelaki” Yesu. Mpe maloba na nse ya lokasa na Libongoli ya Mokili ya sika ezali komonisa ete liloba “abelelaki” ekoki mpe kolimbola “kobondela.” Yango emonisi te ete Yesu azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso? Te. Buku moko (Vine’s Expository Dictionary of Old and New Testament Words) ezali kolimbola ete na esika oyo, na Grɛki ya kala batyaki liloba épikaléô oyo elimboli: “kobelela, kobondela; . . . kosɛnga epai ya mokonzi.” Paulo asalelaki mpe liloba yango ntango alobaki: “Nasɛngi nakende kosamba epai ya kaisala!” (Misala 25:11) Yango wana, Biblia moko ya Lingelesi (The New English Bible), ebongoli liloba yango malamu mpenza ndenge elobi ete setefano “abelelaki” Yesu.
Nini etindaki Setefano asɛngaki likambo wana? Ndenge Misala 7:55, 56 emonisi yango, Setefano, “lokola atondaki na elimo santu, atalaki mpenza na kati ya likoló mpe amonaki nkembo ya Nzambe mpe Yesu atɛlɛmi na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe.” Esengelaki nde Setefano atinda malɔmbɔ na ye epai ya Yehova na nkombo ya Yesu. Kasi, lokola Setefano amonaki Yesu na kati ya emonaneli, yango ntango mosusu etindaki ye asɛnga ye ete: “Nkolo Yesu, yambá elimo na ngai.” Setefano ayebaki ete Nzambe apesaki Yesu nguya ya kosekwisa bakufi. (Yoane 5:27-29) Yango wana asɛngaki Yesu ete abatela elimo na ye to bomoi na ye, kino mokolo oyo akosekwisa ye mpo na kozwa bomoi ezangi kufa na likoló.
Maloba wana ya Setefano emonisaki nde ete bato basengeli kobondelaka Yesu? Te. Ya liboso, Setefano amonisaki polele ete Yesu ná Yehova bazali moto moko te, mpamba te lisolo yango elobi ete Setefano amonaki Yesu “atɛlɛmi na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe.” Lisusu, makambo oyo Setefano amonaki mokolo wana, emonanaka mikolo nyonso te. Mbala mosusu kaka moko oyo balobaki na Yesu maloba ya ndenge wana ezalaki ntango Yoane amonaki Ye na emonaneli mpe abelelaki ye.—Emoniseli 22:16, 20.
Atako baklisto lelo oyo batindaka mabondeli na bango nyonso epai ya Yehova Nzambe, bazali mpe na kondima makasi ete Yesu azali “lisekwa mpe bomoi.” (Yoane 11:25) Soki tozali na kondima lokola oyo Setefano azalaki na yango ete Yesu akoki kosekwisa baklisto oyo bakufá, yango ekosalisa mpe kolendisa biso na ntango ya mpasi.