Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/1 nk. 10-15
  • Klisto: Moto oyo bisakweli ekokisami epai na ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Klisto: Moto oyo bisakweli ekokisami epai na ye
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yesu alobi makambo oyo ezali kondimisa ete azali Klisto
  • Emonaneli moko elendisi kondima ya bayekoli
  • Bingɛngiseli mosusu mpo na bato ya sembo
  • Babatelami na molili mpe na bolɔzi
  • Kobongwana na Klisto: etali biso na likambo nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Yesu Klisto azali nani?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Yesu Kristo azali nani?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Mokanda ya Biblia nimero 43—Yoane
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/1 nk. 10-15

Klisto: Moto oyo bisakweli ekokisami epai na ye

“Kopesa litatoli mpo na Yesu nde eloko oyo epemisi esakweli.”​—EMONISELI 19:10.

1, 2. (a) Kobanda na mobu 29 T.B., bato ya Yisalaele basengelaki kozwa ekateli nini? (b) Tokotalela nini na lisolo oyo?

TOZALI na mobu 29 ya ntango na biso (T.B.). Na Yisalaele mobimba, lisolo mosusu te na minɔkɔ ya bato kaka Masiya oyo Nzambe alakaki. Mosala ya Yoane Mobatisi ebakisi lisusu elikya ya komona Masiya na mitema ya bato. (Luka 3:15) Yoane alobi ete ye azali Klisto te. Kasi, alakisi bato Yesu ya Nazalete mpe alobaki boye: “Natatoli ete oyo azali Mwana ya Nzambe.” (Yoane 1:20, 34) Mosika te, ebele ya bato bakómi kolanda Yesu mpo na koyoka mateya na ye mpe mpo abikisa bamaladi na bango.

2 Na basanza oyo elandi, Yehova asali ebele ya makambo mpo na kondimisa bato ete Yesu azali Mwana na ye. Bato oyo bayebi Makomami mpe bazali komona misala ya Yesu bakoki mpenza kondima ye. Kasi, bato mingi ya ekólo oyo Nzambe asalaki na yango kondimana bazali na kondima te. Kaka mwa bato moke bazali kondima ete Yesu azali Klisto, Mwana ya Nzambe. (Yoane 6:60-69) Soki ozalaki na ntango wana, olingaki kosala nini? Olingaki kondima ete Yesu azali Masiya mpe olingaki kokóma moyekoli na ye ya sembo? Talá makambo oyo Yesu ye moko alobaki mpo na komonisa soki azali nani ntango balobaki na ye ete azali kotosa Sabata te, mpe talá bilembeteli oyo apesaki na nsima mpo na kolendisa kondima ya bayekoli na ye ya sembo.

Yesu alobi makambo oyo ezali kondimisa ete azali Klisto

3. Nini etindaki Yesu aloba makambo oyo ezali kondimisa soki azali mpenza nani?

3 Tokómi na Elekeli ya mobu 31 T.B. Yesu azali na Yelusaleme. Auti kobikisa mobali moko oyo aumeli na maladi mbula 38. Kasi, Bayuda bakómi kotungisa Yesu mpo abikisi moto yango mokolo ya Sabata. Balobi mpe ete Yesu azali kofinga Nzambe mpe balingi koboma ye mpo azali kobenga Nzambe Tata na ye. (Yoane 5:1-9, 16-18) Eyano ya Yesu na bifundeli na bango emonisi makambo misato oyo esengeli kondimisa Bayuda ya mitema sembo ete Yesu azali mpenza Masiya.

4, 5. Mosala ya Yoane ezalaki na ntina nini, mpe ndenge nini akokisaki yango?

4 Ya liboso, Yesu alobeli litatoli ya Yoane Mobatisi, moto oyo ayaki liboso na ye, ete: “Botindaki bato epai ya Yoane, mpe ye atatolaki mpo na solo. Moto yango azalaki mwinda oyo ezali kopela mpe kongɛnga; mpe mpo na mwa ntango moke bino bolingaki kosepela mingi na pole na ye.”​—Yoane 5:33, 35.

5 Yoane Mobatisi azalaki “mwinda oyo ezali kopela mpe kongɛnga”; maloba yango elimboli ete liboso Elode atya ye na bolɔkɔ atako asalaki mabe moko te, akokisaki mokumba oyo Nzambe apesaki ye ya kobongisa nzela mpo na Masiya. Yoane alobaki boye: “Ntina oyo nayaki kobatisa na mai ezalaki ete [Masiya] akoka komonisama epai ya Yisalaele. . . . Namonaki elimo ezali kokita lokola ebenga uta na likoló, mpe efandaki likoló na ye. Ata ngai mpe nayebaki ye te, kasi Oyo mpenza atindaki ngai nabatisa na mai alobaki na ngai ete, ‘Moto oyo okomona elimo ekiti likoló na ye mpe efandi, ye nde moto oyo abatisaka na kati ya elimo santu.’ Mpe namonaki yango, mpe natatoli ete oyo azali Mwana ya Nzambe.”a (Yoane 1:26-37) Yoane alobaki malamumalamu ete Yesu azali Mwana ya Nzambe, elingi koloba Masiya oyo Nzambe alakaki. Litatoli ya Yoane ezalaki polele mpenza; yango wana, sanza mwambe nsima ya liwa na ye, Bayuda mingi ya sembo balobaki boye: “Makambo nyonso oyo Yoane alobaki mpo na moto oyo ezalaki ya solo.”​—Yoane 10:41, 42.

6. Mpo na nini misala ya Yesu esengelaki kondimisa bato ete Nzambe azalaki na ye?

6 Na nsima, Yesu alobi likambo mosusu mpo na kondimisa ete azali Masiya. Amonisi ete misala malamu oyo azali kosala ezali kolakisa ete Nzambe azali na ye. Alobi boye: “Nazali na litatoli oyo eleki litatoli ya Yoane, mpo misala mpenza oyo Tata na ngai apesaki ngai nasala, misala wana mpenza oyo nazali kosala, ezali kotatola na ntina etali ngai ete Tata atindaki ngai.” (Yoane 5:36) Ata banguna ya Yesu bakokaki kowangana likambo yango te, oyo ezalaki komonana na nzela ya ebele ya makamwisi. Kutu, na nsima, bamosusu bakómi komituna: “Tosengeli kosala nini, mpo moto oyo azali kosala bilembo mingi?” (Yoane 11:47) Kasi, bamosusu bandimi mpe balobi ete: “Ntango Klisto akoya, akosala nde bilembo mingi koleka oyo moto oyo asali?” (Yoane 7:31) Bato oyo bazalaki koyoka Yesu bakokaki mpenza komona bizaleli ya Tata epai ya Mwana.​—Yoane 14:9.

7. Ndenge nini Makomami ya Liebele ezali kotatola mpo na Yesu?

7 Na nsuka, Yesu alobeli litatoli oyo moto moko te akoki kotyela ntembe. Alobi boye: “Makomami . . . yango mpenza nde ezali kotatola na ntina etali ngai.” Na nsima abakisi ete: “Soki bondimaki Moize bolingaki mpe kondima ngai, mpo ye akomaki na ntina etali ngai.” (Yoane 5:39, 46) Kutu, Moize azali kaka moko ya batatoli ya kala oyo bakomaki makambo etali Klisto. Mikanda na bango ezali na bisakweli ebele mpo na Masiya mpe milɔngɔ milai ya bankɔkɔ oyo ememi tii epai na ye. (Luka 3:23-38; 24:44-46; Misala 10:43) Ezali boni mpo na Mibeko ya Moize? Ntoma Paulo akomaki boye: “Mibeko ekómaki molakisi na biso oyo azalaki kokamba epai ya Klisto.” (Bagalatia 3:24) “Kopesa litatoli mpo na Yesu nde eloko oyo epemisi [to, ezali ntina, likanisi, mpe mokano ya] esakweli.”​—Emoniseli 19:10.

8. Mpo na nini Bayuda mingi bandimaki Masiya te?

8 Makambo nyonso wana: litatoli ya polelepolele ya Yoane, makamwisi oyo ye moko Yesu asalaki ná bizaleli ya Nzambe oyo amonisaki, bakisa mpe litatoli monene ya Makomami, elingaki nde kondimisa yo ete Yesu azali Masiya? Moto nyonso oyo azalaki kolinga Nzambe mpe Liloba na ye na motema mobimba akokaki kozala na mokakatano te mpo na komona makambo yango mpe kondima ete Yesu azali Masiya oyo Nzambe alakaki. Nzokande, bato mingi na Yisalaele bazalaki na bolingo ya ndenge wana te. Yesu alobaki na bato oyo bazalaki kotɛmɛla ye boye: “Nayebi malamu ete bozali te na bolingo ya Nzambe na kati na bino.” (Yoane 5:42) Na esika ‘báluka nkembo oyo euti na Nzambe kaka moko,’ bango bazalaki ‘koyamba nkembo oyo bango na bango bazalaki kopesana.’ Tokoki kokamwa te ete ezalaki kobela te kati na bango ná Yesu oyo, lokola Tata na ye, ayinaka mpenza makanisi motindo wana!​—Yoane 5:43, 44; Misala 12:21-23.

Emonaneli moko elendisi kondima ya bayekoli

9, 10. (a) Mpo na nini ntango oyo bayekoli ya Yesu bamonaki elembo ebongaki mpenza? (b) Likambo nini ya monene Yesu alakaki bayekoli na ye?

9 Eleki mbula mobimba ná mwa basanza banda Yesu alobaki makambo oyo touti kolobela mpo na kondimisa ete azali Masiya. Elekeli ya mobu 32 T.B. euti koleka. Bato mingi oyo bandimelaki Yesu batiki kolanda ye, ntango mosusu mpo na minyoko, to mpo na kolanda biloko ya mokili, to mpo na mitungisi ya bomoi. Mpo na bamosusu, ekoki kozala ete makanisi na bango ebulungani to balɛmbi nzoto mpamba te bato balingaki kokómisa Yesu mokonzi, kasi ye aboyaki. Ntango bakonzi ya mangomba ya Bayuda basɛngaki Yesu amonisa elembo moko euti na likoló mpo na komikumisa, ye aboyaki. (Matai 12:38, 39) Ntango mosusu koboya na ye etungisaki makanisi ya bato mosusu. Lisusu, akómi koyebisa bayekoli na ye likambo moko oyo bazali kokanga ntina na yango te​—“asengeli kokende na Yelusaleme mpe konyokwama na makambo mingi uta na mikóló mpe na banganga-nzambe bakonzi mpe na bakomeli, mpe kobomama.”​—Matai 16:21-23.

10 Nsima ya sanza libwa to zomi, ntango ekokoka “mpo [Yesu] alongwa na mokili oyo mpe akende epai ya Tata.” (Yoane 13:1) Lokola azali komibanzabanza mingi mpo na bayekoli na ye ya sembo, Yesu alaki bamosusu kati na bango likambo oyo aboyaki kolakisa Bayuda oyo bazangi kondima: elembo moko oyo ekouta na likoló. Yesu alobi boye: “Ya solo mpenza nazali koloba na bino ete ezali na bamosusu na kati ya baoyo batɛlɛmi awa oyo bakoyoka ata nsolo ya liwa te kozanga komona liboso Mwana ya moto koya na kati ya bokonzi na ye.” (Matai 16:28) Yesu alingi koloba te ete bayekoli na ye mosusu bakozala na bomoi tii ntango akokóma Mokonzi na 1914. Yesu azali na likanisi ya komonisa misato kati na bayekoli oyo atambolaka na bango mikolo nyonso elakiseli moke ya nkembo oyo akozala na yango na Bokonzi na ye. Emonaneli yango ebengamaka mbongwana ya Yesu.

11. Lobelá naino makambo elekaki na mbongwana ya Yesu.

11 Mikolo motoba na nsima, Yesu akamati Petelo, Yakobo, ná Yoane mpe amati na bango na ngomba moko molai; ekoki mpenza kozala likoló ya Ngomba Helemona. Kuna, Yesu ‘abongwani liboso na bango, mpe elongi na ye engɛngi lokola moi, mpe bilamba na ye ya likoló ekómi kongɛnga lokola pole.’ Bamoni mpe mosakoli Moize ná mosakoli Eliya bazali kosolola na Yesu. Ekoki mpenza kozala ete likambo ya kokamwa wana esalemi na butu; yango wana kongɛnga emonani makasi koleka. Kutu, bayekoli bamoni likambo yango solo mpenza; yango wana, Petelo asɛngi ete atonga bahema misato: moko mpo na Yesu, mosusu mpo na Moize, mpe mosusu mpo na Eliya. Petelo asilisi naino kutu koloba te, lipata moko oyo ezali kongɛnga ezipi bango mpe mongongo moko na kati ya lipata elobi ete: “Oyo azali Mwana na ngai, molingami, oyo ngai nandimi, bóyoka ye.”​—Matai 17:1-6.

12, 13. Emonaneli ya mbongwana esalaki nini epai ya bayekoli ya Yesu oyo bamonaki yango, mpe mpo na nini?

12 Ezali solo ete mwa mikolo liboso, Petelo atatolaki ete Yesu azali “Klisto, Mwana ya Nzambe ya bomoi.” (Matai 16:16) Kasi, kanisá sikoyo ete bayoki Nzambe ye moko kotatola ete Yesu azali Mwana na ye mopakolami! Na ntembe te, emonaneli wana elendisi mpenza kondima ya Petelo, Yakobo, ná Yoane! Lokola kondima na bango elendisami ndenge wana, babongisami malamu mpo na makambo oyo bakokutana na yango mpe mpo na mokumba monene oyo bakokokisa na lisangá oyo ekosalema mosika te.

13 Emonaneli wana etikalaki libela na makanisi ya bayekoli. Koleka mbula 30 na nsima, Petelo akomaki boye: “[Yesu] azwaki uta na Nzambe Tata lokumu mpe nkembo, ntango maloba oyo ememamaki tii epai na ye na nzela ya nkembo monene ete: ‘Oyo azali mwana na ngai, molingami na ngai, oyo ngai mei nandimi.’ Ɛɛ, toyokaki maloba wana ntango ememamaki uta na likoló wana tozalaki elongo na ye na ngomba mosantu.” (2 Petelo 1:17, 18) Emonaneli yango esimbaki mpe motema ya Yoane. Mbula koleka 60 na nsima, emonani mpenza ete azalaki kokanisa likambo yango ntango alobaki boye: “Tomonaki nkembo na ye, nkembo lokola oyo ya mwana mobotami-se-moko oyo auti epai ya tata.” (Yoane 1:14) Kasi, mbongwana ezalaki emonaneli ya nsuka te oyo Yesu apesaki bayekoli na ye.

Bingɛngiseli mosusu mpo na bato ya sembo

14, 15. Na ndimbola nini ntoma Yoane asengelaki kozala na bomoi tii ntango Yesu akoya?

14 Nsima ya kosekwa, Yesu abimelaki bayekoli na ye pembeni ya Mai ya Galilai. Kuna, ayebisaki Petelo boye: “Soki nalingi ete [Yoane] aumela tii ntango nakoya, yango etali yo na nini?” (Yoane 21:1, 20-22, 24) Maloba yango emonisi nde ete ntoma Yoane asengelaki koumela na bomoi koleka bantoma mosusu? Ekoki mpenza kozala bongo, mpamba te asalelaki Yehova na bosembo mbula soki 70 lisusu. Kasi, maloba ya Yesu ebombi mpe likambo mosusu.

15 Maloba “tii ntango nakoya” ezali kozongisa makanisi na biso na maloba mosusu oyo Yesu alobaki ete bakomona “Mwana ya moto koya na kati ya bokonzi na ye.” (Matai 16:28) Yoane azalaki na bomoi tii ntango Yesu ayaki na ndimbola oyo ete amonaki emonaneli mosusu ya Yesu azali koya lokola Mokonzi. Ntango Yoane akómaki na nsuka ya bomoi na ye, ntango batyaki ye na esanga ya Patimosi, azwaki Emoniseli oyo ezalaki na ebele ya bilembo ya kokamwa oyo ezali kosakola makambo oyo ekomonana na “mokolo ya Nkolo.” Makambo yango esimbaki mpenza motema ya Yoane; yango wana, ntango Yesu alobaki: “Ɛɛ; nazali koya nokinoki,” Yoane azongisaki ete: “Amen! Yaká, Nkolo Yesu.”​—Emoniseli 1:1, 10; 22:20.

16. Mpo na nini ezali na ntina tókoba kolendisa kondima na biso?

16 Bato ya mitema sembo ya ekeke ya liboso bayambaki Yesu lokola Masiya mpe bandimelaki ye. Soki tokanisi ebele ya bato bazangi kondima oyo bafandaki na bango, bakisa mosala oyo basengelaki kosala mpe komekama oyo basengelaki kokutana na yango, tokomona ete bato oyo bakómaki bandimi basengelaki mpenza kolendisama. Liboso, Yesu alobaki makambo oyo ezali kondimisa mpenza ete azali Masiya mpe alakisaki bimonaneli ya nkembo mpo na kolendisa bayekoli na ye ya sembo. Lelo oyo, tozali mpenza na kati ya “mokolo ya Nkolo.” Etikali moke Klisto aboma mokili mobimba ya Satana mpe abikisa basaleli ya Nzambe. Biso mpe tosengeli kolendisa kondima na biso na kolanda bibongiseli nyonso oyo Yehova azwi mpo na bolamu na biso ya elimo.

Babatelami na molili mpe na bolɔzi

17, 18. Bokeseni nini ezalaki kati na bayekoli ya Yesu na ekeke ya liboso mpe bato oyo bazalaki kotɛmɛla mokano ya Nzambe, mpe esukaki ndenge nini mpo na etuluku mokomoko?

17 Nsima ya liwa ya Yesu, bayekoli na ye batosaki na mpiko nyonso etinda oyo apesaki bango ete bátatola mpo na ye “na Yelusaleme mpe na kati ya Yudea mobimba mpe na Samalia mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabelé.” (Misala 1:8) Atako bazalaki konyokola bango mingi, Yehova angɛngisaki na elimo lisangá ya boklisto oyo eutaki kosalema mpe apambolaki yango, yango wana bayekoli mingi ya sika bazalaki kobakisama.​—Misala 2:47; 4:1-31; 8:1-8.

18 Kasi, molili ezalaki se kobakisama mpo na bato oyo bazalaki kotɛmɛla nsango malamu. Masese 4:19 elobi boye: “Nzela ya bato mabe ezali molili; bayebi te mpo na nini bazali kobɛta libaku.” “Molili” yango ekómaki makasi na mobu 66 T.B., ntango basoda ya Loma bazingaki Yelusaleme. Na nsima, basoda ya Loma balongwaki mpe bazongaki na mboka na bango mpo na ntina oyo eyebani te; nzokande, na mobu 70 T.B., bayaki lisusu mpe babebisaki engumba yango mobimba. Josèphe, Moyuda moko oyo azalaki mokomi ya masolo ya kala, alobaki ete Bayuda koleka milio moko bakufaki. Nzokande, baklisto ya sembo babikaki. Mpo na nini? Mpamba te ntango basoda ya Loma balongwaki, bango batosaki maloba ya Yesu mpe bakimaki.​—Luka 21:20-22.

19, 20. (a) Mpo na nini basaleli ya Nzambe basengeli kobanga te atako nsuka ya mokili oyo mabe ekómi pene? (b) Yehova asalisaki basaleli na ye na kokanga ntina ya likambo nini liboso ya 1914?

19 Makambo ezali ndenge moko na biso lelo oyo. Mokili ya Satana mobimba ekobomama na bolɔzi monene oyo ezali koya. Kasi, basaleli ya Nzambe basengeli kobanga te, mpamba te Yesu alobaki ete: “Talá! nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” (Matai 28:20) Mpo na kolendisa kondima ya bayekoli na ye ya liboso mpe kobongisa mitema na bango mpo na makambo oyo ezalaki liboso, Yesu alakisaki bango emonaneli ya nkembo oyo akozala na yango na Bokonzi na ye na likoló. Ezali boni lelo oyo? Na 1914, emonaneli yango ekokisamaki. Kokokisama yango elendisaka mpenza kondima ya basaleli ya Nzambe! Ezali komonisa ete makambo malamu ezali koya, mpe Yehova asalisaki basaleli na ye na kososola likambo yango mokemoke. Na kati ya molili oyo ezipi mokili lelo oyo, “nzela ya bayengebene ezali lokola pole oyo ekongɛnga lisusu mpe lisusu kino mokolo ya malamu koleka.”​—Masese 4:18.

20 Liboso ya 1914, mwa etuluku ya baklisto bapakolami basosolaki mwa makambo ya ntina mpo na kozonga ya Nkolo. Na ndakisa, basosolaki ete bato bakomona ye na miso te, ndenge baanzelu oyo babimelaki bayekoli na mobu 33 T.B., ntango Yesu amataki na likoló balobaki. Ntango lipata moko ezipaki Yesu mpe ebombaki ye na miso ya bayekoli na ye, baanzelu balobaki boye: “Yesu wana oyo akamatamaki na kati na bino tii na likoló akoya mpe bongo na ndenge kaka bomonaki ye azali kokende na likoló.”​—Misala 1:9-11.

21. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

21 Ntango Yesu amataki na likoló, kaka bayekoli na ye ya sembo nde bamonaki ye. Ndenge moko mpe, ntango elongi na ye ebongwanaki, ezalaki liboso ya ebele ya bato te; mokili eyebaki kutu te ete likambo wana esalemaki. Kozonga ya Klisto na Bokonzi na ye esengelaki mpe kozala ndenge wana. (Yoane 14:19) Kaka bayekoli na ye ya sembo basengelaki kososola ete azali. Na lisolo oyo elandi, tokomona ndenge oyo bososoli yango esalisaki bango mpe etindaki bango báyanganisa bamilio ya bato oyo bakofanda awa na mabelé oyo Yesu akoyangela.​—Emoniseli 7:9, 14.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Emonani mpenza ete ntango Yesu azwaki batisimo, kaka Yoane nde ayokaki mongongo ya Nzambe. Bayuda oyo Yesu azalaki koloba na bango “bayoká mongongo [ya Nzambe] ata mbala moko te mpe bamoná te motindo na ye.”​—Yoane 5:37.

Ozali koyeba lisusu?

• Ntango bato balobaki ete Yesu azali kotosa Sabata te mpe azali kofinga Nzambe, makambo nini alobaki mpo na kondimisa ete azali Masiya?

• Matomba nini mbongwana ya Yesu ememelaki bayekoli na ye ya liboso?

• Makanisi ya Yesu ezalaki nini ntango alobaki ete Yoane asengelaki kozala na bomoi tii ntango ye akoya?

• Emonaneli nini ekokisamaki na 1914?

[Bililingi na lokasa 10]

Yesu amonisaki makambo oyo ezali kondimisa ete azali Masiya

[Elilingi na lokasa 12]

Emonaneli ya mbongwana elendisaki mpenza kondima

[Elilingi na lokasa 13]

Yoane asengelaki kozala na bomoi tii ntango Yesu ‘akoya’

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto