Mosala ya kosakola ya Saulo ebimisi botɛmɛli
BAYUDA oyo bazalaki kofanda na Damasi bakamwaki mpenza komona ete moto oyo azalaki na molende na losambo ya Bayuda akómi mopɛngwi. Bato nyonso bayebaki ete Saulo azalaki konyokola bato oyo bazalaki kobelela nkombo ya Yesu na Yelusaleme. Akendaki na Damasi mpo na konyokola bayekoli ya Yesu oyo bazalaki kuna. Kasi, ye moko akómi kosakola ete Yesu oyo bato bazalaki komona lokola moto mabe mpe babakaki na nzete azali mpenza Masiya! Saulo abɛlaki nde ligboma?—Misala 9:1, 2, 20-22.
Ntango mosusu ezali na ntina oyo Saulo abongwanaki ndenge wana. Na ntembe te baoyo basalaki mobembo wana elongo na Saulo longwa na Yelusaleme babɛtaki lisolo ya likambo oyo esalemaki na nzela. Ntango bakómaki pene na Damasi, na mbala moko pole moko ya makasi engɛngɛlaki bango mpe bakweaki bango nyonso na nse. Bayokaki mpe mongongo moko. Moto moko te azwaki likama longola kaka Saulo. Alalaki na nse, na kati ya balabala. Ntango atɛlɛmaki, bato mosusu ya mobembo basimbaki ye tii na Damasi, mpamba te azalaki komona te.—Misala 9:3-8; 26:13,14.
Monguna ya Yesu akómi kosakola nsango na ye
Nini ekómelaki Saulo na nzela ya Damasi? Mobembo molai nde elɛmbisaki ye to molunge makasi ya midi nde ebɛtaki ye mpe abungisaki makanisi? Lelo oyo, lokola bato ya ntembe balingi kaka kopesa ndimbola mosusu na makambo oyo ekómelaki Saulo; na ndakisa bazali koloba ete Saulo atambolaki motó, amonaki bimonamona, abɛlaki motó mpo lisosoli na ye ezalaki kimya te, to mpe akokaki kozala na maladi ya ndɛkɛ.
Kasi, likambo oyo esalemaki mpenza ezali ete Yesu abimelaki Saulo na kati ya kongɛnga makasi mpe andimisaki ye ete Ye azali Masiya. Bililingi oyo bato mosusu basali ya likambo yango ezali kolakisa Saulo auti likoló ya mpunda mpe akwei. Atako ekoki kozala bongo, Biblia elobi kaka ete ‘akweaki na nse.’ (Misala 22:6-11) Ezala ete Saulo autaki likoló mpe akweaki na nse, yango ezalaki eloko te liboso ya kokwea ya nsɔni ya kobungisa lokumu oyo azalaki na yango. Asengelaki kondima ete nsango oyo bayekoli ya Yesu bazalaki kosakola ezalaki solo. Likambo kaka moko oyo Saulo asengelaki kosala ezalaki ya kokóma mpe moyekoli ya Yesu. Motɛmɛli wana monene ya nsango ya Yesu, akómaki mosakoli na yango ya molende mpenza. Ntango akómaki komona lisusu mpe azwaki batisimo, “Saulo akobaki kozwa nguya mingi lisusu mpe azalaki kosukisa Bayuda oyo bazalaki kofanda na Damasi wana azalaki komonisa na malamu mpenza ete moto wana azali Klisto.”—Misala 9:22.
Mokano ya koboma Saulo esimbi te
Saulo, oyo na nsima bakómaki kobenga Paulo, akendaki wapi nsima ya kokóma moklisto? Na mokanda oyo akomelaki Bagalatia alobaki boye: “Nakendaki . . . na Alabia, mpe nazongaki lisusu na Damasi.” (Bagalatia 1:17) Liloba “Alabia” ekoki kotinda biso tókanisa ete Saulo akendaki ata na bamboka nini ya mokili Alabia. Bato mosusu ya mayele balobaka ete Paulo akendaki na Esobe ya Sulia to na mokili ya Banabatana oyo ezalaki koyangelama na Mokonzi Aletasi IV. Ekoki mpenza kozala ete Saulo akendaki na esika moko ya kimya nsima ya batisimo na ye mpo na komanyola, ndenge Yesu mpe akendaki na esobe nsima ya batisimo na ye.—Luka 4:1.
Ntango Saulo azongaki na Damasi, “Bayuda basalaki likita mpo na báboma ye.” (Misala 9:23) Guvɛrnɛrɛ oyo azalaki momonisi ya Mokonzi Aletasi na Damasi azalaki kokɛngɛla engumba mpo na kokanga Saulo. (2 Bakolinti 11:32) Kasi, ntango banguna bazalaki kokana koboma Saulo, bayekoli ya Yesu balukaki nzela ya kokimisa ye.
Kati na bato oyo basalisaki Saulo akima, ezalaki Ananiasi ná bayekoli oyo bazalaki elongo na Saulo nsima ya kobongwana na ye.a (Misala 9:17-19) Ekoki mpe kozala ete bato mosusu ya Damasi oyo Saulo asakwelaki nsango malamu mpe bakómaki bandimi basalisaki ye, mpamba te Misala 9:25 elobi ete: “Bayekoli na ye bakamataki ye mpe bakitisaki ye na butu na nzela ya lidusu moko oyo ezalaki na efelo, kokitisáká ye na kati ya ekɔlɔ moko.” Maloba “bayekoli na ye” ekoki kolimbola bato oyo Saulo ateyaki. Ezala bongo to te, emonani ete mosala ya kosakola ya Saulo ezalaki kobota mbuma mpe yango ebakisaki lisusu nkanda ya banguna na ye.
Liteya mpo na biso
Ntango tozali kotalela makambo oyo esalemaki ntango Saulo akómaki moklisto mpe ntango azwaki batisimo, tozali komona polele ete Saulo azalaki mpenza komituna te soki bato bakoloba nini na ntina na ye; mpe atikaki kosakola te atako banyokolaki ye makasi. Likambo ya ntina mingi mpo na Saulo ezalaki nde mokumba ya kosakola oyo azwaki.—Misala 22:14, 15.
Outi komona ete kosakola nsango malamu ezali na ntina mingi? Soki bongo, oyebi ete baklisto nyonso ya solo basengeli kozala basakoli ya Bokonzi. Kokamwa te soki bato bazali kotɛmɛla na bantango mosusu mpo ozali kosakola. (Matai 24:9; Luka 21:12; 1 Petelo 2:20) Ndenge Saulo asalaki ntango bazalaki kotɛmɛla ye ezali ndakisa ya malamu mpenza mpo na biso. Nzambe akondima baklisto oyo bazali kozonga nsima te atako bazali konyokwama. Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Bokozala biloko ya koyinama na bato nyonso mpo na nkombo na ngai.” Kasi, alendisaki bango ete: “Na ezaleli na bino ya koyika mpiko bokozwa milimo na bino.”—Luka 21:17-19.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ekoki kozala ete Lingomba ya boklisto ekɔtaki na Damasi nsima ya kosakola ya Yesu na Galilai to nsima ya Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.)—Matai 4:24; Misala 2:5.
[Elilingi na lokasa 28]
Saulo ‘akweaki na nse’ ntango Yesu abimelaki ye
[Elilingi na lokasa 29]
Saulo abikaki na mabɔkɔ ya bato oyo balingaki koboma ye na Damasi