Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/2 nk. 23-27
  • Yehova asalaka ntango nyonso na boyengebene

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova asalaka ntango nyonso na boyengebene
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini tosengeli kondima ete bitumbu ya Yehova ezalaka sembo?
  • Mpo na nini Lota alingaki kopesa bana na ye ya basi epai ya bato mabe?
  • Mpo na nini Yehova abomaki Uza?
  • Bantina oyo ebongi tótyela Yehova motema
  • Omibongisa mpo na kobika mpe kokota kati na mokili ya sika
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Kanisá mwasi ya Lota
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Mwasi ya Lota atali nsima
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Tokoki kopamela Jéhovah te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/2 nk. 23-27

Yehova asalaka ntango nyonso na boyengebene

“[Yehova] azali na boyengebene na nzela na ye nyonso.”​—NZEMBO 145:17.

1. Oyokaka ndenge nini soki moto azweli yo makanisi ya mabe, mpe liteya nini tokoki kozwa na likambo yango?

ESILÁ kokómela yo ete moto moko azwela yo makanisi ya mabe to akakatana mpo na kondima yo, kozanga ete ayeba makambo mosusu? Soki ekómelá yo, tokokamwa te soki esalaki yo mpasi. Likambo ya ndenge wana ekoki kopesa yo liteya ya ntina oyo: Ezali malamu te kozwela moto makanisi ya mabe soki toyebi likambo mobimba te.

2, 3. Bato mosusu basalaka nini ntango batángi masolo mosusu ya Biblia oyo elobi makambo nyonso te oyo ekoki kopesa biyano na mituna na bango nyonso, kasi Biblia eyebisi biso nini mpo na Yehova?

2 Tosengeli kobosana liteya yango te mpo na makanisi oyo tokoki kozwela Yehova Nzambe. Mpo na nini? Mpamba te ezali na masolo mosusu ya Biblia oyo ekoki kobimisa ebele ya mituna na mitó na biso. Masolo yango, oyo mbala mosusu elobeli makambo oyo basaleli na ye mosusu basalaki to bitumbu oyo Nzambe apesaki bato, ntango mosusu elobaka makambo nyonso te oyo ekoki kopesa biyano na mituna na biso nyonso. Nzokande, bato mosusu bazwelaka Nzambe makanisi ya mabe ntango batángi masolo yango mpe bamitunaka soki mpenza azali na boyengebene mpe na bosembo. Kasi, Biblia eyebisi biso ete “[Yehova] azali na boyengebene na nzela na ye nyonso.” (Nzembo 145:17) Lisusu, Liloba na ye elobi ete “akosalaka na mabe te.” (Yobo 34:12; Nzembo 37:28) Kanisá sikoyo ndenge ayokaka ntango bato bazali kozwela ye makanisi ya mabe!

3 Tótalela bantina mitano oyo tosengeli kondima ete bitumbu ya Yehova ezalaka sembo. Na nsima, na bantina wana na motó, tokotalela masolo mibale ya Biblia oyo etindaka bato mosusu bámituna mituna mpo na Nzambe.

Mpo na nini tosengeli kondima ete bitumbu ya Yehova ezalaka sembo?

4. Mpo na nini tosengeli kokende mbangu te ntango tozali kotalela misala ya Nzambe? Pesá ndakisa.

4 Ya liboso, lokola Yehova ayebaka makambo nyonso, kasi biso toyebaka makambo nyonso te, tosengeli kokendaka mbangu te ntango tozali kotalela misala ya Nzambe. Tópesa ndakisa: Soki zuzi moko oyo ayebani na mboka mobimba ete akataka makambo na bosembo akati likambo moko. Soki moto moko oyo ayebi ata makambo nyonso te to mpe ayebi mibeko te alobi ete zuzi yango akati likambo yango mabe okomona ye ndenge nini? Soki moto azali koloba mabe mpo na likambo oyo ayebi yango mobimba te, ezali bozoba. (Masese 18:13) Ezali lisusu bozoba koleka bato báloba mabe mpo na “Mosambisi ya mokili mobimba”!​—Genese 18:25.

5. Likambo nini tosengeli kobosana te ntango tozali kotánga masolo ya Biblia oyo elobeli bitumbu oyo Nzambe apesaki bato?

5 Ntina ya mibale oyo tosengeli kondima ete Nzambe apesaka bitumbu na bosembo ezali ete akoki kotánga na mitema ya bato, likambo oyo bato bakoki kosala te. (1 Samwele 16:7) Liloba na ye elobi boye: “Ngai [Yehova], nakolukaluka kati na motema, nakomeka makanisi, mpo na kopesa epai ya moto na moto lokola ezali nzela na ye, [na kotalela] mbuma ya misala na ye.” (Yilimia 17:10) Yango wana, ntango totángi masolo ya Biblia oyo elobeli bitumbu oyo Nzambe apesaki bato mosusu, tóbosanaka te ete lokola amonaka makambo nyonso, amonaki ata makanisi mpe mikano ya motema ya moto yango oyo ekomami te na Liloba na ye.​—1 Ntango 28:9.

6, 7. (a) Ndenge nini Yehova amonisi ete atosaka mibeko na ye ya sembo ata soki ekoyokisa ye mpasi mingi? (b) Nini tosengeli kobosana te ntango totángi likambo moko na Biblia oyo etindi biso tómituna soki mpenza Nzambe asalaki na bosembo mpe na boyengebene?

6 Ntina ya misato oyo tosengeli kondima ete bitumbu ya Yehova ezali sembo yango oyo: Atosaka mibeko na ye ya boyengebene ata soki ekosala ye mpasi. Tózwa ndakisa moko. Ntango Yehova apesaki Mwana na ye lokola mbeka mpo na kobikisa bato na lisumu mpe na liwa, atosaki kaka mibeko na ye ya sembo mpe ya boyengebene. (Baloma 5:18, 19) Kasi, Yehova ayokaki mpasi mingi ntango azalaki kotala Mwana na ye ya bolingo azali konyokwama mpe kokufa na nzete ya mpasi. Yango ezali komonisa biso nini mpo na Nzambe? Mpo na “lisiko oyo Klisto Yesu afutaki,” Biblia elobi boye: “Asalaki bongo mpo na kolakisa boyengebene [ya Nzambe] ye moko.” (Baloma 3:24-26) Na Biblia mosusu babongoli Baloma 3:25 boye: “Yango elakisaki ete Nzambe asalaka ntango nyonso oyo ezali malamu mpe sembo.” (New Century Version) Likambo monene oyo Yehova andimaki kosala mpo na kosikola bato emonisi mpenza ete alingaka “oyo ezali malamu mpe sembo.”

7 Yango wana, ntango totángi likambo moko na Biblia oyo etindi biso tómituna soki mpenza Nzambe asalelaki bosembo to asalaki malamu, tosengeli kobosanaka likambo oyo te: Mpo na kotosa mibeko na ye ya sembo mpe ya boyengebene, Yehova atikaki Mwana na ye akufa liwa moko ya mpasi. Tokanisi mpenza ete akoki koboya kotosa mibeko na ye ya sembo na makambo mosusu? Yehova abuká ata mokolo moko te mibeko na ye ya sembo. Na bongo, tozali na makambo oyo ezali mpenza kondimisa biso ete Yehova asalaka ntango nyonso oyo ezali malamu mpe sembo.​—Yobo 37:23.

8. Mpo na nini ezali likambo ya kolongobana te kokanisa ete Nzambe akoki kozanga bosembo mpe boyengebene?

8 Tótalela ntina ya minei oyo tosengeli kondima ete bitumbu ya Yehova ezalaka sembo: Yehova akelaki moto na elilingi na Ye. (Genese 1:27) Na bongo, bato bazali na bizaleli lokola ya Nzambe, na ndakisa boyengebene mpe bosembo. Ekozala likambo ezangi kolongobana ete boyengebene mpe bosembo na biso emema biso na kokanisa ete Nzambe akoki kozanga bizaleli yango. Soki lisolo moko ya Biblia ebimisi mituna mingi na makanisi na biso, tosengeli kobosana te ete mpo na lisumu oyo bankɔkɔ na biso batikelá biso, boyengebene mpe bosembo na biso ezali ya bato ya kozanga kokoka. Yehova Nzambe, oyo biso tosalemi na elilingi na ye, azali na boyengebene mpe na bosembo ya kokoka. (Deteronome 32:4) Ekozala bozoba mpenza tókanisa ete bato bakoki koleka Nzambe na bosembo mpe na boyengebene!​—Baloma 3:4, 5; 9:14.

9, 10. Mpo na nini Yehova asɛngisami te kolimbola to komonisa bato ntina ya likambo nyonso oyo asali?

9 Ntina ya mitano oyo tosengeli kondima ete bitumbu ya Yehova ezali sembo ezali ete azali “Oyo-Aleki-Likoló na mabelé mobimba.” (Nzembo 83:18) Yango wana, moto moko te akoki kotuna ye ntina ya likambo nyonso oyo asali bato. Ye azali Mosali Monene ya mbɛki, mpe biso tozali lokola mbɛki oyo asali na mabelé mpo na mosala nyonso oyo alingi. (Baloma 9:19-21) Biso bambɛki oyo asali na mabɔkɔ na ye, tozali nde na lotomo ya kotuna ye ntina oyo asali likambo boye to boye? Ntango Yobo akangaki ntina te ya lolenge oyo Nzambe asalelaka bato makambo, mpo na kozongisa ye na nzela, Yehova atunaki ye boye: “Yo okotyola kosambisa na ngai, okokitisa ngai ete yo moko olongi?” Ntango Yobo asosolaki ete akanisaki te liboso ya koloba, abongolaki motema. (Yobo 40:8; 42:6) Tósala te libunga ya kopesa Nzambe foti!

10 Tomoni mpenza ete tozali na bantina oyo ezali kondimisa ete Yehova asalaka ntango nyonso na boyengebene. Sikoyo, lokola toyekoli makambo wana oyo ezali kosalisa biso tóyeba banzela ya Yehova, tótalela masolo mibale ya Biblia oyo ebimisaka mituna mingi na mitó ya bato. Lisolo ya liboso elobeli likambo oyo mosambeli moko ya Nzambe asalaki, mpe ya mibale elobeli etumbu oyo Nzambe ye moko apesaki moto moko.

Mpo na nini Lota alingaki kopesa bana na ye ya basi epai ya bato mabe?

11, 12. (a) Yebisá makambo oyo elekaki ntango Nzambe atindaki baanzelu mibale oyo balataki nzoto ya bato na Sodomo. (b) Lisolo yango ebimisaka mituna nini na makanisi ya bato mosusu?

11 Genese mokapo 19 eyebisi biso makambo oyo esalemaki ntango Nzambe atindaki baanzelu mibale oyo balataki nzoto ya bato na engumba Sodomo. Lota abondelaki bapaya yango tii bandimaki kolala na ndako na ye. Kasi, na butu wana, ebele ya mibali ya engumba yango bazingaki ndako ya Lota mpe balobaki na ye abimisa bapaya wana mpo básangisa na bango nzoto. Lota amekaki kokanisa na bango mpo básala likambo wana te, kasi mpamba. Mpo na kobatela bapaya na ye, Lota alobaki boye: “Bandeko na ngai, nabondeli bino ete bósala mabe boye te. Bótala, nazali na bana basi mibale bayebi naino mobali te. Tiká nabimisa bango [epai] na bino mpe bokosalela bango yango elingi bino, nde kosala likambo epai ya babali oyo te mpo ete basili kokɔta na ndako na ngai.” Bato yango baboyaki koyoka; kutu, balingaki kobuka porte na ye. Nsukansuka, baanzelu babomaki miso ya bato wana oyo bakómaki lokola bato ya ligboma.​—Genese 19:1-11.

12 Tokoki kokamwa te ete lisolo yango ebimisaka mituna na mitó ya bato mosusu. Bamitunaka boye: ‘Mpo na nini Lota, mpo na kobatela bapaya, alingaki kopesa bana na ye epai ya ebele ya bato mabe wana? Asalaki nde likambo oyo ebongi te, to mpe asalaki yango na kobanga?’ Mpo na nini Petelo, moto oyo apemamaki na Nzambe mpo akoma lisolo yango, abengaki Lota “moyengebene”? Nzambe andimaki likambo oyo Lota asalaki? (2 Petelo 2:7, 8) Tótalela naino likambo yango na mozindo mpo tózwela Nzambe makanisi ya mabe te.

13, 14. (a) Tosengeli kosimba nini na lisolo oyo elobeli makambo oyo Lota asalaki? (b) Nini ezali komonisa ete Lota asalaki makambo na kobanga te?

13 Ya liboso, tóbosana te ete Biblia elobi te Lota asalaki malamu to asalaki mabe; esuki kaka na koyebisa ndenge likambo elekaki. Lisusu, Biblia eyebisi biso te soki Lota azalaki na makanisi nini to nini etindaki ye asala bongo. Ntango akozonga na bomoi na “lisekwa . . . ya bayengebene,” mbala mosusu akoyebisa biso makambo nyonso.​—Misala 24:15.

14 Tokoki mpe koloba te ete Lota azalaki moto ya bibangabanga. Azalaki na mokakatano monene. Lokola Lota alobaki ete bapaya yango ‘bakɔtaki’ na ndako na ye, elingi koloba ete amonaki ete azali na mokumba ya kobatela bango. Kasi, ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te. Josèphe, Moyuda moko oyo azalaki mokomi ya masolo ya kala, alobi ete bato ya Sodomo bazalaki “kosala mibali mabe, bazalaki mpe kobanga Nzambe te . . . Bazalaki kolinga bapaya ata moke te, mpe bamibebisaki na misala mabe ya kosangisa nzoto.” Kasi, Lota abangaki ebele ya bato wana te oyo bazalaki na nkanda makasi. Kutu, abimaki mpo na kosolola na bango. “Akangaki ekuke na nsima na ye.”​—Genese 19:6.

15. Mpo na nini tokoki koloba ete mbala mosusu kondima nde etindaki Lota na kosala likambo wana?

15 Moto mosusu akoki kotuna ete, ‘Kasi, mpo na nini Lota alingaki kopesa bana na ye ya basi epai ya ebele ya bato wana?’ Na esika tókanisa mbala moko ete azalaki na makanisi ya mabe, tokoki mpe kokanisa ndenge mosusu. Ya liboso, ekoki kozala ete kondima nde etindaki Lota asala ndenge wana. Na ndenge nini? Na ntembe te Lota ayebaki ndenge Yehova abatelaki Sala, mwasi ya Abalayama, ndeko ya tata na ye. Toyebi ete lokola Sala azalaki mwasi kitoko, Abalayama ayebisaki ye alobaka na bato ete azali ndeko na ye, soki te bakoboma ye mpo bázwa Sala.a Yango wana, bamemaki Sala na ndako ya Falao. Kasi, Yehova apekisaki Falao asangisa nzoto na Sala. (Genese 12:11-20) Ekoki kozala ete Lota azalaki na kondima ete Nzambe akobatela mpe bana na ye ndenge wana. Kutu, na nzela ya baanzelu na ye, Nzambe abatelaki bango, mpe basalaki bilenge basi wana mabe te.

16, 17. (a) Na ndenge nini ekoki kozala ete Lota alukaki kokɔtisa mobulu na kati ya bato ya Sodomo? (b) Ezala Lota azalaki na makanisi nini, likambo nini tokoki kondima?

16 Tótalela likanisi mosusu. Ekoki mpe kozala ete Lota alobaki na bato ndenge wana mpo na kokɔtisa mobulu kati na bango. Ekoki kozala akanisaki ete bato yango bakolinga bana basi te mpamba te mibali ya Sodomo bazalaki kolinga nde kosangisa nzoto na mibali. (Yuda 7) Lisusu, bilenge basi yango bazalaki na bafianse oyo bazalaki bato ya engumba wana; ekoki kozala ete bato mosusu oyo bazalaki na kati ya ebele ya mibali wana bazalaki bandeko, baninga, to bazalaki kosala na baoyo balingaki kokóma babokilo ya Lota. (Genese 19:14) Ekoki kozala ete Lota akanisaki ete mpo na bantina wana, mibali mosusu bakoboya básala bana na ye mabe. Soki bakabwani bango na bango, balingaki lisusu kozala likama mpenza te.b

17 Ezala Lota azalaki na makanisi nini to mpo na nini asalaki likambo wana, tokoki kondima likambo moko: Lokola Yehova asalaka ntango nyonso na boyengebene, ntembe ezali te ete ayebaki ntina oyo abengaki Lota “moyengebene.” Soki tokanisi misala ya bato ya Sodomo, tokoki nde kotya ntembe ete ebongaki Yehova apesa bato ya engumba yango etumbu?​—Genese 19:23-25.

Mpo na nini Yehova abomaki Uza?

18. (a) Likambo nini esalemaki ntango Davidi alingaki komema Sanduku na Yelusaleme? (b) Motuna nini lisolo yango ekoki kobimisa?

18 Lisolo mosusu oyo ekoki kotinda bato mosusu bámituna mituna elobeli likambo oyo esalemaki ntango Davidi alingaki komema sanduku ya kondimana na Yelusaleme. Batyaki Sanduku yango na likalo moko mpe Uza ná ndeko na ye bazalaki kotambwisa yango. Biblia elobi boye: “Ekómaki bango na etutelo ya loso ya Nakono, Uza asembolaki lobɔkɔ na ye epai ya sanduku ya Nzambe mpe asimbaki yango mpo ete bangɔmbɛ baninganisaki yango. Nde nkanda ya [Yehova] epelelaki Uza; Nzambe abɛtaki ye mpo na [kozanga limemya, NW] na ye; akufaki wana pembeni ya sanduku ya Nzambe.” Mwa basanza na nsima, bamemaki lisusu Sanduku yango mpe ekómaki malamu mpamba te bamemaki yango na ndenge oyo Nzambe alakisaki, elingi koloba na mapeka ya Balevi ya libota ya Keata. (2 Samwele 6:6, 7; Mituya 4:15; 7:9; 1 Ntango 15:1-14) Bato mosusu bakoki kotuna ete: ‘Mpo na nini Yehova asalaki likambo ya makasi bongo? Uza alingaki kaka kobatela Sanduku mpo ekwea te, boye te? Mpo tózwela Nzambe makanisi ya mabe te, ebongi tótalela makambo mosusu ya ntina.

19. Mpo na nini ekoki kosalema te ete Yehova asala likambo ezangi boyengebene?

19 Tosengeli kobosana te ete Yehova akoki te kosala likambo ezangi boyengebene. (Yobo 34:10) Soki Yehova asali likambo na kozanga boyengebene, ekolakisa ete azali na bolingo te; nzokande boyekoli ya Biblia emonisi ete “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Longola yango, Biblia elobi na biso ete ‘boyengebene mpe sembo ezali ntina ya kiti ya bokonzi ya Nzambe.’ (Nzembo 89:14) Na bongo, ekobanda boni Yehova asala likambo na kozanga boyengebene? Soki asali bongo, akobebisa nde kiti to moboko ya bokonzi na ye.

20. Bantina nini ezali kotinda biso tókanisa ete Uza ayebaki mibeko oyo Nzambe apesaki mpo na Sanduku?

20 Tóbosana te ete Uza asengelaki koyeba Mibeko malamu. Sanduku ezalaki komonisa ete Yehova azali na kati ya Yisalaele. Mibeko elobaki polele ete moto oyo azali na ndingisa te akoki kosimba Sanduku te; mpe ebakisaki polele ete soki moto asimbi yango, etumbu na ye ekozala liwa. (Mituya 4:18-20; 7:89) Yango wana, komema sanduku ya bosantu ezalaki likambo ya lisɛki te. Na ntembe te Uza azalaki Molevi (atako azalaki nganga te); na bongo, tokoki kokanisa ete ayebaki Mibeko malamu. Longola yango, banda bambula mingi, babombaki Sanduku na ndako ya tata na ye. (1 Samwele 6:20–7:1) Eumelaki kuna soki mbula 70, tii ntango Davidi azwaki likanisi ya komema yango. Emonani mpenza ete banda bomwana na ye, Uza ayebaki mibeko oyo Nzambe apesaki mpo na Sanduku yango.

21. Na likambo ya Uza, mpo na nini ezali na ntina tóbosana te ete Yehova amonaka makanisi ya motema?

21 Ndenge tolobaki yango liboso, Yehova akoki kotánga na mitema ya bato. Lokola Liloba na ye elobi ete likambo oyo Uza asalaki ezali “kozanga limemya,” ekoki kozala ete Yehova amonaki ete azalaki na makanisi ya mabe oyo bakomi yango te na lisolo. Ntango mosusu Uza azalaki na lolendo, azalaki na nsɔmɔ te ya kosala makambo oyo azali na ndingisa na yango te. (Masese 11:2) Mbala mosusu lokola azalaki kotambwisa Sanduku oyo efandaki na ndako na bango, amimonaki moto monene. (Masese 8:13) Ntango mosusu Uza azangaki kondima mpe akanisaki ete lobɔkɔ ya Yehova ezali mokuse mpo na kopekisa sanduku oyo ezalaki komonisa Ye ekwea te. Ezala ndenge nini, tokoki kolikya ete Yehova asalaki na boyengebene. Ekoki kozala ete amonaki ezaleli moko na motema ya Uza oyo etindaki ye apesa ye etumbu mbala moko.​—Masese 21:2.

Bantina oyo ebongi tótyela Yehova motema

22. Ndenge nini bwanya ya Yehova ezali komonana na ndenge oyo Liloba na ye elobeli te makambo mosusu ya mikemike?

22 Bwanya eleki nyonso oyo Yehova azali na yango ezali komonana na ndenge oyo Liloba na ye elobeli te makambo mosusu ya mikemike. Na ndenge yango, Yehova apesi biso libaku ya komonisa ete totyelaka ye motema. Makambo oyo toyekoli emonisi biso ete tozali na bantina oyo ebongi tóndima ete bitumbu ya Yehova ezali sembo? Ntango tozali koyekola Liloba ya Nzambe na motema sembo mpe na makanisi mabe te, tokomona makambo mingi oyo ekondimisa biso ete Yehova asalaka ntango nyonso makambo oyo ezali sembo mpe ya boyengebene. Yango wana, soki lisolo moko ya Biblia etindi biso tómituna mituna mpe tozwi biyano te, tózala na kondima ete Yehova asalaki oyo ezali sembo.

23. Elikya nini tokoki kozala na yango na ntina na misala ya Yehova na mikolo ekoya?

23 Tokoki mpe kotyela Yehova motema ndenge wana mpo na makambo oyo akosala. Yango wana, tokoki kondima ete ntango akopesa bato etumbu na bolɔzi monene oyo ezali koya, ‘akoboma bayengebene elongo na bato mabe te.’ (Genese 18:23) Lokola alingaka boyengebene mpe bosembo, likanisi ya ndenge wana ekoya te na makanisi na ye. Tokoki mpe kozala na elikya ete na mokili ya sika oyo ezali koya, akokokisa bamposa na biso na ndenge ya malamu koleka.​—Nzembo 145:16.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Abalayama azalaki kobanga na ntina, mpamba te na papirise moko ya kala bakomi ete Falao moko atindaki basoda bákanga mwasi moko oyo azalaki kitoko mpe báboma mobali na ye.

b Mpo na makanisi mosusu, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Marsi 1980, lokasa 31 (ebimeli ya Lifalanse).

Ozali koyeba lisusu?

• Mpo na bantina nini tosengeli kondima ete bitumbu ya Yehova ezalaka sembo?

• Nini ekoki kosalisa biso tókanisela Lota mabe te na ndenge alingaki kopesa bana na ye epai ya ebele ya bato mabe oyo batondaki na nkanda?

• Makambo nini ekoki kosalisa biso tóyeba ntina oyo Yehova abomaki Uza?

• Elikya nini tokoki kozala na yango mpo na misala ya Yehova na mikolo ezali koya?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto