Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/2 nk. 28-31
  • Solo ezali kobota mbuma epai ya bato oyo oteyaka?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Solo ezali kobota mbuma epai ya bato oyo oteyaka?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Solo esengeli kosimba motema
  • Yekolá epai ya Yesu
  • Kotoka oyo ezali na kati na motema
  • Salá ete solo ekoba kobota mbuma na kati na yo
  • Atikalaki sembo na komekama
    Mekolá kondima na bango
  • Atikalaki sembo na kati ya komekama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Ndenge nini okoki kosimba mitema ya bayoki na yo
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Lokola Petro, kolɛmba te kobundisa bolɛmbu na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/2 nk. 28-31

Solo ezali kobota mbuma epai ya bato oyo oteyaka?

NTANGO elenge Eric ayebisaki baboti na ye ete alingi lisusu kozala Motatoli ya Yehova te, baboti na ye bayokaki mpasi mingi na motema. Eloko moko te ezalaki komonisa ete akokaki kozwa ekateli motindo wana. Ntango Eric azalaki mwana moke, azalaki kosangana na boyekoli ya libota, azalaki koyangana na makita mpe kobima na mosala ya kosakola. Ezalaki komonana ete azali kotambola na kati ya solo. Kasi, ntango atikaki lisangá, baboti na ye bamonaki ete solo efandaki na motema na ye te. Likambo yango ebulunganisaki baboti na ye mpe epesaki bango mawa.

Bato mosusu mpe bayokaki mpasi ya ndenge wana ntango moto moko oyo bazalaki koyekola na ye Biblia atikaki na mbalakaka koyekola na bango. Na ntango wana, bato mingi bamitunaka ‘ndenge nini bamonaki ata likambo moko te oyo ezalaki kolakisa ete bato yango bakotika koyekola?’ Ezali nde na likoki ya koyeba soki solo ezali kobota mbuma epai ya bato oyo tozali koteya liboso bázonga nsima? Ndenge nini tokoki kondimisama ete solo ezali kosala mosala epai na biso mpe epai ya bato oyo toteyaka? Na lisese ya moloni, Yesu amonisaki makanisi oyo ekosalisa biso tóyanola na mituna yango.

Solo esengeli kosimba motema

Yesu alobaki boye: “Milona ezali liloba ya Nzambe. Mpo na oyo [elonami] na mabelé ya malamu, yango ezali bato oyo, nsima ya koyoka liloba na motema ya kitoko mpe ya malamu, basimbi yango mpe baboti mbuma elongo na koyika mpiko.” (Luka 8:11, 15) Na yango, liboso solo ya Bokonzi ebota mbuma na mitema ya bayekoli na biso, esengeli naino ezwa misisa na mitema na bango ya elilingi. Na ndakisa ya nkona oyo ekwei na mabelé ya malamu oyo Yesu alobelaki, soki solo ya Nzambe esimbi motema oyo ezali malamu, yango etindaka mbala moko moto abongwana mpe abota mbuma. Tosengeli kotalela nini?

Tosengeli kotalela bizaleli ya motema, kasi te kaka makambo oyo ezali komonana libándá. Ata soki moto azali na mimeseno malamu ya losambo, yango emonisaka ntango nyonso te oyo ezali na kati ya motema na ye. (Yilimia 17:9, 10; Matai 15:7-9) Tosengeli kotala mosika. Tosengeli mpenza komona mbongwana na bamposa, mikano mpe makambo oyo azali kotya na esika ya liboso na bomoi na ye. Moto yango asengeli kolata bomoto ya sika, oyo eyokani na mokano ya Nzambe. (Baefese 4:20-24) Tózwa ndakisa moko: Paulo alobi ete ntango Batesaloniki bayokaki nsango malamu, bayambaki yango mbala moko lokola liloba ya Nzambe. Kasi, koyika mpiko, bosembo mpe bolingo oyo bamonisaki na nsima nde endimisaki Paulo ete solo ezalaki “mpe kosala mosala na kati na [bango].”​—1 Batesaloniki 2:13, 14; 3:6.

Ya solo, makanisi oyo ezali na motema ya moyekoli ekomonana ata ndɛlɛ na etamboli na ye, ndenge ndakisa ya Eric emonisi yango. (Malako 7:21, 22; Yakobo 1:14, 15) Likambo ya mawa ezali ete, makanisi ya mabe oyo moto azali na yango na motema emonanaka na misala na ye wana ntango ya kosalisa ye esili koleka. Mokakatano ezali nde komona makambo oyo ekoki kolɛmbisa moto liboso ekóma mabaku oyo ekokweisa ye na elimo. Tosengeli koyeba lolenge oyo tokoki komona makambo oyo ezali na motema ya elilingi. Ndenge nini tokoki kosala yango?

Yekolá epai ya Yesu

Toyebi ete Yesu azalaki na likoki ya kotánga na mitema ya bato. (Matai 12:25) Moko te kati na biso akoki kosala bongo. Nzokande, Yesu amonisaki ete biso mpe tokoki koyeba bamposa, mikano mpe makambo oyo moto azali kotya na esika ya liboso. Kaka ndenge monganga oyo ayebi mosala asalelaka mayele ndenge na ndenge mpo ayeba maladi na motema ya moto, Yesu mpe asalelaki Liloba ya Nzambe mpo na ‘kotoka’ mpe komonisa polele “makanisi mpe mikano ya motema,” ata ntango emonani naino te na miso ya bato.​—Masese 20:5; Baebele 4:12.

Na ndakisa, mokolo moko Yesu asalisaki Petelo amona bolɛmbu moko oyo, na nsima, ekómaki libaku mpo na ye. Yesu ayebaki ete Petelo azalaki kolinga ye. Kutu apesaki ye “bafungola ya bokonzi.” (Matai 16:13-19) Nzokande, Yesu ayebaki mpe ete Satana azalaki kotya bayekoli na ye miso. Ayebaki ete na mikolo oyo ezalaki koya, balingaki komekama makasi na ndenge oyo ekokaki kotinda bango báwangana ye. Yesu ayebaki mpenza ete kondima ya bayekoli na ye mosusu ezalaki na bolɛmbu. Na yango akakatanaki te koyebisa bango polele makambo oyo basengelaki kobongisa. Tótalela ndenge Yesu abandaki lisolo yango.

Matai 16:21 elobi: “Longwa na ntango wana Yesu Klisto abandaki komonisa na bayekoli na ye ete asengeli . . . konyokwama . . . mpe kobomama.” Tomoni ete Yesu asukaki kaka te na koyebisa bango makambo oyo esengelaki kokómela bango, kasi amonisaki mpe bango makambo yango. Ekoki mpenza kozala ete asalelaki bavɛrsɛ ya Biblia lokola Nzembo 22:14-18 to Yisaya 53:10-12 oyo ezali komonisa ete Masiya akonyokwama mpe akokufa. Ezala ete Yesu atángaki maloba yango ya Biblia to azongelaki yango kaka na motó, apesaki Petelo ná bayekoli mosusu likoki ya kobimisa makanisi oyo ezalaki na mitema na bango. Basalaki nini ntango bayokaki ete Yesu akonyokwama?

Likambo ya kokamwa, mokolo yango Petelo, oyo azalaki komonana lokola moto ya molende mpe ya mpiko, alobaki maloba oyo emonisaki ete makanisi na ye ezalaki malamu te. Alobaki boye: “Zalá na boboto epai na yo moko, Nkolo; likambo wana ekokómela yo te.” Makanisi ya Petelo ezalaki mabe mpenza, mpamba te ndenge Yesu amonisaki yango, Petelo azalaki kokanisa “makanisi ya Nzambe te, kasi oyo ya bato”; yango ezalaki mpenza libunga oyo ekokaki komema mikakatano minene. Yesu asalaki nini? Nsima ya kopamela Petelo, ayebisaki ye ná bayekoli mosusu boye: “Soki moto alingi kolanda ngai, tiká amiboya ye moko mpe amema nzete na ye ya mpasi mpe alanda ngai ntango nyonso.” Nsima ya kobenda likebi na bango na makanisi oyo ezali na Nzembo 49:8 mpe 62:12, Yesu akundwelaki bango na bolingo nyonso ete elikya na bango ya bomoi ya seko ezali na mabɔkɔ ya bato te, oyo bakoki kobikisa te, kasi nde na mabɔkɔ ya Nzambe.​—Matai 16:22-28.

Atako na nsima Petelo abangaki bato mpe awanganaki Yesu mbala misato, kozanga ntembe lisolo wana mpe masolo mosusu oyo Yesu asololaki na bango esalisaki ye mingi mpo azongela nokinoki makasi na elimo. (Yoane 21:15-19) Mikolo 50 mpamba na nsima, Petelo atɛlɛmaki na mpiko nyonso liboso ya ebele ya bato na Yelusaleme mpo na kosakwela bango nsango ya lisekwa ya Yesu. Na bapɔsɔ, basanza mpe bambula oyo elandaki, bakangaki Petelo, babɛtaki ye mpe bakɔtisaki ye bolɔkɔ mbala na mbala; kasi ayikaki mpiko. Na ndenge yango atikaki ndakisa ya kozanga kobanga mpe ya bosembo.​—Misala 2:14-36; 4:18-21; 5:29-32, 40-42; 12:3-5.

Likambo oyo eteyi biso nini? Omoni likambo oyo Yesu asalaki mpo na kotoka mpe kobimisa polele makanisi oyo ezalaki na motema ya Petelo? Ya liboso, aponaki bavɛrsɛ oyo ebongaki mpenza mpo na kobenda likebi ya Petelo likoló ya makambo oyo asengelaki kobongisa. Ya mibale, apesaki ye libaku ya kobimisa makanisi oyo ezalaki na motema na ye. Ya misato, apesaki ye batoli mosusu ya Biblia mpo na kosalisa ye asembola makanisi na ye mpe lolenge na ye ya kotalela makambo. Okoki kokanisa ete ozali na makoki te ya koteya bongo, kasi, tiká tótalela ndakisa mibale ya mikolo na biso oyo ezali komonisa ete komibongisa mpe kotyela Yehova motema ekoki kosalisa ata nani kati na biso alanda ndakisa ya Yesu.

Kotoka oyo ezali na kati na motema

Ntango moklisto moko ayokaki ete bana na ye ya mibali, moko ya mbula 6 mpe mosusu ya mbula 7 bazwaki bonbon na mesa ya molakisi, afandisaki bango mpe asololaki na bango. Na esika tata yango amona likambo wana lokola lisano mpamba alobi ete, “Nasalaki makasi nabimisa na mitema na bango eloko oyo etindaki bango básala likambo mabe wana.”

Tata asɛngaki bana bákanisa likambo oyo ekɔmelaki Akana, ndenge Yosua mokapo 7 elobi yango. Bana basimbaki ntina ya likambo mbala moko mpe bandimaki mabe oyo basalaki. Lisosoli na bango etungisamaki. Na nsima, tata atángisaki bango Baefese 4:28, oyo elobi: “Tiká moyibi ayiba lisusu te, kasi tiká nde asala mosala makasi . . . mpo azala na eloko ya kokabela moto oyo azali kokelela.” Tata atindaki bana na ye básomba bonbon mosusu mpe bázongisa yango epai ya molakisi, kosala bongo ebakisaki makasi na toli ya Biblia oyo apesaki bango.

Tata yango alobi boye: “Soki kaka tomoni makanisi ya mabe, tozalaki kokanisa na bango mpo na kopikola yango mpe na esika na yango, kolona makanisi ya malamu mpe ya pɛto.” Lokola baboti yango balandaki ndakisa ya Yesu mpo na koteya bana na bango, bazwaki matomba na nsima. Na nsima, bana wana mibale bakómaki kosala na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Broolklyn, epai moko na bango azali kokoba kosala eleki sikoyo bambula 25.

Tótalela sikoyo ndenge moklisto moko ya mwasi asalisaki moyekoli na ye ya Biblia. Moyekoli yango azalaki koyangana na makita, kobima na mosala ya kosakola mpe azalaki na mposa ya kozwa batisimo. Kasi, emonanaki ete azalaki komityela motema mingi na esika atyela Yehova motema. Motatoli alobi ete “lokola mwasi yango azalaki monzemba, kozanga ete ayeba yango, akómaki kosala makambo mingi na ndenge na ye. Nazalaki kobanga ete nsukansuka alɛmba mingi na nzoto to alɛmba na elimo.”

Yango wana, Motatoli yango azwaki likanisi ya kosolola na moyekoli likoló ya Matai 6:33, alendisaki ye atalela lisusu makambo oyo azali kotya na esika ya liboso, aluka nde atya Bokonzi na esika ya liboso mpe atyela Yehova motema ete ye nde akosala ete makambo na ye etambola malamu. Mosakoli atunaki moyekoli polele ete: “Lokola yo moko nde okokisaka bamposa na yo, yango esalaka ete ntango mosusu ekóma mpasi mpo na yo otyela bato mosusu motema, ata mpe Yehova?” Moyekoli alobaki ete azalaki lisusu kobondela te. Na nsima, mosakoli alendisaki ye alanda toli oyo ezali na Nzembo 55:22 mpe akitisa mokumba na ye epai ya Yehova mpamba te, 1 Petelo 5:7 ezali kondimisa biso ete ‘ye atyelaka biso likebi.’ Maloba wana esimbaki motema na ye. Mosakoli alobi boye: “Ezalaki moko ya mwa bambala moke oyo namoná ye azali kolela.”

Salá ete solo ekoba kobota mbuma na kati na yo

Toyokaka esengo mingi ntango bato oyo toteyaka bazali kondima solo ya Biblia. Kasi, mpo milende na biso mpo na kosalisa bato ebota mbuma, biso moko mpe tosengeli kopesa bango ndakisa ya malamu. (Yuda 22, 23) Biso nyonso tosengeli “kokoba kosala mpo na lobiko na [biso] moko na kobanga mpe na kolɛnga.” (Bafilipi 2:12) Kosala bongo esɛngi mpe totika mwinda ya Makomami engɛnga na mitema na biso mpo eluka makanisi, bamposa mpe mayoki oyo esengeli kosembolama.​—2 Petelo 1:19.

Na ndakisa, ozali komona ete molende na yo mpo na mosala ya Nzambe ekiti? Soki bongo, mpo na nini? Ekoki kozala mpo ozali komityela motema mingi. Ndenge nini okoki koyeba soki ezali bongo to te? Tángá Hagai 1:2-11 mpe na bosembo nyonso manyolá likoló ya lolenge oyo Yehova akanisaki elongo na Bayuda oyo bautaki na boombo. Na nsima omituna boye: ‘Mposa ya kozala na mbongo mpe biloko mingi ya mokili ezali nde kozwa makanisi na ngai mingi? Nazali mpenza kondima ete Yehova akokokisa bamposa ya libota na ngai soki natye makambo ya elimo na esika ya liboso na bomoi na ngai? To nazali komona ete ngai moko nde nasengeli naino kokokisa bamposa na ngai?’ Soki osengeli kobongola makanisi na yo, kokakatana te kosala yango. Toli ya Biblia lokola oyo ezali na Matai 6:25-33, Luka 12:13-21 mpe 1 Timote 6:6-12, ezali kosalisa biso tótalela bamposa na biso ya mosuni mpe biloko ya mokili na ndenge ebongi, oyo ekosala ete Yehova akoba kopambola biso.​—Malaki 3:10.

Komitalela ndenge wana ekoki kozala mpasi. Kondima bolɛmbu moko boye ntango bamonisi biso yango ekoki kotungisa biso na makanisi. Nzokande, ntango ozwi ekateli ya kosalisa mwana na yo, moto oyo oyekolaka na ye Biblia, ata mpe yo moko, ata soki likambo yango etali ye mpenza to ozali koyoka nsɔni mpo na kolobela yango, yebá ete ozali kokokisa likambo ya liboso mpo na oyo etali kobikisa bomoi ya moto yango to ya yo moko.​—Bagalatia 6:1.

Okosala nini soki omoni ete milende na yo ezali kobota mbuma malamu te? Kolɛmba nzoto mbala moko te. Kosembola motema oyo ezangi kokoka ekoki kozala mpasi, ekoki kozwa ntango mingi, mpe na bantango mosusu kotungisa. Kasi ekoki mpe komema mapamboli.

Elenge Eric oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo, azongaki na nzela mpe abandaki lisusu “kotambola na kati ya solo.” (2 Yoane 4) Alobaki ete: “Kaka ntango oyo nayaki koyeba eloko oyo nabungisi nde nazongelaki Yehova.” Na lisalisi ya baboti na ye, Eric azali lelo oyo kosalela lisusu Nzambe na bosembo. Atako kala azalaki kosepela te na milende oyo baboti na ye bazalaki kosala mpo na kosimba motema na ye, sikoyo azali na botɔndi mingi mpo na oyo baboti na ye basalaki. Eric alobi boye: “Baboti na ngai bazali malamu mpenza. Batikaki te kolinga ngai.”

Kongɛngisa mwinda ya Liloba ya Nzambe na kati ya mitema ya bato oyo tozali koteya emonisaka motema-boboto. (Nzembo 141:5) Kobá kotala na kati ya motema ya bana na yo mpe ya bato oyo oyekolaka na bango Biblia mpo na komona soki bomoto ya sika ya moklisto ezali kozwa misisa. Salá ete solo esala mosala na kati ya bato mosusu mpe na kati na yo moko na ‘kosemboláká liloba ya solo malamumalamu.’​—2 Timote 2:15.

[Elilingi na lokasa 29]

Maloba ya Yesu emonisaki polele bolɛmbu moko oyo Petelo azalaki na yango

[Elilingi na lokasa 31]

Saleláká Biblia mpo na kotoka oyo ezali na kati na motema

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto