Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/4 nk. 21-22
  • Buku ya ntina mingi na mosala ya kobongola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Buku ya ntina mingi na mosala ya kobongola
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Masolo mosusu
  • Likambo ya esengo mpo na bato oyo balingaka Liloba ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Na mokili mobimba, bato ebele bazali kosepela na Libongoli ya Mokili ya Sika
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Ndenge ya kopona libongoli malamu ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/4 nk. 21-22

Buku ya ntina mingi na mosala ya kobongola

YEHOVA NZAMBE, Mobandisi ya Biblia, alingi ete nsango malamu ya Bokonzi esakolama “epai ya bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe mikili nyonso.” (Emoniseli 14:6) Alingi ete moto moko te azala na mokakatano mpo na kozwa Liloba na ye oyo ekomami. Yango wana, Biblia ebongolami na minɔkɔ mingi koleka buku mosusu nyonso. Bankóto na bankóto ya babongoli basalaki milende mpe balekisaki ebele ya bambula mpo na kotya maloba ya Nzambe na minɔkɔ mosusu.

Kasi, Biblia ezali te kaka mokanda oyo babongolaka na minɔkɔ mosusu. Basalelaki yango mingi mpo na kobongola mikanda mosusu. Babongoli mingi batalaki ndenge maloba ya Biblia ebongolami na minɔkɔ ndenge na ndenge mpo na kozwa ndenge malamu ya kobongola maloba mosusu. Lokola Biblia ezali esaleli ya malamu mingi mpo na kobongola mikanda, bazali kosalela yango na baordinatɛrɛ oyo ekoki kobongola mikanda na minɔkɔ mosusu.

Ezali mpasi mingi mpo ordinatɛrɛ yango moko ebongola malamu makambo na monɔkɔ mosusu. Bato mosusu ya mayele bazali koloba ete ordinatɛrɛ ekoki kosala mosala ya kobongola yango moko te. Mpo na nini? Mpamba te monɔkɔ ezalaka kaka maloba te. Monɔkɔ na monɔkɔ ezali na ndenge na yango ya kolandisa maloba, mibeko na yango, bisika oyo moto asengeli kolanda mibeko yango te, maloba ya elilingi, mpe ndenge mosusu ya koloba makambo. Bato bameki na ndenge nyonso kobimisa ordinatɛrɛ oyo ekozala na makoki ya kosala nyonso wana, kasi balongi mpenza te. Mabongoli mingi oyo ordinatɛrɛ yango moko esali elandaki mpenza mibeko ya lokota te.

Atako bongo, lelo oyo bato ya mayele na makambo ya ordinatɛrɛ bazali kokanisa kosalela mayele mosusu. Franz Josef Och, moto moko ya mayele oyo ayekolaka ndenge ya kosala ordinatɛrɛ oyo ekoki kobongola yango moko, alobaki boye: “Tozali sikoyo kosalela mikanda oyo ezali na liloba mokomoko na bisika mingi mpo ordinatɛrɛ eyeba lolenge oyo ekoki kobongola yango.” Na ndakisa, tokoki kozala na mokanda moko ekomami na monɔkɔ ya Hindi mpe tolingi kobongola yango na Lingelesi. Liboso, tokoluka mokanda mosusu oyo ezali na minɔkɔ yango mibale. Na nsima, tokokɔtisa maloba na yango nyonso na ordinatɛrɛ. Ordinatɛrɛ ekokokanisa maloba ya mikanda yango mibale. Soki, na ndakisa, ordinatɛrɛ emoni liloba moko ya Hindi na bisika mingi mpe na bisika oyo ekokani na yango na Lingelesi emoni liloba “ndako,” ordinatɛrɛ ekoyeba ete liloba wana ya Hindi elimboli “ndako” na Lingelesi. Mpe, mbala mingi, maloba oyo ezali pembeni na yango ekoki kozala mabakema (adjectifs), lokola “ya monene,” “ya moke,” “ya kala,” to “ya sika.” Na ndenge yango, ordinatɛrɛ ekosala liste ya maloba ya monɔkɔ moko mpe maloba oyo ekokani na yango na monɔkɔ mosusu. Nsima ya “kolakisa” ordinatɛrɛ makambo wana (mosala oyo ekoki koumela mwa mikolo to mwa bapɔsɔ), ordinatɛrɛ ekoki kosalela maloba oyo “eyekoli” mpo na kobongola mikanda mosusu. Atako makambo oyo ordinatɛrɛ ekobongola ekolanda gramɛrɛ malamumalamu te, moto akoki kotánga mpe kokanga ntina na yango.

Mpo ordinatɛrɛ ebongola mwa malamu ezali mpe kotalela mingimingi soki maloba oyo bakɔtisi kati na yango ezali mingi mpe soki ezali maloba oyo ebongi mpenza na monɔkɔ wana. Na likambo yango, emonani ete mokanda oyo ebongi mpenza ezali Biblia. Biblia ebongolami malamu na minɔkɔ ebele, ezali mpasi te mpo na kozwa yango, mpe ezali mokanda moko monene. Na bongo, bato ya mayele oyo bazali koyekola ndenge ya kosala ordinatɛrɛ oyo ekoki kobongola mikanda yango moko baponaki libosoliboso Biblia lokola mokanda oyo bakoki kokɔtisa na ordinatɛrɛ na monɔkɔ oyo ezali na mikanda oyo esengeli kobongolama.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto