Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/6 nk. 4-8
  • Mosala ezali lipamboli to etumbu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mosala ezali lipamboli to etumbu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tótalela makanisi na biso
  • Ntango oyo mosala ekozala lipamboli
  • Moná bolamu mpo na mosala na yo ya makasi
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Sepelá na mosala na yo
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Ndenge ya kosepela na mosala ya makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Ndenge ya malamu ya kotalela mosala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/6 nk. 4-8

Mosala ezali lipamboli to etumbu?

“Likambo eleki malamu ezali mpo na moto te, bobele ete . . . azwa esengo kati na mosala na ye.”​—Mosakoli 2:24.

ANKƐTƐ moko oyo euti kosalema emonisi ete basali mwa mingi (moto moko na kati ya bato misato) balobaki ete mbala mingi “na nsuka ya mosala bayokaka nzoto na bango elɛmbi mpenza.” Yango ezali likambo ya kokamwa te soki totali ndenge mosala ezali kopesa bato motó mpasi; bato bakómi kosala bangonga ebele mpe bazali ata komema misala mosusu na ndako, kasi bakonzi na bango bapesaka bango ata longonya te.

Lokola misala mingi ekómi kosalema na bamasini ya mineneminene, bato mingi bazali komimona lokola kaka mwa biteni ya bamasini yango. Misala ya bato mingi ezali kosɛnga lisusu te ete bákanisaka. Yango ezali kobongola ndenge oyo bato bazali kotalela mosala. Ezali kolongola makambo oyo esalaka ete moto asepela na mosala na ye. Moto akoki kobungisa mposa ya koluka kosala eloko ya malamu koleka. Makambo wana nyonso ekoki kotinda moto asepela lisusu na mosala te, ata mpe komema ye ayina mosala oyo azali kosala.

Tótalela makanisi na biso

Ya solo, tokoki ntango nyonso te kobongola makambo ya bomoi na biso. Kasi, tokoki kobongola makanisi na biso. Soki omoni ete okómi kotalela mosala na ndenge ebongi te, ekozala malamu otalela likanisi ya Nzambe mpe mitinda na ye na likambo yango. (Mosakoli 5:18) Bato mingi bamoni ete likanisi mpe mitinda wana esalisi bango bázala na esengo na bomoi na bango mpe básepelaka na mosala na bango.

Nzambe azali Mosali oyo aleki basali nyonso. Nzambe azali mosali. Mbala mosusu okanisá naino bongo te mpo na ye, nzokande Biblia emonisi ete ye moko amimonisaki bongo na ebandeli. Mokanda ya Genese ebandi na lisolo oyo elobeli ndenge Yehova akelaki likoló mpe mabelé. (Genese 1:1) Kanisá naino misala ndenge na ndenge oyo Nzambe akokisaki ntango abandaki kokela; kaka ye moko azalaki mosali, mobongisi, moyemi, motambwisi mosala, moto ya mayele na chimie, na bioloji, na zooloji, mpe na lokota.​—Masese 8:12, 22-31.

Mosala oyo Nzambe asalaki ezalaki ndenge nini? Biblia elobi ete ezalaki “malamu,” “malamu mingi.” (Genese 1:4, 31) Kutu, biloko oyo Nzambe akelaki ‘ezali kosakola nkembo na ye;’ yango wana, biso mpe tosengeli kosanzola ye!​—Nzembo 19:1; 148:1.

Kasi, mosala ya Nzambe esukaki kaka te na kokela likoló, mabelé, mobali mpe mwasi ya liboso. Yesu Klisto, Mwana ya Yehova, alobaki boye: “Tata na ngai azali kokoba kosala tii sikoyo.” (Yoane 5:17) Yehova azali kokoba kosala na ndenge akokisaka bamposa ya bikelamu na ye, atambwisaka biloko oyo akelá, mpe abikisaka basaleli na ye ya sembo. (Nehemia 9:6; Nzembo 36:6; 145:15, 16) Kutu, mpo na kosala misala mosusu, asalelaka ata bato; Biblia elobi ete bato yango “bazali kosala elongo na Nzambe.”​—1 Bakolinti 3:9.

Mosala ekoki kozala lipamboli. Kasi, Biblia elobi te ete mosala ezali etumbu? Soki totángi Genese 3:17-19 malamumalamu te, tokoki kokanisa ete Nzambe apesaki Adama ná Eva mosala lokola etumbu mpo na botomboki na bango. Ntango Nzambe akatelaki bango etumbu, alobaki na Adama boye: “Na milunge ya elongi na yo okolya kwanga, kino ntango okozonga na mabelé.” Maloba yango emonisi nde ete mosala ezali etumbu?

Te. Kasi, lokola Adama ná Eva babukaki mobeko ya Nzambe, mosala ya kokómisa mabelé mobimba Paladiso esengelaki lisusu kosalema na ntango wana te. Nzambe alakelaki mabelé mabe. Bato basengelaki kobimisa motoki mpe komona bwale mpo mabelé ebotela bango biloko ya kolya.​—Baloma 8:20, 21.

Biblia emonisi te ete mosala ezali etumbu; elobi ete mosala ezali lipamboli oyo tosengeli kosepela na yango. Ndenge tolobaki yango, Nzambe azali mosali ya molende. Lokola Yehova akelaki bato na elilingi na ye, apesaki bango likoki ya kosala mpe apesaki bango bokonzi likoló ya bikelamu na ye nyonso awa na mabelé. (Genese 1:26, 28; 2:15) Nzambe apesaki moto mosala yango liboso aloba maloba oyo ezali na Genese 3:19. Soki mosala ezalaki etumbu mpe likambo ya mabe, Yehova alingaki te kolendisa bato básalaka mosala. Noa ná libota na ye basalaki mosala mingi liboso mpe na nsima ya Mpela. Bayekoli ya Yesu mpe balendisamaki básalaka mosala.​—1 Batesaloniki 4:11.

Atako bongo, biso nyonso toyebi ete kosala mosala ekoki kozala mpasi mingi na mikolo na biso. Mitungisi, makama, kozanga esengo, kolɛmba nzoto, kowelana, kokosama, mpe kozanga bosembo ezali kaka mwa mikakatano oyo ezali lokola ‘banzete mpe nkamba ya nzubɛ’ oyo bato bazali kokutana na yango na mosala. Kasi mosala yango moko ezali etumbu te. Na Mosakoli 3:13, Biblia elobi ete mosala mpe mbuma na yango ezali likabo ya Nzambe.​—Talá etanda “Ndenge ya kolonga mitungisi ya mosala.”

Okoki kokumisa Nzambe na mosala na yo. Banda kala bato bakumisaka mosala oyo esalemi malamu mpe moto oyo asalaka mosala na ye malamu. Lolenge moko ya kotalela mosala oyo Biblia ezali kolendisa ezali ete tosengeli kosalaka mosala na biso malamu. Nzambe ye moko asalaka mosala na ye malamu mpenza. Apesi biso mayele mpe makoki, mpe alingi tósalelaka yango malamu. Na ndakisa, ntango bazalaki kotonga tabenakle na Yisalaele ya kala, Yehova apesaki bato lokola Besalele ná Oliaba bwanya, bososoli mpe boyebi mpo na kosala misala ya ntɔki mpe misala mosusu. (Exode 31:1-11) Yango elakisi ete Nzambe azalaki kotya likebi na ndenge bazalaki kotambwisa mosala, ntɔki na bango, ndenge na bango ya kobongisa makambo, mpe makambo mosusu.

Yango elobi mingi na ndenge oyo tosengeli kotalelaka makoki na biso mpe ndenge na biso ya kosala mosala. Ezali kosalisa biso tómonaka ete makoki na biso mpe ndenge na biso ya kosala mosala ezali makabo oyo Nzambe apesi biso mpe tosengeli kotalela yango bongobongo te. Yango wana, Biblia epesi baklisto toli básalaka mosala na bango lokola nde Nzambe azali kolandela yango: “Nyonso oyo bozali kosala, bósala yango na molimo na bino mobimba lokola mpo na Yehova, kasi mpo na bato te.” (Bakolose 3:23) Basaleli ya Nzambe balendisami na kosala mosala malamu, na bongo bakosala ete baninga na bango ya mosala ná bato mosusu básepela lisusu na nsango oyo baklisto basakolaka.​—Talá etanda “Kosalela mitinda ya Biblia na mosala.”

Yango wana, ezali malamu tómituna ndenge nini tosalaka mosala na biso mpe soki tómipesaka mpenza na mosala. Nzambe asepelaka na ndenge oyo tosalaka mosala na biso? Biso moko tosepelaka na ndenge oyo tokokisaka mosala na biso? Soki te, tokoki kobongisa.—Masese 10:4; 22:29.

Bokatikati kati na mosala mpe makambo ya Nzambe. Atako kosala mosala makasi ezali malamu, ezali na likambo mosusu ya ntina mingi oyo ekoki kosala ete moto asepela na mosala mpe na bomoi. Ezali boyokani na ye na Nzambe. Mokonzi Salomo, moto oyo asalaki mosala makasi mpe atondaki na bomɛngo, alobaki boye: “Bangá Nzambe ya solo mpe batelá mibeko na ye. Mpamba te yango nde likambo esɛngami na moto.”​—Mosakoli 12:13, NW.

Na maloba mosusu, tosengeli kolukaka koyeba makanisi ya Nzambe na likambo nyonso oyo tolingi kosala. Tosalaka mosala oyo eyokani na mibeko ya Nzambe to ebukaka nde mibeko yango? Tosalaka makasi mpo na kosepelisa Nzambe, to tolukaka kaka komisepelisa? Soki tozali kosala mokano ya Nzambe te, nsukansuka tokomona ete tosali ata eloko moko te ya malonga mpe yango ekobanda kotungisa makanisi na biso.

Steven Berglas apesi bato oyo babomaka nzoto na mosala toli ete ‘báluka likambo moko oyo bakosepela na yango mpe bákɔtisa yango na makambo ya bomoi na bango.’ Likambo mosusu ezali te oyo ezali na ntina koleka kosalela Moto oyo apesaki biso mayele mpe makoki mpo tósalaka mosala ya ntina. Kosala mosala oyo esepelisaka Mozalisi ekopesa biso mawa ata mokolo moko te. Yesu azalaki komona ete mosala oyo Yehova apesaki ye ezalaki malamu mpe elɛngi lokola bilei. (Yoane 4:34; 5:36) Tóbosana mpe te ete Nzambe, Mosali oyo aleki basali nyonso, asɛngi biso tókóma ‘bato oyo bazali kosala elongo na Ye.’​—1 Bakolinti 3:9.

Kosambela Nzambe mpe kokola na elimo ezali formasyo mpo na kosala mosala mpe kokokisa mokumba oyo ekopesa biso mbano monene. Lokola mosala ezalaka mbala mingi na mitungisi, ebimisaka matata mingi mpe esɛngaka makambo kilikili, kozala na kondima ya makasi mpe makasi na elimo ekoki kosalisa biso mpo tózala basali ya malamu to mpe bapatrɔ ya malamu. Epai mosusu, makambo ya bomoi na mokili oyo bato mingi bapesi Nzambe mokɔngɔ ekoki komonisa biso bisika oyo ezali kosɛnga tókolisa kondima na biso.​—1 Bakolinti 16:13, 14.

Ntango oyo mosala ekozala lipamboli

Bato oyo bazali lelo oyo kosala makasi básalela Nzambe bakoki kolikya kozala na bomoi ntango oyo akozongisa Paladiso mpe na mabelé mobimba bato nyonso bakozala na misala ya ntina. Mosakoli Yisaya alobaki ndenge bomoi ekozala na ntango wana: “Bakotonga ndako mpe bakofanda na yango; bakokona bilanga ya [vinyo] mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga te ete mosusu afanda; bakokona te ete mosusu alya; . . . baponami na ngai bakosepela kino ntango molai mpo na misala ya mabɔkɔ na bango.”​—Yisaya 65:21-23.

Na ntango wana mosala ekozala mpenza lipamboli! Soki oyekoli makambo oyo Nzambe azali kosɛnga yo mpe osaleli yango, okoki kozala na kati ya bato oyo Yehova akopambola mpe ntango nyonso ‘okomona malamu na mosala na yo nyonso.’​—Mosakoli 3:13.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 8]

Nzambe azali Mosali oyo aleki basali nyonso: Genese 1:1, 4, 31; Yoane 5:17

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 8]

Mosala ekoki kozala lipamboli: Genese 1:28; 2:15; 1 Batesaloniki 4:11

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 8]

Okoki kokumisa Nzambe na mosala na yo: Exode 31:1-11; Bakolose 3:23

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 8]

Bokatikati na mosala mpe makambo ya Nzambe: Mosakoli 12:13; 1 Bakolinti 3:9

[Etanda/Elilingi na lokasa 6]

NDENGE YA KOLONGA MITUNGISI YA MOSALA

Minganga batalelaka mitungisi ya mosala lokola moko ya makambo oyo ekoki kobimisa makama. Mitungisi yango ekoki kopesa maladi ya estoma, konyokola moto na makanisi, ata mpe kotinda ye amiboma. Na Japon babengaka yango karoshi, elingi koloba “kokufa mpo mosala eleki mingi.”

Mosala ezali na makambo mingi oyo ekoki kotungisa moto. Ekoki kozala mbongwana na bangonga ya mosala to ndenge ya kosala mosala, kozanga koyokana na bakonzi ya mosala, kozwa mikumba to mosala mosusu, pansiɔ, to mpe kolongwa mosala. Mpo na kokima mitungisi yango, bato mosusu balukaka mosala mosusu to kosala esika mosusu. Bamosusu balukaka kosilisa mitungisi yango, kasi bamonaka ete ezongaka na makambo mosusu ya bomoi na bango, mingimingi na libota. Kutu mitungisi yango ekómaka maladi mpo na bato mosusu, bakómaka konyokwama na makanisi mpe bazalaka lisusu na esengo te.

Baklisto bazali na makambo mingi oyo ekoki kosalisa bango bálonga mitungisi ya mosala. Biblia ezali na batoli mingi ya ntina oyo ekoki kosalisa biso na ntango ya mpasi mpo tózala malamu na elimo mpe na makanisi. Na ndakisa, Yesu alobaki boye: “Bómitungisa ata moke te mpo na mokolo oyo ekolanda, mpo mokolo oyo ekolanda ekozala na mitungisi na yango moko. Mokolo moko na moko ekoki na mabe na yango moko.” Maloba yango ezali kolendisa biso tóluka ndenge ya kosilisa mikakatano oyo tozali na yango lelo, na esika ya komitungisa mpo na mikakatano oyo ekoki kobima lobi. Na ndenge yango, tokoboya kongalisa mikakatano na biso, mpo yango ekoki kobakisela biso mitungisi.​—Matai 6:25-34.

Ezali na ntina ete baklisto batyelaka Nzambe motema, na esika bámityela motema. Soki mitungisi ebandi koleka biso motó, Nzambe akoki kopesa biso kimya, esengo, mpe mayele mpo tólonga mikakatano. Ntoma Paulo akomaki boye: “Bókoba kozwa nguya na kati ya Nkolo mpe na kati ya nguya ya bokasi na ye.”​—Baefese 6:10; ­Bafilipi 4:7.

Lisusu, ata mitungisi mpe ekoki kobota mbuma malamu. Mikakatano ekoki kosala ete tótalela mingi Yehova, tóluka ye mpe tótyela ye motema. Mitungisi ekoki mpe kotinda biso tókoba kolata bomoto ya boklisto mpe tókoba kokolisa makoki ya koyikela mikakatano mpiko. Paulo apesi biso toli oyo: “Tiká mpe tósepela ntango tozali na kati ya malɔzi, mpamba te toyebi ete bolɔzi ebotaka ezaleli ya koyika mpiko; ezaleli ya koyika mpiko, na ngala na yango, kondimama; kondimama, na ngala na yango, elikya.”​—Baloma 5:3, 4.

Na bongo, na esika mitungisi epesa biso kaka mpasi mpe mawa, ekoki mpe kosalisa biso tókola na elimo.

[Etanda/Elilingi na lokasa 7]

KOSALELA MITINDA YA BIBLIA NA MOSALA

Ndenge oyo moklisto atalelaka mosala mpe ezaleli na ye na esika ya mosala ekoki kosala ete baninga na ye ya mosala to bato mosusu básepela na nsango ya Biblia. Na mokanda na ye epai ya Tito, ntoma Paulo apesaki baoyo bazali bato ya mosala toli ete “bátosa [bakonzi] na bango na makambo nyonso, mpe básepelisaka bango malamu, bázongisa maloba mabe te, báyiba te, kasi bámonisa bosembo ya malamu na ndenge oyo ekoki mpenza, mpo bákómisa kitoko mateya ya Mobikisi na biso, Nzambe, na makambo nyonso.”​—Tito 2:9, 10.

Na ndakisa, moto moko ya mombongo atindaki mokanda na biro monene ya Batatoli ya Yehova; mokanda yango elobaki boye: “Nakomi mokanda oyo mpo na kosɛnga nzela ya kozwa Batatoli ya Yehova na mosala. Nalingi kozwa bango mpo nayebi ete bazali bato ya sembo, babukaka lokuta te, bazali bato ya kotyela motema mpe bayibaka te. Bato oyo nakoki mpenza kotyela motema ezali kaka Batatoli ya Yehova. Nalɔmbi bino, bósalisa ngai.”

Moklisto moko nkombo na ye Kyle asalaka na esika bayambaka bato na eteyelo moko. Mokolo moko, mpo na likambo moko oyo bayokanaki te na moninga na ye ya mosala, moninga yango alobaki na ye mabe na miso ya mwa bana-kelasi. Kyle alobi boye: “Nasalaki mpenza makasi mpo nafingisa nkombo ya Yehova te.” Na boumeli ya mikolo mitano oyo elandaki, Kyle azalaki kokanisa ndenge oyo akokaki kosalela mitinda ya Biblia. Moko na yango ezali na Baloma 12:18: “Soki likoki ezali, na meko oyo yango etaleli bino, bózala na kimya elongo na bato nyonso.” Kyle akomelaki moninga yango na nzela ya ordinatɛrɛ mpe asɛngaki bolimbisi mpo na likambo oyo elekaki. Asɛngaki ye bátikala nsima ya mosala mpo básolola mpe básilisa matata yango. Ntango basilisaki kosolola, moninga yango alɛmbisaki motema mpe asepelaki na likambo oyo Kyle asalaki. Alobaki na Kyle boye: “Likambo oyo osali emonisi ete lingomba na bino eteyaka bino malamu” mpe ayambaki ye liboso bákabwana. Kyle alobi boye: “Kosalela mitinda ya Biblia ebotaka kaka mbuma ya malamu.”

[Elilingi na lokasa 5]

Bato mingi ya mosala bazali komimona lokola mwa biteni ya bamasini

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Japan Information Center, Consulate General of Japan in NY

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 8]

Globe: Fɔtɔ ya NASA

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto