Bazali komipesa
“BATO na yo bakomipesa na yo na bolingo nyonso.” (Nzembo 110:3) Maloba wana ezalaki na ntina mingi mpo na bana-kelasi 46 ya kelasi ya mbala ya 118 ya Gileadi, Eteyelo ya Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia. Ndenge nini bamibongisaki mpo na kokɔta na eteyelo yango, oyo epesaka bandeko oyo balingi kokóma bamisionɛrɛ formasyo mpo na kokende kosalisa bato na mboka mopaya bákokisa bamposa na bango ya elimo? Mike ná Stacie, oyo bazalaki na kelasi ya mbala ya 118 ya Gileadi, balobi boye: “Mokano na biso ya kozala na bomoi ezangi mindondo esalisaki biso tólongola makambo mingi oyo ekokaki kobenda likebi na biso mpe tótya makambo ya elimo na esika ya liboso na bomoi na biso. Tolingaki ata moke te ete mombongo na biso oyo ezalaki kotambola malamu mpenza etinda biso tóbosana mikano ya elimo.” Lokola Mike ná Stacie, bandeko mosusu oyo bazalaki na kelasi yango bamipesaki na bolingo na bango moko, mpe lelo oyo bazali basakoli ya Bokonzi na bakɔntina minei.
Na mokolo ya pɔsɔ, mwa 12 Marsi 2005, bato 6 843 oyo bayanganaki na likita ya kopesa bana-kelasi diplome balandaki programɛ yango na esengo mpenza. Theodore Jaracz, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova, azalaki prezida ya likita yango. Nsima ya kotombela boyei malamu na bayangani ya likita yango oyo bautaki na mikili 28, abendaki likebi na bango na motuya ya mateya ya Biblia. Atángaki maloba ya William Lyon Phelps, molakisi moko ya Amerika mpe alobaki boye: “Tokoki mpenza koloba ete moto nyonso oyo azali na boyebi ya sikisiki ya Biblia azali moto ya mayele.” Atako mayele ya mokili ezali na ntina mingi, boyebi ya Biblia eleki yango mosika. Esalisaka bato bákóma na boyebi ya Nzambe, oyo ekopesa bango bomoi ya seko. (Yoane 17:3) Ndeko Jaracz apesaki bana-kelasi longonya mpo na ndenge bandimi komipesa mpo na kosala mingi na mosala ya koteya bato Biblia oyo ezali kosalema na masangá 98 000 ya Batatoli ya Yehova.
Bilendiseli na ntango ebongi mpo na bana-kelasi
Nsima ya maloba wana ya ebandeli ya prezida, ndeko William Samuelson asalaki lisolo oyo motó ya likambo na yango euti na Nzembo 52:8: “Ndenge oyo okoki kozala lokola nzete kitoko ya olive oyo ezali kokola na ndako ya Nzambe.” Amonisaki ete Biblia esalelaka nzete ya olive na maloba ya elilingi lokola elembo ya kobota mbuma mingi, ya kitoko mpe ya lokumu. (Yilimia 11:16) Mpo na komisa ete bana-kelasi yango bazali lokola banzete ya olive, molobi alobaki boye: “Bokozala kitoko mpe na lokumu na miso ya Yehova ntango bozali kosala mosala na bino ya kosakola Bokonzi na bosembo nyonso epai bakotinda bino.” Kaka ndenge nzete ya olive ezalaka na mposa ya misisa ya milai mpo ekufa te na eleko ya elanga, bana-kelasi basengeli kopika mpenza misisa na bango ya elimo mpo bálɛmba nzoto te ntango bato baboyi koyoka nsango na bango, ntango bakutani na botɛmɛli to na mikakatano mosusu na mosala na bango.—Matai 13:21; Bakolose 2:6, 7.
John Barr, moko ya bandeko misato ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi oyo bazwaki maloba na likita yango, asalaki lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo, “Bino bozali mungwa ya mabelé.” (Matai 5:13) Amonisaki ete ndenge kaka mungwa ebatelaka bilei mpo ebeba te, bamisionɛrɛ oyo bazali kosakola Bokonzi ya Nzambe bakobatela mpe bizaleli mpe elimo ya bato oyo bandimi koyoka bango, mpe na ndenge yango bakobikisa bomoi na bango. Na nsima, Ndeko Barr alendisaki bana-kelasi na boboto mpenza ete “bázalaka na kimya” na basusu. (Malako 9:50) Alobaki na bango boye: “Bólona mbuma ya elimo mpe bókeba ete etamboli na bino mpe elobeli na bino emonisaka ntango nyonso boboto mpe limemya mpo na bato mosusu.”
Ndeko Wallace Liverance, moko ya balakisi ya Gileadi, asalaki lisolo oyo motó ya likambo na yango ezalaki, “Bótikala na kati ya mai ya mozindo.” Kaka ndenge masuwa oyo ezali kotambola na mai ya mozindo ezalaka na mokakatano te ya kolanda nzela ya malamu, moto oyo asosoli “makambo ya bozindo ya Nzambe,” elingi koloba solo na ntina na mikano na ye mpe ndenge mikano yango ekokokisama, akoki mpe kokóla na elimo. (1 Bakolinti 2:10) Soki totikali kaka na kati ya mai moke ya elimo, elingi koloba tozali kosepela kaka na “makambo mikemike ya maloba mosantu ya Nzambe,” yango ekopekisa biso kokola na elimo mpe tokoki kutu kokóma na likama makasi ete ‘kondima na biso ebeba lokola masuwa oyo epanzani.’ (Baebele 5:12, 13; 1 Timote 1:19) Ndeko Liverance asukisaki na maloba oyo: “Tiká ete ‘bomɛngo ya Nzambe mpe bwanya na ye mpe boyebi na ye’ esalisa bino na bisika nyonso oyo bozali kokende.”—Baloma 11:33.
Mark Noumair, molakisi mosusu ya Gileadi, asalaki lisolo oyo motó ya likambo na yango ezalaki, “Etamboli na yo ekoyokana na libula na yo?” Eteyelo ya Gileadi ekokisi lelo mbula koleka 60 mpe ekómi na lokumu mingi mpo na ‘litatoli malamu mpenza’ oyo bandeko oyo bazwá formasyo wana bazali kopesa. (Genese 31:48) Bandeko oyo bazwi formasyo na kelasi ya mbala ya 118 bazwi libula yango. Ndeko Noumair alendisaki bandeko yango bálanda ndakisa ya Batekoa oyo bazalaki na ntango ya Nehemia mpe bámikitisa mpenza mpo na kosala na boyokani na masangá epai bazali kokende mpe bamisionɛrɛ mosusu oyo bakokuta kuna. Alobaki na bango bákeba na ezaleli ya lolendo ya “mikóló” oyo Nehemia alobelaki, bázala na momeseno ya kosala mosala na bango kozanga ete bámikumisaka mpe bálukaka te komitya na liboso ya basusu.—Nehemia 3:5.
Masolo ya ntina mingi ya bana-kelasi mpe mituna na bandeko mosusu
Motó ya likambo ya eteni ya mibale ya likita yango ezalaki, “Liloba ya Nzambe ekobaki kokola.” (Misala 6:7) Lawrence Bowen, molakisi ya Gileadi, asololaki na bandeko oyo bazwaki formasyo, babɛtaki masolo ya makambo oyo bamonaki na mosala ya kosakola na boumeli ya formasyo na bango. Masolo na bango emonisaki ete basakolaki Liloba ya Nzambe na molende mpe Yehova apambolaki mpenza milende na bango.
Richard Ashe atambwisaki lisolo ya mituna mpe biyano na bandeko ya Betele oyo misala na bango esalisaka Eteyelo etambola malamu. Makambo oyo bandeko yango balobaki emonisaki mpenza lisungi oyo bandeko ya Betele bapesaka mpo bana-kelasi bálanda formasyo na bango na ndenge ebongi. Na nsima, Geoffrey Jackson asololaki na bandeko misato oyo bazwá formasyo na Gileadi. Balobelaki ebele ya mabaku oyo bamisionɛrɛ bazali na yango ya kopesa Yehova nkembo mpe lokumu. Moko na bango alobaki boye: “Bato batalaka makambo nyonso oyo misionɛrɛ azali kosala. Bayokaka, bamonaka mpe etikalaka na makanisi na bango.” Yango wana, balendisaki bana-kelasi ete bábosana te ete basengeli ntango nyonso kopesaka ndakisa ya malamu. Toli wana ya malamu mpenza ekosalisa bango mingi na mikolo oyo ezali koya.
Stephen Lett, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, asalaki lisolo ya nsuka; motó ya likambo na yango ezalaki, “Bókende mpe bózala bamemi ya ‘mai ya bomoi.’” (Yoane 7:38) Alobaki ete na boumeli ya sanza mitano mobimba, bana-kelasi bazwaki libaku monene ya komɛla na mozindo mpenza solo ya Liloba ya Nzambe. Sikoyo, bamisionɛrɛ yango ya sika bakosala nini na makambo oyo bayekoli? Ndeko Lett alendisaki bango bábomba mai yango ya elimo mpo na bango moko te, kasi bakabola yango mpo “liziba ya mai oyo ezali kopunzwapunzwa mpo na kopesa bomoi ya seko” ekóma mpe kotyola na kati ya bato mosusu. (Yoane 4:14) Molobi abakisaki boye: “Bóbosana ata mokolo moko te kopesa Yehova, ‘liziba ya mai ya bomoi,’ lokumu mpe nkembo oyo ebongi na ye. Bózalaka na motema molai ntango bozali koteya bato oyo bauti na Babilone monene oyo ezangi mpenza mai.” (Yilimia 2:13) Mpo na kosukisa, Ndeko Lett alendisaki bandeko oyo bazwaki formasyo bálanda na esengo mpenza ndakisa ya elimo mpe ya Mwasi ya libala mpe bálobaka ntango nyonso: “‘Yaká!’ Mpe tiká moto nyonso oyo azali na mposa ya mai aya; tiká moto nyonso oyo alingi, akamata mai ya bomoi ofele.”—Emoniseli 22:17.
Mpo na kosukisa likita yango, Ndeko Jaracz atángelaki bayangani bambote oyo eutaki epai ya bandeko ya mikili ndenge na ndenge. Na nsima, mwana-kelasi moko atángaki, na nkombo ya baninga na ye nyonso, mokanda ya botɔndi mpo na formasyo oyo bazwi.
Okoki komipesa mpo na kokende kosala epai mposa ezali monene? Soki ezali bongo, landá mikano ya elimo, ndenge bandeko oyo bauti kozwa formasyo na Gileadi basali. Okozwa esengo oyo moto azwaka soki amipesi na bolingo na ye moko mpo na kosalela Nzambe, ezala lokola misionɛrɛ na mboka mopaya to lokola mosakoli na mboka na ye.
[Etanda na lokasa 13]
MAKAMBO ETALI BANA-KELASI
Bauti na mikili: 8
Batindami na mikili: 19
Bana-kelasi bazalaki: 46
Mwayene ya mbula ya
kobotama: 33,0
Mwayene ya mbula balekisi na kati ya solo: 16,5
Mwayene ya mbula balekisi na mosala ya ntango nyonso: 12,9
[Elilingi na lokasa 15]
Kelasi ya mbala ya 118 ya Gileadi, Eteyelo ya Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia
Bankombo na bango ekomami awa na nse na kolanda ndenge batɛlɛmi na fɔtɔ; banda na moto ya liboso na lobɔkɔ ya mwasi; mpe banda na molɔngɔ ya liboso tii na molɔngɔ ya nsuka.
(1) Brockmeyer, A.; Moloney, S.; Symonds, N.; Lopez, Y.; Howard, C. (2) Jastrzebski, T.; Brown, D.; Hernandez, H.; Malagón, I.; Jones, A.; Connell, L. (3) Howard, J.; Lareau, E.; Shams, B.; Hayes, S.; Brown, O. (4) Burrell, J.; Hammer, M.; Mayer, A.; Kim, K.; Stanley, R.; Rainey, R. (5) Jastrzebski, P.; Zilavetz, K.; Ferris, S.; Torres, B.; Torres, F. (6) Connell, J.; Hernandez, R.; Moloney, M.; Malagón, J.; Shams, R.; Hayes, J. (7) Ferris, A.; Hammer, J.; Stanley, G.; Kim, C.; Symonds, S.; Lopez, D.; Burrell, D. (8) Brockmeyer, D.; Mayer, J.; Rainey, S.; Zilavetz, S.; Jones, R.; Lareau, J.