Nsango malamu mpo na bato ya bikólo nyonso
“Bokozala batatoli na ngai . . . tii na esika eleki mpenza mosika na mabelé.”—MISALA 1:8.
1. Biso bateyi ya Biblia totyaka likebi na nini, mpe mpo na nini?
BATEYI ya malamu batyaka likebi kaka te na makambo oyo bazali koloba na bayekoli na bango, kasi batyaka likebi mpe na lolenge oyo bazali koloba makambo yango. Biso bateyi ya solo ya Biblia, tosalaka mpe bongo. Totyaka likebi na nsango oyo tozali kosakola mpe na lolenge oyo tozali kosakola yango. Nsango na biso, elingi koloba nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, ebongwanaka te, kasi biso tobongolaka lolenge na biso ya kosakola yango. Mpo na nini? Mpo tozali na mposa bato ebele báyoka yango.
2. Ntango tozali kobongola lolenge na biso ya kosakola, tozali komekola banani?
2 Ntango tozali kobongola lolenge na biso ya kosakola, tozali komekola basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala. Tózwa ndakisa ya ntoma Paulo. Ye alobaki boye: “Epai ya Bayuda nakómaki lokola Moyuda . . . Epai ya baoyo bazangá mibeko nakómaki lokola nde nazangá mibeko . . . Epai ya bato ya bolɛmbu nakómaki moto ya bolɛmbu, mpo nakoka kozwa bato ya bolɛmbu. Nakómaki makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso, mpo ata ndenge nini nakoka kobikisa bamosusu.” (1 Bakolinti 9:19-23) Paulo azwaki matomba mingi na ndenge azalaki kobongola lolenge na ye ya kosakola. Biso mpe tokozwa matomba mingi soki tozali kobongola lolenge na biso ya kosakola na kotalela moto mokomoko oyo tozali kosolola na ye.
Tii na “ndelo nyonso ya mokili”
3. (a) Mokakatano nini tozali na yango na mosala na biso ya kosakola? (b) Ndenge nini maloba ya Yisaya 45:22 ezali kokokisama lelo oyo?
3 Mokakatano moko ya monene oyo basakoli ya nsango malamu bazali na yango ezali bonene ya teritware oyo bazali na yango: “mabele mobimba oyo efandami.” (Matai 24:14) Na boumeli ya bambula ya 1900, basaleli mingi ya Yehova basalaki nyonso mpo na kokende kosakola nsango malamu na bisika oyo basakoli bakómaki naino te. Yango ebimisaki matomba nini? Bokoli makasi emonanaki na mokili mobimba. Na ebandeli ya ekeke yango, nsango malamu ezalaki kosakolama kaka na mwa mikili moke, kasi lelo oyo Batatoli ya Yehova bazali kosakola na mikili 235! Ya solo mpenza, nsango malamu ya Bokonzi ezali kosakolama tii na “ndelo nyonso ya mokili.”—Yisaya 45:22.
4, 5. (a) Banani basali mosala monene mpo na kopalanganisa nsango malamu? (b) Babiro ya bafiliale mosusu elobaki nini mpo na bandeko ya mikili mosusu oyo bazali kokende kosakola na bateritware ya bafiliale na bango?
4 Nini ezali kopesa nzela na bokoli ya ndenge wana? Ezali na makambo mingi. Bamisionɛrɛ oyo bazali kozwa formasyo na Gileadi, Eteyelo ya Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia mpe, banda mwa bambula, bandeko koleka 20 000 oyo bazwi formasyo na Eteyelo mpo na kobongisa basungi, basali mosala monene mpo na bokoli yango. Batatoli mingi oyo bazali kosalela mbongo na bango moko mpo na kokende kosakola epai basakoli ya Bokonzi bazali mingi te basali mpe mingi mpo na bokoli yango. Baklisto wana ya elimo ya komipesa, mibali mpe basi, bilenge mpe mikóló, baoyo babalá mpe baoyo bazali minzemba, bazali kosala mosala monene mpo na kosakola nsango ya Bokonzi na mokili mobimba. (Nzembo 110:3; Baloma 10:18) Bazali na motuya mingi na bisika oyo bazali kokende kosakola. Talá makambo oyo babiro ya bafiliale mosusu ekomaki mpo na bandeko oyo bazali kouta na mikili mosusu mpo na kokende kosakola na bateritware na bango, epai basakoli ya Bokonzi bazali mingi te.
5 “Batatoli yango bazali kosala mosala monene mpo na kosakola na bateritware oyo ezali na masangá te, bazali kosalisa mpo na kosala masangá ya sika mpe bazali kosalisa bandeko ya bateritware yango bákola na elimo.” (Équateur) “Soki bankama ya bandeko oyo bautá na mikili mosusu oyo bazali na teritware na biso bakei, masangá mingi ekolɛmba. Bandeko yango bazali mpenza lipamboli monene mpo na biso.” (République dominicaine) “Na masangá mingi ya teritware na biso, bandeko basi bazali ebele, ata mbala mibale to misato koleka mibali. (Nzembo 68:11) Mingi kati na bango bazali bato ya sika na kati ya lisangá, kasi bandeko basi oyo bautá na mikili mosusu, oyo bazali babongisi-nzela mpe babalá te, bazali kosalisa mpenza mpo na kopesa bandeko wana ya sika formasyo. Bandeko yango oyo bautá na mikili mosusu bazali likabo monene mpo na biso!” (Ekólo moko na Mpoto ya Ɛsti) Okanisaka mpe kokende kosakola na mokili mosusu?a—Misala 16:9, 10.
“Bato zomi ya minɔkɔ nyonso”
6. Na maloba nini esakweli ya Zekalia 8:23 emonisaki mokakatano ya ebele ya minɔkɔ oyo tozali kokutana na yango na mosala ya kosakola?
6 Mokakatano mosusu ya monene oyo basakoli ya Bokonzi bazali na yango ezali ebele ya minɔkɔ oyo ezali kolobama awa na mabelé. Liloba ya Nzambe esakolaki boye: “Na mikolo yango, bato zomi [ya minɔkɔ nyonso ya bikólo, NW], bakosimba elamba ya moto oyo azali Moyuda, bakoloba ete, Tokokende na yo elongo, zambi toyoki ete Nzambe azali elongo na bino.” (Zekalia 8:23) Na ndenge esakweli yango ezali kokokisama na mikolo na biso, bato zomi ezali ebele ya bato, oyo Emoniseli 7:9 elobeli. Kasi, tóbosana te ete esakweli ya Zekalia elobi kaka te ete “bato zomi” yango bakouta na bikólo nyonso, kasi elobi mpe ete bakozala bato “ya minɔkɔ nyonso ya bikólo.” Tomoni mpe kokokisama ya likambo yango? Ɛɛ.
7. Mituya nini ezali komonisa ete bato “ya minɔkɔ nyonso” bazali koyoka nsango malamu?
7 Tótalela naino mwa mituya. Eleki sikoyo mbula ntuku mitano, mikanda na biso ezalaki kobima na minɔkɔ 90. Lelo oyo, ekómi kobima na minɔkɔ 400. “Moombo ya sembo mpe ya mayele” asali nyonso mpo na kobimisa mikanda ata na minɔkɔ mosusu oyo elobamaka kaka na mwa bato moke. (Matai 24:45) Na ndakisa, mikanda oyo elimbolaka Biblia ezali sikoyo kobima na monɔkɔ ya Groënland (elobamaka na bato 47 000), na monɔkɔ ya Palau (elobamaka na bato 15 000) mpe na monɔkɔ ya bisanga Yap (bato oyo balobaka yango bakómi ata 7 000 te).
“Ekuke monene” oyo ezali komema na mabaku mosusu
8, 9. Likambo nini efungoli “ekuke monene” mpo na biso, mpe yango etindi ebele ya Batatoli básala nini?
8 Nzokande, na mikolo oyo, ezali na ntina te ete okende na mikili mosusu mpo na kosakola nsango malamu epai ya bato ya minɔkɔ nyonso. Na bambula oyo, bamilio ya bato oyo bakimá bamboka na bango mpe bakendá kofanda na mikili ya bozwi basali ete bato oyo balobaka minɔkɔ mosusu bázala mingi na mikili yango. Na ndakisa, minɔkɔ soki 100 ezali kolobama lelo na Paris, na ekólo France. Na engumba Toronto, na Canada, minɔkɔ ezali kolobama 125, na Londres, na Angleterre, minɔkɔ koleka 300 ya bapaya ezali kolobama! Koya ya ebele ya bapaya wana na bateritware ya masangá mingi efungoli “ekuke monene” oyo ezali komema na mabaku mosusu ya kosakola nsango malamu epai ya bato ya bikólo nyonso.—1 Bakolinti 16:9.
9 Ebele ya Batatoli bazali koyekola minɔkɔ mosusu mpo na kolonga mokakatano yango. Yango ezali likambo ya pɛtɛɛ te mpo na mingi kati na bango, kasi esengo oyo bazali kozwa ntango bazali kosalisa bapaya oyo bafandi na bamboka na bango báyeba solo ya Liloba ya Nzambe eleki mpasi oyo bazali koyoka mpo na koyekola minɔkɔ ya sika. Na mbula moko oyo eutaki koleka, bato soki ntuku minei likoló ya mokama (40%) na kati ya baoyo bazwaki batisimo na liyangani moko ya etúká oyo esalemaki na ekólo moko ya Mpoto bautaki na mikili mosusu.
10. Ndenge nini osalelaki mwa buku Une bonne nouvelle pour des gens de toutes nations ? (Talá etanda “Makambo oyo ezali na mwa buku “Une bonne nouvelle pour des gens de toutes nations,” lokasa 26.)
10 Toboyi te, mingi kati na biso bazali na likoki ya koyekola minɔkɔ mosusu te. Atako bongo, tokoki kosalela mwa buku oyo ebimi sika, Une bonne nouvelle pour des gens de toutes nations (Nsango malamu mpo na bato ya bikólo nyonso),b oyo ezali na nsango moko kitoko ya Biblia na minɔkɔ ebele, mpo na kosalisa bapaya oyo bazali na mboka na biso báyoka nsango malamu. Osalelaka mwa buku yango na mosala ya kosakola?
Ntango bato bazali kosepela na nsango na biso te
11. Wapi mikakatano mosusu oyo basakoli bazali kokutana na yango na bateritware mosusu?
11 Lokola misala ya Satana ezali se kokóma makasi awa na mabelé, ezali na mokakatano mosusu oyo tokutanaka na yango mingi: na bateritware mosusu, bato basepelaka mpenza na nsango na biso te. Yango ekoki kokamwisa biso te, mpo Yesu asakolaki ete tokomona makambo ya ndenge wana. Mpo na mikolo na biso, Yesu alobaki ete: “Bolingo ya bato mingi ekokóma mpiɔ.” (Matai 24:12) Ya solo, kondima ya bato mingi epai ya Nzambe elɛmbi mpe bazali lisusu na limemya mpenza te mpo na Biblia. (2 Petelo 3:3, 4) Yango wana, na bisika mingi na mokili, kaka mwa bato moke nde bazali kokóma bayekoli ya Klisto. Kasi, yango elingi koloba te ete bandeko oyo bazali koboma nzoto mpo na kosakola na bateritware ya ndenge wana bazali kosala mosala ya mpunda. (Baebele 6:10) Mpo na nini te? Tótala Makambo oyo elandi.
12. Wapi ntina mibale oyo tosakolaka nsango malamu?
12 Evanzile ya Matai emonisi ntina mibale oyo tosakolaka nsango malamu. Ya liboso, tosakolaka mpo na ‘kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.’ (Matai 28:19) Ya mibale, tosakolaka nsango ya Bokonzi mpo na kopesa “litatoli.” (Matai 24:14) Makambo yango nyonso mibale ezali na ntina, kasi oyo ya mibale ezali na ntina lisusu koleka. Mpo na nini?
13, 14. (a) Wapi likambo moko ya ntina mingi ya elembo ya kozala ya Klisto? (b) Likambo nini tosengeli kobosanaka te, mingimingi ntango tozali kosakola na teritware oyo bato basepelaka mpenza na nsango na biso te?
13 Matai akomaki ete bayekoli batunaki Yesu ete: “Nini ekozala elembo ya kozala na yo mpe ya bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo?” (Matai 24:3) Na eyano oyo Yesu apesaki bango, alobaki ete likambo moko ya ntina mingi na kati ya elembo yango ezali ete nsango malamu ekosakolama na mokili mobimba. Tomoni ete na eyano na ye, Yesu alobelaki mosala ya kokómisa bato bayekoli te. Alobaki nde boye: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso.” (Matai 24:14) Na ndenge yango, Yesu amonisaki ete mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi ekozala mpe likambo moko ya ntina mingi na kati ya elembo ya kozala na ye.
14 Yango wana, ntango tozali kosakola nsango malamu ya Bokonzi, tosengeli kobosanaka te ete ata soki tolongi kokómisa bato bayekoli te, tozali kopesa “litatoli.” Ata soki bato basepeli na nsango na biso te, bayebi malamu likambo oyo tozali kosala, mpe na ndenge yango, tozali kokokisa esakweli ya Yesu. (Yisaya 52:7; Emoniseli 14:6, 7) Jordy, elenge Motatoli moko na Mpoto, alobaki boye: “Koyeba ete Yehova azali kosalela ngai mpo na kokokisa esakweli ya Matai 24:14 etondisaka ngai na esengo.” (2 Bakolinti 2:15-17) Na ntembe te, yo mpe oyokaka ndenge yango.
Ntango bazali kotɛmɛla nsango na biso
15. (a) Yesu akebisaki bayekoli na ye na likambo nini? (b) Nini ezali kopesa biso makasi ya kokoba kosakola atako bazali kotɛmɛla biso?
15 Mokakatano mosusu oyo tokutanaka na yango ntango tozali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ezali botɛmɛli. Yesu akebisaki bayekoli na ye boye: “Bokozala biloko ya koyinama na bikólo nyonso mpo na nkombo na ngai.” (Matai 24:9) Lelo oyo, bazali koyina, kotɛmɛla mpe konyokola bayekoli ya Yesu, ndenge kaka basalaki baklisto ya liboso. (Misala 5:17, 18, 40; 2 Timote 3:12; Emoniseli 12:12, 17) Na mikili mosusu, Leta ezali kopekisa mosala na bango. Kasi, lokola balingi kotosa Nzambe, baklisto ya solo ya bikólo yango bazali kokoba kosakola nsango malamu ya Bokonzi. (Amosa 3:8; Misala 5:29; 1 Petelo 2:21) Nini ezali kopesa bango mpe Batatoli mosusu ya mokili mobimba makasi ya kosala bongo? Yehova nde azali kopesa bango makasi na nzela ya elimo santu na ye.—Zekalia 4:6; Baefese 3:16; 2 Timote 4:17.
16. Ndenge nini Yesu amonisaki boyokani oyo ezali kati na mosala ya kosakola mpe elimo ya Nzambe?
16 Yesu amonisaki mpenza boyokani oyo ezali kati na elimo ya Nzambe mpe mosala ya kosakola ntango alobaki na bayekoli na ye boye: “Bokozwa nguya ntango elimo santu ekoya likoló na bino, mpe bokozala batatoli na ngai . . . tii na esika eleki mpenza mosika na mabelé.” (Misala 1:8; Emoniseli 22:17) Ndenge oyo makambo elandani na vɛrsɛ yango ezali na ntina mingi. Bayekoli bazwaki naino elimo santu, mpe na nsima babandaki mosala ya kosakola na mokili mobimba. Kaka na lisalisi ya elimo santu ya Nzambe nde bakokaki kozwa makasi ya kokoba kopesa “litatoli na bikólo nyonso.” (Matai 24:13, 14; Yisaya 61:1, 2) Yango wana, ebongaki mpenza Yesu abenga elimo santu “mosungi.” (Yoane 15:26) Alobaki ete elimo ya Nzambe ekoteya bayekoli na ye mpe ekotambwisa bango.—Yoane 14:16, 26; 16:13.
17. Ntango tokutani na botɛmɛli ya makasi, ndenge nini elimo santu esalisaka biso?
17 Ndenge nini elimo ya Nzambe ezali kosalisa biso lelo oyo ntango tozali kokutana na botɛmɛli makasi na mosala ya kosakola? Elimo ya Nzambe elendisaka biso mpe etɛmɛlaka bato oyo bazali konyokola biso. Tózwa ndakisa ya likambo moko oyo esalemaki na bomoi ya Mokonzi Saulo.
Elimo ya Nzambe etɛmɛlaki ye
18. (a) Mbongwana nini ya mabe mpenza emonanaki epai ya Saulo? (b) Saulo asalelaki mayele nini mpo na na konyokola Davidi?
18 Saulo azalaki moto malamu ntango akómaki mokonzi na Yisalaele, kasi na nsima azalaki lisusu kotosa Yehova te. (1 Samwele 10:1, 24; 11:14, 15; 15:17-23) Yango wana, elimo ya Nzambe ezalaki lisusu na ye te. Saulo akómaki koyokela Davidi nkanda makasi, mpamba te ye nde Nzambe apakolaki mpo azala mokonzi na esika na ye mpe elimo ya Nzambe ezalaki na ye. (1 Samwele 16:1, 13, 14) Emonanaki lokola nde akoboma Davidi kozanga mokakatano. Kutu, Davidi azalaki ata na ebundeli moko te, azalaki kaka na nzɛnzɛ, nzokande Saulo azalaki na likonga. Mokolo moko, ntango Davidi azalaki kobɛta nzɛnzɛ, “Saulo abwakaki likonga, ye ete, Nakobɛta Davidi na yango kino etutu. Kasi Davidi apɛngwaki liboso na ye mbala mibale.” (1 Samwele 18:10, 11) Na nsima, Saulo ayokelaki mwana na ye Yonatana, moninga ya Davidi, mpe alapaki ndai ete: “Lokola [Yehova] azali na bomoi, [Davidi] akobomama te.” Kasi na nsima, Saulo “amekaki kobɛta Davidi kino etutu na likonga.” Nzokande, Davidi “akimaki liboso na Saulo mpe ye abɛtaki likɔnga na etutu mpenza.” Davidi akimaki, kasi Saulo alandaki ye. Na ntango wana, elimo ya Yehova ekómaki kotɛmɛla Saulo. Na ndenge nini?—1 Samwele 19:6, 10.
19. Ndenge nini elimo ya Nzambe ebatelaki Davidi?
19 Davidi akimaki epai ya mosakoli Samwele, kasi Saulo atindaki bato na ye bákende kokanga ye. Kasi, ntango bakómaki na esika oyo Davidi abombanaki, “Elimo ya Nzambe ekwelaki ata bantoma na Saulo mpe bango basakolaki.” Lokola elimo ya Nzambe ekangaki bango, babosanaki likambo oyo bakendaki kosala. Saulo atindaki bato mbala mibale lisusu, kasi elimo ya Nzambe ekangaki bango nyonso. Nsukansuka, Mokonzi Saulo ye moko akendaki, kasi elimo ya Nzambe ekangaki mpe ye. Kutu, elimo santu ekangaki ye “mokolo yango mobimba mpe butu mobimba,” mpe na ndenge yango, Davidi azwaki ntango ya kokima.—1 Samwele 19:20-24.
20. Liteya nini tokoki kozwa na lisolo ya monyoko oyo Saulo abimiselaki Davidi?
20 Lisolo wana ya Saulo ná Davidi ezali na liteya moko oyo ekoki mpenza kolendisa biso: Bato oyo bazali konyokola basaleli ya Nzambe bakoki kolonga te soki elimo ya Nzambe etɛmɛli bango. (Nzembo 46:11; 125:2) Yehova akanaki ete Davidi akóma mokonzi ya Yisalaele. Moto moko te akokaki kobongola likambo yango. Na mikolo na biso, Yehova akani ete “nsango malamu ya bokonzi ekosakolama.” Moto moko te akoki kosala ete nsango yango etika kosakolama.—Misala 5:40, 42.
21. (a) Ndenge nini batɛmɛli mosusu basalaka lelo oyo? (b) Elikya nini tozali na yango?
21 Bakonzi mosusu ya mangomba mpe ya politiki basalelaka lokuta, ata mpe makasi mpo na koluka kopekisa biso tótika kosakola nsango malamu. Nzokande, kaka ndenge Yehova abatelaki Davidi na ndenge ya elimo, akobatela mpe basaleli na Ye lelo oyo. (Malaki 3:6) Yango wana, tozali koloba na elikya mpenza lokola Davidi ete: “Natye elikya na ngai epai ya Nzambe. Nakobanga eloko te. Eloko nini moto oyo asalemi na mabelé akoki kosala ngai?” (Nzembo 56:11; 121:1-8; Baloma 8:31) Na lisalisi ya Yehova, tiká ete tókoba koyika mpiko na mikakatano nyonso oyo tozali kokutana na yango ntango tozali kosakola nsango malamu ya Bokonzi epai ya bato ya bikólo nyonso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá etanda “Esengo monene mpenza,” lokasa 22.
b Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini tobongolaka lolenge na biso ya kosakola?
• “Ekuke monene” nini efungwamaki oyo ezali komema na mabaku ya sika?
• Likambo nini ezali kokokisama na mosala na biso ya kosakola, ata na bisika oyo bato basepelaka mpenza na nsango na biso te?
• Mpo na nini motɛmɛli moko te akoki kolonga kopekisa mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi?
[Etanda na lokasa 22]
Esengo monene mpenza
“Bazali na esengo mpe bazali kosepela na mosala oyo bazali kosalela Yehova elongo.” Maloba wana ezali kolobela libota moko ya Espagne oyo ekendaki Bolivie. Mwana moko ya libota yango akendaki kuna mpo na kopesa mwa etuluku moko ya Batatoli mabɔkɔ. Esengo monene oyo mwana yango akómaki na yango ekamwisaki mpenza baboti na ye mpe mosika te, libota na bango mobimba, oyo ezalaki na bana mibali minei ya mbula banda 14 tii 25, bakendaki kuna. Bana misato bazali lelo babongisi-nzela, mpe oyo afungolelaki bango nzela autaki kokɔta na Eteyelo mpo na kobongisa basungi.
Angelica, mwasi ya Canada oyo azali na mbula 30 mpe azali kosakola nsango malamu na Mpoto ya Ɛsti, alobi boye: “Mikakatano ezali ya koloba te, kasi nazali kosepela ndenge nazali kosalisa bato na mosala ya kosakola. Batatoli ya mboka yango batɔndaka ngai ntango nyonso na ndenge nayá kopesa bango mabɔkɔ na mosala ya kosakola, mpe yango esimbaka mpenza motema na ngai.”
Bandeko basi mibale ya États-Unis oyo bazalaki na bambula pene na ntuku misato mpe bazali kosakola nsango malamu na République dominicaine, balobi boye: “Ezalaki na ebele ya makambo oyo tomesanaki na yango te. Kasi, toyikaki kaka mpiko mpe tokobaki kosala na teritware yango; kati na bato oyo toyekolaka na bango Biblia, nsambo bakómi koyangana na makita.” Molende ya bandeko basi mibale wana ebimisaki etuluku moko ya basakoli ya Bokonzi na engumba moko epai lisangá ata moko ezalaki te.
Laura, ndeko mwasi moko oyo azali na mbula pene na 30, akokisi sikoyo mbula minei na mboka mopaya mpo na mosala ya kosakola. Ye alobi boye: “Nandimá kozala na bomoi ezangi mindondo. Yango esalisaka basakoli bámona ete moto azalaka na bomoi ezangi mindondo mpo azali mobola te, kasi nde mpo ye moko aponi kozala bongo mpe ete yango emonisaka makanisi malamu. Lokola nasalisaka basusu, mingimingi bilenge, yango esalisaka ngai nabosana mikakatano ya kosala na mboka mopaya. Ata mpasi ya ndenge nini, nazali na mposa ya kolongwa na mboka oyo te, mpe soki Yehova alingi nakotikala kaka awa libela.”
[Etanda/Elilingi na lokasa 26]
Makambo oyo ezali na mwa buku Une bonne nouvelle pour des gens de toutes nations
Mwa buku Une bonne nouvelle pour des gens de toutes nations ezali na nsango ya lokasa moko, oyo ezali na minɔkɔ koleka 92. Nsango yango ekomamá na ndenge oyo ezali komonisa ete yo moto ozali koloba. Yango wana, soki moto oyo ozali kosolola na ye atángi nsango yango, akoyoka lokola nde yo moto ozali koloba na ye.
Soki ofungoli lokasa ya liboso ya mwa buku yango, okomona karte ya mokili. Salelá karte yango mpo na kobanda lisolo na moto oyo olingi kosakwela nsango malamu. Mbala mosusu okoki kolakisa ekólo oyo bozali mpe kosɛnga ye alakisa ekólo na ye. Yango ekoki kosala ete moto yango andima kosolola na yo mpe bokoki kosolola malamu mpenza.
Maloba ya ebandeli ya mwa buku yango elakisi makambo ebele ya ntina oyo tosengeli kolanda mpo na kosalisa bato oyo balobaka minɔkɔ oyo biso toyebi te. Tángá makambo yango na likebi mpenza mpe salelá yango na motema moko.
Na etanda ya makambo mazali na kati ya mwa buku yango, batye minɔkɔ nyonso oyo ezali na kati mpe elembo ya monɔkɔ mokomoko. Yango ekosalisa yo oyeba bilembo ya minɔkɔ oyo basalelá na batrakte mpe na mikanda na biso mosusu oyo ezali na minɔkɔ oyo oyebi te.
[Elilingi]
Osalelaka mwa buku yango na mosala ya kosakola?
[Bililingi na lokasa 23]
Mikanda na biso ezali kobima sikoyo na minɔkɔ koleka 400
GHANA
MOKILI YA LAPONIE (SUÈDE)
PHILIPPINES
[Bililingi na lokasa 24, 25]
Okoki kokende kosakola epai basakoli ya Bokonzi bazali mingi te?
ÉQUATEUR
RÉPUBLIQUE DOMINICAINE