Mituna ya batángi
Deteronome 14:21 elobi boye: “Bokoki kolya yango ekufi yango moko te.” Maloba wana eyokani te na Levitike 11:40 oyo elobi: “Ye oyo alei ndambo na ebembe na yango akosukola bilamba na ye mpe akozala mbindo kino mpokwa”?
Tokoki koloba te ete boyokani ezali te na kati ya bavɛrsɛ mibale wana. Vɛrsɛ ya liboso ezongeli mobeko oyo epekisaki kolya nyama oyo ekufi yango moko to oyo banyama mabe ya zamba ebomi yango. (Exode 22:31; Levitike 22:8) Vɛrsɛ ya mibale ezali kolimbola ndenge Moyisalaele akokaki kosala soki abuki mobeko yango na nkó te.
Soki mobeko epekisaki likambo moko, moto asengelaki kobosana mobeko yango soki moke te. Na ndakisa, ezalaki na mibeko oyo epekisaki koyiba, koboma, kopesa litatoli ya lokuta mpe bongo na bongo. Ezalaki mpe na bitumbu oyo bato bakokaki kozwa soki babuki mibeko yango. Bitumbu yango ezalaki kopesa mibeko makasi mpe komonisa ete mibeko ezalaki eloko ya lisɛki te.
Moto oyo abuki mobeko etali kolya mosuni ya nyama oyo ekufi yango moko, asengeleki kozala mbindo na miso ya Yehova mpe kosala ndenge mibeko esɛngi mpo na komipetola. Soki aboyi komipetola, asengelaki ‘komema lisumu na ye.’—Levitike 17:15,16.