Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/8 nk. 26-30
  • Yehova azali “mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova azali “mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bandakisa ya bato ya kala oyo bayikaki mpiko
  • “Eloko ya motuya” mpo na Yehova
  • Yehova “mopesi–mbano”
  • Kebá na “mayele mabe” ya Satana
  • Yehova “azali monene koleka mitema na biso”
  • “Motole ya kitoko” mpe “motole ya bokonzi”
  • Yehova apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Nani akobika na mokolo ya Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Yehova atyelaka yo likebi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Eloko moko te ekoki “kokabola biso na bolingo ya Nzambe”
    Pusaná penepene na Yehova
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/8 nk. 26-30

Yehova azali “mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi”

“Moto oyo azali kopusana epai ya Nzambe asengeli kondima ete ye azali mpe ete akómaka mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.”​—BAEBELE 11:6.

1, 2. Mpo na nini basaleli ya Yehova mosusu bakoki kokóma na makanisi ya kolɛmbisa?

BARBARAa alobaki boye: “Nazali Motatoli ya Yehova banda mbula soki 30, kasi namonaka ete nabongi te kobengama Motatoli. Atako nasalaki mosala ya mobongisi-nzela mpe nazwaki ebele ya mikumba mosusu, ata moko te kati na yango ezali kotinda ngai namiyoka na motema ete nabongi kobengama Motatoli ya Yehova.” Keith mpe azalaki kokanisa lokola Barbara. Alobaki boye: “Ntango mosusu, nazalaki komona ete nabongi te kobengama Motatoli ya Yehova, mpo Batatoli ya Yehova bazali na makambo ebele oyo esalisaka bango bázala na esengo, kasi ngai nazalaki ata na likambo moko te oyo ezalaki kopesa ngai esengo. Yango ezalaki kotinda ngai nakanisa ete nazali na ngambo, mpe ezalaki kokómisa ngai lisusu mawamawa.”

2 Basaleli mingi ya sembo ya Yehova, ezala na ntango ya kala to lelo oyo, bazalaki mpe kokanisa bongo. Yo mpe okanisaka ntango mosusu bongo? Ekoki kozala ete ozali kotungisama na ebele ya mikakatano, kasi ozali komona ete baninga na yo bandimi bazali na esengo mpe bazangi mikakatano. Mpo na yango, okoki kokanisa ete Yehova asepelaka na yo te mpe ete akoki kotyela yo likebi te. Koloba bongo mbala moko te. Biblia eyebisi biso boye: “[Yehova] atyolaki mpe aboyaki mpasi ya monyokolami te; abombelaki ye elongi na ye te kasi ayokaki wana alelaki ye.” (Nzembo 22:24) Esakweli wana oyo elobelaki Masiya emonisi ete Yehova ayokaka bato na ye ya sembo mpe apesaka bango mbano.

3. Mpo na nini bato nyonso bakutanaka na mikakatano ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo?

3 Bato nyonso, ezala mpe basaleli ya Yehova, bakutanaka na mikakatano ya ebongiseli ya ntango oyo. Tozali na kati ya mokili oyo eyangelami na monguna monene ya Yehova, Satana Zabolo. (2 Bakolinti 4:4; 1 Yoane 5:19) Basaleli ya Yehova bazali te kobatelama na ndenge ya likamwisi, kasi Satana atye miso na ye libosoliboso epai na bango. (Yobo 1:7-12; Emoniseli 2:10) Yango wana, tii na ntango oyo Nzambe abongisi, tosengeli ‘koyika mpiko na kati ya bolɔzi’ mpe ‘kotingama na mabondeli’ mpe kondima ete Yehova atyelaka biso likebi. (Baloma 12:12) Tosengeli te kokanisa ete Yehova, Nzambe na biso, alingaka biso te!

Bandakisa ya bato ya kala oyo bayikaki mpiko

4. Tangá mwa bandakisa ya basaleli ya Yehova ya sembo oyo bakutanaki na mikakatano.

4 Basaleli mingi ya Yehova ya ntango ya kala bakutanaki na mikakatano. Tózwa ndakisa ya Hana oyo “ayokaki bololo mingi na motema na ye” mpamba te abotaki te mpe, mpo na yango, azalaki kokanisa ete Nzambe abosani ye. (1 Samwele 1:9-11) Ntango Yezabele, mwasi ya mokonzi moko ya Yisalaele, azalaki kolukaluka Eliya mpo aboma ye, Eliya atondaki na nsɔmɔ mpe abondelaki Yehova boye: “Ekoki-e! Sasaipi, ɛ [Yehova], longolá bomoi na ngai, zambi naleki batata na ngai na malamu te.” (1 Mikonzi 19:4) Ntoma Paulo mpe atungisamaki na motema na ye mpo amonaki ete azali moto ya kozanga kokoka, yango wana alobaki boye: “Ntango nalingi kosala oyo ezali malamu, oyo ezali mabe nde ezali epai na ngai.” Abakisaki boye: “Ngai moto ya mawa!”​—Baloma 7:21-24.

5. (a) Mbano nini Hana, Eliya mpe Paulo bazwaki? (b) Ndenge nini Liloba ya Nzambe ekoki kobɔndisa biso ntango tolɛmbi na makanisi?

5 Nzokande, toyebi malamu ete ezala Hana, Eliya mpe Paulo, bango nyonso bakobaki kosalela Yehova atako bakutanaki na mikakatano, mpe apesaki bango ebele ya mapamboli. (1 Samwele 1:20; 2:21; 1 Mikonzi 19:5-18; 2 Timote 4:8) Kasi, basengelaki kobunda na makambo lokola mawa, kozanga elikya mpe kobanga. Yango wana, tokoki kokamwa te soki ntango mosusu biso mpe tolɛmbi na makanisi. Kasi, osengeli kosala nini soki mpo na mitungisi ya bomoi okómi komituna soki Nzambe alingaka yo mpenza? Liloba ya Nzambe ekoki kobɔndisa yo. Na ndakisa, na lisolo eleki, totalelaki maloba oyo Yesu alobaki ete Yehova ayebi motángo ya “nsuki mpenza ya motó na bino.” (Matai 10:30) Maloba wana ya kolendisa emonisi ete Yehova amibanzabanzaka mpenza mpo na mosaleli na ye mokomoko. Kanisá mpe ndakisa ya bakɛngɛli-mboka oyo Yesu apesaki. Soki ata moko te kati na bandɛkɛ wana ya mike ekweaka na mabelé kozanga ete Yehova amona, mpo na nini akoki komona mpasi na yo te?

6. Ndenge nini Biblia ekoki kobɔndisa bato oyo bazali kobunda na makanisi ya kolɛmbisa?

6 Ekoki mpenza kosalema ete biso bato ya kozanga kokoka tózala na motuya na miso ya Yehova Nzambe, Mozalisi na biso oyo azali na nguya nyonso? Ɛɛ! Kutu, mikapo ebele ya Biblia ezali komonisa biso likambo yango. Soki tozali komanyola na mikapo yango, tokoki mpenza koloba lokola mokomi ya nzembo ete: “Wana ezali ebele ya makanisi kati na ngai, [mabɔndisi] na yo ekosepelisaka molimo na ngai.” (Nzembo 94:19) Tótalela naino mwa bandakisa ya maloba yango ya kobɔndisa oyo ezali na kati ya Liloba ya Nzambe, oyo ekoki kosalisa biso tómona mpenza ete tozali na motuya na miso ya Nzambe mpe ete akopesa biso mbano soki totiki te kosala mokano na ye.

“Eloko ya motuya” mpo na Yehova

7. Wapi esakweli ya kolendisa oyo Yehova apesaki na nzela ya Malaki mpo na ekólo Yisalaele oyo etondaki na makambo ya mabe?

7 Likambo moko ya mawa ezalaki kosalema epai ya Bayuda na ekeke ya mitano liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Banganga-nzambe bazalaki kozwa banyama ebongi te oyo bato bazalaki kopesa mpe bazalaki kotumba yango lokola mbeka likoló ya etumbelo ya Yehova. Bazuzi bazalaki kosambisa makambo na bosembo te. Bondɔki, lokuta, mayele mabe mpe ekobo ezalaki mingi. (Malaki 1:8; 2:9; 3:5) Atako ekólo yango etondaki na mabe, Malaki apesaki esakweli moko ya kokamwa mpenza. Na nsima, Yehova asengelaki kobongisa bato na ye mpo bákóma lisusu na boyokani malamu na ye. Tozali kotánga boye: “[Yehova] ya bibele alobi ete, bakozala ya ngai, ɛɛ eloko ya motuya na mokolo yango ekobongisa ngai. Nakobikisa bango lokola moto akobikisa mwana na ye oyo azali kosalela ye mosala.”​—Malaki 3:17.

8. Mpo na nini esakweli ya Malaki 3:17 ekoki mpe kosalelama mpo na ebele ya bato?

8 Esakweli yango ya Malaki ezali kokokisama lelo oyo epai ya baklisto bapakolami na elimo, ekólo ya elimo oyo ezali na bato 144 000. Ekólo yango nde ezali “eloko ya motuya” to “ekólo moko oyo esengeli kozala eloko ya [Yehova] mpenza.” (1 Petelo 2:9) Esakweli ya Malaki ekoki mpe kolendisa “ebele ya bato,” oyo “batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi mpe liboso ya Mwana-Mpate, balati bazambala ya mpɛmbɛ.” (Emoniseli 7:4, 9) Ebele ya bato yango bakómi etonga moko na bapakolami, mpe bazali kotambwisama na mobateli kaka moko, Yesu Klisto.​—Yoane 10:16.

9. Mpo na nini Yehova atalelaka basaleli na ye lokola “eloko ya motuya”?

9 Ndenge nini Yehova atalelaka bato oyo baponi kosalela ye? Ndenge Malaki 3:17 emonisi yango, atalelaka bango ndenge tata ya bolingo atalelaka mwana na ye. Yoká maloba kitoko oyo asaleli mpo na kolobela bato na ye, “eloko ya motuya.” Babiblia mosusu ebongoli maloba yango na “bato ba ngai mpenza,” “eloko na ngai ya motuya mpenza,” mpe “mayaka na ngai ya ntalo mingi.” Mpo na nini Yehova atalelaka basaleli na ye lokola eloko ya motuya? Ntina ezali ete azali Nzambe oyo abosanaka te makambo malamu oyo tosalaka. (Baebele 6:10) Apusanaka penepene na bato oyo bazali kosalela ye na motema moko mpe azwaka bango na motuya mpenza.

10. Ndenge nini Yehova abatelaka basaleli na ye?

10 Ozali na eloko moko oyo ozwaka na motuya mingi? Osalaka makasi te mpo na kobatela yango? Yehova mpe asalaka kaka bongo mpo na “eloko ya motuya” na ye. Ya solo, abatelaka bango na mikakatano mpe na makama nyonso ya bomoi te. (Mosakoli 9:11) Kasi, Yehova azali na likoki ya kobatela basaleli na ye ya sembo na elimo, mpe akosala yango. Apesaka bango makasi oyo basengeli na yango mpo na koyika mpiko ata na mokakatano nini. (1 Bakolinti 10:13) Yango wana, Moize ayebisaki Bayisalaele, basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala ete: ‘Bózala makasi mpe na mpiko malamu. . . . [Yehova] Nzambe na yo akokendaka na yo elongo. Ye akozanga kosunga yo te mpe akotika yo te.’ (Deteronome 31:6) Yehova apesaka basaleli na ye mbano. Bazali “eloko ya motuya” na miso na ye.

Yehova “mopesi–mbano”

11, 12. Ndenge nini kotalela Yehova lokola Mopesi-mbano ekosalisa biso tózalaka na ntembe te na mitema ete alingaka biso?

11 Likambo mosusu oyo emonisaka ete Yehova azwaka basaleli na ye na motuya ezali ete apesaka bango mbano. Alobaki na Bayisalaele boye: “Meká ngai sasaipi na yango, soki nakozipwela bino maninisa ya lola te kosopela bino lipamboli kino esika ekozanga mpo na yango.” (Malaki 3:10) Na nsuka, Yehova akopesa basaleli na ye mbano ya bomoi ya seko. (Yoane 5:24; Emoniseli 21:4) Mbano wana ya motuya mingi ezali komonisa bonene ya bolingo mpe bokabi ya Yehova. Ezali mpe komonisa ete azwaka na motuya mpenza bato oyo baponi kosalela ye. Soki totalelaka Yehova lokola Mopesi-mbano monene, yango ekosalisa biso tókakatana ata moke te mpo na bolingo ya Yehova epai na biso. Kutu, Yehova azali koloba na biso tótalelaka ye lokola Mopesi-mbano! Paulo akomaki boye: “Moto oyo azali kopusana epai ya Nzambe asengeli kondima ete ye azali mpe ete akómaka mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.”​—Baebele 11:6.

12 Ya solo, tozali kosalela Yehova mpo tolingaka ye, kasi kaka te mpo alaki biso mbano. Kasi, kobatela elikya ya mbano na motema na biso ezali mabe te, ezali mpe komonisa te ete tozali kotalela kaka matomba na biso moko. (Bakolose 3:23, 24) Lokola Yehova alingaka biso mingi mpe atalelaka biso na motuya mingi, apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye makasi.

13. Mpo na nini ebongiseli ya lisiko ezali komonisa polele ete Yehova alingaka biso?

13 Likambo eleki monene oyo ezali komonisa ete bato bazali na motuya mingi na miso ya Yehova ezali ebongiseli ya lisiko. Ntoma Yoane akomaki boye: “Nzambe alingaki mokili mingi na boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye abomama te kasi azala na bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Soki totali ndenge Yehova atindaki Yesu Klisto aya komikaba mpo na kosikola biso, tokokanisa lisusu te ete tozali na motuya te na miso na ye to ete alingaka biso te. Ya solo, lokola Yehova andimaki kofuta motuya monene ndenge wana mpo na biso, elingi koloba apesaki bomoi ya mwana na ye mobotami-se-moko, emonani polele ete alingaka biso mingi.

14. Nini ezali komonisa lolenge oyo Paulo azalaki kotalela lisiko?

14 Yango wana, soki okómi kokanisa ete ozali na valɛrɛ te na miso ya Yehova, manyolá na ntina ya mbeka ya lisiko. Talelá yango lokola likabo oyo Yehova apesi mpenza yo. Yango nde ntoma Paulo asalaki. Kobosana te oyo alobaki ete: “Ngai moto ya mawa!” Kasi na nsima abakisaki ete: “Nzambe azwa matɔndi na nzela ya Yesu Klisto Nkolo na biso,” oyo “alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.” (Baloma 7:24, 25; Bagalatia 2:20) Maloba wana ya Paulo emonisi te ete azalaki kotalela kaka matomba na ye moko. Emonisi nde ete azalaki kondima mpenza ete Yehova atalelaka mpe ye na motuya. Na ndakisa ya Paulo, yo mpe osengeli kotalelaka lisiko lokola likabo oyo Nzambe apesi yo mpenza. Yehova azali kaka te Mobikisi ya nguya, kasi azali mpe Mopesi-mbano ya bolingo.

Kebá na “mayele mabe” ya Satana

15-17. (a) Ndenge nini Satana asalelaka makanisi ya kolɛmbisa? (b) Ndenge nini lisolo ya Yobo ekoki kolendisa biso?

15 Lisusu, ekoki kozala mpasi ondima ete makambo ya kobɔndisa oyo ezali na kati ya Liloba ya Nzambe ezali mpe mpo na yo. Okoki kokanisa ete likabo ya bomoi ya seko na mokili ya sika oyo Nzambe alaki ezali kaka mpo na bato mosusu, kasi yo obongi te mpo na kozwa yango. Soki ozali kokanisa ndenge wana, osengeli kosala nini?

16 Na ntembe te, oyebi malamu toli oyo Paulo apesaki Baefese: “Bólata molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe mpo bókoka kotɛlɛma ngwi liboso ya mayele mabe ya Zabolo.” (Baefese 6:11) Soki tokanisi mayele mabe ya Satana, tomonaka libosoliboso makambo lokola bolingo ya biloko ya mokili, pite ná ekobo; mpe tomikosaka te. Makambo wana ekweisá ebele ya basaleli ya Nzambe, ezala na ntango ya kala to na ntango na biso. Nzokande, tosengeli te kobosana mayele mosusu ya mabe oyo Satana asalelaka: molende na ye ya kondimisa bato ete Yehova alingaka bango te.

17 Zabolo ayebi mpenza kosalela makanisi ya ndenge wana mpo na kopɛngwisa bato epai ya Nzambe. Kanisá lisusu maloba oyo Biledada alobaki na Yobo: “Moto akoki kozala moyengebene liboso ya Nzambe boni? Akoki kozala pɛto boni, ye oyo abotami na mwasi? Talá, ata sanza ekongɛnga te mpe minzoto ezali pɛto na miso na ye te! Na koleka moto oyo azali mpambo, mpe mwana ya moto oyo azali nkiso.” (Yobo 25:4-6; Yoane 8:44) Kanisá naino ndenge maloba wana ekokaki kolɛmbisa Yobo! Na yango, kotika te ete Satana alɛmbisa yo. Lisusu, osengeli kokeba na mikano ya Satana mpo ozala na mpiko mpe na makasi ya kobunda mpo otika te kosala oyo ezali malamu. (2 Bakolinti 2:11) Atako Yehova asengelaki kosembola Yobo, apesaki ye mbano mpo ayikelaki mikakatano oyo akutanaki na yango mpiko; azongiselaki ye mbala mibale biloko na ye nyonso oyo abungisaki.​—Yobo 42:10.

Yehova “azali monene koleka mitema na biso”

18, 19. Na ndenge nini Nzambe “azali monene koleka mitema na biso,” mpe na ndenge nini “ayebi makambo nyonso”?

18 Ya solo, ekoki kozala mpasi kopikola makanisi ya kolɛmbisa oyo epiká misisa. Kasi, elimo ya Yehova ekoki kosalisa yo okweisa mokemoke “biloko oyo epikamá makasi . . . oyo etɛlɛmisami mpo na kotɛmɛla boyebi ya Nzambe.” (2 Bakolinti 10:4, 5) Ntango makanisi ya kolɛmbisa etungisi yo mingi koleka, manyolá na maloba ya ntoma Yoane oyo: “Na likambo oyo nde tokoyeba ete touti na solo, mpe tokondimisa mitema na biso liboso na ye na likambo nyonso oyo mitema na biso ezali kokweisa biso na yango, mpamba te Nzambe azali monene koleka mitema na biso mpe ayebi makambo nyonso.”​—1 Yoane 3:19, 20.

19 Maloba “Nzambe azali monene koleka mitema na biso” elimboli nini? Ntango mosusu, motema na biso ekoki kosambisa biso, mingimingi soki toyebi mabe mpe mabunga na biso. To mpe ekoki kozala mpo na makambo oyo tosalá na bomoi na biso, yango wana tozali na momeseno ya komitalela lokola bato mabe mpenza, oyo Nzambe akoki kondima ata mokolo moko te, ata soki tosali malamu ndenge nini. Maloba ya ntoma Yoane emonisi ete Yehova azali monene koleka makanisi nyonso wana! Alandelaka te mabunga na biso oyo tosalá kala, kasi amonaka mpe ete tozali na makoki ya kosala makambo ya malamu. Ayebi mpe makanisi ná bamposa na biso. Davidi akomaki boye: “Ayebi nzoto na biso, azali kobosana te ete tozali bobele mputulu.” (Nzembo 103:14) Ya solo, Yehova ayebi biso malamu koleka biso moko!

“Motole ya kitoko” mpe “motole ya bokonzi”

20. Esakweli ya Yisaya ya kozongisama ya Bayisalaele na mboka na bango ezali komonisa nini na ndenge Yehova atalelaka basaleli na ye?

20 Na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova apesaki basaleli na ye ya ntango ya kala elikya ete akozongisa bango na mboka na bango. Lokola bazalaki na boombo na Babilone, bato yango basengelaki mpenza na libɔndisi mpe elikya ya ndenge wana! Na kotalela ntango oyo basengelaki kozongisama na mabelé na bango, Yehova alobaki boye: “Okozala motole ya kitoko na lobɔkɔ ya [Yehova] mpe motole ya bokonzi na lobɔkɔ ya Nzambe na yo.” (Yisaya 62:3, NW) Maloba wana emonisi ete Yehova alatisaki bato na ye lokumu mpe nkembo lokola elamba. Asali mpe ndenge moko lelo oyo mpo na ekólo na ye ya Yisalaele ya elimo. Ezali lokola nde atomboli bango likoló mpenza mpo bato nyonso bámona lokumu na bango.

21. Ndenge nini okoki kokóma na elikya ete Yehova akopesa yo mbano mpo oyiki mpiko na bosembo nyonso?

21 Atako esakweli yango ezali kokokisama libosoliboso epai ya bapakolami, ezali mpe komonisa lokumu oyo Yehova azali kopesa na bato nyonso oyo bazali kosalela ye. Yango wana, soki okómi na ntembe na motema ete Yehova alingaka yo te, kobosana te ete atako ozali moto ya kozanga kokoka, okoki kozala lokola “motole ya kitoko” mpe lokola “motole ya bokonzi.” Na yango, kobá kosala na molende mokano na ye mpo osepelisa motema na ye. (Masese 27:11) Soki ozali kosala bongo, okoki kozala na elikya mpenza ete Yehova akopesa yo mbano mpo oyiki mpiko na bosembo nyonso!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Topesi bango bankombo mosusu.

Ozali koyeba lisusu?

• Na ndenge nini tozali “eloko ya motuya” mpo na Yehova?

• Mpo na nini ezali na ntina tótalelaka Yehova lokola Mopesi-mbano?

• Wapi “mayele mabe” ya Satana oyo tosengeli komibatela na yango?

• Na ndenge nini Nzambe azali “monene koleka mitema na biso”?

[Elilingi na lokasa 26]

Paulo

[Elilingi na lokasa 26]

Eliya

[Elilingi na lokasa 26]

Hana

[Elilingi na lokasa 28]

Liloba ya Nzambe ezali na ebele ya makanisi ya kobɔndisa

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto