Baklisto bangɛngisaka nkembo ya Yehova
“Esengo na miso na bino mpamba te ezali komona, mpe na matoi na bino mpamba te ezali koyoka.”—MATAI 13:16.
1. Motuna nini tokoki komituna mpo na ezaleli oyo Bayisalaele bamonisaki na Ngomba Sinai ntango bamonaki Moize?
BAYISALAELE oyo bayanganaki na Ngomba Sinai bazalaki na ntina malamu ya kopusana penepene na Yehova. Na lobɔkɔ na ye ya nguya, alongolaki bango na boombo na Ezipito. Azalaki kokokisa bamposa na bango; apesaki bango bilei mpe mai na esobe. Na nsima, asalisaki bango bálonga basoda ya Baamaleki oyo babundisaki bango. (Exode 14:26-31; 16:2–17:13) Ntango bazalaki na esobe pembeni ya Ngomba Sinai, bato babangaki mingi ntango bayokaki bankake mpe bamonaki mikalikali na boye ete bakómaki kolɛnga. Na nsima, ntango Moize akitaki na Ngomba Sinai, bamonaki ete elongi na ye ezalaki kongɛngisa nkembo ya Yehova. Kasi, na esika ete básepela mpe bámonisa botɔndi mpo na yango, bango bakimaki. “Babangaki kopusana penepene na [Moize].” (Exode 19:10-19; 34:30, NW) Mpo na nini babangaki kotala kongɛnga ya nkembo ya Yehova, ye oyo asalaki makambo mingi mpo na bango?
2. Ekoki kozala mpo na nini Bayisalaele babangaki ntango bamonaki nkembo ya Yehova oyo Moize azalaki kongɛngisa?
2 Ekoki mpenza kozala ete Bayisalaele babangaki mingimingi mpo na likambo oyo eutaki kosalema. Yehova apesaki bango etumbu mpo babukaki mobeko na ye na ndenge basalaki mwana ya ngɔmbɛ ya wolo. (Exode 32:4, 35) Bazwaki nde liteya na disipilini ya Yehova mpe bazalaki na botɔndi mpo na yango? Te, mingi basalaki yango te. Na nsuka ya bomoi na ye, Moize azongelaki koyebisa bango likambo oyo elekaki ntango basambelaki mwana ya ngɔmbɛ ya wolo ná makambo mosusu oyo esalemaki ntango batosaki Yehova te. Alobaki na bango boye: “Bino bosalaki nkanza na lilako ya [Yehova] Nzambe na bino, mpe bondimaki ye te mpe botosaki mongongo na ye te. Bino bosalaki nkanza epai na [Yehova] longwa na mokolo eyebaki ngai bino.”—Deteronome 9:15-24.
3. Ntango nini Moize azalaki kozipa elongi na ye?
3 Tótala likambo oyo Moize asalaki ntango amonaki ete Bayisalaele bazali kobanga. Lisolo elobi boye: “Esilaki Moize kosolola na bango ye atyaki elamba na elongi na ye, nde soki Moize akɔtaki liboso ya [Yehova] [na kati ya tabenakle] mpo na kosolola na ye, ye alongolaki elamba yango kino ebimaki ye. Ebimaki ye mpe elobelaki ye bato ya Yisalaele yango elakamaki ye, bato ya Yisalaele bamonaki elongi ya Moize ete loposo ya elongi ya Moize engɛngaki. Bongo Moize atyaki elamba yango na elongi na ye lisusu, kino ekɔtaki ye mpo na kosolola na [Yehova].” (Exode 34:33-35) Mpo na nini Moize azalaki kozipa elongi na ye na bantango mosusu? Likambo yango ekoki koteya biso nini? Biyano na mituna yango ekoki kosalisa biso tóyeba soki boyokani na biso na Yehova ezali ndenge nini.
Bazangaki kosalela mabaku malamu
4. Ntoma Paulo alobaki nini mpo na komonisa ntina oyo Moize azalaki kozipa elamba na elongi na ye?
4 Ntoma Paulo alobaki ete elamba oyo Moize azalaki kotya na elongi na ye ezalaki komonisa likambo moko na oyo etali makanisi mpe mitema ya Bayisalaele. Paulo akomaki boye: “Bana ya Yisalaele bakokaki te kotala mpenza elongi ya Moize mpo na nkembo ya elongi na ye . . . Makoki na bango ya kokanisa elɛmbaki.” (2 Bakolinti 3:7, 14) Ezali mawa mpenza! Bayisalaele bazalaki libota oyo Yehova aponaki, mpe alingaki ete bápusana penepene na ye. (Exode 19:4-6) Kasi, baboyaki kotala kongɛnga ya nkembo ya Nzambe. Na esika bábalola mitema mpe makanisi na bango epai ya Yehova na kokangama na ye na bolingo nyonso, bango bapesaki ye mokɔngɔ.
5, 6. (a) Bokokani nini ezalaki kati na Bayuda ya ekeke ya liboso ná Bayisalaele ya mikolo ya Moize? (b) Bokeseni nini ezali kati na baoyo bayokaki Yesu ná baoyo bayokaki ye te?
5 Na ekeke ya liboso ya ntango na biso (T.B.), likambo ya ndenge yango mpe esalemaki. Na ntango oyo Paulo akómaki moklisto, kondimana ya sika oyo Yesu Klisto, Moize Monene, azali moyokanisi na yango esilaki kozwa esika ya kondimana ya Mibeko. Yesu angɛngisaki nkembo ya Yehova malamumalamu mpenza na maloba mpe na misala na ye. Mpo na Yesu oyo asilaki kosekwa, Paulo akomaki boye: “Azali kongɛnga ya nkembo [ya Nzambe] mpe elilingi ya sikisiki ya bomoto na ye mpenza.” (Baebele 1:3) Bayuda bazalaki na libaku malamu mpenza ya koyoka maloba ya bomoi ya seko na monɔkɔ ya Mwana ya Nzambe ye mei! Kasi, mingi kati na baoyo Yesu ateyaki bayokaki ye te. Na ntina na bango, Yesu azongelaki maloba ya esakweli ya Yehova na nzela ya Yisaya ete: “Motema ya bato ya ekólo oyo ekómi makasi, mpe na matoi na bango bayoki kozanga kosala ata eloko, mpe bakangi miso na bango; mpo bákoka soki moke te komona na miso na bango mpe koyoka na matoi na bango mpe kokanga ntina na mitema na bango mpe kozonga, mpe ngai nabikisa bango.”—Matai 13:15; Yisaya 6:9, 10.
6 Bayuda yango bakesanaki mpenza na bayekoli ya Yesu, baoyo ye moko alobaki mpo na bango ete: “Esengo na miso na bino mpamba te ezali komona, mpe na matoi na bino mpamba te ezali koyoka.” (Matai 13:16) Baklisto ya solo bazalaka na mposa ya koyeba Yehova mpe kosalela ye. Basepelaka kokokisa mokano na ye ndenge Biblia ezali komonisa yango. Yango ezali kosala ete baklisto bapakolami bángɛngisa nkembo ya Yehova na mosala ya baministre ya kondimana ya sika, bampate mosusu mpe basalaka bongo.—2 Bakolinti 3:6, 18.
Ntina oyo nsango malamu ezipami
7. Mpo na nini tozali kokamwa te ndenge bato mingi bazali koboya koyoka nsango malamu?
7 Ndenge tomoni yango, ezala na ntango ya Yesu mpe na ntango ya Moize, Bayisalaele mingi bamonaki mpamba libaku malamu mingi oyo bapesaki bango. Ezali mpe bongo na ntango na biso. Bato mingi bazali koboya nsango malamu oyo tozali kosakola. Likambo yango ezali kokamwisa biso te. Paulo akomaki boye: “Nzokande, soki nsango malamu oyo tozali kosakola ezipami mpenza, ezipami nde epai ya baoyo bazali kobeba, baoyo na kati na bango nzambe ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo azipi makanisi ya bato oyo bazangi kondima.” (2 Bakolinti 4:3, 4) Longola milende oyo Satana azali kosala mpo na kobomba nsango malamu na miso ya bato, bato mingi bazali bango moko kozipa bilongi na bango mpo baboyi komona.
8. Ndenge nini miso ya bato mingi ezipami mpo na kozanga boyebi, mpe ndenge nini tokoki kokima kozala lokola bango?
8 Miso ya elilingi ya bato mingi ezipami mpo bazangi boyebi. Biblia elobi ete bikólo ezali “na molili na makanisi, mpe batangwi mosika na bomoi oyo ezali ya Nzambe, mpo na kozanga boyebi oyo ezali na kati na bango.” (Baefese 4:18) Liboso Paulo, moto oyo ayebaki Mibeko malamu akóma moklisto, miso na ye ezipamaki mpo azangaki boyebi, yango wana azalaki konyokola lisangá ya Nzambe. (1 Bakolinti 15:9) Kasi, Yehova amonisaki ye solo. Paulo alobi boye: “Ntina oyo nayokelamaki mawa ezalaki ete na nzela na ngai moto ya libosoliboso mpenza Klisto Yesu akoka kolakisa motema molai na ye nyonso lokola ndakisa epai ya baoyo bakondimela ye mpo na bomoi ya seko.” (1 Timote 1:16) Lokola Paulo, bato mingi oyo bazalaki kotɛmɛla solo ya Nzambe bazali kosalela Ye lelo oyo. Yango ezali ntina malamu oyo tosengeli kokoba kopesa litatoli ata epai ya baoyo batɛmɛlaka biso. Lisusu, soki tozali koyekola Liloba ya Nzambe mbala na mbala mpe tozali kokanga ntina na yango, tokosala te na kozanga koyeba makambo oyo Yehova aboyaka.
9, 10. (a) Ndenge nini Bayuda ya ekeke ya liboso bamonisaki ete bazalaki motó makasi mpe batingamaki na bindimeli na bango? (b) Bato ya ndenge yango bazali mpe na mangomba ya boklisto lelo oyo? Limbolá.
9 Bato mingi bakufi miso na elimo mpo bazali motó makasi mpe bazali kotingama kaka na bindimeli na bango. Bayuda mingi baboyaki Yesu mpe mateya na ye mpo batingamaki na Mibeko ya Moize. Kasi, bango nyonso te nde bazalaki bongo. Na ndakisa, nsima ya lisekwa ya Yesu, “ebele moko ya banganga-nzambe babandaki kotosa kondima.” (Misala 6:7) Atako bongo, mpo na Bayuda mingi, Paulo akomaki boye: “Tii lelo oyo na ntango nyonso oyo Moize azali kotángama, elamba moko ya kozipa elali na mitema na bango.” (2 Bakolinti 3:15) Na ntembe te Paulo ayebaki makambo oyo Yesu alobaki na bakonzi ya mangomba ya Bayuda ete: “Bozali kolukaluka na kati ya Makomami, mpamba te bozali kokanisa ete na nzela na yango bokozwa bomoi ya seko; nzokande yango mpenza nde ezali kotatola na ntina etali ngai.” (Yoane 5:39) Makomami oyo Bayuda bazalaki koyekola malamumalamu esengelaki kosalisa bango bákanga ntina ete Yesu nde Masiya. Kasi, batingamaki na makanisi na bango, mpe eloko moko te, ata Mwana ya Nzambe oyo azalaki kosala makamwisi akokaki kobongola bango makanisi.
10 Bato mingi oyo bazali na mangomba ya boklisto bazali mpe ndenge wana. Lokola Bayuda ya ekeke ya liboso, “bazali na molende mpo na Nzambe; kasi engebene boyebi ya solosolo te.” (Baloma 10:2) Atako bamosusu bayekolaka Biblia, kasi baboyaka kondima mateya na yango. Bandimaka te ete Yehova ateyaka basaleli na ye na nzela ya moombo ya sembo mpe ya mayele. (Matai 24:45) Kasi, biso tokangi ntina ete Yehova azali koteya bato na ye mpe ete banda kala, basaleli ya Nzambe bayebaka solo na ye mokemoke. (Masese 4:18) Soki tozali kotika ete Yehova ateya biso, tokozwa libaku ya koyeba mokano na ye.
11. Ndenge nini solo ezipami epai ya bato oyo bandimaka kaka makambo oyo bango balingi?
11 Bato mosusu bazipami miso mpo balingaka kondima makambo oyo bango balingi. Biblia esakolaki ete bato mosusu bakosɛka basaleli ya Nzambe mpe kozala ya Yesu oyo bazali kosakola. Ntoma Petelo akomaki boye: “Engebene mposa na bango, likambo oyo ezali kokima bango” ete Nzambe atindaki mpela na mokili na ntango ya Noa. (2 Petelo 3:3-6) Ndenge moko mpe, bato mingi oyo bamibengaka baklisto bandimaka ete Yehova azali na motema mawa, na boboto, mpe alimbisaka; kasi bayebaka te to mpe baboyaka kondima ete azangaka te kopesa etumbu. (Exode 34:6, 7) Baklisto ya solo basalaka makasi bákanga ntina ya makambo oyo Biblia eteyaka.
12. Ndenge nini mimeseno ya mangomba ezali kozipa bato miso?
12 Bato mingi oyo bakendaka ndako-nzambe bazipami miso mpo na mimeseno ya mangomba na bango. Yesu alobaki na bakonzi ya mangomba ya ntango na ye boye: “Bokómisi liloba ya Nzambe eloko ya mpamba mpo na mimeseno na bino.” (Matai 15:6) Ntango Bayuda bautaki na boombo na Babilone, basalaki molende mpo na kozongisa losambo ya solo, kasi banganga-nzambe bakómaki na lolendo mpe bamimonaki sembo na miso na bango moko. Bafɛti ya losambo ekómaki milulu ya mpamba, ezalaki lisusu komonisa ezaleli ya kobanga Nzambe te. (Malaki 1:6-8) Ntango Yesu ayaki awa na mabelé, akutaki ete Bakomeli ná Bafalisai babakisaki ebele ya mimeseno ya bonkɔkɔ na Mibeko ya Moize. Yesu abengaki bato yango bakosi mpo babosanaki mitinda ya sembo oyo esimbaki Mibeko. (Matai 23:23, 24) Baklisto ya solo basengeli kokeba ete mimeseno ya mangomba oyo euti na Biblia te emema bango na kotika losambo ya pɛto.
“Azalaki komona Moto oyo amonanaka te”
13. Wapi balolenge mibale oyo Moize amonaki mwa moke nkembo ya Nzambe?
13 Ntango Moize azalaki likoló ya ngomba, asɛngaki na Nzambe alakisa ye nkembo na ye, mpe azwaki libaku ya komona mwa moke nkembo ya Yehova. Ntango azalaki kokɔta na tabenakle, azalaki kozipa elongi na ye na elamba te. Moize azalaki na kondima makasi mpe azalaki na mposa ya kosala mokano ya Nzambe. Atako azwaki libaku malamu ya komona mwa moke nkembo ya Yehova na emonaneli, tokoki koloba ete amonaki Nzambe na miso ya kondima. Biblia elobi ete Moize “atikalaki ngwi lokola nde azalaki komona Moto oyo amonanaka te.” (Baebele 11:27; Exode 34:5-7) Azalaki mpe kongɛngisa nkembo ya Nzambe, kaka na elongi na ye te, kasi mpe na milende oyo asalaki mpo na kosalisa Bayisalaele báyeba Yehova mpe básalela ye.
14. Ndenge nini Yesu amonaki nkembo ya Nzambe, mpe asepelaki na nini?
14 Na likoló, Yesu amonaki nkembo ya Nzambe na boumeli ya ntango molai mpenza, liboso kutu Nzambe akela molɔ́ngɔ́ mobimba. (Masese 8:22, 30) Na boumeli ya ntango yango, bolingo makasi ekolaki kati na bango mibale. Yehova Nzambe amonisaki bolingo mingi oyo azalaki na yango mpo na mwana ya liboso na bozalisi nyonso. Yesu amonisaki ete alingaka Nzambe mingi, ye oyo apesaki ye bomoi. (Yoane 14:31; 17:24) Bolingo na bango ezalaki bolingo ya solosolo kati na Tata ná Mwana. Lokola Moize, Yesu asepelaki mingi kongɛngisa nkembo ya Yehova na makambo oyo azalaki koteya.
15. Ndenge nini baklisto bamonaka nkembo ya Nzambe?
15 Lokola Moize ná Yesu, lelo oyo Batatoli ya Nzambe bazalaka na mposa makasi ya komona nkembo ya Yehova. Bapesi nsango malamu ya nkembo mokɔngɔ te. Ntoma Paulo akomaki boye: “Ntango moto abongwani epai ya Yehova [mpo na kosala mokano na ye], elamba yango ya kozipa elongwe.” (2 Bakolinti 3:16) Toyekolaka Biblia mpo tolingi kosala mokano ya Nzambe. Tosepelaka na nkembo oyo ezali kongɛnga na elongi ya Yesu Klisto, Mwana ya Yehova, Mokonzi oyo apakolami, mpe tolandaka ndakisa na ye. Lokola Moize mpe Yesu, tozali na mosala ya koteya bato makambo ya Nzambe na biso ya nkembo.
16. Mpo na nini koyeba solo ezali lipamboli?
16 Yesu abondelaki boye: “Nazali kosanzola yo liboso ya bato nyonso, Tata, . . . mpamba te obombi makambo oyo liboso ya bato ya bwanya mpe ya bato ya mayele mpe omonisi yango epai ya bana mike.” (Matai 11:25) Yehova asalisaka bato oyo bazali na mitema ya sembo mpe na komikitisa ete báyeba mikano na ye mpe bizaleli na ye. (1 Bakolinti 1:26-28) Azali kobatela biso mpe koteya biso mpo na litomba na biso, mpo tózala na bomoi ya malamu. Tokoki kosalela libaku nyonso oyo tozali na yango mpo na kopusana penepene na Yehova, komonisa botɔndi mpo na ebele ya bibongiseli oyo azwi mpo tóyeba ye malamumalamu.
17. Ndenge nini toyebaka malamu bizaleli ya Yehova?
17 Paulo akomelaki baklisto bapakolami ete: “Biso nyonso, na bilongi bizipwami, tozali lokola talatala kongɛngisa nkembo ya Yehova, [mpe] tobongwani na elilingi yango motindo moko uta na nkembo tii na nkembo.” (2 Bakolinti 3:18) Ata soki tozali na elikya ya kokende na likoló to ya kozwa bomoi ya seko awa na mabelé, ntango tozali koyeba Yehova malamu—bizaleli mpe bomoto na ye ndenge Biblia emonisi yango—tozali mpe kokokana na ye. Soki tozali kokanisa na botɔndi bomoi ya Yesu Klisto, mosala na ye, mpe mateya na ye, tokomonisa lisusu bizaleli ya Yehova malamumalamu. Ezali esengo mingi koyeba ete tozali kosanzola Nzambe na biso, oyo tozali koluka komonisa nkembo na ye!
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini Bayisalaele babangaki kotala nkembo ya Nzambe oyo Moize azalaki kongɛngisa?
• Wapi balolenge oyo nsango malamu “ezipamaki” na ekeke ya liboso? mpe na mikolo na biso?
• Ndenge nini tongɛngisaka nkembo ya Nzambe?
[Elilingi na lokasa 19]
Bayisalaele bakokaki te kotala elongi ya Moize
[Bililingi na lokasa 21]
Lokola Paulo, bato mingi oyo bazalaki kotɛmɛla solo ya Nzambe, bazali lelo oyo basaleli na Ye
[Bililingi na lokasa 23]
Basaleli ya Yehova basepelaka kongɛngisa nkembo ya Nzambe