Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/8 nk. 24-29
  • Mobeko ya bolingo na mitema

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mobeko ya bolingo na mitema
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mobeko oyo ekomami na motema
  • Mibeko oyo esimbami na bolingo
  • Kolinga elimboli kotosa
  • Bolingo ezali komonana na misala
  • Lingá Nzambe oyo alingaka yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Kolinga mozalani na biso elimboli nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Yehova azali kosɛnga biso nini lelo oyo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • “Bolingo ya Nzambe elakisi boye”
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/8 nk. 24-29

Mobeko ya bolingo na mitema

“Nakotya mobeko na ngai na kati na bango, nakokoma yango na mitema na bango.”​—YILIMIA 31:33.

1, 2. (a) Tokotalela likambo nini sikoyo? (b) Ndenge nini Yehova amimonisaki na Ngomba Sinai?

NA MASOLO mibale oyo eleki, toyekolaki ete ntango Moize akitaki na Ngomba Sinai, elongi na ye ezalaki kongɛngisa nkembo ya Yehova. Tolobelaki mpe elamba oyo Moize azalaki kotya na elongi na ye. Tótalela sikoyo likambo mosusu ya lisolo yango oyo ezali na ntina mingi mpo na baklisto lelo oyo.

2 Ntango Moize azalaki likoló ya ngomba, Yehova apesaki ye malako. Bayisalaele oyo bayanganaki pembeni ya Ngomba Sinai bazwaki libaku ya komona nkembo ya kozala ya Nzambe. “Nkake ezalaki mpe mokalikali mpe lipata mwindo ezalaki na likoló ya ngomba. Kelelo eyulamaki makasi boye bato nyonso na molako balɛngaki. . . . Ngomba ya Sinai ezingamaki na molinga, mpo ete [Yehova] akitaki likoló na yango kati na mɔtɔ. Molinga yango ebutaki lokola molinga ya mombonda, mpe ngomba yango mobimba eninganaki makasi.”​—Exode 19:16-18.

3. Na nzela nini Yehova apesaki Bayisalaele Mibeko Zomi, mpe bato ya ekólo yango bakangaki ntina ya likambo nini?

3 Yehova alobaki na bato na nzela ya anzelu, apesaki bango mibeko oyo ebengamaki Mibeko Zomi. (Exode 20:1-17) Na bongo, moto moko te akokaki kotya ntembe ete mibeko yango eutaki epai ya Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Yehova akomaki mibeko yango likoló ya bitando ya mabanga​—bitando oyo Moize apanzaki ntango amonaki Bayisalaele bazali kosambela mwana ya ngɔmbɛ ya wolo. Yehova akomaki lisusu mibeko yango likoló ya mabanga. Na mbala yango, ntango Moize akitaki na ngomba ná mabanga yango, elongi na ye ezalaki kongɛnga. Na ntango wana, bato nyonso bakangaki ntina ete mibeko yango ezalaki na ndimbola monene.​—Exode 32:15-19; 34:1, 4, 29, 30.

4. Mpo na nini Mibeko Zomi ezalaki na ntina mingi?

4 Batyaki bitando mibale oyo likoló na yango bakomaki Mibeko Zomi na kati ya sanduku ya kondimana oyo ezalaki na Esika oyo Eleki Mosantu na tabenakle mpe na nsima, na Esika oyo Eleki Mosantu na tempelo. Mibeko oyo bakomaki na bitando yango ezalaki na mitinda ya kondimana ya Mibeko ya Moize mpe ezalaki moboko ya ebongiseli ya teokrasi mpo na boyangeli ya ekólo na bango. Ezalaki komonisa ete Yehova azalaki elongo na libota moko boye; libota oyo ye moko aponaki.

5. Ndenge nini mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisalaele ezalaki komonisa bolingo na ye?

5 Mibeko yango emonisaki makambo mingi mpo na Yehova, mingimingi bolingo oyo azalaki na yango mpo na bato na ye. Ezalaki likabo ya ntina mingi mpo na baoyo batosaki yango! Molimboli moko ya maloba ya Biblia alobaki ete Mibeko Zomi eleki mibeko nyonso oyo bato babimisá. Yehova alobaki mpo na Mibeko nyonso ya Moize boye: “Soki bokotosa monɔkɔ na ngai mpe bobatela kondimana na ngai, mbɛlɛ bokozala bato na ngai mpenza kati na bato nyonso, mpo ete mokili mobimba ezali ya ngai, mpe bokozala bokonzi ya banganga mpe libota ya bulɛɛ.”​—Exode 19:5, 6.

Mobeko oyo ekomami na motema

6. Mobeko nini ezalaki na ntina mingi koleka mibeko oyo ekomamaki likoló ya libanga?

6 Ya solo, mibeko wana ya Nzambe ezalaki na ntina mingi. Kasi, oyebi ete baklisto bapakolami bazali na eloko moko ya ntina mingi koleka mibeko oyo ekomamaki likoló ya libanga? Yehova asakolaki kondimana moko ya sika oyo ekesanaki na kondimana ya Mibeko oyo asalaki na libota ya Yisalaele. “Nakotya mobeko na ngai na kati na bango, nakokoma yango na mitema na bango.” (Yilimia 31:31-34) Yesu, Moyokanisi ya kondimana ya sika, apesaki te epai ya bayekoli na ye mibeko oyo ekomami na mokanda moko boye. Na maloba mpe na makambo oyo asalaki, akɔtisaki mibeko ya Yehova na makanisi mpe na mitema ya bayekoli.

7. “Mobeko ya Klisto” epesamaki libosoliboso epai ya banani, mpe na nsima banani bandimaki yango?

7 Mobeko yango ebengami “mobeko ya Klisto.” Yango epesamaki libosoliboso na libota moko ya elimo, “Yisalaele ya Nzambe,” kasi te na libota ya Yisalaele na mosuni, oyo bazalaki bana ya Yakobo. (Bagalatia 6:2, 16; Baloma 2:28, 29) Yisalaele ya Nzambe ezali nde baklisto bapakolami na elimo. Na nsima, “ebele ya bato,” oyo bauti na bikólo nyonso, mpe bazali na mposa ya kosambela Yehova, basanganaki na bango. (Emoniseli 7:9, 10; Zekalia 8:23) Lokola bato yango nyonso bakómi “etonga kaka moko” mpe bazali kotambwisama na “mobateli kaka moko,” bandimi “mobeko ya Klisto,” mpe bazali kotika yango etambwisa makambo na bango nyonso.​—Yoane 10:16.

8. Bokeseni nini ezali kati na Mibeko ya Moize ná mobeko ya Klisto?

8 Bayisalaele basengelaki kotosa Mibeko ya Moize mpo bazalaki kobotama na ekólo oyo ezwaki Mibeko yango; nzokande, baklisto bango moko nde baponaka kotosa mobeko ya Klisto; makambo lokola loposo to ekólo etaleli yango te. Bayekolaka makambo ya Yehova mpe banzela na ye mpe bazalaka na mposa ya kosala mokano na ye. Lokola mibeko ya Nzambe ezali “kati na bango,” to ekomami “na mitema na bango,” baklisto bapakolami batosaka Nzambe, kaka te mpo akoki kopesa baoyo bazangi botosi etumbu; batosaka ye mpe te kaka mpo basengeli kotosa. Botosi na bango euti na likambo moko monene mpe ya ntina mingi koleka, ndenge moko mpe bampate mosusu batosaka mpo mobeko ya Nzambe ezali na mitema na bango.

Mibeko oyo esimbami na bolingo

9. Ndenge nini Yesu amonisaki ete bolingo nde esimbaki mibeko nyonso ya Yehova?

9 Mibeko mpe malako nyonso ya Yehova esimbami na likambo kaka moko: bolingo. Ezaleli yango ezalaki mpe ekozala ntango nyonso na esika monene na kati ya losambo ya pɛto. Ntango batunaki Yesu komandema nini eleki monene na kati ya Mibeko, alobaki boye: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.” Ya mibale ezali: “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” Na nsima alobaki ete: “Na bakomandema oyo mibale Mibeko nyonso ekakisami, mpe Basakoli.” (Matai 22:35-40) Na yango, Yesu amonisaki ete kaka Mibeko Zomi te, kasi mpe Makomami nyonso ya Liebele esimbamaki na bolingo.

10. Ndenge nini toyebi ete bolingo ezali na esika monene na mobeko ya Klisto?

10 Tokoki nde koloba ete mobeko oyo ezali na mitema ya baklisto esimbami mpe na bolingo ya Nzambe mpe ya mozalani? Ɛɛ! Mobeko ya Klisto esɛngi kolinga Nzambe na motema mobimba mpe ezali na komandema moko ya sika: baklisto basengeli kozala na bolingo oyo elukaka libosoliboso bolamu ya basusu. Basengeli kolinga ndenge Yesu alingaki, mpe andimaki kopesa bomoi na ye mpo na baninga na ye. Ateyaki bayekoli na ye bálinga Nzambe mpe bálinganaka, ndenge ye alingaki bango. Bolingo makasi oyo bazalaka na yango ezali elembo monene oyo emonisaka ete bazali baklisto ya solo. (Yoane 13:34, 35; 15:12, 13) Kutu, Yesu atindaki bango bálingaka ata banguna na bango.​—Matai 5:44.

11. Ndenge nini Yesu amonisaki ete alingaki Nzambe mpe bato?

11 Yesu apesaki ndakisa malamu mpenza na oyo etali komonisa bolingo. Ntango azalaki ekelamu ya elimo kuna na likoló, andimaki kokokisa mokano ya Tata na ye awa na mabelé. Apesaki bomoi na ye mpo bato mosusu bákoka kozwa bomoi ya seko, mpe alakisaki bato mosusu bomoi oyo basengeli kozala na yango. Azalaki na komikitisa, na boboto, ayebaki komitya na esika ya basusu, azalaki kosalisa baoyo balɛmbaki mpe bazalaki konyokwama. Lisusu, ayebisaki “maloba ya bomoi ya seko,” alɛmbaki te kosalisa bato mosusu báyeba Yehova.​—Yoane 6:68.

12. Mpo na nini tokoki koloba ete kolinga Nzambe mpe kolinga mozalani etambolaka nzela moko?

12 Kolinga Nzambe mpe kolinga mozalani ezali makambo mibale oyo etambolaka nzela moko. Ntoma Yoane alobaki boye: “Bolingo euti na Nzambe . . . Soki moto azali koloba ete: ‘Nalingaka Nzambe,’ nzokande azali koyina ndeko na ye, azali moto ya lokuta. Mpo moto oyo azali kolinga ndeko na ye te, oyo ye amoni, akoki te kolinga Nzambe, oyo ye amoni te.” (1 Yoane 4:7, 20) Bolingo eutaka epai ya Yehova; ye moko mpe azali bolingo. Asalaka makambo na ye nyonso na bolingo. Tolingaka mpo akelá biso na elilingi na ye. (Genese 1:27) Soki tozali kolinga mozalani na biso, tozali kolakisa ete tolingaka Nzambe.

Kolinga elimboli kotosa

13. Mpo na kolinga Nzambe, tosengeli libosoliboso kosala nini?

13 Ndenge nini tokoki kolinga Nzambe ye oyo tomonaka ye te? Likambo ya liboso ezali koyekola koyeba ye. Ezali mwa mpasi tólinga mopaya moko boye to tótyela ye motema. Yango wana, Liloba ya Nzambe elendisi biso tóyekola koyeba Nzambe na nzela ya kotánga Biblia, kobondela, mpe kosangana na baoyo bayebi ye mpe balingaka ye. (Nzembo 1:1, 2; Bafilipi 4:6; Baebele 10:25) Baevanzile minei ezali na ntina mingi, mpamba te eteyaka bomoto ya Yehova ndenge Yesu Klisto amonisaki yango na bomoi mpe na mosala na ye. Ntango toyebi Nzambe mpe tozali na botɔndi mpo na bolingo oyo amoniselaki biso, mposa na biso ya kotosa ye mpe ya komekola bomoto na ye ekómaka lisusu makasi. Ya solo, kolinga Nzambe elimboli kotosa.

14. Mpo na nini tokoki koloba ete mibeko ya Nzambe ezali kilo te?

14 Ntango tolingi moto, toyebaka makambo oyo alingaka mpe oyo aboyaka, mpe tokebaka ete tótosa yango. Tolingaka te kosala makambo oyo ekosilikisa moto oyo tolingaka. Ntoma Yoane akomaki boye: “Mpo bolingo ya Nzambe elakisi boye, ete tótosaka bakomandema na ye; kutu bakomandema na ye ezali kilo te.” (1 Yoane 5:3) Ezali kilo te, ezali mpe ebele ebele te. Bolingo nde elakisaka biso nzela. Tozali na mposa te ya kokanga na motó ebele ya mibeko mpo na likambo mokomoko oyo tosengeli kosala; bolingo ya Nzambe nde etambwisaka biso. Mibeko ya Nzambe ezali kilo te, mpamba te epesaka biso esengo ya kosalela baoyo tolingaka mpenza. Soki tolingaka Nzambe, tokozala na esengo ya kosala mokano na ye. Yango ekosala ete asepela na biso mpe tokozwela yango litomba mpo batoli na ye ezalaka ntango nyonso mpo na bolamu na biso.​—Yisaya 48:17.

15. Nini ekotinda biso tómekola Yehova? Limbolá.

15 Bolingo ya Nzambe etindaka biso tómekola bizaleli na ye. Soki tolingi moto, tokosepela na bizaleli na ye mpe tokoluka kozala lokola ye. Tótalela boyokani ya Yehova ná Yesu. Bazalaki elongo kuna na likoló mbala mosusu na boumeli ya bamiliare ya bambula. Bolingo makasi mpe ya solosolo ezalaki kati na bango. Yesu akokanaki mpenza na Tata na ye yango wana, akokaki koloba na bayekoli na ye ete: “Moto oyo amoni ngai amoni mpe Tata.” (Yoane 14:9) Ntango tozali koyekola koyeba Yehova ná Mwana na ye mpe kosepela na bango, yango ekotinda biso tóluka kozala lokola bango. Bolingo na biso mpo na Yehova, mpe elimo santu na ye ekosalisa biso ‘tólongola bomoto ya kala elongo na misala na yango, mpe tólata bomoto ya sika.’​—Bakolose 3:9, 10; Bagalatia 5:22, 23.

Bolingo ezali komonana na misala

16. Ndenge nini mosala na biso ya kosakola mpe ya koteya emonisaka ete tolingaka Nzambe mpe mozalani na biso?

16 Bolingo na biso mpo na Nzambe mpe mpo na mozalani na biso etindaka biso baklisto tómipesa na mosala ya kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli. Na ndenge yango, tosepelisaka Yehova Nzambe, “oyo mokano na ye ezali ete bato ya ndenge nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Timote 2:3, 4) Na ndenge yango tokoki koyoka esengo ya kosalisa basusu mpo ete mobeko ya Klisto ekomama na mitema na bango. Toyokaka mpe esengo mingi ntango tozali komona bomoto na bango ezali kobongwana mpo na komonisa bizaleli ya Yehova. (2 Bakolinti 3:18) Ya solo, likabo ya ntina mingi oyo tokoki kopesa moto ezali kosalisa ye ayeba Nzambe. Baoyo bandimaka kokóma baninga ya Yehova bakoki kosepela na boninga yango libela na libela.

17. Mpo na nini kolinga Nzambe mpe mozalani ezali na ntina mingi koleka kolinga biloko ya mokili?

17 Lelo oyo, bato mingi bazali kopesa motuya mingi na biloko ya mokili, mpe balingaka yango mingi. Kasi, biloko ya mokili eumelaka seko te. Bakoki koyiba yango to mpe ekoki kobeba. (Matai 6:19) Biblia elobi na biso boye: “Mokili ezali koleka mpe ndenge moko mposa na yango, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.” (1 Yoane 2:16, 17) Yehova akozala libela na libela, ezali mpe bongo mpo na baoyo balingaka ye mpe basalelaka ye. Na yango, omoni te ete kokolisa bolingo mpo na Nzambe mpe mpo na bato ezali na ntina mingi koleka koluka biloko ya mokili, oyo ezali mpo na mwa ntango moke?

18. Ndenge nini misionɛrɛ moko amonisaki bolingo ya solosolo?

18 Bato oyo balandaka nzela ya bolingo basanzolaka Yehova. Tózwa ndakisa ya Sonia, misionɛrɛ moko na Sénégal. Ye ayekolaki Biblia na mwasi moko nkombo na ye Heidi, oyo azwaki maladi ya Sida epai ya mobali na ye oyo azalaki mondimi te. Nsima ya liwa ya mobali na ye, Heidi azwaki batisimo, kasi mwa moke na nsima, akómaki kobela mingi mpe akɔtaki lopitalo. Sonia alobi boye: “Minganga bazalaki kosala nyonso oyo bakoki, kasi bazalaki moke. Bandeko ya lisangá bandimaki kokɛngɛlaka Heidi na lopitalo. Mokolo ya mibale, nalalaki na litɔkɔ pembeni ya mbeto na ye mpe nazalaki kosalisa ye tii ntango akufaki. Monganga alobaki boye: ‘Likambo oyo etungisaka biso ezali ete, mbala mingi bato mosusu basundolaka bandeko na bango soki bayebi ete bazali na Sida. Kasi, mpo na nini yo ondimi komitya na likama boye; kutu ozali ata ndeko na ye te, bozali ata mboka moko te, loposo moko mpe te?’ Nalobaki na ye ete Heidi azali mpenza ndeko na ngai, nazwaka ye lokola ndeko na ngai oyo tobotami tata moko, mama moko. Bondeko ya boklisto oyo nazali na yango ná Heidi nde etindi ngai nalɛmba te kosalisa ye.” Tobakisi mpe ete Sonia azwaki maladi te na ndenge asalisaki Heidi.

19. Lokola tozali na mibeko ya Nzambe na mitema na biso, libaku malamu nini tosengeli kosalela?

19 Basaleli ya Yehova basalaka makambo mingi oyo emonisaka ete bazali na bolingo ya solosolo. Ezali na buku moko te ya mibeko oyo Nzambe apesi basaleli na ye lelo oyo. Kasi, tozali komona kokokisama ya maloba ya Baebele 8:10: “Yehova alobi ete: ‘Mpo talá kondimana oyo nakosala elongo na ndako ya Yisalaele nsima ya mikolo wana. Nakotya mibeko na ngai na kati ya makanisi na bango, mpe nakokoma yango na kati ya mitema na bango. Mpe ngai nakokóma Nzambe na bango, mpe bango mpenza bakokóma bato ya ekólo na ngai.’” Tiká tólingaka ntango nyonso mobeko ya bolingo oyo Yehova akomi na mitema na biso, tósalela libaku nyonso mpo na komonisa ezaleli yango.

20. Mpo na nini mobeko ya Klisto ezali bozwi ya motuya monene?

20 Ezali mpenza esengo kosalela Nzambe na kati ya lisangá ya bandeko na mokili mobimba oyo bazali na bolingo ya ndenge yango! Bato oyo bazali na mobeko ya Klisto na mitema bazali na bozwi ya motuya monene na mokili oyo ezangi bolingo. Yehova alingaka bango mpe basepelaka na bolingo makasi oyo bazali na yango na bandeko na bango. “Talá lokola ezali malamu mpe na esengo soki bandeko bakozalana motema moko!” Atako Batatoli ya Yehova bazali na bikólo mingi, balobaka minɔkɔ ekeseni, mpe bazali na mimeseno ndenge na ndenge, bazali na bomoko ya losambo oyo ezali na esika mosusu te. Bomoko yango esalaka ete Yehova andima bango. Mokomi ya nzembo akomaki boye: “Kuna [na kati ya bato oyo bolingo esangisi bango] [Yehova] alakaki kopambola na bomoi [lobiko] na lobiko.”​—Nzembo 133:1-3.

Okoki kopesa eyano?

• Mibeko Zomi ezalaki na ntina nini?

• Mobeko nini ekomami na mitema?

• Bolingo ezali na esika nini na kati ya “mobeko ya Klisto”?

• Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka Nzambe mpe mozalani na biso?

[Elilingi na lokasa 25]

Bayisalaele bazwaki mibeko oyo ekomamaki na bitando ya mabanga

[Bililingi na lokasa 26]

Mobeko ya Nzambe ekomami na mitema ya baklisto

[Elilingi na lokasa 28]

Sonia ná mwana moko ya mboka Sénégal na liyangani ya etúká ya mobu 2004

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto