Kozala sembo ememaka matomba
NA BIKÓLO mosusu, bana basepelaka mingi kotya baninga na bango matiti ya nzubɛnzubɛ na triko ya malili. Matiti yango ekangamaka na triko, mpe ezala moninga azali kotambola, kokima mbangu, koningana to kopumbwa, elongwaka te. Mpo na kolongola yango, esɛngaka kaka kobenda yango mokomoko. Bana mike basepelaka mpenza ntango bazali komona bongo.
Nzokande, moto nyonso te nde asepelaka komona matiti wana ekangami na elamba na ye, kasi moto nyonso akamwaka na ndenge matiti yango ekangamaka makasi. Moto oyo azali sembo akeseni te na matiti wana. Moto ya ndenge wana akangamaka na moninga libela. Alukaka kokokisa makambo nyonso oyo boninga yango ezali kosɛnga, ata ntango makambo ezali lisusu malamu te. Liloba “sembo,” epesaka likanisi ya bizaleli ya malamu lokola bosolo, kokangama na moto mpe komipesa mobimba. Soki osepelaka bato bázala sembo epai na yo, yo mpe olingaka kozala sembo epai ya basusu? Soki ezali bongo, osengeli kozala sembo epai ya nani?
Kozala sembo na kati ya libala ezali na ntina mingi
Libala ezali esika oyo esɛngaka mpenza bato bázala sembo, kasi likambo ya mawa ezali ete ezaleli yango ezali komonana mingi te na mabala. Soki mobali ná mwasi bazali kotosa ndai na bango ya libala, elingi koloba bakabwani te mpe moko na moko azali koluka bolamu ya moninga, yango ekosalisa bango bázwa esengo mpe kimya. Mpo na nini? Mpamba te, ndenge Nzambe akelá biso, tolingaka kozalaka sembo epai ya basusu mpe basusu bázala sembo epai na biso. Ntango libala ya Adama ná Eva esalemaki na elanga ya Edene, Nzambe alobaki boye: “Moto akotika tata na ye mpe mama na ye mpe [akokangama] na mwasi na ye.” Ezali se ndenge moko mpo na mwasi; asengelaki kokangama na mobali na ye. Mobali ná mwasi basengelaki kozala sembo moko epai ya mosusu mpe koyokanaka na makambo nyonso.—Genese 2:24; Matai 19:3-9.
Likambo yango esalemaki eleki lelo bankóto ya bambula. Yango elingi nde koloba ete kozala sembo na kati ya libala eleká ngala? Bato mingi bakoloba ete ezali bongo te. Ankɛtɛ moko oyo basalaki na Allemagne emonisaki ete mpo na bato mingi (80%), kozala sembo na kati ya libala ezali na ntina mingi. Ankɛtɛ mosusu oyo basalaki ezalaki mpo na koyeba bizaleli oyo mibali basepelaka na yango mingi epai ya basi mpe oyo basi basepelaka na yango mingi epai ya mibali. Batunaki etuluku moko ya mibali bátánga bizaleli mitano oyo basepelaka na yango mingi koleka epai ya basi mpe basi batángaki bizaleli mitano oyo basepelaka na yango mingi koleka epai ya mibali. Ezaleli oyo mibali yango ná basi baponaki mingi koleka ezali bosembo.
Ya solo, kozala sembo ezali moko ya bizaleli ya ntina mingi oyo esalisaka mwasi ná mobali báfanda malamu. Nzokande, ndenge tomonaki yango na lisolo eleki, bato mingi bakumisaka ezaleli yango, kasi basalelaka yango te. Na ndakisa, ebele ya mabala oyo ezali kokufa na bikólo mingi ezali komonisa mpenza ete bato mingi na mokili oyo bazali sembo te epai ya basusu. Ndenge nini balongani bakoki kolonga ezaleli mabe wana mpe kotikala sembo epai ya balongani na bango?
Kozala sembo esalaka ete libala eumela
Balongani bamonisaka ete bazali sembo moko epai ya mosusu soki moto na moto azali kosala nyonso mpo na komonisa moninga ete amipesi mpenza epai na ye. Na ndakisa, ezali malamu kolobaka “ya biso” na esika ya kolaba “ya ngai”—“baninga na biso,” “bana na biso,” “ndako na biso,” “makambo oyo tokutanaki na yango,” mpe bongo na bongo. Ntango mobali to mwasi azali kozwa mikano mpe bikateli, ezala mpo na kopona ndako oyo bakofanda, mosala, lolenge ya kobɔkɔla bana, masano, esika bakokende konje to na makambo ya losambo, asengeli koluka koyeba makanisi ya molongani na ye.—Masese 11:14; 15:22.
Balongani bakomonisa ete bazali sembo ntango mokomoko na bango azali kosala nyonso mpo na komonisa moninga ete azali na ntina mingi mpo na ye. Mobali to mwasi akoki kondima te ete molongani na ye alingaka ye soki akómi komona ye selesele na mwasi to mobali mosusu. Biblia epesi mobali toli ete akangama ‘na mwasi na ye ya bolenge.’ Mobali asengeli kotika te ete mwasi oyo azali molongani na ye te akóma kobenda motema na ye mpo na boboto na ye. Asengeli mpe kokeba ete apesa nzoto na ye te epai ya mwasi mosusu. Biblia elobi boye: “Ye oyo akosala ekobo na mwasi azangi mayele; ye oyo akosala bongo azali kobungisa molimo na ye.” Mwasi mpe asengeli kolanda etinda wana ya ntina mingi.—Masese 5:18; 6:32.
Kozala sembo na kati ya libala ezali na ntina? Ɛɛ. Yango ekosala ete libala ezala na kimya mpe eumela, mpe molongani mokomoko akozala na esengo. Na ndakisa, soki mobali azali kosala nyonso mpo na koluka bolamu ya mwasi na ye, mwasi akomona mpenza ete mobali alingaka ye mpe yango ekotinda ye amonisa bizaleli na ye nyonso ya malamu. Ezali mpe ndenge moko mpo na mobali. Mposa na ye ya kotikala sembo epai ya mwasi na ye ekosalisa ye akangama na mitinda malamu na makambo nyonso ya bomoi.
Soki mobali na mwasi bazali sembo na libala na bango, bakobanga eloko te ata ntango bazali na matata. Nzokande, soki balongani bazali sembo te moko epai ya mosusu, ata mwa likambo ya moke ekotinda bango bákabwana to báluka koboma libala. Kokabwana to koboma libala esilisaka likambo te, kutu mbala mingi efungolaka nde nzela na mikakatano mosusu. Na bambula ya 1980, moto moko oyo abimisaka bamidɛlɛ ya sika ya bilamba asundolaki mwasi ná bana. Akómaki nde na esengo epai akendeki kofanda ye moko? Mbula ntuku mibale na nsima, alobaki ete ndenge asundolaki libota na ye, esalaki ete “akóma ye moko, abandaki kotungisama, mpe azalaki kolala te na butu mpamba te azalaki na mposa ya koloba na bana na ye liboso ya kolala: ‘bólala malamu.’”
Na kati ya baboti na bana
Ntango baboti bazali sembo moko epai ya mosusu, na ntembe te bana na bango mpe bakozwa ezaleli yango. Soki bana babɔkɔlami na baboti ya sembo mpe ya bolingo, ntango bakokola bakozala na mokakatano te ya komimonisa sembo epai ya balongani na bango mpe epai ya baboti na bango, soki baboti yango bakómi mibange mpe balɛmbi.—1 Timote 5:4, 8.
Kutu, baboti kaka te nde balɛmbaka liboso ya bana. Ekoki kosalema ete mwana akóma na mposa ya lisalisi ya baboti. Yango nde ekómelaki Herbert ná Gertrud, oyo bazalaki Batatoli ya Yehova banda mbula koleka 40. Mwana na bango, Dietmar, azalaki kobɛla bomoi na ye mobimba; azalaki na maladi moko oyo babengi na Lifalanse dystrophie musculaire. Baboti na ye bazalaki ntango nyonso pembeni na ye mpo na kosalisa mpe kobatela ye mbula nsambo oyo azalaki na maladi tii ntango akufaki na sanza ya Novɛmbɛ 2002. Baboti na ye bazalaki kosalisa ye na bolingo nyonso. Batyaki kutu bankisi ya monganga na ndako na bango mpe bayekolaki ndenge ya kopesaka ye bankisi yango bango moko. Bazali ndakisa malamu mpenza ya bosembo na kati ya libota!
Kozala sembo ezali na ntina mingi na kati ya baninga
Birgit alobaki boye: “Moto akoki kozala na esengo ata soki abali te, kasi ezali mpasi moto oyo azangi baninga azala na esengo.” Na ntembe te yo mpe ondimi likanisi na ye. Ezala obalá to te, soki ozali na moninga oyo azali sembo epai na yo, okozala mpenza na esengo. Soki obalá, moninga na yo ya libosoliboso ezali molongani na yo.
Moninga ezali kaka te moto oyo oyebani na ye. Tokoki koyebana na bato mingi: bato ya kartye na biso, baninga ya mosala mpe bato mosusu oyo tokutanaka na bango mbala na mbala. Mpo bato bákóma baninga ya solosolo, esɛngaka ntango, milende mpe komipesa mobimba moko epai ya mosusu. Kozala na moninga ezali likambo moko ya lokumu. Kozala na moninga ememaka matomba mingi, kasi ezali mpe mokumba.
Ezali na ntina mingi tósololaka malamu na baninga na biso. Ntango mosusu, mokakatano moko nde ekoki kosala tósolola na moninga na biso. Birgit alobaki boye: “Soki moko na biso azali na mokakatano, ngai ná moninga na ngai tosololaka na telefone mbala moko to mibale na pɔsɔ. Koyeba ete moninga na ngai azali mpenza na mposa ya koyoka ngai atako azali mosika ebɔndisaka mpenza.” Kozala mosika ekoki te kopekisa bato bázala baninga. Atako bankóto ya bakilomɛtrɛ ezali kokabola bango, Gerda ná Helga bazali baninga ya motema mpenza banda mbula koleka 35. Gerda alobi boye: “Totindelanaka mikanda mbala na mbala, toyebisanaka makambo nyonso oyo tozali kokutana na yango, ezala bampasi to bisengo. Nazalaka na esengo mpenza soki nazwi mokanda ya Helga. Toyokanaka malamu mpenza.”
Kozala sembo ezali na ntina mingi na kati ya baninga. Kozanga bosembo ekoki kokabola ata bato oyo bazali baninga banda ebele ya bambula. Baninga bazalaka na momeseno ya kopesana toli ata na makambo ya sɛkɛlɛ. Babombelanaka basɛkɛlɛ te mpe moko te abangaka ete moninga akosambwisa ye to akobimisa sɛkɛlɛ na ye. Biblia elobi boye: “Moninga ya solo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.”—Masese 17:17, NW.
Lokola bato balingaka kolanda makanisi mpe makambo mosusu oyo baninga na bango bazali kosala, ezali na ntina mingi tóponaka baninga oyo etamboli na bango eyokani na oyo ya biso. Na ndakisa, ponáká kaka baninga oyo bazali na kondima moko na yo, bazali na bizaleli ndenge moko na yo mpe bayebi kokesenisa malamu ná mabe lokola yo. Baninga ya ndenge wana bakosalisa yo okokisa mikano na yo. Longola yango, mpo na nini okolinga kozala moninga ya moto oyo makanisi mpe etamboli na ye ekeseni mosika na oyo ya yo? Biblia emonisi ntina oyo tosengeli koponaka baninga ya malamu na maloba oyo: “Ye oyo akotambola na bato ya mayele akozala na mayele, nde motamboli elongo na bazoba [akosuka mabe].”—Masese 13:20.
Tokoki kolona ezaleli yango
Ntango mwana ayekoli kokangisa matiti ya nzubɛnzubɛ na elamba ya moninga, na ntembe te alingaka lisusu te kotika lisano yango. Ezali se ndenge moko mpo na moto oyo azali sembo. Mpo na nini? Mpamba te soki amesani kozala sembo epai ya basusu, akozala lisusu te na mokakatano ya komonisa ezaleli yango. Soki moto abandi kozala sembo na bomwana, na bomoi na ye akozala na mokakatano te ya komimonisa sembo epai ya basusu mpe kokóma moninga na bango. Yango mpe ekosala ete soki abali azala na mokakatano te ya kozala sembo epai ya molongani na ye. Ekosalisa ye mpe azala sembo epai ya moninga oyo aleki baninga nyonso.
Yesu alobaki ete mobeko oyo eleki monene ezali ete tólingaka Yehova Nzambe na motema na biso mobimba, na molimo na biso mobimba, na makanisi na biso nyonso mpe na makasi na biso nyonso. (Malako 12:30) Yango elingi koloba ete tosengeli kozala sembo epai ya Nzambe na makambo nyonso. Kozala sembo epai ya Yehova Nzambe epesaka matomba ebele. Akosundola biso to akoyokisa biso nsɔni ata mokolo moko te, mpamba te alobi ete: “Nazali sembo.” (Yilimia 3:12, NW) Ya solo mpenza, kozala sembo epai ya Nzambe ememaka matomba ya libela.—1 Yoane 2:17.
[Maloba na katikati ya lokasa 5]
Soki ozali na moninga oyo azali sembo epai na yo, okozala mpenza na esengo
[Elilingi na lokasa 5]
Bato ya libota oyo bazali sembo basalisanaka