Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/9 nk. 21-25
  • Tókoba kotambola ndenge Yesu Klisto atambolaki

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tókoba kotambola ndenge Yesu Klisto atambolaki
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge oyo Klisto azali kotambwisa bayekoli na ye
  • Tózala makambo makasimakasi te na bokonzi na biso
  • Tózala na boboto mpe tólimbisaka
  • Tótya Bokonzi na esika ya liboso
  • Tózala sembo
  • Tólanda ndakisa oyo Yesu apesaki
  • Klisto azali kotambwisa lisangá na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Ntina oyo tosengeli “kolanda Klisto”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Tózala na makanisi lokola oyo ya Kristo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Kotambola na Nzambe —matambe ya liboso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/9 nk. 21-25

Tókoba kotambola ndenge Yesu Klisto atambolaki

“Moto oyo azali koloba ete azali na bomoko elongo na [Nzambe] asengeli ye moko mpe kokoba kotambola ndenge moto wana [Yesu] atambolaki.”​—1 YOANE 2:6.

1, 2. Kotala Yesu na likebi esɛngi nini?

NTOMA Paulo akomaki ete: “Tiká tópota na koyika mpiko mpenza momekano ya mbangu oyo etyami liboso na biso, wana tozali kotala na likebi mpenza Kapita mpe Mokokisi ya kondima na biso, Yesu.” (Baebele 12:1, 2) Mpo na kotikala sembo, tosengeli kotalaka na likebi mpenza Yesu Klisto.

2 Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kotala na likebi” elimboli “kotya makanisi na eloko mosusu te,” “kotika kotala eloko moko mpo na kotala mosusu,” “kotya miso esika moko.” Buku moko elobi boye: “Na masano ya Bagrɛki, ntango kaka mopoti mbangu alongoli likebi na ye na momekano mpe na mokano na ye, mpe atye likebi yango na ebele ya bato oyo bazali kotala lisano na stade, mbangu na ye ekiti. Ezali mpe bongo mpo na moklisto.” Makambo mosusu oyo ebendaka likebi ekoki kopekisa biso tókola na elimo. Tosengeli kotala Yesu Klisto na likebi. Tokotala nini epai ya Kapita yango? Liloba ya Grɛki oyo ebongolami “kapita” elimboli “mokambi, ye oyo azali kotambwisa makambo nyonso mpe azali kopesa ndakisa.” Kotala Yesu na likebi esɛngi kolanda ndakisa na ye.

3, 4. (a) Kotambola ndenge Yesu Klisto atambolaki esɛngi nini mpo na biso? (b) Mituna nini tosengeli kotalela?

3 Biblia elobi boye: “Moto oyo azali koloba ete azali na bomoko elongo na [Nzambe] asengeli ye moko mpe kokoba kotambola ndenge moto wana [Yesu] atambolaki.” (1 Yoane 2:6) Mpo tózala na bomoko elongo na Nzambe, tosengeli kotosa bakomandema ya Yesu ndenge ye atosaki bakomandema ya Tata na ye.​—Yoane 15:10.

4 Yango wana, kotambola ndenge Yesu atambolaki esɛngi tótalaka Kapita yango malamumalamu mpe tólanda matambe na ye malamumalamu. Mituna ya ntina oyo tosengeli kotalela na likambo yango ezali oyo: Ndenge nini Klisto azali kotambwisa biso lelo oyo? Komekola lolenge na ye ya kotambola esengeli kotinda biso tósala nini? Matomba nini tokozwa soki tolandi ndakisa ya Yesu Klisto?

Ndenge oyo Klisto azali kotambwisa bayekoli na ye

5. Liboso Yesu amata na likoló, apesaki bayekoli na ye elaka nini?

5 Nsima ya lisekwa na ye, liboso amata na likoló, Yesu amimonisaki epai ya bayekoli na ye mpe apesaki bango mosala moko ya ntina mingi. Alobaki boye: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.” Na libaku wana, Motambwisi alakaki mpe ete akozala na bango elongo na mosala yango; alobaki boye: “Talá! nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” (Matai 28:19, 20) Ndenge nini Yesu Klisto azali elongo na bayekoli na ye lelo oyo na bosukisi ya ebongiseli ya makambo?

6, 7. Ndenge nini Yesu azali kotambwisa biso na nzela ya elimo santu?

6 Yesu alobaki boye: “Mosungi yango, elimo santu, oyo Tata akotinda na nkombo na ngai, ye nde akoteya bino makambo nyonso mpe akozongisa na makanisi na bino makambo nyonso oyo nayebisaki bino.” (Yoane 14:26) Elimo santu oyo Yehova atindaki na nkombo ya Yesu ezali kotambwisa mpe kolendisa biso lelo oyo. Ezali kongɛngisa biso na elimo mpe kosalisa biso tósosola ata “makambo mozindo ya Nzambe.” (1 Bakolinti 2:10) Lisusu, bizaleli malamu lokola “bolingo, esengo, kimya, motema molai, motema malamu, bolamu, kondima, boboto, komipekisa” ezali “mbuma ya elimo” yango. (Bagalatia 5:22, 23) Elimo santu ekoki kosalisa biso tólona bizaleli yango.

7 Ntango tozali koyekola Biblia mpe kosala makasi tósalela makambo oyo toyekoli, elimo ya Yehova esalisaka biso mpo ete bwanya, bososoli, mayele, boyebi, mpe makoki na biso ya kokanisa ekola. (Masese 2:1-11) Elimo santu esalisaka biso mpe tóyikela komekama mpe mikakatano mpiko. (1 Bakolinti 10:13; 2 Bakolinti 4:7; Bafilipi 4:13) Biblia ezali kolendisa baklisto ete ‘bámipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo, mpe bákokisa bosantu malamumalamu.’ (2 Bakolinti 7:1) Tokoki nde kokokisa masɛngami ya Nzambe na oyo etali bosantu, to bopɛto, kozanga lisalisi ya elimo santu? Lolenge moko oyo Yesu azali kotambwisa biso lelo ezali na nzela ya elimo santu, oyo Yehova Nzambe apesi Mwana na ye ndingisa ya kosalela.​—Matai 28:18.

8, 9. Ndenge nini Klisto azali kotambwisa lisangá na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele”?

8 Tótalela lolenge mosusu oyo Klisto azali kotambwisa lisangá lelo oyo. Ntango Yesu azalaki kolobela kozala na ye mpe bosukisi ya ebongiseli ya makambo, alobaki boye: “Nani azali solo moombo ya sembo mpe ya mayele oyo nkolo na ye atye likoló ya basali ya ndako na ye, mpo na kopesa bango bilei na bango na ntango oyo ebongi? Esengo na moombo yango soki nkolo na ye ntango akoya akuti ye azali kosala bongo! Ya solo mpenza nazali koloba na bino ete, Akotya ye likoló ya biloko na ye nyonso.”​—Matai 24:3, 45-47.

9 “Nkolo” ezali Yesu Klisto. “Moombo” ezali etuluku mobimba ya baklisto bapakolami oyo bazali naino awa na mabelé. Yesu apesi moombo yango mokumba ya kobatela bozwi na ye awa na mabelé mpe ya kopesa bilei ya elimo na ntango ebongi. Lisangani ya Mikóló-Bakambi esangisi ndambo moke ya bakɛngɛli oyo bazali na makoki mpenza mpe bazali na kati ya “moombo ya sembo mpe ya mayele”; bango nde bazali bamonisi ya moombo yango. Bandeko yango bazali kotambwisa mosala ya kosakola na mokili mobimba mpe bazali kopesa bilei ya elimo na ntango ebongi. Na ndenge yango, Klisto azali kotambwisa lisangá na nzela ya baklisto oyo bapakolami na elimo santu, elingi koloba “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpe Lisangani na ye ya Mikóló-Bakambi.

10. Ndenge nini tosengeli kotalelaka bankulutu, mpe mpo na nini?

10 Lolenge mosusu oyo ezali komonisa ete Klisto azali kotambwisa lisangá ezali “makabo oyo ezali bato,” elingi koloba bankulutu. Bakɛngɛli yango batyami “mpo na kosembolama ya basantu, mpo na mosala ya kosunga, mpo na kotongama ya nzoto ya Klisto.” (Baefese 4:8, 11, 12) Na ntina na bango, Baebele 13:7 elobi boye: “Bókanisaka baoyo bazali kokamba bino, oyo bayebisaki bino liloba ya Nzambe, mpe wana bozali kotala malamumalamu motindo nini etamboli na bango ezali kosuka bómekola kondima na bango.” Bankulutu bato bakambaka masangá. Lokola bango moko balandaka ndakisa ya Klisto Yesu, bandeko mosusu bakoki komekola kondima na bango. (1 Bakolinti 11:1) Tokomonisa botɔndi na biso mpo na “makabo oyo ezali bato,” to bankulutu, soki tozali kotosa bango mpe koyokela bango.​—Baebele 13:17.

11. Ndenge nini Klisto azali kotambwisa bayekoli na ye lelo oyo, mpe kotambola ndenge ye atambolaki elimboli nini?

11 Tomoni ete Yesu Klisto azali kotambwisa bayekoli na ye na nzela ya elimo santu, ya “moombo ya sembo mpe ya mayele,” mpe ya bankulutu. Mpo tótambola ndenge Klisto atambolaki, tosengeli koyeba malamumalamu lolenge oyo azali kotambwisa biso mpe kotosa ebongiseli yango. Yango ezali mpe kosɛnga tómekola ndenge oyo ye atambolaki. Ntoma Petelo akomaki boye: “Ezali na nzela yango nde bobengamaki, mpamba te Klisto mpe anyokwamaki mpo na bino, kotikeláká bino ndakisa mpo bólanda matambe na ye malamumalamu.” (1 Petelo 2:21) Ndenge nini tokomonisa ete tozali kolanda Yesu, ye oyo apesaki biso ndakisa ya kokoka?

Tózala makambo makasimakasi te na bokonzi na biso

12. Wapi likambo moko na ndakisa ya Klisto oyo bankulutu basengeli mpenzampenza kotalela?

12 Atako Yesu azwaki bokonzi mingi mpenza epai ya Tata na ye, azalaki kosalela yango na makambo makasimakasi te. Bandeko nyonso na lisangá​—mingimingi bakɛngɛli—​basengeli koluka ete “ezaleli na [bango] ya makambo makasimakasi te eyebana epai ya bato nyonso.” (Bafilipi 4:5; 1 Timote 3:2, 3) Lokola bankulutu bazali na mwa bokonzi na kati ya lisangá, ezali na ntina mingi bálanda matambe ya Klisto na ndenge oyo bazali kosalela yango.

13, 14. Ndenge nini bankulutu balandaka ndakisa ya Klisto mpo na kolendisa basusu na kosalela Nzambe?

13 Yesu azalaki kotalela bolɛmbu ya bayekoli na ye. Azalaki te kosɛnga bango makambo oyo bakokoka kosala te. (Yoane 16:12) Yesu azalaki kotya bayekoli na ye mpanzi likoló te, azalaki nde kolendisa bango ‘básala makasi mpenza’ mpo na kosala mokano ya Nzambe. (Luka 13:24) Asalaki yango na ndakisa oyo ye moko azalaki kopesa mpe na ndenge azalaki koluka kosimba mitema na bango. Ndenge moko mpe, bankulutu balukaka te kobangisa bandeko mpo básalela Yehova lokola bato bazali na ngambo. Kasi, balendisaka bango básalela Yehova na bolingo na bango mpo na ye, mpo na Yesu, mpe mpo na bazalani na bango.​—Matai 22:37-39.

14 Bokonzi ya Yesu ezalaki te mpo alandelaka bomoi ya bato. Atyelaki bango mpe mitinda ya makasimakasi te to mibeko ebele ebele. Azalaki nde koteya bango mitinda oyo esimbaki mibeko ya Moize mpo na kosimba mitema na bango. (Matai 5:27, 28) Bankulutu balandaka ndakisa ya Yesu Klisto, yango wana balukaka te kotyela bandeko na bango mibeko to koluka kondimisa makanisi na bango moko. Na makambo etali molato mpe monzɛlɛ to masano, bankulutu balukaka kosimba mitema na nzela ya mitinda ya Nzambe, na ndakisa oyo ezali na Mika 6:8; 1 Bakolinti 10:31-33; mpe 1 Timote 2:9, 10.

Tózala na boboto mpe tólimbisaka

15. Ndenge nini Yesu azalaki kotalela mabunga ya bayekoli na ye?

15 Klisto atikaki ndakisa oyo tosengeli kolanda na ndenge oyo azalaki kotalela mabunga ya bayekoli na ye. Tótalela makambo mibale oyo elekaki na butu ya nsuka liboso akufa. Ntango akómaki na Getesemane, Yesu “akamataki Petelo ná Yakobo ná Yoane elongo na ye” mpe ayebisaki bango ‘bákɛngɛlaka.’ Na nsima, “kopusanáká mwa moke liboso akweaki na mabelé mpe abandaki kobondela.” Ntango azongaki, “akutaki bango balali mpɔngi.” Yesu asalaki nini? Alobaki boye: “Ya solo, elimo ezali na molende, kasi mosuni ezali na bolɛmbu.” (Malako 14:32-38) Na esika apamela Petelo, Yakobo, ná Yoane, amoniselaki bango boboto! Kaka na butu yango, Petelo awanganaki Yesu mbala misato. (Malako 14:66-72) Ndenge nini Yesu atalelaki Petelo na nsima? “Nkolo alamukaki mpe abimelaki Simona [Petelo].” (Luka 24:34) Biblia elobi boye: “Abimelaki Kefa, mpe na nsima bazomi na mibale.” (1 Bakolinti 15:5) Yesu abombelaki ntoma yango nkanda te, kasi lokola abongolaki motema, alimbisaki ye mpe alendisaki ye. Na nsima, Yesu apesaki Petelo mikumba ya minene.​—Misala 2:14; 8:14-17; 10:44, 45.

16. Ndenge nini tokoki kotambola ndenge Yesu atambolaki ntango ndeko na biso moklisto azokisi biso to asali biso mabe?

16 Ntango ndeko moko azokisi biso to asali biso mabe moko mpo azali moto ya kozanga kokoka, tosengeli komonisela ye boboto mpe kolimbisa ye ndenge Yesu asalaki! Petelo alendisaki bandeko na ye bandimi na maloba oyo: “Bino nyonso bózalaka na likanisi moko, bómityaka na esika ya bamosusu, bózalaka na bolingo ya bondeko, bato oyo bayokelaka bamosusu mawa mingi, bato ya elimo ya komikitisa, bózongisaka mabe na mabe te to mafinga na mafinga te, kutu bino bópesaka nde lipamboli.” (1 Petelo 3:8, 9) Tosengeli kosala nini soki ndeko moko asali te ndenge oyo Yesu akokaki kosala, elingi koloba aboyi komonisela biso boboto to kolimbisa biso? Ata na ntango wana tosengeli koluka komekola Yesu mpe kosala ndenge oyo ye akokaki kosala.​—1 Yoane 3:16.

Tótya Bokonzi na esika ya liboso

17. Nini ezali komonisa ete Yesu azalaki kotya mokano ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na ye?

17 Ezali na ndenge mosusu lisusu oyo tosengeli kotambola ndenge Yesu Klisto atambolaki. Yesu azalaki kotya mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na ye. Nsima ya koteya mwasi moko Mosamalia pene na mboka ya Sikala, na Samalia, Yesu alobaki na bayekoli na ye boye: “Bilei na ngai ezali nde kosala mokano ya moto oyo atindaki ngai mpe kosilisa mosala na ye.” (Yoane 4:34) Kosala mokano ya Tata ezalaki kolendisa Yesu; ezalaki kopesa ye makasi mpe kosepelisa ye lokola bilei. Soki tomekoli Yesu mpe tozali kotya likebi na mokano ya Nzambe, tokozala na bomoi ya ntina mpe ya esengo!

18. Mapamboli nini emonanaka soki baboti balendisi bana básala mosala ya ntango nyonso?

18 Baboti oyo balendisaka bana na bango ete básala mosala ya ntango nyonso, bango moko ná bana na bango bazwaka mapamboli mingi. Tata moko azalaki kolendisa bana mapasa na ye banda bazalaki naino mike ete bámityela mokano ya kosala mosala ya mobongisi-nzela. Ntango bana yango basilisaki kelasi, bakómaki mpe babongisi-nzela. Tata yango alobelaki esengo oyo ayokaka ntango akomaki boye: “Bana na biso bayokisi biso mawa te. Tokoki koloba na botɔndi mpenza ete, ‘Bana bazali likabo ya Yehova.’” (Nzembo 127:3) Matomba nini bana bazwaka na kosala mosala ya ntango nyonso? Mama moko ya bana mitano alobi boye: “Mosala ya mobongisi-nzela esalisi bana na ngai bákóma baninga mpenza ya Yehova, esalisi bango bákóma na momeseno ya koyekola bango moko, báyeba kosalela ntango malamu, mpe báyekola kotya makambo ya elimo na esika ya liboso na bomoi na bango. Atako yango esɛngaki bango nyonso ete básala makasi mpo na komesana na bomoi yango, mwana ata moko te ayokaka mawa mpo aponaki nzela wana.”

19. Ebongi bilenge bámityela mikano nini mpo na avenire na bango?

19 Bilenge, bozali kokana nini mpo na avenire na bino? Bozali koluka kokóma bato minene na mokili oyo? To bozali nde komibongisa mpo na kosala mosala ya ntango nyonso? Paulo apesaki toli oyo: “Bókeba mpenza mpo ete ndenge na bino ya kotambola ezala te lokola bato bazangá bwanya kasi lokola bato ya bwanya, komisombeláká ntango oyo ebongi, mpamba te mikolo ezali mabe.” Abakisaki boye: “Yango wana bótika kokóma bazoba, kasi bókoba kososola soki mokano ya Yehova ezali nini.”​—Baefese 5:15-17.

Tózala sembo

20, 21. Yesu azalaki sembo na likambo nini, mpe ndenge nini tokoki komekola bosembo na ye?

20 Mpo na kotambola ndenge Yesu atambolaki, tosengeli komekola bosembo na ye. Na ntina na bosembo ya Yesu, Biblia elobi boye: “Atako azalaki na ndenge ya Nzambe, azwaki makanisi te ya kobɔtɔla esika, elingi koloba, ete akokana na Nzambe. Te, kasi amikómisaki nde mpamba mpe akamataki motindo ya moombo mpe ayaki kokóma motindo moko na bato. Longola oyo wana, ntango akómaki na lolenge ya moto, amikitisaki mpe akómaki moto ya botosi tii na liwa, ɛɛ, liwa likoló ya nzete ya mpasi.” Yesu andimaki ete mokano ya Nzambe mpo na ye ekokisama mpo alingaki kolongisa Bokonzi ya Yehova. Atosaki tii na liwa na nzete ya mpasi. Biso mpe tosengeli ‘kobatela ezaleli oyo ya makanisi’ mpe kondima kosala mokano ya Nzambe na bosembo nyonso.​—Bafilipi 2:5-8.

21 Yesu azalaki mpe sembo epai ya bantoma na ye ya sembo. Atako bazalaki na bolɛmbu mpe bazalaki bato ya kozanga kokoka, Yesu alingaki bango “tii na nsuka.” (Yoane 13:1) Ndenge moko mpe, tosengeli te kotika ete mabunga ya bandeko na biso etinda biso tókóma kotya miso kaka na mabe na bango.

Tólanda ndakisa oyo Yesu apesaki

22, 23. Matomba nini tokozwa soki tolandi ndakisa oyo Yesu apesaki?

22 Ya solo, lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki te kolanda na ndenge ya kokoka matambe ya Ndakisa na biso oyo azalaki moto ya kokoka. Kasi, tokoki kosala makasi tólanda matambe na ye malamumalamu. Mpo na kosala yango, esengeli tóyeba mpe tótosa ndenge oyo Klisto azali kotambwisa bayekoli na ye mpe tólanda ndakisa oyo apesi.

23 Tokozwa ebele ya mapamboli soki tomekoli Klisto. Tokokóma na bomoi ya ntina mpe ya esengo mpamba te tokobanda kotya makanisi na biso na kosala mokano ya Nzambe kasi ya biso moko te. (Yoane 5:30; 6:38) Tokozala na lisosoli ya malamu. Tokozala na etamboli ya malamu. Yesu abengaki bato nyonso oyo bazalaki komona mpasi na mosala mpe kokumbisama mikumba ete bákende epai na ye mpo bázwa kopema mpo na milimo na bango. (Matai 11:28-30) Ntango tozali kolanda ndakisa ya Yesu, biso mpe tokoki kosalisa bato mosusu bázwa kopema ntango bazali pembeni na biso. Na yango, tiká tókoba kotambola ndenge Yesu atambolaki.

Ozali koyeba lisusu?

• Ndenge nini Klisto azali kotambwisa bayekoli na ye lelo oyo?

• Ndenge nini bankulutu bakoki kolanda litambwisi ya Klisto na bokonzi oyo bazali na yango?

• Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yesu ntango tozali komona mabunga ya basusu?

• Ndenge nini bilenge bakoki kotya Bokonzi na esika ya liboso?

[Elilingi na lokasa 23]

Bankulutu basalisaka biso tótosa litambwisi ya Klisto

[Bililingi na lokasa 24]

Bilenge, makambo nini bozali kokana kosala mpo bózala malamu na elimo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto