Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/10 nk. 26-31
  • Baboti—Bokolinga bana na bino bákóma bato ya ndenge nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Baboti—Bokolinga bana na bino bákóma bato ya ndenge nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Wapi bomoi ya malamu?
  • Kobongisa avenire ya bana
  • Motuya ya bakelasi milaimilai
  • Biteyelo mosusu ezali?
  • Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka kelasi?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • Ntina ya kelasi mpe kolakisama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Biblia epekisi kotánga kelasi?
    Lamuká!—1998
  • Kotánga kelasi ya milai to kotánga yango te?
    Lamuká!—1994
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/10 nk. 26-31

Baboti—Bokolinga bana na bino bákóma bato ya ndenge nini?

“Bilenge mpe baseka lokola . . . tiká ete básanzola nkombo ya [Yehova].”​—NZEMBO 148:12, 13.

1. Mposa ya baboti ezalaka nini mpo na bana na bango?

MOBOTI nini amibanzabanzaka te mpo na bomoi ya bana na ye? Banda kaka ntango mwana abotami, ata mpe liboso abotama, baboti babandaka komibanzabanza mpo na bolamu na ye. Akozala nzoto kolɔngɔnɔ? Akokola malamu? Ntango mwana azali kokola, makambo mosusu ebakisamaka. Mposa ya baboti nyonso ezalaka kaka ete bana na bango bázala malamu.​—1 Samwele 1:11, 27, 28; Nzembo 127:3-5.

2. Mpo na nini baboti mingi lelo oyo bamitungisaka mingi mpo na avenire ya bana na bango?

2 Nzokande, na mokili ya lelo oyo, ezali mpasi mingi mpo baboti bákokisa bamposa nyonso ya bana na bango. Baboti mingi bakutanaki na makambo ya mpasi mingi na bomoi ntango bazalaki kokola: bitumba, mobulu na makambo ya politiki, mikakatano ya mbongo, mitungisi ya nzoto mpe ya makanisi, mpe bongo na bongo. Yango wana, balingaka te ete bana na bango bákutana na mikakatano yango. Na mikili ya bozwi, baboti bakoki komona ndenge bana ya baninga mpe ya bandeko na bango bazali kokende liboso na misala na bango mpe bazali na bomoi ya esengo mpenza. Yango wana bamonaka ete basengeli koboma nzoto mpo bana na bango mpe ntango bakokola bázala na bomoi ya esengo mpe ya kimya, elingi koloba bomoi ya malamu.​—Mosakoli 3:13.

Wapi bomoi ya malamu?

3. Likambo nini baklisto baponá?

3 Lokola baklisto bazali bayekoli ya Yesu, baponá komipesa mobimba epai na Yehova. Batosaka mpenza maloba ya Yesu oyo: “Soki moto alingi kolanda ngai, tiká amiboya ye moko mpe amema nzete na ye ya mpasi mokolo na mokolo mpe alanda ngai ntango nyonso.” (Luka 9:23; 14:27) Ya solo, bomoi ya moklisto esɛngaka komipesa mpenza. Yango elingi koloba te ete moklito asengeli kozala mobola mpe moto ya mpasi. Kutu, ezali nde bomoi ya esengo mpe ya kimya, elingi koloba bomoi ya malamu, mpamba te esɛngaka kopesa, mpe na ntina yango Yesu alobaki ete “esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”​—Misala 20:35.

4. Yesu alendisaki bayekoli na ye bálukaka nini?

4 Na ntango ya Yesu, bato bazalaki na bomoi ya mpasi mpenza. Longola mpasi ya koluka biloko ya kobikela, bazalaki mpe konyokwama na boyangeli mabe ya Baloma mpe na bakonzi ya mangomba ya lolendo ya ntango wana. (Matai 23:2-4) Kasi, mingi kati na bango oyo bayokaki nsango ya Yesu batikaki misala na bango mpe bakómaki bayekoli na ye. (Matai 4:18-22; 9:9; Bakolose 4:14) Bayekoli yango basalaki nde bozoba ndenge batikaki misala oyo bazalaki kobikela na yango mpo na kolanda Yesu? Yoká ndenge Yesu alobaki: “Moto nyonso oyo atiki bandako to bandeko ya mibali to bandeko ya basi to tata to mama to bana to bilanga mpo na nkombo na ngai akozwa mbala mingi koleka mpe akozwa libula ya bomoi ya seko.” (Matai 19:29) Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete Tata na bango ya likoló ayebi bamposa na bango. Yango wana alendisaki bango boye: “Boye, bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe biloko nyonso wana mosusu ekobakisamela bino.”​—Matai 6:31-33.

5. Ndenge nini baboti mosusu batalelaka likambo oyo Yesu alobaki ete Nzambe akokokisa bamposa ya basaleli na ye?

5 Makambo ezali mpe kaka ndenge moko lelo oyo. Yehova ayebi bamposa na biso, mpe bato oyo bazali kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na bango, mingimingi baoyo bazali na mosala ya ntango nyonso, bazali mpe na elikya ete akokokisa bamposa na bango. (Malaki 3:6, 16; 1 Petelo 5:7) Nzokande, baboti mosusu bazali na mitema mibale na likambo yango. Epai mosusu, bazali na mposa bana na bango bákende liboso na mosala ya Yehova, bákɔta ata na mosala ya ntango nyonso. Kasi epai mosusu, soki batali mikakatano ya mbongo mpe mpasi ya kozwa mosala ya malamu na mokili ya lelo, bamonaka ete esengeli liboso bana bátanga malamu mpo bázwa mayele oyo ekopesa bango nzela ya kozwa misala ya malamu to eloko moko oyo ekosalisa bango soki bakómi na bosɛnga. Mpo na baboti yango, kotánga malamu mbala mingi elimbolaka kosala bakelasi ya milaimilai.

Kobongisa avenire ya bana

6. Maloba “bakelasi ya milaimilai” elimboli nini na lisolo oyo?

6 Mboka na mboka ezali na lolenge na yango ya kotánga kelasi. Na ndakisa, na biteyelo ya Leta na États-Unis, esɛngaka kotánga mbula 12, mbula 6 na eteyelo ya ebandeli mpe 6 na eteyelo ya ntei. Na nsima, bayekoli bakoki kokende kolekisa lisusu mbula minei to koleka na iniversite to na biteyelo mosusu ya likoló, epai soki basilisi bakozwa diplome, to mpe bakoki lisusu kolanda mateya ya mineneminene mpo na kokóma minganga, bato ya mayele na mibeko, ba-ingénieur, mpe bongo na bongo. Yango nde “bakelasi ya milaimilai” oyo tolobeli na lisolo oyo. Kasi, ezali mpe na biteyelo ya misala ya mabɔkɔ, epai bana batángaka mwa ntango moke mpe bazwaka badiplome ya misala ndenge na ndenge.

7. Na biteyelo ya ntei, bakómi kotya bana-kelasi mpanzi likoló básala nini?

7 Lelo oyo, biteyelo ya ntei ekómi na momeseno ya kobongisa bana-kelasi mpo na biteyelo ya minene. Mpo na yango, na biteyelo mingi ya ntei, na esika bápesa bana mateya oyo ekopesa bango mayele ya mosala, bakómi nde kotya likebi mingi na mateya oyo ekosalisa bango bálonga na momekano mpo na kokɔta na iniversite. Lelo oyo na biteyelo ya ntei, balakisi, bapesi toli mpe bana-kelasi mosusu bakómi kotya bana-kelasi mpanzi likoló mpo báluka kaka kokɔta na bainiversite ya malamu, epai bakozwa badiplome oyo ekopesa bango nzela ya kozwa misala ya malamu mpenza.

8. Mokakatano nini baklisto bazali na yango mpo na kopona makambo oyo bana na bango bakosala?

8 Kasi, baboti oyo bazali baklisto basengeli kosala nini? Ya solo, baboti oyo bazali baklisto bazalaka na mposa ete bana na bango báyekola malamu mpe bázwa makoki oyo ekosalisa bango bázala malamu na bomoi na bango. (Masese 22:29) Kasi, basengeli nde kotika bana na bango bábendama na elimo oyo ezali kotinda bato básala nyonso mpo na kozwa biloko mingi ya mokili oyo mpe mpo na kolonga na bomoi? Ezala na maloba to na misala, mikano nini bazali kotinda bana na bango bámityela? Baboti mosusu babomaka nzoto na mosala mpe babombaka mbongo mpo na kotinda bana na bango na biteyelo ya minene ntango bakokola. Bamosusu kutu bakɔtaka banyongo mpo na likambo yango. Nzokande, motuya oyo bafutaka mpo na ekateli wana ezali kaka mbongo te. Bakelasi ya milaimilai ezali na motuya nini?​—Luka 14:28-33.

Motuya ya bakelasi milaimilai

9. Kotánga bakelasi ya milaimilai esɛngaka mbongo ya ndenge nini?

9 Mbala mingi, soki toyoki liloba motuya, tokanisaka mbala moko mbongo. Na bikólo mosusu, guvɛrnema nde efutelaka bayekoli ya mayele mingi bakelasi ya milaimilai. Nzokande, na bisika mingi bakelasi ya milaimilai esɛngaka mbongo mingi mpe ntalo na yango ezali se kobakisama. Lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo moko (New York Times) elobi boye: “Kala, bato bazalaki kotalela bakelasi ya milaimilai lokola fungola ya bomengo. Lelo oyo ezali lisusu nde kobakisa bokeseni na kati ya bazwi ná babola.” Na maloba mosusu, biteyelo ya minene ezali kotikala kaka mpo na bazwi mpe bato minene, oyo bazali kotángisa bana na bango kuna mpo na kosalisa bango mpe bákóma bato minene ya mokili oyo. Baboti oyo bazali baklisto mpe basengeli kozala na mokano ya ndenge wana mpo na bana na bango?​—Bafilipi 3:7, 8; Yakobo 4:4.

10. Boyokani nini ezali kati na kotánga bakelasi ya milaimilai ná kotombola matomba ya mokili oyo?

10 Ata na mikili oyo bakelasi ya milaimilai ezali ofele, masɛngami ezangaka te. Na ndakisa, zulunalo moko (The Wall Street Journal) elobi ete na ekólo moko ya Sudi-ɛsti ya Asie, guvɛrnema etyá “biteyelo na molɔngɔ, banda na biteyelo ya lokumu mingi tii na biteyelo ya mpambampamba, mpo na kosala ete bana ya mayele mingi báluka kokóma bato minene.” Mpo na kokóma “bato minene,” esengeli kokɔta na biteyelo ya lokumu, na ndakisa Oxford mpe Cambridge na Angleterre, biteyelo babengi Ivy league na États-Unis, mpe bongo na bongo. Mpo na nini guvɛrnema yango ezali kobebisa mbongo na bakelasi ya milaimilai ndenge wana? Zulunalo yango elobi boye: “Ezali mpo na komatisa nkita ya mboka.” Kelasi ekoki kozala ofele, kasi motuya oyo bana-kelasi bafutaka ezali ete bazali komipesa bomoi na bango mobimba mpo na kotombola matomba ya mokili oyo. Atako bomoi ya ndenge wana ezali na lokumu mingi na mokili oyo, baboti oyo bazali baklisto bakolinga mpenza bana na bango bázala na bomoi ya lolenge wana?​—Yoane 15:19; 1 Yoane 2:15-17.

11. Masolo ya bazulunalo emonisi nini na likambo ya kolangwa masanga mpe pite na bainiversite?

11 Likambo mosusu ezali lolenge ya bato oyo bana bakutanaka na bango kuna. Bainiversite ná biteyelo mosusu ya minene ezali bisika oyo okokuta makambo nyonso ya mabe lokola komɛla bangi, kolangwa masanga, pite, moyibi, konyokola bana oyo bakɔti sika mpe bongo na bongo. Tózwa ndakisa ya kolangwa masanga. Zulunalo mosusu (New Scientist) elobelaki momeseno ya komɛla mokongo, elingi koloba, komekana na masanga mpo na kotala nani akolangwa liboso. Zulunalo yango elobi boye: “Ndambo monene (44%) ya [bayekoli ya iniversite na États-Unis] bamɛlaka mokongo ata mbala moko na pɔsɔ mibale.” Ezali mpe ndenge wana na Australie, na Angleterre, na Russie mpe na mikili mosusu. Na likambo ya pite, bayekoli mingi bakómá na momeseno oyo zulunalo moko (Newsweek) ebengaki “kosangisa nzoto kaka mbala moko mpe bosilani.” Baankɛtɛ emonisi ete bayekoli soki 60 to 80 likoló ya monkama basalaka bongo. Mwasi moko oyo asalaki ankɛtɛ na likambo yango alobi boye: “Soki ozali moyekoli ya solosolo, osengeli kosala yango.”​—1 Bakolinti 5:11; 6:9, 10.

12. Makambo nini bayekoli bakutanaka na yango na biteyelo ya minene?

12 Longola baninga ya mabe, ezali mpe na mosala monene ya koyekola mpo na kolonga na baekzamɛ. Moyekoli nyonso asengeli koyekola mpe kosala badevuare mpo na kolonga na baekzamɛ. Bayekoli mosusu basangisaka kelasi ná mwa misala oyo basalaka kaka ndambo ya mokolo. Nyonso wana elyaka bango ntango mpe makasi na bango nyonso. Bakotikala mpenza na ntango mpe makasi mpo na misala ya elimo? Soki mikumba elekeli bango, bakopona nini mpe bakotika nini? Matomba ya Bokonzi ekozala kaka na esika ya liboso na bomoi na bango to nde bakotya yango pembeni? (Matai 6:33) Biblia elobi na baklisto boye: “Bókeba mpenza mpo ete ndenge na bino ya kotambola ezala te lokola bato bazangá bwanya kasi lokola bato ya bwanya, komisombeláká ntango oyo ebongi, mpamba te mikolo ezali mabe.” (Baefese 5:15, 16) Ezali mpenza mawa komona ete mingi batiki solo mpe bapesi ntango mpe makasi na bango mpo na kelasi to balandi etamboli ya mbindo na biteyelo ya minene!

13. Mituna nini baboti oyo bazali baklisto basengeli kotalela?

13 Nzokande, makambo lokola pite, bizaleli ya mabe mpe baninga ya mabe ezalaka kaka na bainiversite te. Bilenge mingi ya mokili batalelaka makambo yango lokola makambo ya malamu oyo moyekoli nyonso asengeli kosala. Baklisto bakoki mpenza kondima bana na bango bázala na bisika ya ndenge wana mbula minei to koleka? (Masese 22:3; 2 Timote 2:22) Matomba oyo mwana akoki kozwa kuna ezali monene ndenge nini mpo ondima kotya ye na likama ya ndenge wana? Likambo ya ntina koleka, nyonso wana ekoteya bana nini na ntina ya makambo oyo esengeli kozwa esika ya liboso na bomoi na bango?a (Bafilipi 1:10; 1 Batesaloniki 5:21) Baboti basengeli kotalela malamumalamu mpe na kati ya mabondeli mituna wana, mpe likama ya kotinda bana na bango na biteyelo ya mosika, na bingumba to na bikólo mosusu.

Biteyelo mosusu ezali?

14, 15. (a) Na bokeseni ya makanisi ya bato, toli nini ya Biblia ebongi mpenza lelo oyo? (b) Mituna nini bilenge bakoki komituna?

14 Bato mingi lelo oyo bakanisaka ete bilenge bakoki kolonga na bomoi na bango kaka soki bakɔti na iniversite. Nzokande, na esika ya kolanda makanisi ya bato, baklisto batosaka toli ya Liloba ya Nzambe oyo: “Bótika kolanda ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, kasi bóbongwana na kokómisáká makanisi na bino sika, mpo bómindimisa bino moko nini wana mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.” (Baloma 12:2) Na ntango oyo ya nsuka, mokano ya Nzambe ezali nini mpo na basaleli na ye, bilenge mpe bakóló? Paulo alendisaki Timote ete: “Batelá makanisi na yo na makambo nyonso, ndimá komona mpasi, salá mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu, kokisá mosala na yo ya ministre malamumalamu.” Toli wana ebongi mpenza mpo na biso nyonso lelo oyo.​—2 Timote 4:5.

15 Na esika ya kolanda elimo ya mokili oyo ya koboma nzoto mpo na biloko ya mokili, biso nyonso tosengeli ‘kobatela makanisi na biso,’ elingi koloba ndenge na biso ya kotalela makambo ya elimo. Soki ozali elenge, omituna boye: ‘Nazali nde kosala makasi mpo na “kokokisa mosala na ngai ya ministre malamumalamu,” mpo na kokóma ministre ya Liloba ya Nzambe oyo abongi? Mikano nini nazali komityela mpo na kokokisa mosala na ngai ya ministre “malamumalamu”? Nazali na mokano ya komipesa na mosala ya ntango nyonso bomoi na ngai mobimba? Mituna wana ezali pɛtɛɛ te, mingimingi soki otali ndenge bilenge mosusu bazali komipesa na bozwi ya mokili, bazali “koluka makambo minene” oyo bakanisi ete ekomemela bango bomengo. (Yilimia 45:5) Kasi, baklisto bamesenisaka bana na bango banda bomwana na baninga mpe mateya ya malamu oyo ekosalisa bango bákola na elimo.​—Masese 22:6; Mosakoli 12:1; 2 Timote 3:14, 15.

16. Ndenge nini baklisto bakoki kosalisa bana na bango bázwa baninga oyo bakosalisa bango bákola na elimo?

16 Elenge moko oyo azali mwana ya liboso na libota moko ya bana mibali misato, oyo mama na bango azali mobongisi-nzela banda ebele ya bambula, alobaki boye: “Mama azalaki kotalela baninga na biso malamumalamu. Tozalaki kotambola na baninga ya kelasi te, kasi kaka na bandeko ya lisangá oyo bazalaki na etamboli malamu. Azalaki mpe mbala na mbala kobenga na ndako na biso bandeko oyo bazalaki na mosala ya ntango nyonso, na ndakisa bamisionɛrɛ, bakɛngɛli batamboli, bandeko ya Betele, babongisi-nzela. Ntango tozalaki koyoka masolo na bango mpe komona esengo na bango, yango elonaki na mitema na biso mposa ya kosala mosala ya ntango nyonso.” Ezali mpenza esengo komona ete bana yango nyonso misato bazali lelo oyo na mosala ya ntango nyonso: moko azali kosala na Betele, moko akɔtaki na Eteyelo mpo na kobongisa basungi mpe mosusu azali mobongisi-nzela!

17. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango na kopona mateya mpe misala oyo bakoyekola na kelasi? (Talá etanda na lokasa 29.)

17 Longola komesenisa bana na baninga oyo bakosalisa bango bákola na elimo, baboti basengeli mpe kosalisa bana na bango, ntango bazali naino bana mike, na kopona misala oyo bakoki koyekola na kelasi. Elenge mosusu, oyo azali kosala sikoyo na Betele, alobi boye: “Liboso baboti na ngai bábalana mpe nsima ya kobalana, bango nyonso bazalaki babongisi-nzela mpe basalaki nyonso oyo bakoki mpo na kosalisa libota mobimba bákóma na elimo ya babongisi-nzela. Ezala ntango tozalaki kopona misala oyo tokoyekola na kelasi to kozwa bikateli mosusu ya bomoi, bazalaki ntango nyonso kolendisa biso tópona makambo oyo ekopesa biso likoki ya kozwa misala oyo ekotikela biso ntango mpo na mosala ya mobongisi-nzela.” Na esika ya kopona mateya oyo esɛngaka kokenda tii na iniversite, baboti ná bana basengeli kopona mateya oyo ekosalisa bana bámipesa na mosala ya Nzambe.b

18. Misala ya ndenge nini bilenge basengeli kopona?

18 Baankɛtɛ emonisi ete na bikólo mingi, bazali mpenza na mposa ya bato oyo bazali na badiplome ya iniversite te, kasi nde ya bato ya misala ya mabɔkɔ mpe oyo bayebi misala mosusu ya mikemike. Zulunalo moko (USA Today) elobi ete “nsima ya mbula soki zomi, bato mingi ya mosala (70%) bakozala na mposa ya diplome ya iniversite te, kasi diplome ya biteyelo mosusu ya likoló oyo elakisaka bana misala.” Biteyelo mingi ya ndenge wana elakisaka bayekoli misala ya biro, ya kobongisa mituka, ya kobongisa baordinatɛrɛ, ya kotya mpe kobongisa batiyo ya mai, ya kokanga nsuki, mpe ebele ya misala mosusu, na boumeli ya mwa ntango moke. Misala wana ezali na ntina? ƐƐ! Ekoki kozala ete misala yango ezali mpenza misala ya lokumu te, kasi epesaka baoyo balukaka libosoliboso kosalela Yehova likoki ya kosala mpo na kobikela mpe etikelaka bango ntango mpo na mosala ya Yehova.​—2 Batesaloniki 3:8.

19. Wapi lolenge ya bomoi oyo ememelaka moto esengo mpe bolamu koleka?

19 Biblia elobi boye: “Bilenge mpe baseka lokola . . . tiká ete básanzola nkombo ya [Yehova] zambi bobele nkombo na ye eleki. Nkembo na ye ezali likoló ya mokili mpe lola.” (Nzembo 148:12, 13) Soki totali misala mpe mbongo oyo mokili ekoki kofuta, na ntembe te komipesa mobimba na mosala ya ntango nyonso mpo na kosalela Yehova ezali lolenge ya bomoi oyo ememelaka moto esengo mpe bolamu koleka. Kobosana te elaka ya Biblia oyo: “Mapamboli ya [Yehova] ekoyeisa bozui, akobakisa mawa na yango te.”​—Masese 10:22.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na masolo ya bato oyo bapesaki mateya ya teokrasi motuya koleka mateya ya iniversite, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augusto 1982, nkasa 3-6; ya 1 Augusto 1979, nkasa 5-10; Lamuká! ya 22 Sɛtɛmbɛ 1978, lokasa 15; mpe ya 22 Marsi 1980, nkasa 3-6 (nyonso na Lifalanse).

b Talá na Lamuká! ya 8 Ɔkɔtɔbɛ 1998, motó ya likambo “La recherche de la sécurité,” nkasa 4-6, mpe ya 8 Mai 1989, motó ya likambo “Quelle carrière choisir?” nkasa 12-14.

Okoki kolimbola?

• Ntango baklisto bazali kotalela avenire na bango, batyaka motema na nini?

• Mikakatano nini baklisto bazali na yango mpo na koluka bolamu ya bana na bango?

• Makambo nini esengeli kotalela na ntina na motuya ya bakelasi ya milaimilai?

• Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango bámipesa na mosala ya Yehova bomoi na bango mobimba?

[Etanda na lokasa 29]

Wapi litomba ya kosala bakelasi milaimilai?

Bato mingi bakɔtaka na iniversite mpo na koluka badiplome oyo ekopesa bango likoki ya kozwa misala ya malamu. Nzokande, balapolo ya baguvɛrnema ezali komonisa ete na kati ya baoyo bakendaka na biteyelo ya minene, kaka ndambo moke (25%) nde basilisaka kelasi nsima ya mbula motoba; emonani mpenza ete baoyo bazali kolonga bazali mingi te. Atako bongo, mwa ndambo yango oyo basilisaka kelasi bazwaka misala ya malamu? Talá makambo oyo emonanaki na baankɛtɛ oyo esalemi mikolo oyo.

“Kotánga na [bainiversite] ya Harvard to Duke epesaka moto mbala moko te nzela ya kozwa mosala ya malamu mpe oyo efutaka mbongo mingi. . . . Bakompanyi eyebi makambo mingi te na ntina na bilenge oyo bayei koluka mosala. Diplome ya monene oyo euti na iniversite moko ya lokumu (lokola bainiversite babengi Ivy League) ekoki kobenda likebi. Kasi, Bapatrɔ batalaka nde mosala.”​—Zulunalo Newsweek, 1 Novɛmbɛ 1999.

“Atako misala ya mikolo oyo ekómi koluka bato oyo bazali na makoki mingi koleka ndenge ezalaki liboso . . . , makoki oyo misala yango ezali kosɛnga ezali oyo bayekolaka na eteyelo ya ntei, na ndakisa mituya, kotánga mpe kokoma, oyo bana ya kelasi ya misato na eteyelo ya ntei bayebaka malamu mpenza . . . , kasi te makoki oyo bayekolaka na biteyelo ya minene. . . . Mpo na kozwa misala ya malamu, bayekoli basengeli kaka te kokɔta na bainiversite, kasi basengeli nde koyeba mpenza makambo oyo bayekolaka na eteyelo ya ntei.”—Zulunalo American Educator, na ebimeli ya prɛnta 2004.

“Biteyelo mingi ya minene epesaka bayekoli te formasyo oyo ekopesa bango likoki ya kosala misala nsima ya kosilisa kelasi. Biteyelo oyo elakisaka misala ya mabɔkɔ . . . ekómi kozwa bayekoli ebele. Banda na 1996 tii na 2000, motángo ya bayekoli oyo bazali kokɔta na biteyelo yango ebakisamaki mpenza (48 %). . . . Longola yango, badiplome ya iniversite oyo elyaka bana mbongo mpe ntango ezali lisusu na ntina mpenza te ndenge ezalaki kala.”​—Zulunalo Time, ebimeli ya 24 Yanuali 2005.

“Na Departema ya misala na États-Unis, bamonaki ete na boumeli ya mobu 2005, bato mingi oyo bazwi badiplome ya iniversite (1/3) bakozwa misala oyo ebongi na bango te.”​—Zulunalo The Futurist, ebimeli ya Yuli/Augusto 2000.

Na kotalela nyonso wana, balakisi mingi bakómi komituna soki kotánga bakelasi milaimilai ezali lisusu na ntina lelo oyo. Zulunalo oyo touti kotánga (Futurist) ebakisi boye: “Tozali kotángisa bana bakelasi oyo ekopesa bango litomba moko te.” Kasi, yoká ndenge Biblia elobi na ntina na Nzambe: “Ngai nazali [Yehova], Nzambe na yo, ye oyo akolakisa yo mpo na litomba, ye oyo akokamba yo na nzela ekoki na yo kotambola na yango. Soki oyokaki malako na ngai! Mbele kimya na yo ezalaki lokola ebale mpe boyengebene na yo lokola mbonge ya mai-ya-monana.”​—Yisaya 48:17, 18.

[Elilingi na lokasa 26]

Batikaki misala na bango mpe balandaki Yesu

[Elilingi na lokasa 31]

Baklisto bamesenisaka bana na bango banda bomwana na baninga oyo bakosalisa bango bákola na elimo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto