Zwá matomba na mateya oyo eleki malamu mpo na moto nyonso!
BIBLIA elobi ete Yehova Nzambe azali Mozalisi ya bato mpe biloko nyonso. (Genese 1:27; Emoniseli 4:11) Lokola azali Molakisi Monene, ateyaki Adama, mobali ya liboso, ná mwasi na ye Eva, mpe abongisaki bango mpo bázala na bomoi ya malamu na elanga ya Edene. Mokano na ye ezalaki ete akoba koteya bango mpe kobatela bango libela na libela. (Genese 1:28, 29; 2:15-17; Yisaya 30:20, 21) Kanisá naino libaku malamu ndenge wana!
Kasi, Adama ná Eva babwakaki libaku yango. Kozanga botosi na bango ememelaki bato nyonso kobeba na nzoto mpe na bizaleli. (Genese 3:17-19; Baloma 5:12) Mpo na bato oyo bazalaki na bomoi mwa bambula nsima ya ebandeli ya mokili, Biblia elobi boye: “[Yehova] amonaki ete masumu ya bato ezalaki mingi na mokili mpe ete makanisi nyonso kati na mitema na bango ezalaki bobele epai na mabe mikolo nyonso.”—Genese 6:5.
Bambula pene na 4 500 esili koleka banda Yehova alobaki ete makanisi ya moto ezali kaka na makambo ya mabe, mpe lelo oyo bizaleli ya bato ebebi mingi koleka ndenge ezalaki na ntango wana. Bato mingi bazali kokosa, koyiba, to konyokola basusu. Mikakatano ezali kobakisama mokolo na mokolo, nzokande bolingo ya bato ezali se kokita. Na bisika mingi ezala na kati ya mabota bato bazali mpenza koyokana te. Kasi, tosengeli kopesa Nzambe foti te mpo na makambo yango to mpe koloba ete azali kokipe te mikakatano oyo ezali kotungisa bato lelo oyo. Yehova amibanzabanzaka ntango nyonso mpo na bolamu ya bato, mpe azali pene ya koteya baoyo nyonso bazali koluka ye atambwisa bango mpo bázala na bomoi ya malamu. Eleki sikoyo bambula soki 2 000, atindaki Mwana na ye, Yesu Klisto, awa na mabelé mpe amonisaki mposa na Ye ya koteya bato oyo balingi kozala malamu na bomoi na bango. Yesu apesaki ndakisa ya kokoka mpo na oyo etali koteya mpamba te, Molakisi Monene ye moko nde ateyaki ye na boumeli ya bambula ebele mpenza.
Boklisto ya solo eteyaka bato
Yesu Klisto nde abandisaki boklisto ya solo, lolenge moko ya bomoi oyo esimbami na bolingo. Boklisto ya solo esɛngi ete makanisi mpe misala ya moto eyokana na mokano ya Nzambe, mpo na kopesa lokumu mpe nkembo na nkombo na ye. (Matai 22:37-39; Baebele 10:7) Mateya ya Yesu ezalaki kouta epai ya Tata na ye, Yehova. Mpo na lisungi oyo Nzambe apesaki Yesu, Yoane 8:29 elobi boye: “Moto oyo atindaki ngai azali elongo na ngai; atiki ngai ngai moko te, mpo nasalaka ntango nyonso makambo oyo esepelisaka ye.” Ya solo, na boumeli ya ntango nyonso oyo Yesu asalaki mosala na ye, Tata na ye azalaki kosunga mpe kotambwisa ye. Bayekoli ya liboso ya Yesu bazwaki malako oyo esalisaki bango mpo na kolonga mikakatano oyo bakutanaki na yango. Yehova ateyaki bango na nzela ya Mwana na ye. Kolanda mateya mpe ndakisa ya Yesu ekómisaki bango bato malamu koleka. Ezali mpe bongo mpo na bayekoli na ye lelo oyo.—Talá etanda “Mateya ya Yesu ebongolaka bomoi ya bato,” na lokasa 6.
Moko na makambo ya boklisto ya solo ezali ete mateya na yango esimbaka makanisi mpe motema ya bato mpo na kobongola bomoto na bango. (Baefese 4:23, 24) Ndakisa moko ezali likambo oyo Yesu ateyaki na oyo etali kozala sembo epai ya molongani: “Boyokaki ete elobamaki, ‘osengeli kosala ekobo te.’ Kasi ngai nazali koloba na bino ete moto nyonso oyo azali kokoba kotala mwasi tii na koyoka ye mposa asili kosala ekobo elongo na ye na kati ya motema na ye.” (Matai 5:27, 28) Na maloba yango, Yesu ateyaki bayekoli na ye ete moto asengeli kobatela motema na ye pɛto mpe ete makanisi mpe bamposa ya mabe ekoki kozala likama, ata ntango moto akokisi yango naino te. Ezali lokuta ete makanisi ya mabe ekoki kotinda moto asala makambo oyo Nzambe akosepela na yango te mpe oyo ekopesa bato mosusu mpasi?
Yango wana, Biblia epesi biso toli oyo: “Bótika kolanda ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, kasi bóbongwana na kokómisáká makanisi na bino sika, mpo bómindimisa bino moko nini wana mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.” (Baloma 12:2) Ntango mosusu okoki kotuna boye: ‘Mateya ekoki mpenza kokómisa makanisi ya moto sika?’ Kokómisa makanisi sika elimboli mpe kotondisa yango na mitinda mpe malako ya Liloba ya Nzambe mpo na kobongola yango. Tokoki kosala yango soki tozali kondima mateya oyo Nzambe azali kopesa biso na nzela ya Liloba na ye.
Liloba ya Nzambe etindaka moto abongwana
“Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya.” (Baebele 4:12) Tii lelo oyo, ezali na nguya ya kobongola bomoi ya bato, likambo oyo ezali komonisa ete esilá ngala te. Ekoki kotinda moto atika mabe, akóma moklisto ya solo, oyo azali na bizaleli ya malamu koleka. Bandakisa oyo elandi emonisi ntina ya mateya ya Biblia.
Emilia oyo tolobelaki na lisolo ya liboso, alobi boye: “Milende na ngai moko mpo libota na ngai ekóma malamu ebotaki mbuma te. Ntango nakómaki koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova, nakómaki na elikya mpe nabandaki kobongola makanisi na ngai. Nayekolaki kozala motema molai mpe koboya kosilika mpambampamba. Na nsima, mobali na ngai mpe akómaki koyekola. Ezalaki pɛtɛɛ te mpo atika komɛla masanga, kasi alongaki kosala yango. Yango ebongisaki libala na biso. Lelo oyo tozali baklisto ya esengo mpe tozali koteya bana na biso mitinda ya Biblia.”—Deteronome 6:7.
Mateya ya boklisto ya solo ekoki kosalisa moto atika makambo ya mabe mpe etamboli ya mbindo. Manuela amonaki bosolo ya likambo yango. Ntango azalaki na mbula 13, akimaki ndako mpe akómaki komɛla bangi oyo babengi marijuana. Na nsima, akómaki komɛla bangi ya makasi koleka oyo babengi héroïne. Azalaki kosangisa nzoto na mibali mpe basi mpo na kozwa mbongo mpe esika ya kolala. Na bantango mosusu, Manuel azalaki kobɔtɔla bato biloko. Azalaki ntango nyonso na molangwa ya bangi. Lokola azalaki mobulu bazalaki kokɔtisa ye bolɔkɔ mbala mingi. Mbala moko aumelaki mbula minei na bolɔkɔ, mpe kuna akɔtaki na molɔngɔ ya bato oyo batɛkaka mandoki. Ntango abalaki, akobaki kobuka mbuma mabe ya mobulu na ye. Alobi boye: “Nsukansuka tokendaki kofanda na esika oyo ezalaki kala ndako ya bansoso. Nazali komona lisusu ndenge mwasi na ngai azalaki kolamba na mɔtɔ ya nkoni. Tozalaki mpenza na mpasi, kutu bandeko na ngai moko batindaki mwasi na ngai akima ngai.”
Nini ebongolaki bomoi na ye? Manuel alobi boye: “Moto moko oyo toyebanaki na ye ayaki na ndako na biso mpe asololaki na ngai na Biblia. Nandimaki azongelaka ngai kaka mpo namonisa ye ete Nzambe amibanzabanzaka mpo na bato te. Nazalaki kokanisa ete bomoi na ngai moko ekoki kondimisa moto likambo yango. Motema molai mpe limemya ya Motatoli yango ekamwisaki ngai mpenza, yango wana nandimaki kokende na makita na Ndako ya Bokonzi. Atako bato mosusu kuna bayebaki etamboli na ngai, bapesaki ngai mbote na esengo. Basalaki ete namiyoka lokola mopaya te. Likambo yango esepelisaki ngai mpenza. Esimbaki motema na ngai mpe nazwaki ekateli ya kotika bangi mpe koluka mosala ya malamu. Sanza minei nsima ya kobanda koyekola Biblia, nakokisaki masɛngami mpo na kobima na mosala ya kosakola, mpe sanza minei nsima na yango, nazwaki batisimo, nakómaki Motatoli ya Yehova.”
Boklisto ya solo ememelaki Manuel ná libota na ye nini? “Soki nayekolaki mateya ya Biblia te, mbɛlɛ nakufá kala. Bomoi oyo Yesu ateyaki esali ete libota na ngai ezongela ngai. Bana na ngai mibale bakolanda te nzela oyo nalandaki ntango nazalaki elenge. Nazali na esengo mpe botɔndi mingi epai ya Yehova mpo na boyokani malamu oyo nazali na yango ná mwasi na ngai. Baninga na ngai mosusu ya kala bapesaki ngai longonya mpe bayebisaki ngai ete nzela oyo naponi ezali nzela eleki malamu.”
Baklisto bazalaka pɛto na bizaleli mpe na nzoto. John, mobali moko oyo afandaka na engumba moko ya bobola na Afrika ya Sudi, akangaki ntina ya likambo yango. Alobi boye: “Mwana na biso ya mwasi azalaki ntango mosusu kolekisa pɔsɔ mobimba asukoli te, kasi tozalaki kokipe te.” Mwasi na ye alobi ete ndako na bango ezalaki salite mpenza. Kasi, mateya ya boklisto ebongolaki makambo. John atikaki baninga oyo azalaki kosala na bango mosala ya koyiba mituka mpe akómaki kotyela libota na ye likebi mingi. “Toyekolaki ete lokola tozali baklisto, nzoto na biso mpe bilamba na biso esengeli kozala pɛto. Nalingaka maloba ya 1 Petelo 1:16, oyo elendisaka biso tózala basantu mpo Yehova Nzambe azali mosantu. Lelo oyo, tobongisaka mpe mwa ndako na biso mpo ezala pɛto.”
Okoki koyekola mateya oyo eleki malamu
Masolo lokola oyo touti kolobela ezali mingi. Mateya ya Biblia esalisi bamilio ya bato bákóma na bomoi ya malamu koleka. Bapatrɔ na bango basepelaka na bango mingi mpo bazalaka sembo mpe makasi na mosala. Bayebaka kofanda na bato, bazalaka baninga malamu, batyelaka basusu likebi. Baboyaka mpenza makambo ya mabe mpe bamposa ya mabe, yango wana babatelaka malamu nzoto, makanisi, mpe motema na bango. Na esika bábebisa mbongo na bango na makambo ya mpambampamba, basalelaka yango mpo na bolamu na bango moko mpe ya mabota na bango. (1 Bakolinti 6:9-11; Bakolose 3:18-23) Ya solo mpenza, kosalela mitinda ya Yehova oyo ezali na Biblia emonisaka ete boklisto ya solo ezali nzela eleki malamu oyo moto akoki kolanda, epesaka mateya ya malamu koleka mpo na moto nyonso. Mpo na moto oyo azali kolanda mibeko ya Nzambe, Biblia elobi boye: “Nyonso ekosalaka ye ebongi.”—Nzembo 1:3.
Ezali likambo ya esengo koyeba ete Yehova Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alingi koteya biso. Ye moko alobi boye: “Ngai nazali [Yehova], Nzambe na yo, ye oyo akolakisa yo mpo na litomba, ye oyo akokamba yo na nzela ekoki na yo kotambola na yango.” (Yisaya 48:17) Yehova alakisi biso nzela na ndakisa mpe mateya ya Mwana na ye Yesu Klisto. Mateya na ye ebongolaki bomoi ya bato mingi oyo bayokaki yango ntango azalaki awa na mabelé, ezali mpe bongo mpo na bato mingi mosusu oyo bazali kolanda mateya na ye lelo oyo. Tozali kolendisa yo ozwa ntango ya koyekola mateya yango. Batatoli ya Yehova ya mboka to kartye na bino bakosepela mingi kosalisa yo ozwa mateya yango oyo ezali mpo na moto nyonso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi ye nkombo mosusu.
[Etanda/Elilingi na lokasa 6]
Mateya ya Yesu ebongolaka bomoi ya bato
Lokola Zakai azalaki kapita ya bakɔngɔli mpako, akómaki na bozwi mpo na mbongo oyo azalaki koyiba. Kasi, ntango asalelaki mateya ya Yesu, abongolaki bizaleli na ye.—Luka 19:1-10.
Saulo moto ya Talasi atikaki konyokola baklisto mpe akómaki moklisto, bakómaki kobenga ye ntoma Paulo.—Misala 22:6-21; Bafilipi 3:4-9.
Bato mosusu ya Kolinti, liboso bákóma baklisto bazalaki ‘bato ya pite, basambeli bikeko, bato ya ekobo, mibali oyo balalaka na mibali, miyibi, bato ya lokoso, balangwi-masanga, bafingi, mpe babɔtɔli.’ Kasi, ntango bayekolaki mateya ya solo, ‘basukolamaki pɛɛ, basantisamaki, mpe batángamaki bayengebene na nkombo ya Nkolo na bango Yesu Klisto.’—1 Bakolinti 6:9-11.
[Elilingi na lokasa 7]
Biblia ekoki kolakisa yo mpo ozala malamu na bomoi