Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/11 nk. 8-12
  • ‘Mposa nyonso ya motema na ngai’ ekokisamaki

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Mposa nyonso ya motema na ngai’ ekokisamaki
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nazwi boyebi ya sikisiki
  • Nakómi mobongisi-nzela
  • Ndenge nalongaki makanisi ya mabe
  • Na esika nazela, nazwi ekateli
  • Mposa na ngai ya kokende Afrika ezali kaka
  • Nasepelaki kozonga lisusu
  • Ngai ná Océane na Afrika
  • Botondi mpo na lisungi ya sembo ya Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mbwa na yo ezali likámá mpo na bana?
    Lamuká!—1997
  • Bamipesaki na bolingo na bango moko—Na Afrika ya Wɛsti
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Sikoyo namoni ete nakoki kosalisa basusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/11 nk. 8-12

Lisolo ya bomoi

‘Mposa nyonso ya motema na ngai’ ekokisamaki

YA DOMINIQUE MORGOU

Nsukansuka, nakómaki na Afrika na Desɛmbɛ 1998. Mposa oyo nazalaki na yango banda bomwana ekokisamaki. Nazalaki ntango nyonso kosepela na bitando minene, banyama mpe bazamba kitoko ya Afrika. Nakómaki sikoyo kuna! Kaka na ntango yango, ndɔtɔ na ngai mosusu ekokisamaki. Nazalaki mobongisi-nzela na mboka-mopaya. Bato mingi bakokaki komona ete ekoki kosalema te. Namonaka malamu te, natambolaka na babalabala ya zelozelo ya Afrika na lisalisi ya mbwa oyo babɔkɔlá mpo na kotambwisaka bato oyo bamonaka te na bingumba ya Mpoto. Tiká nayebisa bino ndenge nakómaki kosakola na Afrika mpe ndenge oyo Yehova akokisaki ‘mposa nyonso ya motema na ngai.’​—Nzembo 37:4.

NABOTAMAKI mwa 9 Yuni 1966, na sudi ya France. Nazali mwana ya nsuka na libota ya bana nsambo, mibale ya mibali mpe mitano ya basi: biso nyonso tobɔkwamaki na baboti na biso ya bolingo. Kasi, likambo moko ya mawa ekómelaki ngai na bolenge na ngai. Lokola nkɔkɔ na ngai ya mwasi, mama na ngai mpe ndeko na ngai moko ya mwasi, nabɛlaki maladi moko oyo ebomaka miso mokemoke.

Ntango nazalaki elenge, nakómaki motomboki mpamba te bato bazalaki kolinga kaka bato ya mposo na bango, kokanisela basusu mabe, mpe bokosi. Na ntango wana ya mikakatano nde tokendaki na etúká ya Hérault. Kuna, likambo moko monene mpe ya esengo esalemaki.

Mokolo moko ya lomingo na ntɔngɔ, Batatoli ya Yehova mibale bayaki epai na biso. Mama ayebaki bango mpe abengaki bango bakɔta. Moko ya basi yango atunaki mama soki azali koyeba lisusu ete alakaki mokolo moko ete akoyekola Biblia. Mama amikundolaki mpe atunaki, “Tokobanda mokolo nini?” Bayokanaki ete bákutanaka mokolo ya lomingo na ntɔngɔ, mpe na ndenge yango mama abandaki koyekola “solo ya nsango malamu.”​—Bagalatia 2:14.

Nazwi boyebi ya sikisiki

Mama azalaki kosala nyonso akanga makambo oyo azalaki koyekola mpe abosana yango te. Lokola amonaka te, asengelaki kokanga makambo nyonso na motó. Batatoli yango bazalaki komonisela ye motema molai. Ntango Batatoli bazalaki koya, ngai nazalaki komibomba na ndako mpe kobima kaka soki bakei. Mokolo moko nsima ya midi, Eugénie, moko ya batatoli yango akutanaki na ngai mpe asololaki na ngai. Ayebisaki ngai ete Bokonzi ya Nzambe ekosukisa bokosi, koyinana, mpe kokanisela baninga mabe na mokili. Alobaki ete, “Kaka Nzambe nde akoki kosala yango.” Nakómaki na mposa ya koyeba makambo mingi. Na mokolo oyo elandaki, nabandaki koyekola Biblia.

Makambo nyonso oyo nazalaki koyekola ezalaki ya sika mpo na ngai. Nayaki koyeba ete ezali na ntina oyo Nzambe atiki mabe ezala naino na mokili. (Genese 3:15; Yoane 3:16; Baloma 9:17) Nayebaki lisusu ete Yehova apesi biso elikya. Apesi biso elaka kitoko ya bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. (Nzembo 37:29; 96:11, 12; Yisaya 35:1, 2; 45:18) Na paladiso yango, miso na ngai oyo ezali kokufa mokemoke ekokóma komona lisusu malamu.​—Yisaya 35:5.

Nakómi mobongisi-nzela

Mwa 12 Desɛmbɛ 1985, nazwaki batisimo mpo na komonisa ete namipesi epai ya Yehova, lokola ndeko na ngai Marie-Claire oyo azwaki ekateli yango liboso na ngai. Mosika te, ndeko na ngai Jean-Pierre ná mama mpe babatisamaki.

Na lisangá na biso, babongisi-nzela ya sanza na sanza, elingi koloba basakoli ya ntango nyonso, bazalaki mingi. Esengo mpe molende oyo bazalaki komonisa na mosala ya kosakola elendisaki ngai mingi. Ata Marie-Claire mpe akómaki mobongisi-nzela, atako liso na ye moko ezalaki na maladi mpe azalaki kolata ebende na lokolo mpo lokolo yango ezalaki na maladi. Ndakisa na ye elendisaka ngai tii lelo. Lokola nazalaki elongo na ebele ya babongisi-nzela ndenge wana na lisangá mpe na libota, yango epesaki ngai mposa makasi ya kokóma mpe mobongisi-nzela. Na Novɛmbɛ 1990, nakómaki mobongisi-nzela na engumba Béziers.​—Nzembo 94:17-19.

Ndenge nalongaki makanisi ya mabe

Likebi oyo babongisi-nzela mosusu bazalaki kotyela ngai esalisaki ngai mingi na mosala ya kosakola. Atako bongo, nazalaki mbala na mbala kolɛmba nzoto mpamba te miso na ngai ezalaki kopekisa ngai nasala mingi ndenge nazalaki kolinga. Kasi, Yehova asungaki ngai na ntango wana oyo makanisi ya mabe ezalaki koyela ngai. Nalukaki na Index des publications Watch Tower masolo ya bomoi ya babongisi-nzela oyo bazalaki na maladi ya miso lokola ngai. Nakamwaki ete masolo yango ezalaki mingi! Masolo wana ya kolendisa eteyaki ngai nasepelaka kaka na oyo nazali na likoki ya kosala, kasi nalukaka te kosala oyo eleki ngai.

Mpo na kozwa mwa mbongo ya kobikela, nazalaki kosala mosala ya kosukola bamagazini elongo na Batatoli mosusu. Mokolo moko, namonaki bandeko oyo nazalaki kosala na bango bazali kozongela bisika oyo ngai nasukolaki. Emonanaki ete nazalaki kotika bosoto mingi. Nakendaki epai ya Valérie, mobongisi-nzela oyo azalaki kokamba ekipi na biso ya mosala, mpe natunaki ye ayebisa ngai na bosembo soki nazali koyokisa baninga mpasi. Alobaki na ngai na boboto nyonso ete ntango nyonso oyo nakolinga kotika mosala yango, nakoki kotika. Na Marsi 1994, natikaki mosala yango.

Nakómaki lisusu komimona ete nazali na ntina te. Nabondelaki Yehova na motema mobimba, mpe nayebi ete ayokaki mabondeli na ngai. Mbala oyo mpe, boyekoli ya Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia esalisaki ngai mingi. Atako miso na ngai ezalaki kaka kobeba, mposa na ngai ya kosalela Yehova ezalaki se kokola. Nakokaki kosala nini?

Na esika nazela, nazwi ekateli

Nakomisaki nkombo mpo na kozwa formasyo na Eteyelo moko ya bato bakufá miso mpe oyo bamonaka malamu te na engumba Nîmes, mpe bandimaki ngai mpo na sanza misato. Ntango oyo nalekisaki kuna esalisaki ngai mingi. Nayaki komona bonene ya maladi na ngai mpe nayekolaki komesana na yango. Kozala esika moko na bato oyo bazali na bamaladi ya motindo nyonso esalisaki ngai nayeba motuya ya elikya na ngai. Nazalaki na mokano moko na bomoi na ngai mpe namonaki ete nakoki kosala mwa likambo oyo ekoki kozala na litomba. Lisusu, nayekolaki ekomeli ya bato bakufá miso (Braille) ya Lifalanse.

Ntango nazongaki ndako, bato ya libota na ngai bamonaki ete formasyo oyo nazwaki kuna esalisaki ngai mingi. Kasi, eloko moko oyo ezalaki kosepelisa ngai te ezalaki nzete ya mpembe oyo nasengelaki kobanda kotambola na yango. Ezalaki mpenza mpasi mpo nandima kosalela “nzete” yango. Namonaki ete ekozala malamu naluka eloko mosusu oyo ekobanda kosalisa ngai, ntango mosusu mbwa.

Nakomaki mokanda mpo na kosɛnga mbwa, kasi balobaki na ngai ete bato oyo basɛngi bazali ebele. Lisusu, basengelaki kotalela likambo ya moto mokomoko oyo asɛngi mbwa. Bapesaka bato bambwa yango bipesela te. Mokolo moko, mwasi moko oyo azalaki kosala na ebongiseli moko oyo etalelaka makambo ya bato bakufá miso, ayebisaki ngai ete ekipi moko ya tennis elingi kokabela moto moko ya kartye na biso oyo akufá miso to amonaka malamu te mbwa. Ayebisaki ngai ete akanisaki ngai. Nakondima kozwa yango? Namonaki yango lokola lisungi ya Yehova mpe nandimaki. Atako bongo, esengelaki nazela mbwa yango.

Mposa na ngai ya kokende Afrika ezali kaka

Ntango nazalaki kozela mbwa, natyaki makanisi na ngai na likambo mosusu. Ndenge nalobaki na ebandeli ya lisolo oyo, banda bomwana nazalaki kosepela na Afrika mingi. Atako miso na ngai ezalaki se kobeba, mposa na ngai ya kokende na Afrika ezalaki kokóma lisusu makasi koleka, mingimingi lokola nayebaki ete bato mingi na Afrika bazali kosepela na Biblia mpe na kosalela Yehova. Mokolo moko, nayebisaki Valérie na masolo kaka ete nakosepela kokende kotambola na Afrika. Natunaki ye soki akosepela kokende na ngai. Andimaki, mpe tokomelaki babiro ya Batatoli ya Yehova ya bikólo mosusu ya Afrika oyo elobaka Lifalanse.

Eyano eutaki na Togo. Na esengo nyonso, nasɛngaki Valérie atángela ngai mokanda yango. Mokanda yango ezalaki mpenza na makambo ya kolendisa, mpe Valérie alobaki ete: “Soki ezali mpenza boye, mpo na nini te kokende?” Nsima ya kokomelana mikanda na bandeko ya biro ya filiale, basɛngaki ngai nasolola na Sandra, mobongisi-nzela moko ya Lomé, mboka-mokonzi ya Togo. Tomibongisaki mpo na kosala mobembo na biso mwa 1 Desɛmbɛ 1998.

Afrika ezalaki mpenza ndenge mosusu, kasi ezalaki mpenza kitoko! Ntango tokitaki na Lomé, tobimaki na mpɛpɔ, molunge makasi ya Afrika ezipaki biso lokola bolangiti. Sandra ayaki koyamba biso. Tomonanaki liboso te, kasi ezalaki lokola nde toyebaná kala. Mwa moke liboso tóya na Togo, batindaki Sandra ná moninga na ye Christine babongisi-nzela minene na Tabligbo, mwa engumba moko moke na Togo. Tozwaki libaku ya kokende na bango na teritware na bango ya sika. Tosalaki kuna sanza mibale, mpe ntango totikaki Togo, nayebaki ete nakozonga lisusu.

Nasepelaki kozonga lisusu

Ntango nakómaki na France, nabandaki mbala moko komibongisa mpo na mobembo na ngai ya mibale na Togo. Na lisalisi ya libota na ngai, namibongisaki mpo nasala kuna sanza motoba. Na Sɛtɛmbɛ 1999, nakɔtaki lisusu mpɛpɔ mpo na kokende na Togo. Kasi, mbala wana nazalaki ngai moko. Kanisá ndenge libota na ngai bayokaki ntango bamonaki ngai moto ya maladi nazali kokende ngai moko! Kasi, ntina ezalaki te bámitungisa ndenge wana. Nayebisaki baboti na ngai ete baninga na ngai, oyo bakómaki lokola bandeko na ngai ya makila, bakoya kozela ngai na Lomé.

Ezalaki mpenza esengo kozonga lisusu na teritware oyo bato mingi basepelaka na Biblia! Kuna, bato batángaka Biblia ata nzelanzela. Na Tabligbo, bato bakoki kobenga yo kaka mpo bósolola masolola ya Biblia. Mpe ezalaki mpenza libaku moko malamu ya kofanda ndako moko na bandeko mibale ya basi oyo bazali babongisi-nzela minene! Nayaki koyeba mimeseno ya bato mosusu mpe lolenge mosusu ya kotalela makambo. Likambo ya liboso, namonaki ete bandeko na biso ya Afrika batyaka matomba ya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na bango. Na ndakisa, atako esɛngaka bátambola ebele ya bakilomɛrɛ mpo bákóma na Ndako ya Bokonzi, yango epekisaka bango te koya na makita. Mɔtɔ na bango mpe ezaleli na bango ya koyamba bato eteyaki ngai makambo mingi.

Mokolo moko, ntango ngai ná Sandra tozalaki kouta na mosala ya kosakola, nayebisaki ye ete nazali kobanga kozonga na France. Miso na ngai ebebaki lisusu makasi. Nazalaki kokanisa babalabala ya Béziers oyo ezalaka na ebele ya bato mpe makelele, baeskalye ya bandako ya etaze, mpe makambo mosusu mingi oyo ekómisaka bomoi mpasi mpo na bato oyo bamonaka malamu te. Nzokande, atako babalabala ya Tabligbo ezali na gudrɔ te, ezalaka makelele te, bato bazalaka mingi te mpe ezalaka na mituka mingi te. Ndenge nini nalingaki kokoka lisusu bomoi ya France, ngai moto oyo namesanaki na Tabligbo?

Mikolo mibale na nsima, mama abengaki ngai mpe ayebisaki ngai ete eteyelo oyo epesaka formasyo mpo na komesana na bambwa oyo etambwisaka bato ezali kozela ngai. Mbwa moko ya monene na nkombo Océane ezalaki kozela mpo ekóma “miso” na ngai. Mposa na ngai ekokisamaki lisusu mpe mitungisi na ngai ekitaki. Nsima ya sanza motoba ya mosala kitoko oyo nasalaki na Tabligbo, nazongaki lisusu na France mpo na kokutana na Océane.

Nsima ya kozwa formasyo basanza ebele, bapesaki ngai Océane. Na ebandeli, ezalaki pɛtɛɛ te. Tosengelaki koyebana malamu. Mokemoke, nayaki komona ete Océane azali mpenza na ntina mpo na ngai. Mpo na koloba solo, Océane akómá mpenza eteni moko ya nzoto na ngai. Ndenge nini bato ya Béziers bazalaki kotalela ngai ntango bazalaki komona ngai nazali koya epai na bango na mbwa? Bazalaki kopesa ngai limemya mpe komonisela ngai boboto mingi. Océane akómaki “vɛdɛtɛ” na kartye na biso. Lokola bato mingi bakokaka te soki moto oyo azali na mokakatano moko na nzoto lokola ngai ayei epai na bango, kozala na mbwa esalisaki ngai nalobelaka maladi na ngai kozanga nsɔni. Bato bazalaki komiyoka malamu mpe bazalaki koyoka ngai. Na yango, Océane akómaki kopesa ngai mabaku mingi ya kobanda masolo na bato.

Ngai ná Océane na Afrika

Lokola nabosanaki Afrika te, nabandaki sikoyo komibongisa mpo na mobembo na ngai ya misato. Mbala wana, nakendaki na Océane. Nakendaki elongo na Anthony mpe Aurore, bandeko oyo bautaki kobalana, mpe moninga na ngai Caroline: bango nyonso bazalaki babongisi-nzela lokola ngai. Tokómaki na Lomé mwa 10 Sɛtɛmbɛ 2000.

Na ebandeli, bato mingi bazalaki kobanga Océane. Lokola bambwa mingi na Togo ezali ya mike, bato mingi na Lomé bamonaki naino mbwa ya monene motindo wana te. Ntango bato mosusu bazalaki komona nsinga oyo ezalaki na nkingo na ye, bazalaki kokanisa ete azali mbwa mabe mpe esengeli kaka bákanga ye. Na yango, Océane akómaki nkandankanda mpe akómaki ntango nyonso pene ya kobatela ngai na eloko nyonso oyo amoni ete elingi kosala ngai mabe. Kasi, mosika te, Océane akómaki komesana na mboka yango. Soki kaka balatisi ye nsinga na nkingo, ayebaka ete ngonga ya mosala ekoki, atambolatambolaka lisusu mpambampamba te mpe azalaka kaka pembeni na ngai. Soki balongoli ye nsinga, akómaka kosakana, mpe ntango mosusu akómaka mobulu. Tosakanaka mingi elongo.

Babengaki biso nyonso tókende kofanda esika moko, ngai ná Sandra mpe Christine na Tabligbo. Mpo na kosalisa bandeko ya Tabligbo bámesana na Océane, tozalaki kobenga bango epai na biso mpe kolimbwela bango ntina ya mbwa ya kotambwisa bato, mpo na nini ngai nazali na yango, mpe nini basengeli kosala soki bazali pembeni na ye. Bankulutu bandimaki nayaka na Océane na Ndako ya Bokonzi. Lokola bato bakendaka na mbwa na makita te na Togo, bapesaki liyebisi moko na lisangá mpo na kolimbwela bandeko likambo yango. Na mosala ya kosakola, nazalaki kokende na Océane kaka soki nazali kozongela bato oyo basepelaki to soki nakei koyekola na bato Biblia, mpo bato yango bakokaki koyeba ntina oyo nazali kotambola na mbwa.

Esengo ya kosakola na teritware yango esilaka te. Nazalaka ntango nyonso na botɔndi mpo na limemya mpe boboto oyo bato bamoniselaka ngai; bamonisaka yango na misala, na ndakisa, bakanisaka mbala moko kopesa ngai kiti. Na Ɔkɔtɔbɛ 2001, na mbala ya minei oyo nayaki na Togo, mama ayaki kotika ngai. Nsima ya pɔsɔ misato, mama azongaki na France; amonaki ete nazali malamu mpe ntina amitungisa mpo na ngai ezali te.

Nazali mpenza na botɔndi epai na Yehova ndenge apesi ngai likoki ya kosala na Togo. Nazali na elikya ete Yehova akokoba kokokisa ‘mposa nyonso ya motema na ngai’ lokola nazali kosalela nyonso oyo nazali na yango mpo na mosala na ye.a

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ndeko Morgou azongaki na France mpe akendaki lisusu na Togo mpo na mbala ya mitano mwa 6 Ɔkɔtɔbɛ 2003 mpe azongaki na France na mwa 6 Febwali 2004. Likambo ya mawa, mpo na maladi, wana ekoki kozala mobembo ya nsuka oyo asalaki na Togo na mokili oyo. Kasi, azali na mposa makasi ya kokoba kosalela Yehova.

[Bililingi na lokasa 10]

Nazalaki ntango nyonso kosepela na bitando minene, banyama mpe bazamba kitoko ya Afrika

[Elilingi na lokasa 10]

Nazalaki kokende na Océane soki nazongeli bato oyo basepelaki

[Elilingi na lokasa 11]

Bankulutu bandimaki nayaka na Océane na makita

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto