Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/11 nk. 4-7
  • Ondimaka ete Zabolo azalaka mpenza?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ondimaka ete Zabolo azalaka mpenza?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Bókebaka”
  • Zabolo asalelaka bamposa oyo moto nyonso azalaka na yango
  • Satana asalelaka bolɛmbu ya bato
  • Kobá kotɛmɛla Zabolo
  • Zabolo azali mpenza, ezali kaka biyambayamba te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Bótɛmɛla Satana, mpe akokima!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • ‘Tótemela Zabolo’ ndenge Yesu asalaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Zábolo azali nani?
    Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/11 nk. 4-7

Ondimaka ete Zabolo azalaka mpenza?

BIBLIA emonisi ete Zabolo azali mpenza ekelamu ya solo. Bato bakoki komona ye te kaka ndenge bakoki komona Nzambe te. Biblia elobi ete “Nzambe azali elimo.” (Yoane 4:24) Zabolo azali ekelamu ya elimo. Kasi, Mozalisi azali na ebandeli te, nzokande, Zabolo azali na ebandeli.

Liboso Yehova Nzambe azalisa bato, asalaki bamilio ya bikelamu ya elimo. (Yobo 38:4, 7) Biblia ebengi bikelamu yango baanzelu. (Baebele 1:13, 14) Bango nyonso bazalaki malamu ntango Nzambe asalaki bango​—ata moko te azalaki zabolo to azalaki na mabe. Kasi, Zabolo abandaki ndenge nini? Liloba “zabolo” elimboli “mokoseli-bato-makambo” mpe emonisaka moto oyo azali koloba lokuta mpo na basusu. “Satana” elimboli “Motɛmɛli,” to motomboki. Kaka ndenge moto moko oyo azalaki malamu akoki komikómisa moyibi soki ayibi, mwana moko ya Nzambe, ekelamu ya elimo, alukaki kokokisa mposa ya mabe oyo akolisaki na motema na ye; na ndenge yango amikómisaki Satana Zabolo. Biblia elimboli ndenge oyo moto amibebisaka mokemoke: “Moto na moto amekamaka nde na komemamáká mpe na kobendamáká na mposa na ye moko. Na nsima mposa wana, ntango ezwi zemi, eboti lisumu; na ngala na yango, lisumu, ntango ekokisami, eboti liwa.”​—Yakobo 1:14, 15.

Ezali yango mpenza nde esalemaki. Ntango Yehova Nzambe akelaki mobali ya liboso Adama ná mwasi na ye Eva, anzelu wana, oyo na nsima atombokelaki Nzambe, amonaki. Ayebaki ete Yehova atindaki Adama ná Eva bábota mingi mpo mabelé etonda na bato ya boyengebene oyo bakobanda kosambela Mozalisi. (Genese 1:28) Anzelu yango amonaki ete wana ezalaki libaku oyo akokaki kosalela mpo na kozwa lokumu. Lokoso etindaki ye akolisa mposa makasi ete bato básambela ye, likambo oyo ebongi kaka mpo na Mozalisi. Na esika alongola mposa mabe wana, ekelamu wana ya elimo akolisaki mposa yango tii ebotaki lokuta mpe na nsima, botomboki. Tótala likambo oyo asalaki.

Anzelu wana motomboki asalelaki nyoka mpo na kosolola na Eva. Nyoka atunaki Eva boye: “Nzambe alobaki solo ete bino bokoki kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga te?” Ntango Eva ayebisaki ye mobeko oyo Nzambe apesaki bango mpe etumbu oyo bakozwa soki batosi te, nyoka alobaki boye: “Bino bokokufa solo te, mpo ete Nzambe ayebi ete na mokolo bokolya [nzete oyo ezali na katikati ya elanga] miso na bino ekofungwama mpe bino bokozala lokola Nzambe, koyeba malamu mpe mabe.” (Genese 3:1-5) Na maloba yango anzelu wana amonisaki ete Nzambe ayebisaki Adama ná Eva solo te. Alobaki ete soki Eva alei mbuma ya nzete yango, akokóma lokola Nzambe, ye moko akozala na lotomo ya kokata oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe. Wana ezalaki lokuta ya liboso na mokili. Anzelu oyo alobaki yango akómaki mokoseli-bato-makambo. Akómaki mpe motomboki. Na yango, Biblia ebengi monguna yango ya Nzambe “nyoka ya ebandeli, oyo abengami Zabolo mpe Satana.”​—Emoniseli 12:9.

“Bókebaka”

Maloba ya lokuta oyo Zabolo ayebisaki Eva ekokisaki mokano na ye. Biblia elobi boye: “Na bongo mwasi amonaki ete nzete yango ezalaki malamu mpo na kolya mpe ete ezalaki eloko oyo miso ekoki kolula, ɛɛ, nzete yango ezalaki kitoko mpo na kotala. Bongo akamataki mbuma na yango mpe alyaki. Na nsima apesaki mpe mobali na ye ntango azalaki elongo na ye mpe ye alyaki.” (Genese 3:6, NW) Eva andimaki maloba ya Satana mpe abukaki mobeko ya Nzambe. Alongaki mpe kopusa Adama abuka mobeko ya Nzambe. Na bongo, Zabolo alongaki komema mobali mpe mwasi ya liboso bátombokela Nzambe. Banda wana, Satana atambwisaka makambo ya bato kozanga ete báyeba yango. Mokano na ye ezali nini? Komema bato bátika kosambela Nzambe ya solo mpo básambela ye. (Matai 4:8, 9) Yango wana, Biblia epesi toli oyo: “Bóbatela makanisi na bino, bókebaka. Monguna na bino, Zabolo, azali kotambola epai na epai lokola nkɔsi oyo ezali konguluma, kolukáká kolya moto.”​—1 Petelo 5:8.

Biblia emonisi polele ete Zabolo azali ekelamu ya elimo​—anzelu oyo abebaki mpe akómaki na makanisi mabe! Likambo ya libosoliboso mpe ya ntina oyo ekosalisa biso tókebaka ezali ya koyeba ete Zabolo azalaka mpenza. Kasi, kobatela makanisi na biso mpe kokeba esɛngi mpe makambo mosusu. Esengeli mpe tóbosana te “mayele” mpe banzela oyo Satana asalelaka mpo na kokosa bato. (2 Bakolinti 2:11) Mayele nini asalelaka? Mpe ndenge nini tokoki kolonga yango?

Zabolo asalelaka bamposa oyo moto nyonso azalaka na yango

Zabolo ayekoli bato kobanda ntango moto ya liboso asalemaki. Ayebi bamposa oyo moto azalaka na yango mpe makambo oyo esepelisaka ye. Satana ayebi malamu ete bato basalemá na mposa ya kosambela, mpe Zabolo asalelaka mposa yango. Ndenge nini? Na nzela ya mateya ya lokuta. (Yoane 8:44) Makambo mingi oyo mangomba eteyaka mpo na Nzambe ezali bongolabongola mpe ebulunganisaka. Okanisi ete yango ekokisaka mokano ya nani? Mateya oyo ezali bongolabongola ekoki kozala nyonso solo te. Yango wana, ntembe ezali te ete Satana abimisaka mateya wana ya lokuta mpo na kobungisa bato nzela! Kutu, Biblia ebengi ye “nzambe ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo,” ye azipi makanisi ya bato.​—2 Bakolinti 4:4.

Koyeba mateya ya solo ebatelaka moto mpo akosama te na lokuta ya mangomba. Biblia ekokanisi solo ya Liloba ya Nzambe na nkamba oyo basoda ya ntango ya kala bazalaki kolata mpo na kobatela loketo na bango. (Baefese 6:14) Soki ozwi boyebi ya Biblia, Liloba ya Nzambe mpe ozali kosalela yango, na maloba mosusu, olati yango lokola nkamba na loketo, yango ekobatela yo mpo okosama te na lokuta ya mangomba mpe na mabunga na yango.

Mposa ya kosambela oyo bato bazalaka na yango etindi bango báluka koyeba makambo oyo eyebani te. Yango ememi bango na motambo mosusu oyo Satana asalelaka mpo na kokosa bato. Lokola Satana ayebi ete moto alukaka koyeba makambo oyo ezali kokamwisa mpe oyo ebombami, azali kokosa ebele ya bato na nzela ya bikelakela. Ndenge mobomi-mbisi asalelaka mpambo mpo na kobenda mbisi, Satana mpe asalelaka misala lokola koyebisa bato makambo oyo ekokómela bango, kotala minzoto, bondɔki, kotala mabɔkɔ, mpe maji mpo na kozwa bato.​—Levitike 19:31; Nzembo 119:110.

Ndenge nini okoki komibatela mpo okwea te na motambo ya bikelakela? Deteronome 18:10-12 elobi boye: “Moto akozwama kati na bino te, oyo akozikisa mwana mobali na ye to mwana mwasi na ye lokola mbeka, to moto ya zonga, to moto ya kotala minzoto mpo na kosakola liboso, to moto ya kosala nkisi mpo na kosakola liboso, to nganga ya nkisi, to molengoli, to moto ya kobenga milimo, to nganga ya soloka, to moto ya kosolola na bakufi. Mpo ete bato nyonso na kosala makambo oyo bazali mbindo na miso ya [Yehova], mpe [Yehova] Nzambe na yo azali kobimisa bango liboso na yo na ntina na misala ya mbindo oyo.”

Toli ya Biblia ezali polele: Tómikɔtisa ata moke te na misala ya bikelakela. Okosala nini soki osalelaka bikelakela mpe sikoyo olingi kotika yango? Okoki kolanda ndakisa ya baklisto ya Efese na ntango ya kala. Biblia elobi ete ntango bandimaki “liloba ya Yehova,” “motángo monene ya baoyo bazalaki kosala misala ya nkisi basangisaki babuku na bango esika moko mpe batumbaki yango na miso ya bato nyonso.” Babuku yango ezalaki na ntalo mingi. Ezalaki na valɛrɛ ya palata 50 000. (Misala 19:19, 20) Kasi, baklisto ya Efese bakakatanaki te kotumba yango.

Satana asalelaka bolɛmbu ya bato

Anzelu ya sembo akómaki Satana Zabolo mpo akolisaki mposa ya kozwa lokumu. Lisusu, alonaki na motema ya Eva lolendo to mposa makasi ya koluka kozala lokola Nzambe. Lelo oyo, Satana akangi bato mingi na motambo na ndenge azali kolona lolendo na mitema na bango. Na ndakisa, bato mosusu bamonaka ete loposo na bango, ekólo na bango, to mboka na bango eleki ya basusu. Yango eyokani ata moke te na mateya ya Biblia! (Misala 10:34, 35) Biblia elobi polele ete: “[Nzambe] asalaki uta na moto moko bikólo nyonso ya bato.”​—Misala 17:26.

Moto asengeli kozala na komikitisa mpo akóma te na lolendo oyo Satana azali koluka kolona na mitema ya bato. Biblia epesi biso toli ete ‘tókanisa mpo na biso moko te koleka ndenge oyo esengeli kokanisa.’ (Baloma 12:3) Elobi mpe ete “Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amonisaka boboto monene epai ya bato ya komikitisa.” (Yakobo 4:6) Lolenge moko oyo tokoki kolonga mitambo ya Satana ezali ya komonisa ezaleli ya komikitisa mpe bizaleli mosusu oyo esepelisaka Nzambe.

Zabolo alukaka mpe kosalela bolɛmbu oyo bato bazalaka na yango ya koluka kokokisa bamposa mabe ya nzoto. Yehova Nzambe alingaki ete bato básepelaka. Soki bato bazali kokokisa bamposa na bango na kolanda mibeko ya Nzambe, epesaka bango esengo mingi. Kasi, Satana alukaka kopusa bato bákokisa bamposa na bango na misala ya mbindo. (1 Bakolinti 6:9, 10) Yango wana, ezali malamu kokanisa ntango nyonso makambo oyo ezali pɛto mpe oyo ezali malamu. (Bafilipi 4:8) Yango ekosalisa yo obatela makanisi na yo.

Kobá kotɛmɛla Zabolo

Okoki kolonga kotɛmɛla Zabolo. Biblia eyebisi biso boye: “Bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino.” (Yakobo 4:7) Ata soki otɛmɛli Satana, akotika yo mbala moko te mpe akolɛmba te kobimisela yo mikakatano mosusu ntango ozali kozwa boyebi ya Nzambe. Zabolo akoluka “ntango mosusu ya malamu” mpo na komeka yo. (Luka 4:13) Kasi, osengeli te kobanga Zabolo. Soki ozali ntango nyonso kotɛmɛla ye, akolonga te kopusa yo otika Nzambe ya solo.

Kasi, mpo na kotɛmɛla Zabolo esengeli koyeba soki azali nani mpe ndenge oyo azali kokosa bato mpe koyeba oyo osengeli kosala mpo okwea te na mitambo na ye. Kaka Biblia, Liloba ya Nzambe, nde ekoki kosalisa yo oyeba makambo yango malamumalamu. Yango wana, kangamá na ekateli na yo ya koyekola Biblia, mpe saleláká makambo oyo ozali koyekola. Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo oyekola Biblia ofele mpe na bangonga oyo yo moko okomona malamu. Kokakatana te kokutana na bango to kokomela babimisi ya zulunalo oyo.

Yebá ete ntango ozali koyekola Biblia, Satana akoki kobimisela yo botɛmɛli to minyoko mpo otika koyekola solo ya Liloba ya Nzambe. Bandeko na yo mosusu bakosepela te ndenge ozali koyekola Biblia. Bakosala bongo mpo bayebi te makambo kitoko oyo ezali na Biblia. Bamosusu bakotyola yo. Kasi, soki ozongi nsima, okanisi ete yango ekosepelisa Nzambe? Zabolo alingi nde kolɛmbisa yo mpo otika koyekola solo na ntina na Nzambe. Mpo na nini kotika Satana alonga? (Matai 10:34-39) Apesá yo eloko moko te. Nzokande, Yehova apesá yo bomoi. Yango wana, zalá na ekateli ya kotɛmɛla Zabolo mpe ‘sepelisá motema ya Yehova.’​—Masese 27:11.

[Elilingi na lokasa 6]

Baoyo bakómaki baklisto batumbaki babuku na bango ya maji

[Elilingi na lokasa 7]

Zwá ekateli makasi ya koyekola Biblia

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto