Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/1 lok. 30
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kobatela makanisi malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Mabelé ekobebisama mokolo mosusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Yehova azali koteya biso kotánga mikolo na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Tokoki kozala na bomoi libela na libela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/1 lok. 30

Mituna ya batángi

Nzembo 102:26 elobi ete mabelé ná likoló “ekosila.” Yango elingi nde koloba ete Mabelé oyo ekobebisama?

Na libondeli moko, mokomi ya nzembo alobaki na Yehova boye: “Kalakala mpenza yo otongaki miboko ya [mabelé] mpe [likoló] ezali mosala ya mabɔkɔ na yo. Yango ekosila, yo nde okoumelaka; ɛɛ, yango nyonso ekobeba [lokola] elamba, yo okobongola yango mpe ekobongwana.” (Nzembo 102:25, 26) Soki totali makambo nyonso oyo balobi na mokapo yango mobimba, tokomona ete bavɛrsɛ yango elobeli te kobebisama ya mabelé, kasi ezali nde komonisa ete Nzambe azali libela na libela. Lisolo yango ezali mpe komonisa ntina oyo liteya wana ya ntina mingi ekoki kobɔndisa basaleli ya Nzambe.

Mokomi ya nzembo yango, oyo mbala mosusu azali na boombo na Babilone, alobeli libosoliboso mpasi na ye. Amileli ete bomoi na ye ezali kolimwa ‘lokola molinga.’ Motungisi ya makasi mpenza esali ete akóma koyoka lokola nde mikuwa na ye ‘etumbami lokola nkoni.’ Alɛmbi makasi, ‘akauki lokola matiti,’ mpe azali komiyoka ete bato nyonso basundoli ye “[lokola] ndɛkɛ oyo afandi na mwanza bobele ye moko.” Mpasi na ye esilisi ye mposa ya kolya mpe akómi mikolo nyonso kaka kolela. (Nzembo 102:3-11) Atako bongo, mokomi ya nzembo abungisi elikya nyonso te. Mpo na nini? Mpo na elaka oyo Yehova apesi mpo na Siona to Yelusaleme.

Atako Siona ebebisamaki, Yehova alakaki ete ekotongama lisusu. (Yisaya 66:8) Yango wana, mokomi ya nzembo alobaki na elikya mpenza ete: “Okoyokela Siona mawa, mpo oyo ezali ntango ebongi mpo na ye, mpo ntango ekoki mpenza. Mpamba te Yehova akozanga te kotonga Siona.” (Nzembo 102:13, 16, NW) Na nsima, mokomi ya nzembo abandi lisusu kolobela mpasi na ye. Akanisi ete, soki nguya ya Yehova ekoki kotonga lisusu Yelusaleme oyo ebebisamaki, na ntembe te azali mpe na nguya ya kobikisa ye na bampasi na ye. (Nzembo 102:17, 20, 23) Likambo mosusu mpe etindi ye atyela Yehova motema mobimba. Likambo nini? Ayebi ete Yehova azali libela na libela.

Na kotalela bomoi na ye ya mokuse, mokomi ya nzembo amimonaki eloko mpamba mpenza liboso ya Yehova, oyo azali libela na libela. Alobaki na Yehova boye: “[Bambula] na yo ekoumela seko na seko.” (Nzembo 102:24) Na nsima, mokomi ya nzembo alobaki boye: “Kalakala mpenza yo otongaki miboko ya [mabelé] mpe [likoló] ezali mosala ya mabɔkɔ na yo.”​—Nzembo 102:25.

Kasi, ata ebele ya bambula oyo mabelé ná likoló eumelá ezali kaka mpamba liboso ya Yehova, oyo azali libela na libela. Mokomi ya nzembo abakisi boye: “Yango [mabelé ná likoló] ekosila, yo nde okoumelaka.” (Nzembo 102:26) Mabelé ná likoló oyo ekoki kobeba. Ezali ya solo ete Yehova alobaki na mikapo mosusu ete ekoumela libela na libela. (Nzembo 119:90; Mosakoli 1:4) Kasi, ekoki kobebisama soki yango ezali mokano ya Nzambe. Nzokande, Nzambe akoki kokufa te. Biloko oyo Nzambe akelá ezali kotɛlɛma “libela na libela” kaka mpo ye moko azali kobatela yango. (Nzembo 148:6) Soki Yehova atiki kobongisa biloko oyo akelá, “yango nyonso [ekobeba] lokola elamba.” (Nzembo 102:26) Ndenge kaka bilamba ekufaka mpe moto atikalaka, biloko oyo Yehova akelá ekoki mpe kokufa nyonso mpe ye atikali, soki yango ezali mokano na ye. Kasi, ndenge bavɛrsɛ mosusu emonisi yango, toyebi ete mokano na ye ezali bongo te. Liloba ya Nzambe ezali koyebisa biso ete Yehova akani ete mabelé mpe likoló etikala libela na libela.​—Nzembo 104:5.

Koyeba ete Yehova akokokisa bilaka na ye ezali mpenza kobɔndisa. Ata soki tokutani na mokakatano ya ndenge nini, soki tobeleli ye, tokoki kozala na elikya ete “akobongwana epai ya libondeli ya babola, akoboya libondeli na bango te.” (Nzembo 102:17) Ya solo, elaka oyo Yehova apesi na Nzembo 102 ete akosunga biso ezali makasi mpenza koleka mabelé oyo tofandi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto