Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/1 lok. 3
  • Baanzelu bazali banani?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Baanzelu bazali banani?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Masolo mosusu
  • Baanzelu bazali banani?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Baanzelu bazali kosala nini mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Baanzelu—“Bilimo mpo na mosala ya bolamu ya bato nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Baanzelu basalaka nini mpo na biso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/1 lok. 3

Baanzelu bazali banani?

MOKONZI ya Babilone amonaki likambo ya kokamwa mpenza. Apesaki mitindo ete bábwaka bato misato na mɔtɔ, kasi bato yango bakufaki te! Nani abikisaki bango? Mokonzi ye moko alobaki na mibali yango misato boye: “Nzambe [na bino] apambwama, ye oyo atindaki anzelu na ye mpe abikisaki basaleli na ye oyo batyelaki ye motema.” (Danyele 3:28, NW) Mokonzi yango oyo ayangelaki ekólo wana ya nguya eleki sikoyo mbula nkóto mibale, amonaki ndenge oyo anzelu moko abikisaki bato. Na ntango ya kala, bato mingi bazalaki kondima ete baanzelu bazalaka. Lelo mpe bato mingi bandimaka ete baanzelu bazalaka mpe ete basalisaka bango na makambo mosusu na bomoi na bango. Baanzelu bazali banani, mpe babandaki ndenge nini?

Biblia elobi ete baanzelu bazali bilimo, kaka ndenge Nzambe azali Elimo. (Baebele 1:14; Yoane 4:24) Baanzelu bazali bamilio na bamilio. (Emoniseli 5:11) Lisusu, bango nyonso “bazali na nguya mingi.” (Nzembo 103:20, NW) Baanzelu bazalaka na bizaleli mpe basalemá na likoki ya kopona lokola bato; kasi elingi koloba te ete bazalaká liboso bato. Nzambe akelá baanzelu kala mpenza, liboso kutu akela mabelé mpe bato. Biblia elobi ete ntango Nzambe “atyaki miboko ya mokili, minzoto ya ntɔngɔntɔngɔ [baanzelu] eyembaki elongo moko mpe bana nyonso ya Nzambe bagangaki na esengo.” (Yobo 38:4, 7) Biblia ebengi baanzelu bana ya Nzambe mpamba te ye nde akelaki bango.

Nzambe akelaki bango mpo na nini? Makambo nini baanzelu basalá mpo na bato? Basalaka nde makambo na bomoi na biso lelo oyo? Lokola baanzelu bazali na likoki ya kopona, ezali nde na baoyo balandaki nzela ya Satana Zabolo mpe bamikómisá banguna ya Nzambe? Biblia ezali kopesa biyano ya solo na mituna yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto