Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/3 lok. 8-lok. 11 par. 11
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Esetele

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Esetele
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MWASI YA MOKONZI ASENGELAKI KOSALA MWA LIKAMBO
  • (Esetele 1:1–5:14)
  • MAKAMBO EBALUKI
  • (Esetele 6:1–10:3)
  • Yehova ‘akobikisa’
  • Amonisaki bwanya, mpiko, mpe alukaki matomba na ye moko te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Mokanda ya Biblia nimero 17—Esetele
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Amonisaki bwanya, mpiko, mpe alukaki bolamu na ye moko te
    Mekolá kondima na bango
  • Alobaki mpo na ekólo ya Nzambe
    Mekolá kondima na bango
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/3 lok. 8-lok. 11 par. 11

Liloba ya Yehova ezali na bomoi

Makanisi ya ntina na mokanda ya Esetele

MWANGO yango emonani mpenza ete ekolonga. Bayuda bakobomama mpenza. Na mokolo oyo ebongisami, Bayuda nyonso oyo bazali na ampire, oyo ebandi na Inde tii na Ethiopie, bakobomama. Ndenge wana nde moto oyo asalaki mwango yango azalaki kokanisa. Kasi, abosanaki likambo moko ya ntina mingi. Nzambe ya likoló akoki kobikisa basaleli na ye oyo aponá na makambo nyonso ya mabe. Balobeli kosikolama yango na Mokanda ya Esetele.

Moyuda moko ya mobange na nkombo ya Moledekai nde akomaki mokanda yango. Mokanda ya Esetele elobeli makambo oyo esalemaki na boumeli ya mbula soki 18, ntango mokonzi ya Perse Asierise, to Zelezese I, azalaki koyangela. Lisolo yango emonisi ndenge Yehova abikisaki basaleli na ye na myango ya banguna na bango, atako bapanzanaki na ampire monene wana mobimba. Koyeba likambo yango ezali kolendisa kondima ya basaleli ya Yehova, oyo bazali lelo oyo kosalela ye mosala mosantu na mikili 235. Lisusu, Mokanda ya Esetele elobeli bato oyo tosengeli komekola bizaleli na bango mpe oyo tosengeli komekola te. Ya solo, “liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya.”​—Baebele 4:12.

MWASI YA MOKONZI ASENGELAKI KOSALA MWA LIKAMBO

(Esetele 1:1–5:14)

Na mbula ya misato ya boyangeli na ye (493 L.T.B.), mokonzi Asierise, asalaki fɛti. Mokonzi Asierise aboyaki mwasi na ye vaseti, mwasi oyo akendaki nsango mpo na kitoko na ye mpo aboyaki kosepelisa ye. Baponaki elenge moko Moyuda na nkombo Adasa na kati ya bangɔndɔ nyonso ya kitoko mpo azwa esika na ye. Adasa asalaki ndenge ndeko na ye Moledekai ayebisaki ye, aboyaki komonisa ete azali Moyuda mpe asalelaki nkombo Esetele, oyo Baperse bapesaki ye.

Na nsima, Hamana moto ya lolendo akómaki ministre-mokonzi. Hamana asilikaki makasi mpo Moledekai ‘akumbamaki mpe asanzolaki ye te,’ mpe asalaki mwango ya koboma Bayuda nyonso oyo bazalaki na ampire ya Perse. (Esetele 3:2) Hamana asalaki nyonso mpo Asierise andima likanisi na ye ete bábimisa mobeko mpo na koboma Bayuda nyonso. Moledekai alataki “ngɔtɔ mpe mputulu ya mɔtɔ.” (Esetele 4:1) Esetele asengelaki sikoyo kosala mwa likambo. Abengaki mokonzi ná ministre-mokonzi na fɛti oyo abongisaki mpo na bango. Na nsuka ya fɛti yango, Esetele abondelaki bango báya na fɛti mosusu na mokolo oyo elandaki. Hamana asepelaki makasi. Kasi, azalaki na nkanda makasi mpo Moledekai azalaki kolinga te kokumisa ye. Hamana asali mwango ya koboma Moledekai liboso fɛti ya mokolo oyo elandaki esalema.

Biyano na mituna ya Biblia:

1:3-5​—Fɛti esalaki mpenza mikolo 180? Vɛrsɛ yango emonisi te ete fɛti wana esalaki mikolo 180, kasi emonisi nde ete mokonzi alakisaki bakonzi bozwi mpe nkembo ya bokonzi na ye na boumeli ya mikolo wana. Ekoki kozala ete mokonzi asalaki likambo yango mpo na komonisa nkembo ya bokonzi na ye, mpo na kokamwisa mikonzi mpe kondimisa bango ete azali na likoki ya kokokisa mwango na ye. Soki ezali bongo, ekoki kozala ete vɛrsɛ ya 3 mpe 5 elobeli fɛti ya mikolo 7 oyo esalemaki na nsuka ya mikolo 180.

1:8 (NW)​—Na ndenge nini ‘moto apusamaki te na oyo etali ntango ya komɛla engebene mobeko’? Na bafɛti mingi, Baperse bazalaki na momeseno ya kokatelana milangi to bakɔpɔ ya masanga oyo mokomoko asengeli komɛla, kasi na fɛti wana, mokonzi Asierise asɛngaki moto na moto amɛla ndenge alingi. Buku moko elobi ete “basengelaki komɛla mingi to moke, ndenge bango moko balingi.”

1:10-12​—Mpo na nini Vaseti aboyaki koya epai ya mokonzi? Bato mosusu ya mayele balobaka ete mwasi yango aboyaki kokende mpo alingaki te “komisambwisa liboso ya bapaya ya mokonzi oyo balangwaki.” To mpe ekoki kozala ete mwasi ya mokonzi wana oyo azalaki kitoko mingi azalaki na limemya te. Atako Biblia elobeli te ntina oyo aboyaki koya, bato ya mayele ya ntango wana bakanisaki ete asengelaki kozwa etumbu ndenge azangaki limemya epai ya mobali na ye, soki te ndakisa mabe ya Vaseti ekobebisa basi nyonso na bitúká ya Perse.

2:14-17​—Esetele asalaki pite na mokonzi? Te. Lisolo yango elobi ete na ntɔngɔ, basi mosusu oyo bamemaki bango epai ya mokonzi bazalaki kozonga na ndako ya mibale epai ya mokube ya mokonzi oyo azalaki ‘kobatela bamakango’ yango. Basi oyo balekisaki butu na mokonzi bakómaki bamakango na ye. Nzokande, bamemaki Esetele te na ndako ya bamakango nsima ya komonana na mokonzi. Ntango bamemaki Esetele liboso ya Asierise, “mokonzi alingaki Esetele koleka basi nyonso mpe azwaki ngɔlu mpe boboto na miso na ye koleka bilenge basi nyonso.” (Esetele 2:17) Mpo na nini Asierise amoniselaki ye “ngɔlu mpe boboto”? Kaka mpo na ntina oyo bato mosusu bamoniselaki ye ngɔlu. “Elenge mwasi asepelisi [Hɛgɛ], mpe azwaki boboto epai na ye.” (Esetele 2:8, 9) Kitoko ya Esetele mpe bizaleli na ye malamu nde etindaki Hɛgɛ asepela na ye. Lisusu, “Esetele azalaki na ngɔlu na miso ya nyonso baoyo batalaki ye.” (Esetele 2:15) Ndenge moko, makambo oyo mokonzi amonaki epai ya Esetele esepelisaki ye mpe akómaki kolinga ye.

3:2; 5:9​—Mpo na nini Moledekai aboyaki kofukama liboso ya Hamana? Ezalaki mabe te ete Bayisalaele báfukama liboso ya mokonzi mpo na kokumisa ye. Nzokande, kofukamela Hamana ezalaki na ndimbola mosusu mpo na Moledekai. Hamana azalaki Moagaga, ntango mosusu moto ya Amaleki, mpe Yehova asɛngaki ete Amaleki ebomama. (Deteronome 25:19) Mpo na Moledekai, kofukama liboso ya Hamana, ekokaki komonisa ete azali sembo epai ya Yehova te. Aboyaki na motema moko, mpe alobaki ete azali Moyuda.​—Esetele 3:3, 4.

Mateya mpo na biso:

2:10, 20; 4:12-16. Esetele andimaki litambwisi mpe toli ya mosambeli ya Yehova oyo akɔmeli. Tokozala na bwanya soki ‘tozali kotosa baoyo bazali kokamba biso mpe koyokela bango.’​—Baebele 13:17.

2:11; 4:5. Tosengeli ‘kotyaka likebi, na kobanzabanza kaka na makambo na biso moko te, kasi na kobanzabanza mpe na makambo ya bamosusu.’​—Bafilipi 2:4.

2:15. Esetele alukaki makambo minene te mpe akangaki motema, mpamba te longola mayaka mpe bilamba ya kitoko oyo Hɛgɛ apesaki ye, asɛngaki biloko mosusu te. “Bomoto ebombaná ya motema na kati ya molato oyo epɔlaka te ya elimo ya kimya mpe ya boboto” nde esalaki ete mokonzi asepela na ye.​—1 Petelo 3:4.

2:21-23. Esetele ná Moledekai bazalaki bandakisa malamu ya ‘kotosa bakonzi oyo bazali liboso.’​—Baloma 13:1.

3:4. Na makambo mosusu, ekozala malamu tóyebisa bato te soki tozali banani, ndenge Esetele asalaki. Kasi, ntango esɛngi tómonisa ekateli na biso na makambo ya ntina mingi, na ndakisa oyo etali boyangeli ya Yehova mpe bosembo na biso, tosengeli kobanga te koloba ete tozali Batatoli ya Yehova.

4:3. Ntango tokutani na mikakatano, tosengeli kobondela Yehova mpo apesa biso makasi mpe bwanya.

4:6-8. Moledekai alukaki kosukisa mayele mabe ya Hamana na boyokani na mibeko.​—Bafilipi 1:7.

4:14. Moledekai azalaki mpenza kotyela Yehova motema.

4:16. Lokola azalaki kotyela Yehova motema mobimba, na bosembo nyonso mpe na mpiko, Esetele amipesaki na likambo oyo ekokaki komema ye na liwa. Ezali na ntina ete tótyelaka Yehova motema, kasi biso moko te.

5:6-8. Mpo Asierise ayokela ye, Esetele abengaki ye na fɛti ya mibale. Asalelaki mpenza bokɛngi, biso mpe tosengeli kosala bongo.​—Masese 14:15.

MAKAMBO EBALUKI

(Esetele 6:1–10:3)

Mokemoke, makambo ebongwanaki mpenza. Bakakisaki Hamana na nzete oyo asalaki mpo na kokakisa Moledekai, mpe Moledekai akómaki ministre-mokonzi! Ezali boni mpo na mwango ya koboma Bayuda? Mpo na yango mpe, makambo ebongwanaki.

Esetele, mwasi ya sembo alobi lisusu. Andimaki kotya bomoi na ye na likama mpe akendaki komilela epai ya mokonzi mpo na kobebisa mwango mabe ya Hamana. Asierise ayebaki nini asengelaki kosala. Na yango, ntango mokolo oyo baponaki mpo na koboma Bayuda ekokaki, bato oyo balingaki koboma bango nde bakufaki. Moledekai abimisaki mobeko ete basalaka fɛti ya Pulimi mbula na mbula mpo na kokanisaka kosikolama monene wana. Lokola azalaki moto ya mibale na boyangeli ya Asierise, Moledekai “alukaki malamu ya libota na ye mpe alobaki kimya epai ya bato na ye nyonso.”​—Esetele 10:3.

Biyano na mituna ya Biblia:

7:4 (NW)​—Ndenge nini kobomama ya Bayuda ekokaki “komemela mokonzi mpasi”? Na mayele mpenza, alobelaki likambo ya kotɛka Bayuda lokola baombo mpe amonisaki mokonzi ete yango ekomemela ye mpasi soki babomi bango. Palata 10 000 oyo Hamana alakaki ezalaki moke mpenza soki totali oyo akokaki kozwa soki Hamana asɛngaki nde ete bátɛka Bayuda na boombo. Soki mpe bábomaka Bayuda, mokonzi alingaki kozanga mwasi na ye.

7:8​—Mpo na nini basali na ndako ya mokonzi bazipaki elongi ya Hamana? Yango ezali kopesa likanisi ya komonisa nsɔni na ye to ete asengeli kokufa. Buku moko elobi ete, “Bato ya kala bazalaki mbala mosusu kozipa mitó ya bato oyo balingi kobomama.”

8:17 (NW)​—Na lolenge nini ‘bato mingi ya bikólo mosusu bakómaki komibenga Bayuda’? Emonani ete Baperse mingi bakómaki baprozelite mpo bamonaki ete Nzambe azali na Bayuda, na kotalela mobeko oyo ebimaki. Likambo yango ezali mpe komonana na kokokisama ya esakweli oyo ezali na mokanda ya Zekalia. Mokanda yango elobi boye: “Bato zomi longwa na mabota na maloba nyonso, bakosimba elamba na moto oyo azali Moyuda, bakoloba ete, Tokokɛnda na yo elongo, zambi toyoki ete Nzambe azali elongo na bino.”​—Zekalia 8:23.

9:10, 15, 16​—Atako mobeko epesaki Bayuda nzela ya kozwa biloko ya bato oyo bakoboma, mpo na nini baboyaki kosala yango? Koboya na bango emonisaki ete bazalaki kaka na mposa ya komibatela, kasi ya kokóma na bozwi te.

Mateya mpo na biso:

6:6-10. “Lolendo liboso ya kobeba, molimo ya enzombo liboso ya kokwea.”​—Masese 16:18.

7:3, 4. Tobangaka te koyebisa bato ete tozali Batatoli ya Yehova, ata soki yango ekoki komemela biso minyoko?

8:3-6. Tokoki mpe tosengeli kofunda banguna na biso epai ya bakonzi to na batribinale mpo na komibatela.

8:5. Na mayele nyonso, Esetele alobaki na mokonzi te ete ye mpe atyaki mabɔkɔ na mobeko oyo babimisaki mpo na koboma bato na ye. Biso mpe tosengeli kozala na mayele ntango tozali kopesa litatoli epai ya bakonzi.

9:22. Tosengeli te kobosanaka babola oyo tozali na bango.​—Bagalatia 2:10.

Yehova ‘akobikisa’

Moledekai alobaki na Esetele ete ndenge akómaki mwasi ya mokonzi, ezalaki mokano ya Nzambe. Ntango Bayuda bakómaki na likama, bakilaki bilei mpe babondelaki Nzambe. Esetele azalaki koya epai ya mokonzi ata soki abengi ye te mpe azalaki ntango nyonso koyamba ye. Na butu oyo balobaki ete bakoboma Bayuda, mokonzi alalaki te. Na ntembe te, Mokanda ya Esetele emonisi lolenge oyo Yehova atambwisaki makambo mpo na bolamu ya basaleli na ye.

Lisolo kitoko oyo ezali na Mokanda ya Esetele ezali mpenza kolendisa biso baoyo tozali na ‘ntango ya nsuka.’ (Danyele 12:4) “Na mikolo ya nsuka,” to na nsuka mpenza ya ntango ya nsuka, Gogo ya Magogo, Satana Zabolo, akobimisela basaleli ya Yehova manzaka nyonso. Mposa na ye ekozala kaka ya koboma basambeli nyonso ya solo. Kasi, ndenge kaka Yehova ‘abikisaki’ basaleli na ye na ntango ya Esetele, akobikisa mpe basambeli na ye na mikolo na biso.​—Ezekiele 38:16-23; Esetele 4:14.

[Elilingi na lokasa 10]

Esetele ná Moledekai liboso ya Asierise

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto