Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/3 lok. 3
  • Liwa: Likambo moko ya nsɔmɔ!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liwa: Likambo moko ya nsɔmɔ!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Masolo mosusu
  • Kebá na mposa ya koluka lokumu!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Abisalome akómaki motomboki mpo azalaki koluka lokumu
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
  • Mituna na batangi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Kotyela Yehova motema mobimba ekitisaka motema
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/3 lok. 3

Liwa: Likambo moko ya nsɔmɔ!

ARNOLD TOYNBEE, moto ya mayele na masolo ya kala mpe mwana-mboka Angleterre akomaki boye: “Banda na ntango oyo moto abotami, liwa ekoki kokómela.” Abakisaki boye: “Nsukansuka likambo yango esalemaka.” Toyokaka mpasi mingi ntango ndeko to moninga na biso moko akufi!

Banda kala, liwa ezalaka likambo ya nsɔmɔ mpo na moto nyonso. Ntango ndeko to moninga moko akufi, tosilaka mayele. Liwa eponaka te; ezwaka moto nyonso. Ntango tokufeli, tokómaka lokola bana mike​—tosilaka mayele, tozalaka na likoki te ya kobongola likambo oyo ekómi. Eloko moko te—​ezala bozwi to lokumu—​ekoki kozongisa na bomoi moto oyo akufi. Ata bato ya mayele mingi bayebaka likambo ya kosala te. Bato ya makasi balelaka ndenge moko na bato oyo bazangi makasi.

Davidi, mokonzi ya Yisalaele ya kala, ayokaki mpasi yango ntango mwana na ye Abesaloma akufaki. Ntango mokonzi azwaki nsango ya liwa ya mwana na ye, alelaki makasi ete: “Ee Abesaloma, mwana na ngai, mwana na ngai, mwana na ngai Abesaloma! Soko ngai nakufaki na esika na yo, ee Abesaloma, mwana na ngai, mwana na ngai!” (2 Samwele 18:33) Ata mokonzi ya makasi lokola ye, oyo alongaki banguna minene, akokaki kosala eloko moko te, asukaki kaka na koloba ete soki “liwa, oyo ezali monguna ya nsuka,” ekokaki ata kozwa ye na esika ya mwana na ye.​—1 Bakolinti 15:26.

Ezali nde na likambo oyo ekosukisa liwa? Elikya nini tozali na yango mpo na bato oyo bakufá? Tokomona lisusu bandeko na biso oyo bakufá? Lisolo oyo elandi epesi biyano ya Biblia na mituna yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto