Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/4 nk. 4-7
  • Ndenge nini kosolola malamu na molongani na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini kosolola malamu na molongani na yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kosolola kozanga koloba
  • Kosolola ezali na ntina mingi
  • Yekolá kosolola malamu
  • Ntango boyokani te na likambo moko
  • Bóbatela momeseno ya kosolola
  • Kosolola na kati ya libota mpe na kati ya lisangá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Kosolola, ezali bobele na maloba te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Kosolola malamu ekosalisa libala na bino ezala malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Kosolola malamu ezali sɛkɛlɛ mpo libala ezala malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/4 nk. 4-7

Ndenge nini kosolola malamu na molongani na yo?

‘ESENGELAKI naloba bongo te.’ ‘Nalimbolaki makanisi na ngai polele te.’ Yo mpe osilá kokanisa bongo nsima ya kosolola na molongani na yo? Kosolola ezali likambo oyo moto asengeli koyekola. Nzokande, lokola likambo nyonso oyo bayekolaka, bato mosusu bayebaka yango noki, kasi mpo na bamosusu, ezalaka pɛtɛɛ te. Ata soki mpo na yo mpe ezali pɛtɛɛ te, okoki koyekola koloba na boboto, to na maloba mosusu, kosolola malamu.

Ntango mosusu, kosolola ya mobali ná mwasi na ye etalelaka mimeseno ya mboka. Na bisika mosusu balobaka ete, ‘Mobali asengeli kolobaka mingi te.’ Na bamboka yango, bato bamonaka ete mibali oyo balobaka mingi bapesaka nzoto na bango kilo te. Ya solo, Biblia elobi ete: “Moto nyonso asengeli koyokaka noki, kowelaka koloba te.” (Yakobo 1:19) Kasi, toli yango etaleli moto nyonso, azala mwasi to mobali, mpe emonisi ete kosolola elimboli kaka koloba te. Bato mibale bakoki kolobana ntango molai, kasi tokoki mpenza koloba ete bazali kosolola soki moto na moto azali koyoka moninga te? Ndenge vɛrsɛ oyo touti kolobela emonisi yango, likambo ya ntina mingi mpo na kosolola malamu ezali koyeba koyoka.

Kosolola kozanga koloba

Na bamboka mosusu balobaka ete mwasi asengeli kofandaka nyɛɛ. Mobali asengeli te kokipe makambo ya ndako. Na ntango wana, moto na moto asengeli koluka koyeba bamposa ya molongani na ye na ndenge na ye moko. Basi mosusu bakómaka kososola bamposa ya mibali na bango mpe bakokisaka yango noki. Na mabala ya ndenge wana, tokoki koloba ete mwasi ná mobali basololaka kozanga koloba. Kasi, mbala mingi kosolola yango ezalaka kaka ngámbo moko. Atako mwasi akoki kosala milende mpe kokóma na likoki ya kososola makanisi mpe bamposa ya mobali na ye, mbala mingi mobali asalaka eloko moko te mpo na koyeba bamposa ya mwasi na ye.

Ya solo, na bisika mosusu, mibali batyelaka bamposa ya basi na bango likebi mpe bamekaka kokokisa yango. Kasi, ata na bisika yango, mabala mingi ekozwa matomba mingi soki mwasi ná mobali bayekoli kosolola malamu.

Kosolola ezali na ntina mingi

Soki bato bazali kosolola malamu, esalaka ete báyebana malamu mpe moko te akanisela moninga mabe. Ntango Bayisalaele bakómaki na Mokili ya Ndaka, mabota oyo efandaki na ɛsti ya Ebale Yolodani, elingi koloba libota ya Lubene, ya Gada, mpe ndambo ya libota ya Manase, batongaki “etumbelo monene mpe ekokaki kotalama mosika.” Mabota mosusu bayebaki te ntina oyo batongaki etumbelo yango. Lokola bakanisaki ete bato ya mabota yango bapɛngwi, bazwaki ekateli ya kokende kobundisa bango. Kasi, liboso bákende na etumba, batindaki bato mpo na kosolola na mabota oyo batongaki etumbelo. Likambo oyo basalaki ezalaki malamu mpenza! Bato ya bikólo yango bayebisaki bango ete etumbelo yango ezalaki te mpo na kopesa banzambe mosusu mbeka. Balingaki te ete mokolo mosusu bandeko na bango ya mabota mosusu báloba na bango ete: “Bino bozali na mpo na [Yehova] te.” Etumbelo wana ezalaki lokola litatoli ete bango mpe bazali basambeli ya Yehova. (Yosua 22:10-29) Babengaki etumbelo yango Litatoli, na ntembe te mpo ezalaki kotatola ete mpo na bango mpe, Yehova azali Nzambe ya solo.​—Yosua 22:34.

Ndimbola oyo mabota oyo ezalaki na ɛsti ya Yolodani epesaki ekitisaki bato ya mabota mosusu motema mpe batikaki likanisi ya kobundisa bango. Tomoni mpenza ete kosolola malamu mpe na polele epekisaki bango kobunda. Na nsima, ntango Bayisalaele batombokelaki Yehova Nzambe, oyo azalaki mobali na bango ya elilingi, ye alobaki na bango ete ‘akoloba na motema na bango.’ (Hosea 2:14, NW) Yango ezali ndakisa malamu mpo na bato oyo babalá! Yango wana, salá nyonso mpo na kosimba motema ya molongani na yo mpo ayeba ndenge oyo ozali koyoka na motema na yo. Yango ezali na ntina, mingimingi na makambo oyo ezalaka mwa mindɔndɔ. Pattie Mihalik, mopanzi-nsango moko na États-Unis, alobaki boye: “Bato mosusu balobaka ete basombaka maloba na mbongo te, kasi maloba ekoki mpe kozala na motuya monene. Bato mosusu bazalaka na mokakatano mpo na komonisa makanisi na bango, kasi soki basali makasi, litomba oyo bakozwa eleki kutu ya mbongo oyo bakoki kobomba na banki.”

Yekolá kosolola malamu

Bato mosusu balobaka ete, ‘Libala na biso ezalaki mabe banda kaka na ebandeli.’ Bamosusu mpe balobaka ete, ‘Ata soki tosali ndenge nini, libala na biso ekobonga lisusu te.’ Bato yango bamonaka ete bakoki kosala eloko moko te mpo na koyekola kosolola malamu na balongani na bango. Kasi, tókanisa naino mabala ya bato oyo bafandaka na bamboka oyo baboti nde baponelaka bana na bango molongani. Na bamboka yango, mibali mingi ná basi na bango bayekolaka kosolola malamu nsima ya kobalana.

Eleki sikoyo mbula 4 000, Abalayama atindaki mosaleli na ye na mboka mosika mpo akende kolukela mwana na ye Yisaka mwasi. Mbala ya liboso oyo Yisaka amonaki mwasi yango ezalaki ntango mosaleli oyo batindaki azalaki koya na ye; mokolo yango Yisaka azalaki kotambola na elanga. Atako bongo, ntango babalanaki bayekolaki kosolola malamu mpenza. Moto oyo akendaki kopona mwasi “alobaki na Yisaka makambo nyonso masalaki ye.” Biblia elobi mpo na libala yango boye: “Bongo Yisaka akɔtaki na hema (yango ezalaki mama na ye Sala liboso) [likambo yango emonisaki molulu ya libala] mpe akamataki Lebeka mpe ye akómaki mwasi na ye mpe alingaki ye.”​—Genese 24:62-67.

Tomoni ete Yisaka ayokaki naino makambo oyo mosaleli ya tata na ye ayebisaki ye mpe na nsima, akamataki Lebeka mpe akómaki mwasi na ye. Abalayama atindaki mosaleli na ye oyo azalaki kotyela motema; mobali yango azalaki kobanga Yehova, Nzambe ya Yisaka. Yisaka akokaki mpenza kotyela mobali yango motema. Yisaka “alingaki” Lebeka, mwasi na ye.

Yisaka ná Lebeka bakolisaki momeseno ya kosolola malamu? Ntango mwana na bango Esau abalaki bana ya Bahiti, likambo yango ebimisaki mokakatano na libota na bango. Lebeka “alobaki” na Yisaka ete: “Ngai nalɛmbi na bomoi na ntina na basi Bahiti oyo. Soko Yakobo [mwana na bango mosusu] akobala mwasi Mohiti . . . , bomoi na ngai ekozala malamu boni?” (Genese 26:34; 27:46) Maloba yango emonisi ete Lebeka amonisaki makanisi na ye polele.

Yisaka ayebisaki Yakobo, lipasa ya Esau, ete abala mwasi Mokanana te. (Genese 28:1, 2) Yango emonisi ete Yisaka ayokelaki Lebeka. Mwasi yango ná mobali na ye basololaki malamu likambo oyo ezalaka mindɔndɔ mingi na kati ya libota, mpe na ndenge yango, bapesaki biso ndakisa ya malamu. Kasi, mobali ná mwasi na ye basengeli kosala nini soki bazali na makanisi ekeseni na likambo moko?

Ntango boyokani te na likambo moko

Soki yo ná molongani na yo boyokani te na likambo moko, koboya kolobisa ye te. Soki oboyi kolobisa ye, ekomonisa ete ozali na esengo te mpe olingi ete ye mpe azala na esengo te. Ntango mosusu molongani na yo azali koyeba malamu te makanisi to bamposa na yo.

Esengeli ete yo ná molongani na yo bósolola malamu. Ya solo, soki ezali likambo oyo ebimisaka mindɔndɔ, ekoki kozala mpasi bósolola yango na kimya. Abalayama ná Sala, baboti ya Yisaka, bakutanaki na likambo moko ya mpasi. Lokola Sala azalaki kobota te, alandaki momeseno ya ntango wana mpe apesaki mosaleli na ye, Agala, epai ya mobali na ye mpo abota na ye mwana. Agala abotelaki Abalayama mwana mobali, nkombo na ye Yisamaele. Kasi, na nsima Sala mpe azwaki zemi mpe abotelaki Abalayama mwana, nkombo na ye Yisaka. Ntango Sala alongolaki Yisaka na mabɛlɛ, amonaki Yisamaele azali kosɛka mwana na ye. Lokola Sala amonaki ete mwana na ye akozala na likama, ayebisaki Abalayama abengana moombo yango ná Yisamaele. Tomoni ete Sala ayebisaki makanisi na ye polele epai ya mobali na ye. Kasi, likambo oyo Sala asɛngaki esepelisaki Abalayama te.

Ndenge nini basilisaki likambo yango? Biblia elobi boye: “Nzambe alobelaki Abalayama ete, Tungisá motema na yo te na ntina na mwana mpe na moombo mwasi na yo. Soko Sala alobeli yo nini, salá boye mpo ete libota na nkombo na yo ekobima na Yisaka.” Abalayama ayokaki maloba ya Yehova Nzambe mpe atosaki.​—Genese 16:1-4; 21:1-14.

Kasi, okoki koloba ete, ‘Soki tokokaki koyoka mongongo ya Nzambe, mbɛlɛ matata ezalaka te!’ Yango ememi biso na likambo mosusu oyo ekoki kosalisa balongani báyeba kosilisaka matata. Mwasi ná mobali bakoki koyoka mongongo ya Nzambe. Ndenge nini? Soki bango mibale bazali kotánga Liloba ya Nzambe mpe bazali kondima batoli na yango.​—1 Batesaloniki 2:13.

Ndeko mwasi moko oyo akɔmeli na elimo alobaki boye: “Mbala mingi, soki elenge mwasi ayei kotuna ngai toli mpo na libala na ye, natunaka ye soki ye ná mobali na ye batángaka Biblia elongo. Babalani mingi oyo bazalaka na mikakatano na libala na bango batángaka Biblia elongo te.” (Tito 2:3-5) Biso nyonso tokoki kozwa liteya na maloba na ye. Osengeli kotángaka Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo na molongani na yo. Na ndenge yango, ekozala lokola nde ozali ‘koyoka’ maloba ya Nzambe na ndenge oyo osengeli komitambwisa mokolo na mokolo. (Yisaya 30:21) Kasi, kebá na likambo oyo: Kokómisa te Biblia lokola fimbo mpo na kobɛta molongani na yo, ezali malamu te otángelaka ye ntango nyonso bavɛrsɛ oyo omonaka ete atosaka te. Lukáká nde ndenge oyo bino mibale bokoki kosalela makambo oyo bozali kotánga.

Ntango bolingi kosilisa mokakatano moko, bokoki kosalela Index des publications de la Société Watch Towera mpo na koluka mikanda oyo elobeli likambo yango. Mbala mosusu bozali kosalisa baboti oyo bakómi mibange mpe yango ezali kobimisa matata na libala na bino. Na esika okóma koswanisa molongani na yo mpe kopesa ye foti mpo azali kosala boye to boye te, ekoleka malamu bófanda mpe bósalela Index mpo na koluka mikanda oyo ekoki kosalisa bino. Ya liboso, bókende na motó ya likambo “Parents.” Na nsima, bokoki koluka mitindami oyo ezali na nse ya mitó ya makambo mike, na ndakisa “prendre soin de ses parents âgés.” Bótánga masolo oyo ezali na mikanda ya Batatoli ya Yehova oyo ezali kolobela likambo yango. Mbala mosusu bokokamwa na komona ebele ya matomba oyo bokozwa na kolanda batoli ya Biblia, batoli oyo esalisi mpe ebele ya baklisto ya sembo.

Soki bozali koluka mikanda oyo Index etindi bino mpe bozali kotánga yango elongo, ekosalisa bino bótalela mokakatano na bino na ndenge ya malamu. Bokomona bavɛrsɛ ya Biblia oyo ekomonisa bino makanisi ya Nzambe. Bóluka yango na kati ya Biblia mpe bótánga yango. Na ndenge yango, bokoyoka oyo Nzambe akoloba na bino mpo na mokakatano na bino!

Bóbatela momeseno ya kosolola

Osilá komeka kofungola porte moko oyo ekangamá banda mwa ntango mingi? Liboso efungwamá, esalaka makɛlɛlɛ mpe bibende na yango oyo egugi ezalaka makasi. Kasi, ezali boni soki bazalaki mbala na mbala kofungola porte yango mpe bazalaki kotya bibende na yango mafuta? Elingaki kozala mpasi te mpo ofungola yango. Ezali mpe bongo na likambo etali kosolola. Soki bomeseni kosolola mpe bozali komonisana bolingo ya solosolo, ekozala lokola nde bozali kopakola mafuta na bibende ya porte; ekozala mpasi te mpo bósolola malamu ata soki bozali na matata.

Likambo nyonso ezalaka mpasi na ebandeli. Atako kosolola ekoki kosɛnga bino bósala milende, bólɛmba te. Soki bosali makasi, nsukansuka bokozala na boyokani ya malamu mpe mokomoko akobanda koyeba bamposa mpe makanisi ya mosusu.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Elilingi na lokasa 7]

Ntango boyokani te na likambo moko, bokoluka toli ya Nzambe?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto