Mituna ya batángi
Soki moto azali kotungisama na bademo, akoki kosala nini mpo bátika kotungisa ye?
Liloba ya Nzambe emonisi ete bato oyo bazali kotungisama na bademo bakoki kozwa lisalisi. Libondeli ezali na ntina mingi na likambo yango. (Malako 9:25-29) Kasi, ezali mpe na makambo mosusu oyo moto oyo azali kotungisama na bademo asengeli kosala. Makambo oyo esalemaki epai ya baklisto mosusu ya ekeke ya liboso ezali komonisa biso yango.
Na Efese ya kala, bato mosusu bazalaki na boyokani na bademo liboso bákóma bayekoli ya Klisto. Kasi, ntango bazwaki ekateli ya kosalela Nzambe, “baoyo bazalaki kosala misala ya nkisi basangisaki babuku na bango esika moko mpe batumbaki yango na miso ya bato nyonso.” (Misala 19:19) Na ndenge bandimi yango ya sika batumbaki babuku na bango ya maji, batikaki ndakisa malamu mpo na moto nyonso oyo alingi ete bademo bátika kotungisa ye. Moto ya ndenge wana asengeli kotumba eloko nyonso oyo ezali na boyokani na bilimu mabe. Yango ekoki kozala babuku, bazulunalo, bafilme, bakasɛti-video, bakasɛti ya miziki oyo basalelaka na milulu ya bilimu mabe, mpe bansinga to biloko mosusu ya kolata mpo na “komibatela” to oyo ezali na boyokani na misala ya bilimu mabe.—Deteronome 7:25, 26; 1 Bakolinti 10:21.
Mwa bambula na nsima, ntoma Paulo akomelaki baklisto yango oyo batumbaki babuku na bango ya maji, boye: “Tozali kobunda líbanda . . . ná mampinga ya bilimo mabe.” (Baefese 6:12) Paulo apesaki bango toli oyo: “Bólata molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe mpo bókoka kotɛlɛma ngwi liboso ya mayele mabe ya Zabolo.” (Baefese 6:11) Toli yango ezali na ntina mingi tii lelo oyo. Baklisto basengeli kozala makasi na elimo mpo bilimo mabe bálonga bango te. Paulo abakisaki boye: “Likambo eleki ntina mpenza, bókamata nguba monene ya kondima, oyo bokokoka koboma na yango mɔtɔ ya bambanzi nyonso ya moto mabe oyo ezali kopela.” (Baefese 6:16) Koyekola Biblia ekómisaka kondima ya moto makasi. (Baloma 10:17; Bakolose 2:6, 7) Na yango, koyekola Biblia ntango nyonso esalisaka biso tózala na kondima oyo ekoki kobatela biso liboso ya bilimo mabe.—Nzembo 91:4; 1 Yoane 5:5.
Baklisto ya Efese basengelaki kosala likambo mosusu ya ntina mingi. Paulo alobaki na bango boye: “Na mitindo nyonso ya mabondeli mpe malɔmbɔ bozali kokoba kobondela na libaku nyonso na kati ya elimo.” (Baefese 6:18) Kobondela Yehova na etingya mpo na kosɛnga ye libateli ezali na ntina mingi mpo na bato oyo balingi ete bademo bátika kotungisa bango. (Masese 18:10; Matai 6:13; 1 Yoane 5:18, 19) Biblia elobi boye: “Bótosaka Nzambe; kasi bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino.”—Yakobo 4:7.
Moto oyo alingi ete bademo bátika kotungisa ye asengeli mpenza kobondela Nzambe na etingya; kasi, baklisto mosusu bakoki mpe kobondela mpo na bato oyo balingi mpenza kosalela Yehova mpe baoyo bazali kosala makasi mpo na kotɛmɛla bilimo mabe. Bakoki kosɛnga Nzambe apesa bato oyo bazali kotungisama na bademo makasi ya kotɛmɛla bango. Lokola Biblia elobi ete “lilɔmbɔ ya moyengebene, ntango ezali kosala mosala, ezalaka na bokasi mingi,” mabondeli oyo basaleli ya Nzambe bazali kosala ekosalisa mpenza bato oyo bazali kobundana mpo na ‘kotɛmɛla Zabolo.’—Yakobo 5:16.
[Elilingi na lokasa 31]
Baklisto ya Efese batumbaki babuku na bango ya maji