Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/7 nk. 19-23
  • Tótya makanisi na makambo malamu ya ebongiseli ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tótya makanisi na makambo malamu ya ebongiseli ya Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Botɔndi mpo na baoyo bazali kokamba biso
  • Baoyo bazali kokamba biso bazali bato ya kozanga kokoka
  • “Liloba oyo ezali ya kozokisa”
  • Tózala ntango nyonso na makanisi ya malamu
  • Tóboya koimaima
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Ndenge nini Yehova azali kotambwisa ebongiseli na ye?
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
  • Tyelá elimo ya Nzambe motema ntango bomoi na yo ezali kobongwana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Tókumisa nkombo ya Yehova elongo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/7 nk. 19-23

Tótya makanisi na makambo malamu ya ebongiseli ya Yehova

“Tokosepela mpenza na makambo malamu ya ndako na yo.”​—NZEMBO 65:4, NW.

1, 2. (a) Tempelo mpe misala oyo esengelaki kosalema kuna elingaki komemela basaleli ya Nzambe nini? (b) Davidi abongisaki makambo nini mpo na kosimba mosala ya kotonga tempelo?

DAVIDI, mokonzi ya Yisalaele ya kala, azali moko na bato minene oyo Makomami ya Liebele elobeli. Moto yango oyo asalaki misala ndenge na ndenge, lokola mobateli ya mpate, alanga-nzembo, mosakoli, mpe mokonzi, azalaki mpenza kotyela Yehova Nzambe motema mobimba. Lokola Davidi alingaki Nzambe mingi, azalaki na mposa ya kotongela ye ndako. Ndako yango, to tempelo, esengelaki kozala esika monene ya losambo ya solo na Yisalaele. Davidi ayebaki ete tempelo mpe makambo oyo ekobanda kosalema kuna ekopesa basaleli ya Nzambe esengo mpe ekomemela bango mapamboli. Yango wana Davidi ayembaki boye: “Esengo na moto oyo [yo Yehova] oponi ete apusana penepene mpe afanda na lopango na yo. Tokosepela mpenza na makambo malamu ya ndako na yo, esika mosantu ya tempelo na yo.”​—Nzembo 65:4, NW.

2 Yehova aboyaki ete Davidi atambwisa misala ya kotonga ndako wana. Apesaki libaku malamu yango epai ya mwana na ye Salomo. Davidi aimaimaki te mpo moto mosusu azwaki mokumba oyo ye alukaki na mposa makasi. Likambo ya ntina mingi mpo na ye ezalaki ete tempelo etongama. Davidi asalaki nyonso oyo akokaki mpo Salomo asala mosala malamu. Na ndakisa, apesaki ye plan ya ndako oyo Yehova alakisaki ye. Longola yango, Davidi akabolaki bankóto ya Balevi na bituluku mpo na kosala misala; mpe apesaki ebele ya wolo ná palata lokola likabo mpo na kotonga tempelo.​—1 Ntango 17:1, 4, 11, 12; 23:3-6; 28:11, 12; 29:1-5.

3. Ndenge nini basaleli ya Nzambe batalelaka bibongiseli oyo esalemaka mpo na losambo ya solo?

3 Bayisalaele ya sembo bapesaki mabɔkɔ na bibongiseli oyo esalemaki mpo na losambo ya solo na ndako ya Nzambe. Lelo oyo mpe, biso basaleli ya Yehova tozali kopesa mabɔkɔ na nyonso oyo ezali kosalema mpo na losambo na ebongiseli ya Yehova awa na mabelé. Na ndenge yango, tozali komonisa ete tozali na makanisi ndenge moko na Davidi. Tozali na elimo ya koimaima te. Totyaka nde makanisi na biso na makambo malamu ya ebongiseli ya Nzambe. Osilá kokanisa ebele ya makambo ya malamu oyo tokoki kozala na botɔndi mpo na yango? Tiká tótalela mwa ndambo na yango.

Botɔndi mpo na baoyo bazali kokamba biso

4, 5. (a) Ndenge nini “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kokokisa mokumba na ye? (b) Batatoli mosusu balobaki nini mpo na bilei ya elimo oyo bazwaka?

4 Tosengeli mpenza kozala na botɔndi mpo na “moombo ya sembo mpe ya mayele” oyo Yesu Klisto aponi mpo abatela bozwi na ye awa na mabelé. Lelo oyo, moombo ya sembo, elingi koloba lisangá mobimba ya baklisto bapakolami, azali kokamba mosala ya kosakola nsango malamu, kobongisa makita mpo na losambo, mpe kobimisa mikanda oyo elimbolaka Biblia na minɔkɔ koleka 400. Bamilio ya bato na mokili mobimba bazali na botɔndi mpo na “bilei” ya elimo oyo moombo yango azali kopesa “na ntango oyo ebongi.” (Matai 24:45-47) Tozali na ntina moko te ya koimaima mpo na bilei yango.

5 Elfi, Motatoli moko ya Yehova oyo akómi sikoyo mobange azalaki kozwa libɔndisi mpe bilendiseli na ndenge azalaki kosalela batoli ya Biblia oyo azalaki kozwa na mikanda ya moombo ya sembo na boumeli ya bambula mingi. Botɔndi mingi oyo Elfi azali na yango etindaki ye akoma boye: “Soki ebongiseli ya Yehova te, nayebi te soki nalingaki kosuka wapi!” Peter ná Irmgard bazali basaleli ya Nzambe banda bambula ebele. Irmgard azali na botɔndi mpo na ebele ya mikanda oyo “ebongiseli malamu mingi ya Yehova” ezali kobimisa. Kutu, mikanda mosusu ebimisamaka mpo na bato bakufá miso mpe mpo na bababa.

6, 7. (a) Ndenge nini masangá ya mokili mobimba etambwisamaka? (b) Bandeko mosusu balobaki nini mpo na ebongiseli ya Yehova?

6 Lisangani ya Mikóló-Bakambi, oyo esangisi mwa ndambo moke ya mibali oyo bazali baklisto bapakolami, ezali momonisi ya “moombo ya sembo”; bandeko yango basalaka na biro monene ya Batatoli ya Yehova na New York. Lisangani ya Mikóló-Bakambi eponaka basaleli ya Yehova oyo bakɔmeli na elimo mpo na kosala na babiro oyo ezali kotambwisa misala ya masangá koleka 98 000 na mokili mobimba. Mibali oyo bakokisi masɛngami baponamaka bankulutu mpe basaleli na misala na masangá yango. (1 Timote 3:1-9, 12, 13) Bankulutu batambwisaka masangá mpe babatelaka etonga ya Nzambe oyo batye bango bakɛngɛli. Ezali mpenza esengo kozala na kati ya etonga yango mpe komona bolingo mpe bomoko ya “lisangá mobimba ya bandeko”!​—1 Petelo 2:17; 5:2, 3.

7 Mbala mingi, bandeko bamilelalelaka te; kutu bazalaka nde na botɔndi mpo na batoli ya bankulutu. Tózwa ndakisa ya Birgit, ndeko mwasi moko oyo azali sikoyo na mbula koleka 30. Ntango azalaki elenge, akómaki na baninga ya mabe mpe etikalaki moke akóma na etamboli ya mabe. Kasi, batoli ya Biblia oyo bankulutu bapesaki ye mpe lisungi ya bandeko mosusu na lisangá esalisaki ye azonga na nzela. Birgit akanisaka nini lelo oyo? Alobi boye: “Nazali na botɔndi mingi ete tii lelo nazali na ebongiseli ya Yehova, ebongiseli moko malamu mingi.” Andreas, elenge mobali moko ya mbula 17 alobi boye: “Oyo ezali mpenza ebongiseli ya Yehova mpe ebongiseli mosusu te ekokani na yango na mokili mobimba.” Ya solo, tosengeli kozala na botɔndi mpo na makambo malamu ya ebongiseli ya Yehova awa na mabelé!

Baoyo bazali kokamba biso bazali bato ya kozanga kokoka

8, 9. Makambo nini bato mosusu basalaki Davidi, kasi ye atalelaki yango ndenge nini?

8 Bandeko oyo bazali kokamba biso na kati ya losambo ya solo bazali bato ya kozanga kokoka. Bango nyonso basalaka mabunga, mpe bamosusu bazali kobunda na bolɛmbu na likambo moko to mosusu. Likambo yango esengeli nde kotungisa biso? Te. Ata bato oyo bazalaki na mikumba na Yisalaele ya kala bazalaki kosala mabunga minene. Na ndakisa, Davidi azalaki naino elenge ntango bazwaki ye mpo abɛtelaka Mokonzi Saulo miziki mpo na kokitisa ye motema. Na nsima, Saulo alukaki koboma Davidi, mpe nsukansuka Davidi akómaki kokimakima mpo na kobatela bomoi na ye.​—1 Samwele 16:14-23; 18:10-12; 19:18; 20:32, 33; 22:1-5.

9 Bayisalaele mosusu bazalaki na bokosi. Na ndakisa, Yoaba, mokonzi ya basoda ya Davidi, abomaki Abinele, ndeko ya Saulo. Abesaloma alukaki kobɔtɔla bokonzi ya Davidi, tata na ye. Ahitofele, mopesi-toli oyo Davidi azalaki kotyela motema, abalukelaki ye. (2 Samwele 3:22-30; 15:1-17, 31; 16:15, 21) Atako bongo, Davidi akómaki komilelalela te; atikaki mpe losambo ya solo te. Kutu, mikakatano esalaki ete Davidi akangama makasi epai ya Yehova mpe abatela makanisi malamu oyo azalaki na yango ntango azalaki kokima Saulo. Na ntango wana, Davidi ayembaki boye: “Yokelá ngai mawa, ee Nzambe, yokelá ngai mawa; zambi molimo na ngai ezali koluka ebombelo epai na yo; nakomibomba na elilingi ya mapapu na yo kino mikakatano esili koleka.”​—Nzembo 57:1.

10, 11. Moklisto moko na nkombo Gertrud akutanaki na likambo nini ntango azalaki elenge, mpe alobaki nini mpo na mabunga ya bandeko mosusu?

10 Tosengeli komilelalela te ntango moto moko na kati ya ebongiseli ya Yehova asali na bokosi. Yehova ye moko, baanzelu, to mpe bankulutu, bakondima te ete bato ya bokosi mpe bato mabe bátikala na lisangá ya boklisto. Atako bongo, makambo mosusu eyelaka biso nyonso mpo na kozanga kokoka, ezala ya biso moko to ya basaleli mosusu ya Nzambe.

11 Ndeko mwasi moko nkombo na ye Gertrud asalelaki Yehova bambula mingi mpenza. Nzokande, ntango azalaki elenge, bafundaki ye ete azali kokosa ete azali mosakoli ya ntango nyonso. Ndeko Gertrud asalaki nini? Aimaimaki te. Mwa moke liboso akufa na 2003, wana akómaki na mbula 91, akanisaki lisusu makambo oyo akutaná na yango mpe alobaki boye: “Makambo wana mpe mosusu oyo nakutanaki na yango na bomoi na ngai eteyaki ngai ete ata soki bato basali mabunga, Yehova azali kotambwisa mosala na ye monene mpe azali kosalela bato ya kozanga kokoka.” Ntango Ndeko Gertrud azalaki komona mabunga ya basaleli mosusu ya Nzambe, azalaki kobondela Yehova.

12. (a) Ndakisa nini ya mabe baklisto mosusu ya siɛklɛ ya liboso bapesaki? (b) Tosengeli kotya makanisi na biso na makambo nini?

12 Lokola basaleli nyonso ya Yehova, ata baoyo bazali kosalela ye na bosembo, bazali bato ya kozanga kokoka, ntango ndeko moko oyo azali na mikumba asali libunga, biso tókoba kaka kosala “makambo nyonso kozanga koimaima.” (Bafilipi 2:14) Ekozala mawa mingi soki tolandi ndakisa mabe ya bandeko mosusu na lisangá ya boklisto na siɛklɛ ya liboso. Moyekoli Yuda alobi ete na ntango wana, bateyi ya lokuta bazalaki “kotyola bankolo mpe kofinga bato ya nkembo.” Bato mabe wana bazalaki mpe “baimaimi, bato ya komilelalela mpo na ndenge bomoi na bango ezali.” (Yuda 8, 16) Tólanda te nzela ya baimaimi wana, tótya makanisi na biso na makambo malamu oyo tozali kozwa na nzela ya “moombo ya sembo.” Tósepela na makambo malamu ya ebongiseli ya Yehova mpe ‘tókoba kosala makambo nyonso kozanga koimaima.’

“Liloba oyo ezali ya kozokisa”

13. Bato mosusu basalaki nini ntango bayokaki makambo mosusu oyo Yesu Klisto ateyaki?

13 Tomoni ete na siɛklɛ ya liboso bato mosusu baimaimaki epai ya bato oyo bazalaki na mikumba; kasi, ezalaki mpe na bamosusu oyo baimaimaki mpo na mateya ya Yesu. Ndenge ekomami na Yoane 6:48-69, Yesu alobaki ete: “Moto oyo azali kolya mosuni na ngai mpe komɛla makila na ngai azali na bomoi ya seko.” Ntango bayokaki maloba yango, “mingi na kati ya bayekoli na ye . . . balobaki ete: ‘Liloba oyo ezali ya kozokisa; nani akoki koyoka yango?’” Yesu ayebaki ete “bayekoli na ye bazalaki koimaima mpo na yango.” Lisusu, “mpo na yango, mingi na kati ya bayekoli na ye bazongelaki biloko ezalaki na nsima mpe balingaki lisusu kotambola elongo na ye te.” Kasi, bayekoli mosusu mpe baimaimaki te. Ntango Yesu atunaki bantoma 12 ete, “Bino mpe bolingi nde kokende?” Ntoma Petelo apesaki eyano ete: “Nkolo, tokokende epai ya nani? Yo ozali na maloba ya bomoi ya seko; mpe biso tosili kondima mpe koyeba ete yo ozali Mosantu ya Nzambe.”

14, 15. (a) Mpo na nini bandeko mosusu basepelaka te na mateya mosusu ya lisangá? (b) Liteya nini tokoki kozwa na lisolo ya Emanuel?

14 Na ntango na biso, mwa ndambo moke ya basaleli ya Nzambe basepelaki te na mateya mosusu ya Biblia mpe baimaimaki na ebongiseli ya Yehova. Mpo na nini makambo ya bongo esalemaka? Mbala mingi moto aimaimaka mpo akangi ntina malamu te ya lolenge oyo Nzambe asalaka makambo. Yehova amonisaka basaleli na ye solo mokemoke. Yango wana, esɛngaka mbala na mbala tósembola ndenge na biso ya kososola mateya mosusu ya Biblia. Basaleli mingi ya Yehova basepelaka soki likambo moko esembolami. Mwa ndambo moke bakómaka “na boyengebene na koleka” mpe basepelaka te soki likambo moko ebongwani. (Mosakoli 7:16) Ekoki mpe kozala na baoyo basalaka makambo mosusu mpo na lolendo, bamosusu mpe bakweaka na motambo ya koluka kolimbola makambo na ndenge na bango. Ezala mpo na ntina nini, koimaima ndenge wana ezali likama, mpamba te ekoki kozongisa biso na mokili mpe banzela na yango.

15 Na ndakisa, Emanuel azalaki Motatoli; kasi andimaki te mwa makambo mosusu oyo atángaki na mikanda ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45) Atikaki kotánga mikanda ya lisangá ya Yehova mpe nsukansuka ayebisaki bankulutu ete alingi lisusu kozala Motatoli ya Yehova te. Kasi, nsima ya mwa ntango, Emanuel amonaki ete mateya ya ebongiseli ya Yehova ezali solo. Alukaki Batatoli, andimaki ete asalaki libunga, azongaki na lisangá mpe akómaki lisusu na esengo.

16. Nini ekoki kosalisa biso tótika kokakatana na mateya mosusu ya lisangá ya Yehova?

16 Tokosala nini soki tozali kokakatana na mateya mosusu ya lisangá ya Yehova mpe yango ekómi kotinda biso na koimaima? Tosengeli kozala na motema molai. “Moombo ya sembo” akoki kobimisa lisolo moko oyo ekolimbola makambo polele mpe ekosilisa kokakatana nyonso oyo tozalaki na yango. Ezali mpe malamu kosolola na bankulutu mpo básalisa biso. (Yuda 22, 23) Kobondela, koyekola biso moko, kosolola na bandeko ya elimo ekoki mpe kosalisa biso tótika kokakatana mpe tósepela mingi na mateya oyo ezali kolendisa kondima oyo tozwi na ebongiseli oyo Yehova azali kosalela mpo na koteya biso.

Tózala ntango nyonso na makanisi ya malamu

17, 18. Na esika ya koimaima, ezaleli nini tosengeli kozala na yango, mpe mpo na nini?

17 Ezali solo ete bato ya kozanga kokoka babendamaka na masumu mpe bamosusu bakoki kozala na elimo ya komilelalela. (Genese 8:21; Baloma 5:12) Nzokande, soki tokómi na ezaleli ya koimaima, tokoki kobebisa boyokani na biso na Yehova Nzambe. Yango wana, tosengeli komitalelaka mpo na koyeba soki tobandi te kokóma na elimo ya koimaima.

18 Na esika tóimaima mpo na makambo mosusu na lisangá, ebongi nde tóbatela makanisi ya malamu mpe tólanda makambo oyo esalaka ete tózala na mosala mingi, tózala na esengo, tóbanga Nzambe, tózala na makanisi oyo ebongi, mpe tózala makasi na kati ya kondima. (1 Bakolinti 15:58; Tito 2:1-5) Yehova azali komona makambo nyonso oyo ezali koleka na kati ya ebongiseli na ye mpe, lokola kaka na siɛklɛ ya liboso, Yesu ayebi lisangá mokomoko ná makambo na yango. (Emoniseli 1:10, 11) Tózala na motema molai mpe tózela Nzambe mpe Klisto, Mokonzi ya lisangá. Yehova akoki kosalela bakɛngɛli ya sembo mpo na kobongisa makambo oyo ezali kotambola malamu te.​—Nzembo 43:5; Bakolose 1:18; Tito 1:5.

19. Liboso Bokonzi ya Nzambe eyangela mabelé mobimba, tosengeli kotya makanisi na biso na makambo nini?

19 Mosika te mokili mabe oyo ekosuka mpe Bokonzi ya Masiya ekoyangela mabelé mobimba. Liboso na yango, ezali na ntina mingi ete mokomoko na biso abatela makanisi ya malamu! Yango ekosalisa biso tótyaka miso na bizaleli malamu ya bandeko na biso bandimi na esika ya kolandela mabunga na bango. Soki tozali kotya makanisi na bizaleli malamu na bango, tokozala na esengo. Na esika tóminyokola nzoto na koimaima, tokolendisama na elimo.

20. Makanisi ya malamu ekosalisa biso tósepela na mapamboli nini?

20 Soki tobateli makanisi ya malamu, tokobosana te mapamboli oyo tozali na yango na kati ya ebongiseli ya Yehova awa na mabelé. Yango ezali ebongiseli kaka moko na mokili mobimba oyo ezali sembo epai ya Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Oyokaka ndenge nini mpo na likambo yango mpe libaku malamu ya kosambela Yehova, Nzambe ya solo kaka moko? Tiká ozala ntango nyonso na makanisi lokola ya Davidi, oyo ayembaki ete: “Ee, yo oyo oyokaka mabondeli, bato nyonso bakoya epai na yo. Esengo na moto oyo oponi ete apusana penepene mpe afanda na lopango na yo. Tokosepela mpenza na makambo malamu ya ndako na yo, esika mosantu ya tempelo na yo.”​—Nzembo 65:2, 4, NW.

Ozali koyeba lisusu?

• Mpo na nini tosengeli kozala na botɔndi mpo na bandeko oyo bazali kokamba lisangá?

• Tosengeli kokanisa nini ntango bandeko oyo bazali kokamba lisangá bazali kosala mabunga?

• Ndenge nini tosengeli kotalela kosembolama ya mateya Biblia?

• Nini ekoki kosalisa ndeko moko mpo atika kokakatana?

[Elilingi na lokasa 20]

Davidi apesaki Salomo plan ya tempelo mpe asalaki nyonso oyo akokaki mpo na losambo ya solo

[Elilingi na lokasa 23]

Bankulutu basepelaka kosalisa biso na elimo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto