Kobanga Nzambe ezali “liteya ya bwanya”
BWANYA ya solo esalisi elambo ya monene. “Atindi baseka na ye, agangi na bisika bileki likoló kati na mboka ete, ye oyo azali elema akɔta awa! Alobi mpe na bango bazangi mayele ete, Yaká kolya kwanga na ngai mpe komɛla vinyo ebongisi ngai. Tiká bilema mpe zalá na bomoi, tambolá na nzela ya bososoli.”—Masese 9:1-6.
Kolya mpe komɛla na mesa ya bwanya ekoki komema moto na mabe to na mpasi ata mokolo moko te. Koyoka bwanya ya Nzambe oyo ezali na kati ya Mokanda ya masese mpe kondima mateya na yango ememaka kaka matomba ya malamu. Ezali se ndenge moko mpo na maloba ya bwanya oyo ezali na Masese 15:16-33.a Kolanda toli oyo maloba wana ezali kopesa ekoki kosalisa biso tósepelaka kaka na moke oyo tozali na yango, tókende liboso mpe tózala na bomoi ya esengo. Ekoki mpe kosalisa biso tózwaka bikateli ya malamu mpe tótikala na nzela ya bomoi.
Ntango oyo bozwi moke elekaka malamu
Salomo, mokonzi ya Yisalaele, alobaki boye: “Moke elongo na [kobanga Yehova, NW] eleki mosolo mingi nde mikakatano elongo na yango.” (Masese 15:16) Kopesa Yehova mokɔngɔ mpe kotya bozwi ya mokili na esika ya liboso ezali bozoba. Bomoi ya ndenge wana esɛngaka koboma nzoto ntango nyonso na mosala mpe etondi na mitungisi. Ntango okokóma mobange, ekozala mpenza nsɔni soki otali na nsima mpe omoni ete obomaki nzoto bomoi na yo mobimba mpo na makambo ezangi ntina. Na ntembe te, konduka bomɛngo oyo ekomemela yo mikakatano ezali bwanya te. Ekozala malamu mingi koyekola sɛkɛlɛ ya bomoi ya esengo mpe kosalela yango. Kobanga Nzambe, elingi koloba kozala na boyokani malamu na ye nde epesaka esengo ya solo, kasi bozwi ya mokili te.—1 Timote 6:6-8.
Mpo na komonisa ete kozala na boyokani malamu na basusu eleki bozwi, Salomo alobi ete: “Bilei ya mwa ndunda na epai ya bolingo eleki elambo ya ngɔmbɛ ya mafuta wana koyinana ezali.” (Masese 15:17) Ya solo, kozala na bilei ebele na ndako ezali na ntina te soki bolingo ezali te. Na ndako ya moboti oyo azali kobɔkɔla bana na ye kaka ye moko, biloko ekoki mbala mosusu kozala mingi te. Na bikólo mosusu, kaka mwa bilei lokola ndunda to mpondu nde ekoki komonana na ndako ya ndenge wana. Kasi, na esika oyo bolingo ezali, bato bakolaka malamu.
Ata na mabota oyo balinganaka mingi, mikakatano ekoki kobima. Moko akoki kosala to koloba na mosusu likambo moko oyo esepelisi ye te. Moto oyo basali ye mabe asengeli kosala nini? Masese 15:18 (Bible na lingala ya lelo oyo) elobi boye: “Moto oyo asilikaka mingi abendaka koswana; kasi moto oyo akangaka motema alembisaka yango.” Eyano ya boboto ebomaka mɔtɔ mpe etyaka kimya. Toli ya vɛrsɛ wana ezali mpe malamu mingi na makambo mosusu, ata mpe na lisangá to na mosala ya kosakola.
Ntango oyo ‘nzela esembolamaka’
Vɛrsɛ oyo elandi emonisi bokeseni kati na moto oyo apesi bwanya mokɔngɔ mpe oyo alandi yango. Salomo, Mokonzi ya bwanya alobi boye: “Nzela ya moto ya gɔigɔi ezali lokola lopango ya nzube, nde nzela ya mosembwi esembolami.”—Masese 15:19.
Lopango ya nzubɛ ezali lokola lopango oyo bazingi na kangá-moyibi. Moto ya gɔigɔi amonaka ntango nyonso liboso na ye lopango ya nzube, elingi koloba mikakatano mpe alobaka ete yango nde ezali kopekisa ye asala likambo oyo asengeli kosala. Nzokande, basembwi babangaka te mikakatano oyo bakutani na yango. Bamipesaka na molende na mosala na bango mpe batyelaka yango mpenza likebi. Na ndenge yango, bakutanaka na mikakatano te lokola bato oyo bakimaka mikumba na bango. Nzela na bango “esembolami,” elingi koloba, bazali se kokende liboso. Bakendaka liboso na mosala na bango mpe yango ememelaka bango esengo.
Tózwa ndakisa ya likambo etali kozwa boyebi ya sikisiki ya Liloba ya Nzambe mpe kokola na elimo. Yango esɛngaka kosala milende. Moto akoki koloba ete lokola atángá mingi te to ayebi kotánga malamu te, akangaka makambo malamu te, ezali na ntina te amipesa na koyekola Biblia. Ekozala malamu koleka soki apesi makambo wana nzela te ete epekisa ye kozwa boyebi. Ata soki totángá mingi te to toyebi kotánga malamu te, tokoki kosala makasi mpo na kokolisa makoki na biso ya kotánga mpe ya kokanga ntina ya makambo oyo tozali kotánga. Tokoki ata kosalela diksionɛrɛ soki esengeli. Kotalela makambo na ndenge ebongi ekosalisa biso tózwa boyebi mpe tókola na elimo.
Ntango ‘Tata asepelaka’
Mokonzi Salomo alobi boye: “Mwana ya mayele akosepelisa tata, kasi moto ya zoba akotyola mama na ye.” (Masese 15:20) Baboti bazalaka na esengo ntango bana na bango bazali kotambola na bwanya, boye te? Ya solo, mpo na kozwa matomba ya malamu ndenge wana, esengeli baboti báboma nzoto na koteya mpe kosembola bana na bango. (Masese 22:6) Kasi, kozala na mwana ya bwanya ezali esengo monene mpo na baboti! Nzokande, mwana oyo azali zoba ayokisaka baboti mawa mpe mpasi ntango nyonso.
Salomo alobeli ‘kosepela’ na esika mosusu na maloba oyo: “Bazoba basepelaka na makambo ezangá ntina; kasi moto ya makanisi alandaka nzela ya malamu.” (Masese 15:21, Bible na lingala ya lelo oyo) Bazoba basepelaka mpe bagangaka na kosɛka mpo na makambo oyo ekoki kopesa bango esengo ya solosolo te. Nzokande, moto ya makanisi to ya mayele ayebaka ete ‘kolinga bisengo na esika ya kolinga Nzambe’ ezali bozoba. (2 Timote 3:1, 4) Kotosa mitinda ya Nzambe ekosalisa ye atikala sembo mpe akoba kotambola na nzela ya malamu.
Ntango ‘mikano ekokisamaka’
Kolanda mitinda ya Nzambe ememelaka moto matomba na makambo mosusu ya bomoi. Masese 15:22 (NW) elobi boye: “Mikano ebebaka esika lisolo ya pembeni ezali te, kasi ekokisamaka soki bapesi toli bazali ebele.”
Lisolo ya pembeni elimboli kosolola esika bato mosusu bazali te, kasi na bosembo mpenza. Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “lisolo ya pembeni” ebongolami na “boyokani” na Nzembo 89:7, NW. Yango emonisi boyokani na kati ya lisolo. Lisolo ya pembeni ezali lisolo ya likolólikoló te, kasi ezali lisolo ya kopesana makanisi mpe kofungolelana mitema. Soki basi ná mibali na bango to mpe baboti ná bana bazali kofungolelana mitema ndenge wana, mabota ekozala na kimya mpe na bomoko. Kasi, soki lisolo ya pembeni ezali te, matata mpe mikakatano ekɔtaka na libota.
Ntango tolingi kozwa bikateli ya minene, ekozala malamu tólanda toli oyo elobi ete mikano “ekokisamaka soki bapesi toli bazali ebele.” Na ndakisa, ntango tolingi kopona lolenge ya komisalisa, ekozala malamu tótuna makanisi ya minganga mibale to misato, mingimingi soki maladi na biso ezali na mindondo mingi.
Kotuna toli ya bato mingi ezali mpe na ntina mingi na makambo ya elimo. Soki bankulutu bazali kopesana makanisi mpe kosangisa bwanya na bango, mikano na bango “ekolonga.” Longolá yango, bankulutu ya sika basengeli kokakatana te kotunaka toli epai ya baoyo baumeli na mosala yango, mingimingi soki likambo oyo bazali kotalela ezali na mwa mindondo mingi.
Eyano oyo ‘epesaka esengo’
Maloba oyo elobami na bwanya ezalaka malamu mingi. Mokonzi Salomo alobi boye: “Moto azali na esengo mpo na kozongisa monɔkɔ na ye; liloba lilobami na ntango ekoki ezali malamu boni!” (Masese 15:23) Tosepelaka te soki topesi eyano to toli mpe eboti mbuma ya malamu? Yango wana, soki tolingi kopesa toli ya malamu, ezali na makambo mibale oyo tosengeli kosala.
Ya liboso, toli na biso esengeli kouta na Biblia, Liloba ya Nzambe. (Nzembo 119:105; 2 Timote 3:16, 17) Tosengeli mpe kopesa yango na ntango oyo ebongi. Ata maloba ya solo, soki elobami na ntango oyo ebongi te, ekoki kobota mbuma mabe. Na ndakisa, kopesa moto toli liboso oyoka ye ezali kozanga bwanya, mpe ekoki kosalisa ye te. Ezali mpenza na ntina ete ‘tóyokaka noki, kasi tówelaka koloba te’!—Yakobo 1:19.
Nzela ya bomoi “ekoleka likoló”
Masese 15:24 elobi ete: “Mpo na moto ya mayele, nzela ya bomoi ekoleka likoló, ete apɛngwa na ewelo kuna na nse.” Nzela oyo moto ya mayele alandaka ememaka mosika na ewelo to nkunda, esika ya bakufi. Aboyaka makambo ya mabe lokola pite, kolangwa bangi to masanga, mpe na ndenge yango, akoki kokufa mobesu te. Nzela na ye ememaka na bomoi.
Tótala sikoyo nzela ya bato oyo bazangi mayele: “[Yehova] akobebisa ndako ya bato ya lolendo kasi akokokisa ndelo ya mwasi-akufeli-mobali. [Yehova] akoboya makanisi ya bato mabe, nde bato ya pɛto bazali na maloba malamu. Ye [abebisaka, NW] ndako na ye oyo akoluka bozwi, nde ye oyo akoboya makabo mabe [kanyaka] akobika.”—Masese 15:25-27.
Mpo na kolakisa biso ndenge ya kokima mitambo oyo bato mingi bakweaka na yango, Salomo alobi boye: “Motema ya moyengebene ekobanzabanza liboso ya kozongisa liloba; kasi monɔkɔ ya bato ya masumu ekosopa makambo mabe.” (Masese 15:28) Toli wana ezali malamu mingi! Biyano ya bazoba ebimisaka litomba ya malamu te, mpo bakanisaka te liboso ya kopesa yango. Ntango ozali kotalela likambo moko, soki otaleli yango malamumalamu, oluki koyeba nini etindi moto asala yango, tokoloba te likambo oyo na nsima, ekotungisa biso. Litomba nini tokozwa soki tozali kobanga Nzambe mpe kotika ye asembola biso? Salomo alobi boye: “[Yehova] atikali mosika na bato mabe, nde ayoki mabondeli ya bayengebene.” (Masese 15:29) Nzambe ya solo azalaka pene na bato mabe te. Biblia elobi ete: “Ye oyo akolongola litoi na ye ete ayoka mobeko te, ata libondeli na ye ekozala eloko ya koboyama.” (Masese 28:9) Bato oyo babangaka Nzambe mpe basalaka nyonso mpo na kosala oyo ezali malamu na miso na ye, bapusanaka penepene na ye na elikya mpenza ete akoyoka bango.
Eloko oyo “ekosepelisa motema”
Salomo asaleli maloba kitoko ya elilingi oyo esengeli kotinda biso tókanisa: “Pole ya miso ekosepelisa motema, nsango malamu ekokembisa mikuwa.” (Masese 15:30) Mikuwa ‘ekembaka’ soki etondi na mafuta. Yango ekosala ete nzoto mobimba ekóma makasi mpe motema esepela. Mpe esengo ya motema emonanaka na miso. Nsango ya malamu mpe esalaka kaka bongo.
Tosepelaka te ntango toyokaka ndenge losambo ya Yehova ezali se kokende liboso na mokili mobimba? Koyoka makambo nyonso oyo ezali kosalema na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli elendisaka biso mpe etindaka biso tóbakisa milende na mosala yango. (Matai 24:14; 28:19, 20) Masolo ya bato oyo bazali kokómisa Yehova Nzambe na bango mpe koya na losambo ya solo etondisaka biso na esengo. Lokola “nsango malamu longwá na mokili ya mosika” etondisaka biso na esengo, ezali mpenza na ntina ete tópesaka balapolo ya malamu mpe ya bosembo ya mosala na biso ya kosakola.—Masese 25:25.
“Komikitisa eyaka liboso ya lokumu”
Mpo na komonisa motuya ya kondima kosembolama ata na lolenge nini, Mokonzi Salomo alobi boye: “Litoi oyo ekoyoka mpamela ya bomoi ekotikala penepene na bato ya mayele. Ye oyo akoboya mpamela azali kotyola molimo na ye mpenza; nde ye oyo akotosa etumbu akozwa boyebi.” (Masese 15:31, 32) Mpamela to etumbu esimbaka motema ya moto mpe esembolaka yango; epesaka yango mayele. Yango wana tokoki kokamwa te ete “fimbo” nde ebenganaka bozoba oyo “ekangami na motema ya mwana”! (Masese 22:15, NW) Moto oyo andimaka kosembolama azwaka mpe boyebi. Nzokande, koboya kosembolama ezali koboya bomoi.
Na yango, kondima bwanya esembola yo mpe kondima mpamela na yango na komikitisa nyonso epesaka litomba. Soki tozali kosala bongo, tokobanda kosepela kaka na moke oyo tozali na yango, tokokende se liboso, tokozala na esengo, tokolonga na makambo nyonso mpe tokozwa lokumu mpe bomoi. Masese 15:33 (NW) esukisi na maloba oyo: “Kobanga Yehova ezali liteya ya bwanya, mpe komikitisa eyaka liboso ya lokumu.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Soki olingi koyeba malamumalamu ndimbola ya makambo oyo elobami na Masese 15:1-15, talá na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 2006, nkasa 13-16.
[Elilingi na lokasa 17]
Bolingo na kati ya libota eleki kozala na bilei ebele ya malamu
[Elilingi na lokasa 18]
Ata soki totángá mingi te to toyebi kotánga malamu te, kotalela makambo na ndenge ebongi ekosalisa biso tózwa boyebi
[Elilingi na lokasa 19]
Lisolo ya pembeni ezali lisolo ya kopesana makanisi mpe kofungolelana mitema
[Elilingi na lokasa 20]
Oyebi ndenge oyo ‘nsango malamu ekembisaka mikuwa’?