Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/8 nk. 4-7
  • “Lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Na mabelé to na likoló?
  • Mokano ya seko mpo na mabelé
  • Mokano ya Nzambe ekokokisama
  • “Lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé”
  • “Bato ya komikitisa bakozwa libula ya mabelé”​—Ndenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mokano ya Nzambe mpo na mabelé ezali nini?
    Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
  • Mabele
    Lamuká!—2014
  • Mabelé ekobebisama mokolo mosusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/8 nk. 4-7

“Lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé”

“Lingomba ya Katolike eteyaka ete makambo oyo minei ezali kozela moto: Liwa, Kosambisama, Lifelo, Lola.”​—Buku Le catholicisme, ya George Brantl.

TOMONI ete na kati ya makambo yango, batángi mabelé te. Yango ekoki mpenza kokamwisa te mpo Lingomba ya Katolike ná mangomba mosusu eteyaka ete mabelé ekobebisama. Diksionɛrɛ moko (Dictionnaire de théologie catholique) emonisi yango polele na motó ya likambo “Nsuka ya mokili.” Elobi boye: “Lingomba ya Katolike endimaka mpe eteyaka ete mokili oyo, ndenge Nzambe akelá yango mpe ndenge ezali, ekotikala libela na libela te.” Liteya moko ya sika na Lingomba ya Katolike ezongeli mpe likanisi yango; elobi ete: “Mokili oyo . . . ekolimwa.” Kasi, soki mabelé oyo ekolimwa, bilaka ya Biblia oyo elobi ete paladiso ekozala na mabelé ekokokisama ndenge nini?

Biblia elobaka polele ete paladiso ekozala na mabelé. Na ndakisa, mosakoli Yisaya alobaki mpo na mabelé mpe bato oyo bakofanda wana boye: “Bakotonga ndako mpe bakofanda na yango; bakokona bilanga ya [vinyo] mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga te ete mosusu afanda; bakokona te ete mosusu alya; zambi lokola mikolo ya nzete, bongo ekozala mikolo ya bato na ngai, mpe baponami na ngai bakosepela kino ntango molai mpo na misala ya mabɔkɔ na bango.” (Yisaya 65:21, 22) Bayuda oyo Nzambe alakaki makambo yango bayebaki ete mboka na bango​—to mpe mokili mobimba​—ekokóma paladiso epai bato bakofanda mpo na libela.

Nzembo 37 elobeli mpe elikya yango. Elobi boye: “Bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili.” (Nzembo 37:11) Likambo oyo vɛrsɛ yango elobeli ezali kaka te kozonga ya Bayisalaele na Mokili ya Ndaka. Vɛrsɛ mosusu ya nzembo yango elobi ete: “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” (Nzembo 37:29)a Tomoni ete nzembo yango elobi ete bomoi ya seko awa na mabelé ezali mbano oyo “bato ya bopɔlɔ” bakozwa. Na libongoli moko, balobi ete na vɛrsɛ yango, maloba “bato ya bopɔlɔ” “ezali na bandimbola mingi koleka oyo totángaka na Babiblia; elimboli mpe bato ya mawa, bato ya mpasi to mpe baoyo bazali konyokwama mpo na Yawe, bato ya komikitisa oyo bazali kotosa Nzambe.”

Na mabelé to na likoló?

Na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu alobaki makambo oyo ezali na boyokani na maloba ya Nzembo oyo touti kotánga; alobaki boye: “Esengo na bato ya elimo ya boboto, mpo bakozwa libula ya mabelé.” (Matai 5:5) Maloba yango mpe emonisi ete mabelé ezali mbano ya seko oyo bato ya sembo bakozwa. Kasi, Yesu ayebisaki bantoma na ye polele ete akei kobongisela bango esika “na ndako ya Tata na [ye]” mpe ete bakozala na ye na likoló. (Yoane 14:1, 2; Luka 12:32; 1 Petelo 1:3, 4) Na bongo, ndenge nini tosengeli kolimbola bilaka oyo etali mabelé? Tokoki kotyela yango motema lelo oyo? etali mpenza banani?

Bato mingi oyo balimbolaka maloba ya Biblia balobaka ete liloba “mabelé” oyo Yesu asalelaki na Lisolo Likoló ya Ngomba mpe oyo ezali na Nzembo 37 ezali elilingi. Na bandimbola oyo Fulcran Vigouroux abakisaki na Bible de Glaire, alobi ete bavɛrsɛ yango ezali “elilingi ya lola mpe ya Lingomba.” Mpo na Marie-Joseph Lagrange, mwana-mboka France mpe moto ya mayele na makambo ya Biblia, elaka yango “elimboli te ete bato ya bopɔlɔ bakozwa mabelé epai bafandi, ezala na ebongiseli ya makambo oyo to mosusu, ya malamu koleka, kasi bakozwa nde esika, ata soki ezali wapi, oyo ezali bokonzi ya likoló.” Moto mosusu ya mayele alobaki ete basaleli “makambo malamu ya mabelé lokola elilingi mpo na kolobela likoló.” Bamosusu mpe balobi ete “mokili ya ndaka, to Kanana, ezali maloba ya elilingi mpe elimboli mboka ya likoló, bokonzi ya Nzambe, esika oyo Nzambe akopesa bato ya bopɔlɔ. Yango mpe ndimbola ya maloba ya elilingi oyo ezali na Nzembo 37 mpe na bisika mosusu.” Tosengeli nde kokanisa mbala moko ete mabelé oyo Nzambe alakaki ezali oyo tofandi te?

Mokano ya seko mpo na mabelé

Ntango Nzambe akelaki mabelé, mokano na ye ezalaki ete bato báfanda wana. Mokomi ya nzembo akomaki boye: “Lola mpe likoló-ya-lola ezali ya [Yehova], kasi apesaki mokili na bana ya bato.” (Nzembo 115:16) Na bongo, na ebandeli mokano ya Nzambe ezalaki ete bato báfanda na mabelé, kasi na likoló te. Yehova apesaki mwasi ná mobali ya liboso mokumba ya kokómisa mabelé mobimba paladiso lokola elanga ya Edene. (Genese 1:28) Yango ezalaki kaka mokano ya mwa ntango te. Na kati ya Liloba na ye, Yehova amonisi ete mabelé ekotikala libela: “Libota moko bakolimwa mpe libota mosusu bakoya nde mokili ekoumela seko.”​—Mosakoli 1:4; 1 Ntango 16:30; Yisaya 45:18.

Bilaka ya Nzambe ezangaka kokokisama te, mpamba te azali Oyo-Aleki-Likoló mpe ye moko asalaka ete ekokisama. Biblia esaleli ndakisa ya mbula mpo na kolobela bilaka ya Nzambe; elobi boye: “Mpo ete lokola mbula mpe mbula-mpɛmbɛ ekolongwa na lola mpe ekozonga kuna te kasi ekopɔlisa mabelé, ete ebimisa biloko na yango mpe etɔisa yango, . . . boye na liloba [liloba ya Nzambe] oyo ekobima na monɔkɔ na ngai; [ekozonga] epai na ngai mpamba te, kasi ekosukisa oyo ekani ngai, ekolonga na likambo litindaki ngai yango.” (Yisaya 55:10-11) Nzambe alaki bato makambo mingi. Ntango ekoki koleka mingi liboso bilaka yango ekokisama, kasi nsukansuka, ekokisamaka. ‘Ezongaka’ epai na ye soki ekokisi nyonso oyo ye alakaki.

Yehova asepelaki kosala mabelé mpo bato báfanda wana. Na nsuka ya mokolo ya motoba, alobaki ete biloko nyonso oyo asalaki ezalaki “malamu mingi.” (Genese 1:31) Mokano ya Nzambe ete mabelé mobimba ekóma paladiso mpo na libela ekokisami naino te. Atako bongo, bilaka ya Nzambe ‘ekozonga epai na ye mpamba te.’ Bilaka nyonso ya bomoi ya seko awa na mabelé, epai bato bakofanda na kimya mpo na libela, ekokokisama.​—Nzembo 135:6; Yisaya 46:10.

Mokano ya Nzambe ekokokisama

Lisumu ya Adama ná Eva ebebisaki mpo na mwa ntango mokano ya Nzambe ya kokómisa mabelé mobimba paladiso. Nzambe abenganaki bango na elanga mpo batosaki ye te. Babungisaki libaku ya kokokisa mokano ya Nzambe, elingi koloba bato ya kokoka báfanda na paladiso awa na mabelé. Atako bongo, Nzambe azwaki bibongiseli mpo na kokokisa mokano yango. Na ndenge nini?​—Genese 3:17-19, 23.

Likambo oyo esalemaki na Edene ezali lokola likambo oyo ekoki kokómela mobali moko oyo azali kotonga ndako na esika moko ya malamu. Ntango kaka asilisi kotya fondasyo, moto moko ayei kobebisa yango. Na esika mobali yango atika kotonga, azwi bibongiseli mpo na kosilisa ndako na ye. Ata soki akobimisa lisusu mbongo mingi, yango ekopekisa ye te akokisa likambo oyo akanaki.

Ndenge moko mpe, Nzambe azwaki bibongiseli mpo na kokokisa mokano na ye. Mwa moke nsima ya lisumu ya Adama ná Eva, alobaki likambo moko oyo epesi bana na bango elikya; alakaki “momboto” moko oyo asengelaki kosilisa mabe oyo lisumu na bango ememaki. Na kokokisama ya esakweli yango, emonanaki ete momboto yango ezali libosoliboso Yesu, Mwana ya Nzambe, oyo ayaki awa na mabelé mpe apesaki bomoi na ye lokola mbeka mpo na kosikola bato. (Bagalatia 3:16; Matai 20:28) Nsima ya lisekwa na ye, Yesu asengelaki kokóma Mokonzi. Yesu azali moto ya bopɔlɔ ya liboso oyo azwi mabelé elongo na bato mosusu ya sembo oyo bakosekwa mpo na koyangela na ye na likoló. (Nzembo 2:6-9) Na nsima, guvɛrnema yango ekoyangela mabelé mpo na kokokisa mokano ya Nzambe mpe kokómisa mabelé paladiso. Bamilio na bamilio ya bato ya bopɔlɔ ‘bakozwa mabelé’; elingi koloba ete bakoyangelama na Yesu ná bato oyo bakoyangela elongo na ye.​—Genese 3:15; Danyele 2:44; Misala 2:32, 33; Emoniseli 20:5, 6.

“Lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé”

Ntoma Yoane azwaki emonaneli moko oyo emonisi ete bato oyo bakobika, bamosusu bakozwa bomoi na likoló, mpe bamosusu, awa na mabelé. Amonaki baponami kati na bayekoli ya sembo ya Yesu bafandi na bakiti ya bokonzi na likoló. Biblia elobi ete bato yango “basengeli koyangela mabelé.” (Emoniseli 5:9, 10) Tomoni ete ezali na makambo mibale na ndenge oyo mokano ya Nzambe ekokokisama: mabelé ekozonga paladiso mpe ekoyangelama na Bokonzi ya likoló oyo Yesu Klisto ná baponami bakotambwisa. Bibongiseli nyonso wana oyo Nzambe azwi ekokokisa mokano na ye ya kozongisa mabelé Paladiso.

Na libondeli ya “Tata wa biso,” Yesu ayebisaki bayekoli na ye bábondelaka mpo mokano ya Nzambe esalama “lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.” (Matai 6:9, 10) Maloba yango ekoki nde kozala na ntina soki mabelé ekolimwa to soki ezali kaka elilingi ya likoló? Lisusu, ekozala mpenza na ntina soki bayengebene nyonso bakokende na likoló? Banda na lisolo ya ebandeli ya mokili tii na bimonaneli oyo ezali na mokanda ya Emoniseli, Biblia emonisi polele ntina oyo Nzambe asalaki mabelé. Mabelé ekokóma paladiso, ndenge Nzambe alingaki. Yango ezali mokano ya Nzambe. Bato ya sembo babondelaka mpo mokano yango ekokisama.

Mokano ya Mozalisi, Nzambe oyo ‘abongwanaka te,’ ezalaki ete bato bázala na bomoi ya seko na mabelé. (Malaki 3:6; Yoane 17:3; Yakobo 1:17) Banda mbula koleka nkama moko, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elimbolaka ndenge oyo mokano ya Nzambe ekokokisama na likoló mpe awa na mabelé. Yango ezali kosalisa biso tókanga ntina ya bilaka ya Biblia oyo elobi ete mabelé ekokóma paladiso. Tozali kolendisa yo oluka koyeba likambo yango malamumalamu; mpo na yango, okoki kosolola na Batatoli ya Yehova to kokomela babimisi ya zulunalo oyo.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Atako Babiblia mingi ebongoli liloba ya Liebele ’eʹrets na “mokili” na esika ya “mabelé,” eloko moko te emonisi ete liloba ’eʹrets na Nzembo 37:11, 29 ezali kaka mokili oyo Nzambe apesaki ekólo Yisalaele. Buku moko (Old Testament Word Studies ya William Wilson) elobi ete liloba ’eʹrets ezali “mabelé na bandimbola na yango nyonso, ezala bisika oyo bato bafandi to bisika oyo bato bafandi te; soki basangisi yango na mwa maloba mosusu elimbolaka eteni ya mabelé, to mpe mokili to mboka.” Na bongo, ndimbola ya libosoliboso ya liloba wana ya Liebele ezali mabelé oyo bato bafandi.​—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, 1 Yanuali 1986, lokasa 31, ebimeli ya Lifalanse.

[Elilingi na lokasa 4]

Biblia elobi polele ete mabelé ekokóma Paladiso

[Elilingi na lokasa 7]

Libondeli ya “Tata wa biso” ekozala mpenza na ntina soki mabelé ekolimwa?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto