“Bosili koyoka nsango ya koyika mpiko ya Yobo”
“Bosili koyoka nsango ya koyika mpiko ya Yobo mpe bosili komona nsuka oyo Yehova abongisaki, ete Yehova azali na bolingo mingi ya motema mpe amonisaka motema mawa.”—YAKOBO 5:11.
1, 2. Mobali moko ná mwasi na ye bakutanaki na mpasi ya ndenge nini?
HARALD ABT akokisaki naino mbula mobimba te kobanda akómaki Motatoli ya Yehova ntango basoda ya Hitler bakɔtaki na engumba Danzig (lelo oyo Gdańsk) epai azalaki kofanda, na nɔrdi ya Pologne. Na nsima, bomoi ekómaki mpasi mpo na baklisto ya solo na engumba yango; bakómaki mpenza na likama. Basoda ya Gestapo (basirete ya Banazi) basɛngisaki Harald ete atya sinyatire na mokanda mpo na komonisa ete azali lisusu Motatoli ya Yehova te, kasi ye aboyaki. Mwa bapɔsɔ na nsima, batindaki ye na kaa ya bakangami ya Sachsenhausen; kuna, bazalaki mbala na mbala kobangisa ye mpe kobɛta ye. Mokonzi moko ya basoda alakisaki Harald mombonda oyo ezalaki likoló ya ndako oyo bazalaki kotumba bato mpe alobaki na ye ete: “Talá nzela okomatela epai ya Yehova na yo soki, nsima ya mikolo 14 otiki lingomba na yo te.”
2 Ntango bakangaki Harald, atikaki mwasi na ye Elsa ná mwana ya sanza zomi na mabɔkɔ. Basoda ya Gestapo batikaki Elsa kimya te. Mwa moke na nsima, babɔtɔlaki ye mwana mpe batindaki ye na kaa ya bakangami ya Auschwitz. Atako aumelaki kuna bambula ebele, abikaki; Harald mpe abikaki. Okoki kotánga lisolo na bango na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili 1980 (na Lifalanse). Harald akomaki boye: “Mpo na kondima na ngai, nalekisaki mbula 14 ya bomoi na ngai na bakaa ya bakangami mpe babolɔkɔ. Bato mosusu batunaki ngai soki mwasi na ngai asalisaki ngai mpo nayikela makambo nyonso wana mpiko. Ya solo, asalisaki ngai mpenza! Nayebaki banda ebandeli ete akoki kowangana Yehova te, mpe yango ezalaki kolendisa ngai. Nayebaki ete akondima kutu amona ngai nakufi na esika ayoka ete nabimi na bolɔkɔ mpo natiki Yehova. . . . Elsa anyokwamaki na boumeli ya bambula mingi na bakaa ya Banazi.”
3, 4. (a) Bandakisa ya banani ekoki kolendisa baklisto na ntango ya mpasi? (b) Mpo na nini Biblia ezali kolendisa biso tótalela ndakisa ya Yobo?
3 Ndenge Batatoli mingi bayebi yango, konyokwama ezalaka lisɛki te. Yango wana, Biblia epesi baklisto nyonso toli oyo: “Bókamata lokola ndakisa ya kokanga motema na kati ya mpasi mpe ya komonisa motema molai basakoli, oyo balobaki na nkombo ya Yehova.” (Yakobo 5:10) Basaleli mingi ya Nzambe banyokwamaki atako basalaki mabe moko te. ‘Lipata monene ya batatoli’ wana batiká ndakisa oyo ekoki kolendisa biso tókoba kopota mbangu na etingya.—Baebele 11:32-38; 12:1.
4 Yobo azali ndakisa monene ya bato oyo Biblia elobi ete bayikaki mpiko na monyoko. Yakobo akomaki boye: “Talá! Tolobaka ete baoyo basili koyika mpiko bazali bato ya esengo. Bosili koyoka nsango ya koyika mpiko ya Yobo mpe bosili komona nsuka oyo Yehova abongisaki, ete Yehova azali na bolingo mingi ya motema mpe amonisaka motema mawa.” (Yakobo 5:11) Lisolo ya Yobo ezali komonisa biso mwa moke lifuti oyo Yehova abombi mpo na bato ya sembo, oyo ye azali kopambola. Na koleka, lisolo yango ezali komonisa makambo oyo ekoki kosalisa biso soki tokutani na mpasi. Mokanda ya Yobo ezali kosalisa biso tózwa biyano na mituna oyo: Ntango tozali na mpasi, mpo na nini tosengeli kosala makasi tóbosana te ntembe monene oyo ebombami nsima ya mpasi yango? Bizaleli nini mpe elimo nini ekosalisa biso tóyika mpiko? Ndenge nini tokoki kolendisa baninga na biso baklisto oyo bazali na mpasi?
Tóyeba likambo mobimba
5. Wapi likambo ya ntina mingi oyo tosengeli kobosana te ntango tokutani na bampasi mpe komekama?
5 Mpo tótikala makasi na elimo ata ntango tozali na mpasi, tosengeli koyeba malamu likambo oyo ebimisi mpasi yango. Soki te, tokokanisa kaka mikakatano na biso mpe tokomona makambo na liso ya elimo te. Likambo eleki ntina ezali kotikala sembo epai ya Nzambe. Tata na biso ya likoló azali kosɛnga biso likambo oyo mokomoko na biso asengeli kotyela likebi: “Mwana na ngai, zalá na mayele mpe sepelisá motema na ngai, ete nazongisela ye monɔkɔ oyo akopamela [to kotumola] ngai.” (Masese 27:11) Ezali mpenza libaku monene! Atako tozali bato ya kozanga kokoka mpe tozali na bolɛmbu, tokoki kosepelisa Yehova, Mozalisi na biso. Tosepelisaka ye ntango bolingo na biso mpo na ye epesi biso nzela ya kolonga mikakatano mpe komekama. Bolingo ya solo eyikaka mpiko na makambo nyonso. Bolingo yango esilaka soki moke te.—1 Bakolinti 13:7, 8.
6. Ndenge nini Satana atumolaka Yehova, mpe ndenge nini asalaka yango?
6 Mokanda ya Yobo ezali komonisa polele ete Satana nde azali kotumola Yehova. Ezali mpe komonisa makanisi mabe ya monguna yango oyo azali ekelamu ya elimo, oyo azali na mposa ya kobebisa boyokani na biso na Nzambe. Ndenge tomoni yango na ndakisa ya Yobo, Satana alobaka ete basaleli nyonso ya Yehova basalelaka ye kaka mpo na litomba mpe alukaka komonisa ete bakoki kotika kolinga ye. Abandá mosala na ye wana eleki bankóto ya bambula. Ntango babenganaki Satana na likoló, mongongo moko eyokanaki kuna ebengaki ye “mofundi ya bandeko na biso” mpe elobaki ete afundaka bango “butu moi liboso ya Nzambe na biso.” (Emoniseli 12:10) Soki toyiki mpiko, tokomonisa ete afundaka biso na lokuta.
7. Ndenge nini tokoki kolonga bolɛmbu ya nzoto?
7 Tosengeli kobosana te ete Zabolo alukaka kosalela monyoko nyonso oyo tokutani na yango lokola libaku mpo na kokabola biso na Yehova. Ntango nini amekaki Yesu? Ezalaki na ntango oyo Yesu azalaki na nzala, nsima ya komipimela kolya mikolo ebele! (Luka 4:1-3) Kasi, lokola Yesu azalaki makasi na elimo, alongaki masɛnginya ya Zabolo. Esengeli mpenza tózala makasi na elimo mpo tólonga bolɛmbu nyonso ya nzoto, oyo mbala mosusu euti na maladi to bobange! Atako “bomoto na biso ya libándá ezali kobeba,” tozali kozonga nsima te mpamba te “bomoto na biso ya kati ezali kokómisama ya sika mokolo na mokolo.”—2 Bakolinti 4:16.
8. (a) Ndenge nini mitungisi ekoki kobebisa elimo na biso? (b) Elimo nini Yesu azalaki na yango?
8 Longola yango, mitungisi ekoki mpe kolɛmbisa biso na elimo. Tokoki kobanda komituna ete, ‘Mpo na nini Yehova atiki likambo ya boye?’ Moto mosusu, oyo ndeko moko asali ye mabe akoki kobanda kokanisa ete, ‘Ndenge nini ndeko na ngai moko akoki kosala ngai boye?’ Makanisi ya ndenge yango ekoki kotinda biso tóbosana makambo ya ntina mpe tótalela kaka mikakatano na biso. Nkanda oyo baninga misato ya Yobo bayokisaki ye etungisaki ye mingi na makanisi se ndenge maladi etungisaki ye na nzoto. (Yobo 16:20; 19:2) Ndenge moko mpe, ntoma Paulo alobaki ete ‘tokoki kotikela Zabolo esika [to nzela]’ soki tozali koumela na nkanda. (Baefese 4:26, 27) Na esika moklisto ayokela bato nkanda to akanisaka kaka likambo ya mabe oyo basali ye, ekoleka malamu alanda ndakisa ya Yesu, elingi koloba ‘amitika na mabɔkɔ ya moto oyo asambisaka na boyengebene,’ Yehova Nzambe. (1 Petelo 2:21-23) Soki tozali na “elimo” lokola ya Yesu, ekosalisa biso tólonga matumoli ya Satana.—1 Petelo 4:1.
9. Elikya nini Nzambe apesi biso mpo na kilo nyonso oyo tokoki komema to komekama nyonso oyo tokoki kokutana na yango?
9 Longola nyonso wana, ntango tokutani na mikakatano, tosengeli te kokanisa ete ekómeli biso bongo mpo Nzambe azali kosepela na biso te. Makanisi ya ndenge wana etungisaki Yobo na ntango oyo babɔndisi na ye ya lokuta bazalaki kobɛta ye na maloba. (Yobo 19:21, 22) Biblia elobi na biso ete: “Nzambe akoki komekama na makambo ya mabe te mpe ye moko akoki te komeka moto na yango.” (Yakobo 1:13) Kutu, Yehova alaki biso ete akosalisa biso tómema ata kilo nini oyo tozali na yango mpe akobatela biso ata liboso ya mokakatano nini oyo ekómeli biso. (Nzembo 55:22; 1 Bakolinti 10:13) Soki na ntango ya mpasi tozali kopusana penepene ya Nzambe, tokotalela makambo na ndenge oyo ebongi mpe tokotɛmɛla Zabolo.—Yakobo 4:7, 8.
Makambo oyo ekosalisa biso tóyika mpiko
10, 11. (a) Nini esalisaki Yobo ayika mpiko? (b) Ndenge nini lisosoli malamu esalisaki Yobo?
10 Atako Yobo akutanaki na mikakatano—mpo na maloba mabe ya “babɔndisi” na ye mpe makanisi na ye moko—atikalaki sembo. Liteya nini tokoki kozwa na ezaleli na ye ya koyika mpiko? Na ntembe te soki Yobo alongaki, ezali mpo azalaki sembo epai ya Yehova. Yobo ‘azalaki kotosa Nzambe mpe koboya mabe.’ (Yobo 1:1) Yango nde ezalaki bomoto na ye. Yobo aboyaki kopesa Yehova mokɔngɔ, atako ayebaki te ntina oyo makambo na ye nyonso ebebaki. Yobo ayebaki ete asengeli kosalela Nzambe na ntango ya mpasi mpe na ntango ya bisengo.—Yobo 1:21; 2:10.
11 Lisosoli malamu mpe ebɔndisaki Yobo. Ata na ntango oyo emonanaki lokola nde bomoi na ye ekómi na nsuka, azalaki motema mpiɔ mpo ayebaki ete asalaki nyonso oyo akokaki mpo na kosalisa basusu, abatelaki mibeko ya Yehova, mpe aboyaki losambo ya lokuta ya ndenge nyonso.—Yobo 31:4-11.
12. Ndenge nini Yobo atalelaki toli oyo Elihu apesaki ye?
12 Atako bongo, Yobo asengelaki kosembola makanisi na ye na makambo mosusu. Azalaki na komikitisa mpe andimaki lisalisi na likambo wana; yango mpe esalisaki ye alonga. Yobo ayokaki Elihu na limemya nyonso, mpe andimaki mpamela ya Yehova. Alobaki ete: “Nabimisi makambo mayebi ngai ntina te. . . . Namityoli mpe nabongoli motema na mputulu mpe na mputulu ya mɔtɔ.” (Yobo 42:3, 6) Atako Yobo azalaki naino kotungisama na maladi, asepelaki mpamba te ndenge makanisi na ye esembolamaki esalisaki ye apusana lisusu penepene na Nzambe. Yobo alobaki boye: “Nayebi ete yo [Yehova] okoki kosala makambo nyonso.” (Yobo 42:2) Lokola Yehova amonisaki ye bonene na Ye, miso ya Yobo efungwamaki mpe amonaki ete azali mpamba liboso ya Mozalisi.
13. Kolimbisa ememelaki Yobo matomba nini?
13 Longola yango, Yobo apesaki ndakisa malamu ya motema ya kolimbisa. Babɔndisi na ye wana ya lokuta bapesaki ye mpasi mingi, kasi ntango Yehova asɛngaki ye abondela mpo na bango, Yobo aboyaki te. Na nsima, Yehova abikisaki Yobo mpe maladi na ye esilaki. (Yobo 42:8, 10) Nyonso wana emonisi polele ete kobomba nkanda ekoki kosalisa biso te na koyika mpiko, nzokande bolingo mpe bolimbisi ekosalisa biso. Soki tozali kobomba nkanda te, tokolendisama na elimo, mpe yango nde ezaleli oyo Yehova apambolaka.—Malako 11:25.
Bapesi-toli oyo basalisaka biso tóyika mpiko
14, 15. (a) Bizaleli nini ekoki kosalisa mopesi-toli alendisa bato mosusu? (b) Mpo na nini Elihu alongaki kosalisa Yobo?
14 Lisolo ya Yobo ezali mpe komonisa biso motuya ya bapesi-toli ya malamu. Bato ya ndenge wana bazali bandeko oyo ‘babotami mpo na ntango ya mpasi.’ (Masese 17:17) Kasi, ndenge lisolo ya Yobo emonisi yango, bapesi-toli mosusu bakoki konyokola biso na esika bábɔndisa biso. Mopesi-toli ya malamu asengeli kozala na motema mawa, na limemya, mpe na boboto lokola Elihu. Esɛngaka mbala mosusu bankulutu mpe bandeko mosusu oyo bakɔmeli básalisa bandeko oyo bazali na mikakatano mpo bákóma na makanisi oyo ebongi, mpe na likambo yango, bapesi-toli wana bakoki kozwa liteya monene na mokanda ya Yobo.—Bagalatia 6:1; Baebele 12:12, 13.
15 Tokoki kozwa mateya mingi ya malamu mpenza na likambo oyo Elihu asalaki. Afandaki naino nyɛɛ mpe ayokaki na motema molai baninga misato ya Yobo liboso asembola makanisi na bango. (Yobo 32:11; Masese 18:13) Elihu asololaki na Yobo ndenge moto asololaka na moninga. (Yobo 33:1) Elihu asalaki te lokola babɔndisi misato ya lokuta; ye amimonaki te ete aleki Yobo. Alobaki boye: “Ngai mpe natongamaki na ndambo ya mabelé.” Alingaki te kobimisa maloba oyo ekobakisela Yobo mpasi. (Yobo 33:6, 7; Masese 12:18) Na esika akanisela Yobo ete mbala mosusu atambolaki malamu te, Elihu apesaki ye longonya mpo na bosembo na ye. (Yobo 33:32) Likambo eleki ntina, Elihu atalelaki makambo ndenge Nzambe atalelaka yango, mpe asalisaki Yobo abosana te ete Yehova akoki kosala likambo moko te oyo ezangi sembo. (Yobo 34:10-12) Elihu alendisaki Yobo atalela Yehova na esika aluka komimonisa ete azali sembo. (Yobo 35:2; 37:14, 23) Makambo nyonso wana ekoki mpenza koteya bankulutu mpe bandeko mosusu.
16. Ndenge nini Satana asalelaki babɔndisi mabe ya Yobo?
16 Toli ya malamu mingi oyo Elihu apesaki ekeseni mpenza na maloba ya kozokisa ya Elifaza, Biledada, ná Sofala. Yehova alobaki na bango ete: “Bolobi likambo ya sembo mpo na ngai te.” (Yobo 42:7) Atako bakanisaki ete bazali na makanisi ya malamu, na esika bázala baninga ya malamu, Satana asalelaki bango. Banda ebandeli tii na nsuka, bango misato bazalaki kaka komonisa ete Yobo azalaki konyokwama mpo na masumu oyo asalaki. (Yobo 4:7, 8; 8:6; 20:22, 29) Elifaza alobaki ete Nzambe atyelaka basaleli na ye motema te mpe, bázala sembo to te, yango etali ye te. (Yobo 15:15; 22:2, 3) Kutu, akoselaki Yobo makambo. (Yobo 22:5, 9) Nzokande, Elihu alendisaki mpenza Yobo, mokano oyo mopesi-toli ya malamu azalaka na yango.
17. Likambo nini tosengeli kobosana te ntango tozali na mpasi?
17 Ezali mpe na liteya mosusu oyo tokoki kozwa na mokanda ya Yobo na likambo etali koyika mpiko. Tata na biso ya bolingo azali komona biso mpe azali na mposa mpe na makoki ya kosalisa biso na mitindo ndenge na ndenge. Na ebandeli, tolobelaki lisolo ya Elsa Abt. Yoká makanisi na ye: “Liboso bákanga ngai, natángaki mokanda ya ndeko mwasi moko oyo elobaki ete ntango tokutani na mpasi makasi, elimo ya Yehova epesaka biso kimya. Nakanisaki ete alekisaki ndelo. Kasi, ntango ngai moko nakutanaki na mpasi, namonaki ete alobaki solo. Ezalaka mpenza ndenge wana. Ezali mwa mpasi moto andima yango soki naino ekómeli ye te. Kasi, ekómelaki ngai mpenza. Yehova asalisaka biso mpenza.” Elsa azalaki kolobela te makambo oyo Yehova akoki kosala to oyo asalaki na ntango ya Yobo. Azalaki kolobela mikolo na biso. Ya solo, “Yehova asalisaka biso mpenza”!
Esengo na moto oyo azali koyika mpiko
18. Matomba nini Yobo azwaki mpo na ezaleli na ye ya koyika mpiko?
18 Mingi te kati na biso bakonyokwama makasi na ndenge oyo Yobo anyokwamaki. Kasi, ezala tokutani na mpasi ya ndenge nini na mokili oyo, tosengeli kotikala sembo lokola Yobo. Kutu, koyika mpiko ememelaki Yobo matomba. Ebongisaki bomoto na ye. (Yakobo 1:2-4) Elendisaki boyokani na ye na Nzambe. Yobo alobaki boye: “Nayokaka yo na nsango, kasi sikoyo miso na ngai emoni yo mpenza.” (Yobo 42:5, NW) Emonanaki polele ete Satana azali mobuki-lokuta mpamba te Yobo atikalaki sembo. Bambula mingi na nsima, Yehova atángaki mosaleli na ye Yobo ete azali ndakisa ya moto ya sembo. (Ezekiele 14:14) Bosembo na ye mpe ezaleli na ye ya koyika mpiko elendisaka basaleli ya Nzambe tii lelo oyo.
19. Mpo na nini tokanisi ete koyika mpiko ezali na ntina?
19 Ntango Yakobo akomelaki baklisto ya ekeke ya liboso na ntina etali koyika mpiko, alobelaki esengo oyo ezaleli yango ememaka. Atángaki mpe ndakisa ya Yobo mpo na komonisa ete Yehova apesaka basaleli na ye ya sembo mbano monene. (Yakobo 5:11) Na Yobo 42:12 tozali kotánga boye: “[Yehova] apambolaki mikolo ya nsuka ya Yobo koleka yango na ebandeli na ye.” Nzambe apesaki Yobo mbala mibale biloko oyo abungisaki, akómaki na bomoi ya esengo mpe aumelaki mingi. (Yobo 42:16, 17) Biso mpe, ata soki tokokutana na mpasi to monyoko ya ndenge nini na mikolo oyo ya nsuka, tóyeba ete ekolongolama mpe tokobosana yango na mokili ya sika oyo Nzambe alaki. (Yisaya 65:17; Emoniseli 21:4) Toyoki nsango ya ezaleli ya koyika mpiko ya Yobo, mpe tozali na ekateli ete, na lisalisi ya Yehova, tokomekola ndakisa na ye. Biblia elaki boye: “Esengo na moto oyo azali kokoba koyika mpiko na komekama, mpamba te na kokómáká moto oyo andimami akozwa motole ya bomoi, oyo Yehova alakaki na baoyo bazali kokoba kolinga ye.”—Yakobo 1:12.
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini tokoki kosepelisa motema ya Yehova?
• Mpo na nini soki tozali na mikakatano, tosengeli te kokanisaka ete Yehova azali kosepela na biso te?
• Makambo nini esalisaki Yobo ayika mpiko?
• Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Elihu na oyo etali kolendisa bandeko na biso?
[Elilingi na lokasa 28]
Mopesi-toli ya malamu azalaka na motema mawa, na limemya, mpe na boboto
[Bililingi na lokasa 29]
Elsa ná mobali na ye Harald Abt