Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/9 nk. 17-21
  • Ntango ndeko moko na libota atiki Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntango ndeko moko na libota atiki Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini ezalaka mpasi
  • Osengeli kosala nini?
  • Ntango moto oyo olingaka atiki kosalela Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Baboti—Bósalisa bana na bino bálinga Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Lolenge ya kozala na libota oyo ezali makasi na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Ndenge nini bokoki kosalisa mwana “ya kilikili”?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/9 nk. 17-21

Ntango ndeko moko na libota atiki Yehova

MARK ná Louise bazali Batatoli ya Yehova.a Na bolingo nyonso, bateyaki bana na bango Makomami ndenge Biblia ezali kosɛnga na baboti baklisto. (Masese 22:6; 2 Timote 3:15) Likambo ya mawa, ntango bana na bango bakolaki, bakobaki kosalela Yehova bango nyonso te. Louise alobi boye: “Nayokaka motema mpasi mpo na bana oyo babungá nzela. Ya solo, likambo yango etungisaka ngai mpenza mokolo na mokolo! Ntango baninga bazali kolobela bana na bango, epesaka ngai motema mpasi mpe etikalaka kaka moke nalela.”

Ya solo, ntango moto moko atiki Yehova mpe bomoi oyo eyokani na Makomami, bandeko na ye oyo batikali sembo bayokaka mpasi mingi. Irene alobi boye: “Nalingaka yaya na ngai mingi mpe nakosala nyonso mpo azongela Yehova.” Maria, oyo ndeko na ye atiká Yehova alobi boye: “Epesaki ngai mpasi mingi mpamba te, azalaki ndeko moko malamu mpo na ngai. Nayokaka mpasi mingi lokola azalaka lisusu elongo na biso te ntango tokutanaka libota mobimba.”

Mpo na nini ezalaka mpasi

Mpo na nini bandeko ya libota bayokaka mpasi mingi soki mwana to ndeko atiki Yehova? Mpamba te, bayebi ete Biblia elaki bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé mpo na bato oyo bakotikala sembo epai ya Yehova. (Nzembo 37:29; 2 Petelo 3:13; Emoniseli 21:3-5) Mposa na bango ezalaka bázwa mapamboli yango elongo na balongani na bango, bana, baboti, bandeko mpe bankɔkɔ na bango. Bayokaka mpenza mpasi, ntango bakanisaka ete bandeko na bango oyo batiki Yehova bakoki kozanga mapamboli yango! Baklisto bayebaka ete mibeko ya Yehova ezali mpo na bolamu na bango ata lelo oyo. Na yango, baklisto bayokaka mpenza mpasi komona ete bandeko na bango baponi nzela oyo ekomemela bango matomba ya mabe.​—Yisaya 48:17, 18; Bagalatia 6:7, 8.

Bato oyo bakutaná naino na likambo yango te, bakoki koyeba te ndenge mpasi yango ezalaka. Epesaka mpenza mpasi. Louise alobi boye: “Komona ndenge baboti mosusu bazali kosɛka mpe kosolola na bana na bango na makita epesaka ngai mpasi. Na bokutani nyonso ya kominanola, ngai nazalaka nde na mawa mpo na bana na ngai oyo bazalaka te.” Nkulutu moko akanisaka lisusu ndenge mwana oyo mwasi na ye abotaki liboso bábalana atikaki lisangá mbula minei. Alobi boye: “Mbala mingi, ata ‘bantango ya esengo’ ezalaki mpasi. Soki napesi mwasi na ngai kado moko to tokei kolekisa wikende na esika moko ya kitoko, azalaki kolela soki akanisi ete mwana yango azali te elongo na biso.”

Bandeko wana balekisaka nde ndelo? Te. Kutu, bamonisaka nde bizaleli ya Yehova, oyo moto asalamá na elilingi na ye. (Genese 1:26, 27) Yango elimboli nini? Yehova ayokaki ndenge nini ntango libota na ye Yisalaele batombokelaki ye? Nzembo 78:⁠38-⁠41 emonisi ete Yehova ayokaki mpasi mpenza. Atako bongo, amonisaki motema molai mpe azalaki kokebisa, kopamela mpe kolimbisa bango ntango bazalaki kobongola motema. Emonani ete Yehova alingaka bikelamu na ye mingi, ‘mosala ya mabɔkɔ na ye,’ mpe akokaka te kotika bango. (Yobo 14:15; Yona 4:10, 11) Apesá bato mpe likoki ya komonisa bolingo wana, oyo ezalaka lisusu makasi koleka na kati ya libota. Yango wana, tokoki kokamwa te soki bato bayokaka mpasi ntango ndeko moko ya libota atiki Yehova.

Ya solo, kozala na ndeko oyo atiká Yehova na libota ezalaka likambo ya mpasi mpenza mpo na basambeli ya solo. (Misala 14:22) Yesu alobaki ete nsango malamu ekobimisa bokabwani na mabota mosusu. (Matai 10:34-38) Ezali te ete nsango malamu yango moko ekabolaka mabota. Kasi, bandeko ya libota oyo bazali baklisto te to batiki Yehova nde batyaka bokabwani ntango baboyaka, basundolaka to batɛmɛlaka nzela ya ya solo. Kasi, tosengeli kozala na botɔndi ete Yehova asalisaka basaleli na ye ya sembo bálonga mikakatano oyo bazali kokutana na yango. Soki ozali koyoka mpasi mpo ndeko moko ya libota na yo atiká Yehova, mitinda nini ya Biblia ekoki kosalisa yo oyika mpiko mpe ozala na esengo?

Osengeli kosala nini?

“Na komitongáká bino moko . . . , bómibatela na kati ya bolingo ya Nzambe.” (Yuda 20, 21) Na kotalela bomoi na yo, mbala mosusu okoki kosala eloko te sikoyo mpo na kosunga ndeko ya libota oyo atiki Yehova. Kasi, osengeli kosala makasi mpo yo moko mpe bato mosusu na libota na yo bózala makasi na elimo. Veronica, oyo bana na ye mibale batiki solo, alobi boye: “Bapesaki ngai ná mobali na ngai toli ete soki totikali makasi na elimo, tokosalisa bana na biso bázonga na lisangá ntango bakokóma na kosuka ndenge nini soki tata na ye aboyaki koyamba ye?”

Mpo ozala makasi, mipesá na misala ya elimo. Yango ekosɛnga, kozala na programɛ ya koyekola Biblia na mozindo mpe koyangana na makita. Soki likoki ezali, mipesá mpo na kosunga basusu kati na lisangá. Na ntembe te, misala yango ekoki kozala mpasi na ebandeli. Veronica alobi boye: “Likanisi oyo eyelaki ngai liboso ezali ya komitangwa na bato mosusu lokola nyama oyo ezoki. Kasi, mobali na ngai azalaki kosala nyonso mpo tókoba komipesa na makambo ya elimo. Azalaki kosala nyonso mpo tózangisa makita te. Na liyangani moko, esɛngaki mpenza mpiko mpo nakende mpamba te nazalaki kobanga kokutana na bato. Kasi, liyangani wana esalisaki biso tópusana penepene na Yehova. Liyangani yango elendisaki mpenza mwana na biso oyo atikalaki sembo.”

Maria oyo tolobeli na ebandeli, amonaki malamu amipesa na mosala ya kosakola mpe lelo oyo, azali koyekola Biblia na bato minei. Laura mpe alobi: “Atako nalelaka mokolo na mokolo, natɔndaka Yehova mpo atako nalongi te kobɔkɔla bana lokola baboti mosusu, nayebi nsango ya Biblia oyo ekoki kosalisa mabota na mikolo oyo ya nsuka.” Ken ná Eleanor oyo bana na bango ya mikoló babimisama na lisangá, bakendaki epai mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali monene mpo na kosala mosala ya ntango nyonso. Yango esalisaki bango bátelala makambo na ndenge ya malamu mpe bátika komitungisa.

Kobwaka elikya te. Bolingo “elikyaka makambo nyonso.” (1 Bakolinti 13:7) Ken oyo tolobeli, alobi boye: “Ntango bana na biso batikaki solo, namonaki lokola bakufi. Kasi ntango ndeko na ngai ya mwasi akufaki, makanisi na ngai ebongwanaki. Nazali na botɔndi mpo bana na ngai bakufi liwa ya nzoto te mpe ete Yehova atikeli bango nzela polele mpo bázongela ye.” Tomonaka ndenge bato oyo batikaki solo, bazongaka.​—Luka 15:11-24.

Komona te ete omemi ngambo. Baboti bakoki kobanda kokanisa mpe komipesa foti mpo bakokisaki mikumba mosusu malamu te. Kasi, Ezekiele 18:20 emonisi ete moto oyo asali lisumu nde azali na ngambo na miso ya Yehova mpo na mabe na ye, kasi baboti na ye te. Tósimba ete atako Mokanda ya Masese elobeli na mozindo mikumba oyo baboti bazali na yango ya kobɔkɔla bana na bango na nzela ya sembo, koleka mbala minei mokanda yango epesi bilenge toli ete báyokela baboti na bango mpe bátosa bango. Ɛɛ, bana bazali na mokumba ya kolanda mateya ya Biblia oyo baboti na bango bazali kopesa, atako bazali bato ya kozanga kokoka. Na ntembe te, na ntango wana osalaki oyo okokaki. Kasi, ata soki omoni ete osalaki mwa mabunga, koloba mbala moko te ete yango nde esalaki ete mwana na yo atika solo. Ata ndenge nini, ntina ya komilelalela ezali te. Zwá nde liteya na mabunga oyo osalaki, mpe zwá ekateli ya kozongela yango lisusu te mpe sɛngá Yehova bolimbisi. (Nzembo 103:8-14; Yisaya 55:7) Na nsima, talelá makambo oyo ezali liboso, kasi oyo eleká te.

Zaláká motema molai. Ekoki kozala mpasi mpo bato mosusu bálendisa to bábɔndisa yo, mingimingi soki likambo yango ekómelá bango naino te. Lisusu, moto na moto azalaka na ndenge oyo atalelaka makambo oyo ekoki kolendisa to kobɔndisa. Soki moto alobi na yo makambo oyo epesi yo mpasi, salelá toli ya ntoma Paulo oyo ezali na Bakolose 3:13, oyo elobi: “Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu.”

Tómonaka mabe te soki ndeko na biso azwi disipilini. Soki ndeko na yo azwi disipilini na lisangá, kobosana te ete ezali ebongiseli ya Yehova mpe ezali mpo na bolamu ya bato nyonso, ná moto oyo asali mabe. (Baebele 12:11) Na yango, koloba mabe te mpo na bankulutu oyo batalelaki likambo yango to mpo na bikateli oyo bazwaki. Yebá ete kosala makambo ndenge Yehova alingaka epesaka matomba ya malamu, kasi kotɛmɛla bibongiseli na ye ekoki se kobakisa mpasi.

Nsima ya kobima ya Yisalaele na Ezipito, Moize azalaki ntango nyonso mosambisi. (Exode 18:13-16) Lokola lisambisi esɛngaka kaka moto moko alonga mpe mosusu akwea, tosengeli kokanisa ete bato mosusu bazalaki kosepela te na bikateli ya Moize. Ekoki kozala ete koimaima na ntina na bikateli ya Moize nde esalaki ete bato mosusu bákóma kotɛmɛla bokonzi na ye. Nzokande, Yehova azalaki kosalela Moize mpo atambwisa basaleli na ye mpe apesaki batɔmbɔki mpe mabota na bango oyo bandimelaki bango etumbu, kasi Moize te. (Mituya 16:31-35) Tokokwea te na motambo oyo bango bakweaki na yango soki tozali kosala makasi mpo tótosaka bikateli ya bato oyo bazali kokamba ebongiseli ya Yehova lelo oyo.

Delores azali lisusu kokanisa ete ezalaki mpasi mpo na ye kondima mpamela oyo lisangá epesaki mwana na ye. Alobi boye: “Eloko esalisaki ngai ezali kotánga mbala na mbala masolo oyo elobeli ndenge oyo tosengeli kotalelaka mpamela oyo bapesi ndeko na biso. Nasalaki karnɛ mpo na kokoma makambo ya ntina ya masukulu mpe masolo oyo ekoki kosalisa ngai nayika mpiko mpe nakoba kosalela Yehova.” Tótalela likambo mosusu ya ntina oyo tosengeli kosala.

Yebisáká makanisi na yo. Ekozala malamu koyebisa baninga na yo ya motema makambo oyo ezali kotungisa yo. Luká mpenza baninga oyo bakosalisa yo. Ekoleka malamu ‘ofungwela Yehova motema na yo’ na libondeli.b (Nzembo 62:7, 8, NW) Mpo na nini? Mpamba te, ayebi malamu ndenge ozali koyoka. Na ndakisa, okoki mbala mosusu komona ete obongi te na bampasi wana. Atako bongo, otiki Yehova te. Yebisá Yehova mpasi na yo mpe sɛngá ye asalisa yo otalela makambo na ndenge ebongi.​—Nzembo 37:5.

Mokemoke, makanisi na yo ekoki kobonga. Na yango, kobá kosala milende mpo osepelisa Tata na yo ya likoló mpe komona te ete milende yango ezali mpamba. (Bagalatia 6:9) Yebá ete ata soki totiki Yehova, mikakatano ekosila te. Kasi, soki totikali sembo epai na ye, akosalisa biso na mikakatano na biso. Na yango, yebá ete Yehova ayebi malamu makambo oyo ozali kokutana na yango mpe akokoba kopesa yo makasi na ntango ebongi.​—2 Bakolinti 4:7; Bafilipi 4:13; Baebele 4:16.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Topesi bango bankombo mosusu.

b Na oyo etali kobondela mpo na ndeko moko na libota oyo abimisami na lisangá, Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛmbɛ 2001, nkasa 30-31.

[Etanda na lokasa 19]

Oyo osengeli kosala

◆“Na komitongáká bino moko . . . , bómibatela na kati ya bolingo ya Nzambe.”​—Yuda 20, 21.

◆Kobwaka elikya te.​—1 Bakolinti 13:7.

◆Komona te ete omemi ngambo.​—Ezekiele 18:20.

◆Zaláká motema molai.​—Bakolose 3:13.

◆Tómonaka mabe te soki ndeko na biso azwi disipilini.​—Baebele 12:11.

◆Yebisáká makanisi na yo.​—Nzembo 62:7, 8.

[Etanda/Elilingi na lokasa 21]

Otiká Yehova?

Soki ezali bongo, ezala mpo na ntina boye to boye, boyokani na yo ná Yehova mpe bomoi na yo ezali na likama. Mbala mosusu olingi kozongela Yehova. Ozali kosala milende mpo na yango? Ozali nde kozila “ntango oyo ebongi” mpo na yo? Yebá ete Armagedona ekómi pene. Lisusu, bomoi lelo ezali mokuse mpe toyebaka te soki bomoi lobi ekozala ndenge nini. Oyebi te soki okotanela ntɔngɔ. (Nzembo 102:3; Yakobo 4:13, 14) Moto moko oyo bazwaki ye na maladi oyo akokaki kobika na yango te, alobi boye: “Nazwaki maladi wana ntango nazalaki na mosala ya ntango nyonso, kasi nazalaki na likambo ya komitungisa te. Mpe yango ezali kosala ete namitungisaka te.” Kasi, kanisá naino ndenge moto yango alingaki koyoka soki azwaki maladi wana ntango azali koloba: “Mokolo mosusu, nakozongela Yehova!” Soki otiká Yehova, ntango yango oyo ya kozongela ye.

[Bililingi na lokasa 18]

Komipesa na makambo ya elimo ekoki kosalisa yo ozala na makanisi malamu

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto