Ndenge ya kopusana penepene na ye oyo ‘ayokaka mabondeli’
“Yo okoyokaka mabondeli; bato nyonso bakoya epai na yo.”—NZEMBO 65:2.
1. Nini ekesenisi biso ná bikelamu mosusu awa na mabelé mpe yango epesi biso libaku nini?
NA KATI ya bankóto ya bikelamu oyo ezali awa na mabelé, kaka bato nde bazali na likoki ya kosambela Mozalisi. Kaka bato nde bazalaka na mposa ya kosambela mpe balukaka kokokisa yango. Yango epesi biso libaku malamu mpenza ya kozala na boyokani na Tata na biso ya likoló.
2. Likambo nini lisumu ememaki na boyokani ya moto ná Mozalisi na ye?
2 Nzambe akelá moto na likoki ya kopusana penepene na Mozalisi na ye. Adama ná Eva bakelamaki na lisumu te. Na yango, bakokaki kopusana penepene na Nzambe kozanga kobanga ndenge bana basalaka epai ya tata na bango. Nzokande, lisumu elongolaki libaku wana. Adama ná Eva baboyaki kotosa Nzambe mpe babungisaki boyokani na ye. (Genese 3:8-13, 17-24) Yango elingi nde koloba ete bana ya Adama, bato ya kozanga kokoka, bakokaki lisusu kosolola na Nzambe te? Te, Yehova azali kaka kopesa bango nzela ya kopusana penepene na ye, kasi kaka soki bakokisi masɛngami. Masɛngami yango ezali nini?
Masɛngami mpo na kopusana penepene na Nzambe
3. Ndenge nini bato ya masumu basengeli kopusana penepene na Nzambe, mpe ndakisa nini emonisi yango?
3 Likambo moko oyo esalemaki epai ya bana mibale ya Adama ezali kosalisa biso tóyeba oyo Nzambe azali kosɛnga epai ya bato ya kozanga kokoka oyo balingi kopusana penepene na ye. Kaina ná Abele balukaki kopusana penepene na Nzambe na nzela ya bambeka. Nzambe andimaki mbeka ya Abele mpe aboyaki oyo ya Kaina. (Genese 4:3-5) Mpo na nini? Baebele 11:4 elobi ete: “Na kondima Abele apesaki Nzambe mbeka ya motuya monene koleka oyo ya Kaina, kondima oyo na nzela na yango litatoli epesamaki mpo na ye ete azalaki moyengebene.” Emonani polele ete kondima ezali lisɛngami ya ntina mingi mpo na kopusana penepene na Nzambe. Lisɛngami mosusu emonani na maloba oyo Yehova alobaki na Kaina: “Soki osali malamu okondimama te?” Na ntembe te, Nzambe akokaki kondima Kaina soki asalaki malamu. Kasi, ye ayokaki toli ya Nzambe te, abomaki Abele mpe nsukansuka akómaki koyengayenga. Banda kaka na ebandeli, Nzambe amonisaki ete kondima mpe misala malamu ezali na ntina mpo na kopusana penepene na ye.
4. Likambo nini tosengeli kondima mpo na kopusana penepene na Nzambe?
4 Kondima ete tozali basumuki ezali na ntina soki tolingi kopusana penepene na Nzambe. Bato nyonso bazali basumuki, mpe lisumu epekisaka moto kopusana penepene na Nzambe. Mosakoli Yilimia akomaki mpo na Bayisalaele boye: “Topɛngwi . . . Omizipi na lipata kino malɔmbɔ ekoleka te.” (Bileli 3:42, 44) Atako bongo, Nzambe asili komonisa ete andimaka mabondeli ya baoyo bazalaki kopusana penepene na ye na kondima mpe na motema ya malamu, mpe bazalaki kotosa mibeko na ye. (Nzembo 119:145) Bato yango ezali banani, mpe liteya nini tokoki kozwa na mabondeli na bango?
5, 6. Liteya nini tokoki kozwa epai ya Abalayama?
5 Moko ya bato yango ezali Abalayama. Nzambe andimaki Abalayama, mpamba te abengaki ye “moninga na ngai.” (Yisaya 41:8) Liteya nini tokoki kozwa epai ya Abalayama? Abalayama atunaki Yehova boye: “Okopesa ngai nini? Mpo ete nakokufa wana ezangi ngai mwana?” (Genese 15:2, 3; 17:18) Mokolo mosusu, amitungisaki mingi mpo na koyeba soki nani akobika ntango Nzambe akoboma Sodoma ná Gomola. (Genese 18:23-33) Abalayama azalaki mpe kobondela mpo na bato mosusu. (Genese 20:7, 17) Lokola Abele, Abalayama azalaki ntango mosusu kopesa Yehova mbeka.—Genese 22:9-14.
6 Na mabaku nyonso wana, Abalayama azalaki kobanga te kosolola na Yehova. Atako azalaki kobanga te kosolola na Yehova, Abalayama ayebaki ete azali kaka eloko mpamba liboso ya Mozalisi na ye. Yoká ndenge alobi na komikitisa nyonso na Genese 18:27 (Bible na lingala ya lelo oyo): “Nkolo, limbisa ngai po náloba na yo, atako nazali bobele mabelé pamba.” Oyo nde ndakisa kitoko!
7. Makambo nini basaleli ya Yehova ya sembo ya kala bazalaki koyebisa ye na mabondeli?
7 Bato ya sembo ya ntango ya kala babondelaki Yehova mpo na makambo ndenge na ndenge, mpe ayokaki bango. Yakobo asalaki libondeli oyo ezalaki lokola ndai. Nsima ya kosɛnga Nzambe asalisa ye, apesaki elaka oyo: “Nakopesa yo ndambo moko ya zomi kati na biloko nyonso bikopesa yo ngai.” (Genese 28:20-22) Na nsima, ntango Yakobo alingaki kokutana na ndeko na ye Esau, abondelaki Yehova ete abatela ye. Alobaki ete: “Nabondeli yo ete obikisa ngai na mabɔkɔ ya ndeko na ngai, na mabɔkɔ ya Esau mpo ete nabangi ye.” (Genese 32:9-12) Yobo, moto ya sembo abondelaki Yehova mpo na libota na ye mpe apesaki bambeka mpo na bango. Ntango baninga misato ya Yobo basumukaki na maloba na bango, Yobo abondelaki Yehova mpo na bango; “[Yehova] mpe andimaki Yobo.” (Yobo 1:5; 42:7-9) Masolo oyo esalisi biso tóyeba makambo nini tokoki koyebisa Yehova na libondeli. Tomoni mpe ete Yehova andimaka mabondeli ya baoyo bapusanaka penepene na ye na ndenge ebongi.
Na ntango ya mibeko ya Moize
8. Na ntango ya Mibeko ya Moize, ndenge nini makambo ya bato ezalaki koyebisama epai ya Yehova?
8 Nsima ya kosikola ekólo ya Yisalaele na Ezipito, Yehova asalaki na bango kondimana ya Mibeko. Mibeko ezalaki kosɛnga ete bato bápusanaka penepene na Nzambe na nzela ya banganga-Nzambe. Balevi mosusu bazalaki na mokumba ya kosala lokola banganga-nzambe mpo na bato. Ntango makambo oyo etali ekólo mobimba ezalaki kobima, momonisi ya bato, ntango mosusu mokonzi to mosakoli azalaki koyebisa Nzambe likambo yango na libondeli. (1 Samwele 8:21, 22; 14:36-41; Yilimia 42:1-3) Na ndakisa, na molulu ya kofungola tempelo, mokonzi Salomo asalaki libondeli na motema mobimba epai ya Yehova. Mpo na komonisa ete andimi libondeli ya Salomo, Yehova atondisaki tempelo na nkembo na ye mpe alobaki ete: “Matoi na ngai makoyoka mabondeli kati na esika oyo.”—2 Ntango 6:12–7:3, 15.
9. Nini esɛngamaki mpo na kopusana penepene na Yehova na hema?
9 Na mibeko oyo Yehova apesaki na Yisalaele, ezalaki mpe na masɛngami oyo moto asengelaki kokokisa mpo na kopusana penepene na ye na lolenge ebongi na hema. Ezalaki nini? Ntɔngɔ mpe mpokwa nyonso, longola kopesa bambeka ya nyama, nganga-monene asengelaki mpe kotumbaka mpaka-ya-malasi ya nsolo kitoko liboso ya Yehova. Na nsima, banganga-nzambe mosusu bakómaki mpe kosala mosala yango, longola kaka Mokolo ya kosɛnga bolimbisi ya masumu. Yehova azalaki kosepela na mosala ya banganga te soki bapesi bambeka wana te.—Exode 30:7, 8; 2 Ntango 13:11.
10, 11. Nini emonisi ete Yehova azalaki kondima mabondeli ya Bayisalale oyo bazalaki kobondela ye bango moko?
10 Na Yisalaele ya kala, esengelaki kopusana penepene na Nzambe kaka na nzela ya bamonisi wana? Te, Biblia emonisi ete Yehova azalaki kondima mpe mabondeli ya moto na moto. Na libondeli oyo Salomo asalaki na molulu ya kofungola tempelo, asɛngaki Yehova boye: “Wana moto moko soki bato nyonso na yo, Yisalaele, bakobondela epai na yo to bakolombaka yo, . . . mpe akosembola mabɔkɔ na ye epai na ndako oyo, yoká kuna na likoló.” (2 Ntango 6:29, 30) Evanzile ya Luka elobi ete ntango Zekaria, tata ya Yoane Mobatisi, azalaki kotumba mpaka-ya-malasi na kati ya hema, ebele ya basambeli ya Yehova oyo bazalaki banganga te bazalaki “kobondela na libándá.” Emonani ete bato bazalaki na momeseno ya koyanganaka na libándá ya hema mpo na kobondela ntango bazalaki kotumbela Yehova mpaka-ya-malasi na etumbelo ya wolo.—Luka 1:8-10.
11 Na yango, Yehova azalaki kondima mabondeli, ezala ya bamonisi to ya bato bango moko, soki baluki kopusana penepene na ye na lolenge ebongi. Lelo oyo, tozali na nse ya Mibeko ya Moize te. Nzokande, tokoki kozwa mateya ya ntina mingi na likambo etali kobondela soki totali lolenge oyo Bayisalaele ya kala bazalaki kopusana penepene na Nzambe.
Na ntango ya baklisto
12. Ebongiseli nini etyami mpo na kosalisa baklisto bápusana penepene na Yehova?
12 Lelo oyo, tozali kotambwisama na mibeko ya Klisto. Lelo oyo, ezali na Tempelo moko te epai banganga basambelaka mpo na bato nyonso to epai tokoki kokende kobondela Nzambe. Atako bongo, Yehova azali mpe na ebongiseli oyo epesi biso nzela ya kopusana penepene na ye. Ezali nini? Ntango Klisto apakolamaki na mobu 29 ya ntango na biso (T.B.) mpe atyamaki Nganga-Monene, tempelo ya elimo ebandaki kosala.a Tempelo yango ezali ebongiseli ya sika oyo Yehova azwi mpo na kosalisa biso tópusana penepene na ye na nzela ya mbeka oyo Yesu Klisto apesaki mpo na kolimbisama ya masumu na biso.—Baebele 9:11, 12.
13. Na likambo etali kobondela, wapi bokokani moko oyo ezali kati na tempelo ya Yelusaleme mpe oyo ya elimo.
13 Makambo mingi oyo ezalaki na tempelo ya Yelusaleme, ezalaki elilingi ya makambo mingi ya tempelo ya elimo, ezala oyo etali kobondela. (Baebele 9:1-10) Na ndakisa, mpaka-ya-malasi oyo bazalaki kotumba na ntɔngɔ mpe na mpokwa na etumbelo ya mpaka-ya-malasi na kati ya esika mosantu ya tempelo ezalaki elilingi ya nini? Mokanda ya Emoniseli emonisi ete, “mpaka-ya-malasi yango elakisi mabondeli ya basantu.” (Emoniseli 5:8; 8:3, 4) Davidi akomaki ete: “Tiká ete libondeli na ngai ebonga liboso na yo lokola mpaka ya malasi.” (Nzembo 141: 2) Na yango, na ntango ya baklisto, mpaka-ya-malasi ya nsolo kitoko ezali mabondeli mpe masanzoli oyo totindaka epai na Yehova.—1 Batesaloniki 3:10.
14, 15. Na likambo ya kopusana penepene na Yehova, ezali boni mpo na (a) baklisto bapakolami? (b) “bampate mosusu”?
14 Nani akoki kopusana penepene na Nzambe na tempelo yango ya elimo? Na tempelo ya Yelusaleme, banganga ná Balevi bazalaki kosala na lopango ya kati, kasi kaka banganga nde bazalaki kokɔta na esika mosantu. Na ndenge ya elimo, baklisto bapakolami, oyo bazali na elikya ya likoló, bazali na esika oyo ezali lokola lopango ya kati mpe esika Mosantu, oyo epesi bango nzela ya kobondelaka Nzambe mpe kosanzolaka ye.
15 Ezali boni mpo na “bampate mosusu,” oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabelé? (Yoane 10:16) Mosakoli Yisaya amonisaki ete bato ya bikólo mingi bakoya kosambela Yehova “na mikolo ya nsuka.” (Yisaya 2:2, 3) Akomaki mpe ete “bapaya” bakoya mpe kosambela Yehova. Mpo na komonisa ete akondima mabondeli na bango, Nzambe alobaki ete: “Nakosepelisa mpe bango kati na ndako na ngai ya kobondela.” (Yisaya 56:6, 7) Emoniseli 7:9-15 eyebisi makambo mosusu; emonisi ete “ebele ya bato” oyo bauti na “bikólo nyonso,” basangani esika moko mpo na kosambela mpe kobondela Nzambe “butu moi” mpe batɛlɛmi na libándá ya lopango ya tempelo ya elimo. Tobɔndisami mpenza na koyeba ete basaleli ya Nzambe nyonso lelo oyo bakoki kopusana penepene na Nzambe na elikya ete akoyoka bango!
Mabondeli oyo Nzambe andimaka
16. Liteya nini tozwi na mabondeli ya baklisto ya ekeke ya liboso?
16 Baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kobondela mingi. Bazalaki kobondela mpo na makambo nini? Bankulutu bazalaki kosɛnga litambwisi mpo na kopona mibali oyo bakozwa mikumba na lisangá. (Misala 1:24, 25; 6:5, 6) Epafala azalaki kobondela mpo na bandeko na ye baklisto. (Bakolose 4:12) Bandeko ya lisangá ya Yelusaleme babondelaki mpo na Petelo ntango akɔtaki bolɔkɔ. (Misala 12:5) Baklisto ya ekeke ya liboso basɛngaki Nzambe apesa bango mpiko liboso ya mikakatano, balobaki ete: “Yehova, tyá likebi na makaneli na bango, mpe pesá baombo na yo likoki ya kokoba koloba liloba na yo na mpiko mpenza.” (Misala 4:23-30) Yakobo alendisaki baklisto básɛngaka Nzambe bwanya ntango bazali komekama. (Yakobo 1:5) Otyaka makambo oyo na mabondeli na yo?
17. Yehova andimaka mabondeli ya bato ya ndenge nini?
17 Nzambe andimaka mabondeli nyonso te. Kasi, ndenge nini tokoki kobondela na elikya ete Nzambe akoyoka biso? Nzambe azalaki koyoka mabondeli ya bato ya sembo na ntango ya kala mpo bazalaki kobondela ye na bosembo mpe na motema oyo ebongi. Bazalaki na kondima mpe bazalaki komonisa yango na misala. Tokoki mpe kozala mpenza na elikya ete Yehova akoyoka baoyo bazali kopusana penepene na ye na motindo wana lelo oyo.
18. Baklisto basengeli kokokisa lisɛngami nini mpo Nzambe ayoka mabondeli na bango?
18 Lisɛngami mosusu ezali. Ntoma Paulo amonisaki lisɛngami yango na maloba oyo: “Na lisalisi na ye biso . . . tozwi nzela ya kopusana penepene na Tata na elimo kaka moko.” Paulo alobelaki nani ntango akomaki ete, “na lisalisi na ye”? Alobelaki Yesu Klisto. (Baefese 2:13, 18) Ya solo, tokoki kopusana penepene na Tata kaka na nzela na Yesu.—Yoane 14:6; 15:16; 16:23, 24.
19. (a) Ntango nini makabo ya mpaka-ya-malasi ezalaki kosepelisa lisusu Yehova te? (b) Tosengeli kosala nini mpo mabondeli na biso ezala lokola mpaka-ya-malasi ya nsolo kitoko liboso na Yehova?
19 Ndenge tolobaki, mpaka-ya-malasi oyo banganga ya Yisalaele bazalaki kotumba ezalaki elilingi ya mabondeli ya basaleli ya Nzambe ya sembo. Nzokande, na ntango mosusu, Yehova azalaki kosepela te na makabo ya mpaka-ya-malasi ya Bayisalaele. Na ndakisa, ntango Bayisalaele bazalaki kotumba mpaka-ya-malasi na tempelo mpe kofukamela lisusu bikeko. (Ezekiele 8:10, 11) Ndeko moko lelo oyo, mabondeli ya baoyo balobaka ete basambelaka Yehova, kasi basalaka makambo oyo eyokani te na mibeko na ye, ezalaka lokola eloko ya nsolo mabe epai na ye. (Masese 15:8) Na yango, tiká ete tókoba kozala pɛto na makambo nyonso ya bomoi mpo mabondeli na biso ezala lokola mpaka-ya-malasi ya nsolo kitoko liboso ya Nzambe. Yehova asepelaka na mabondeli ya bato balandaka banzela na ye ya boyengebene. (Yoane 9:31) Nzokande, mituna mosusu etikali. Ndenge nini tosengeli kobondela? Tokoki kobondela mpo na makambo nini? Mpe ndenge nini Nzambe ayanolaka na mabondeli na biso? Na lisolo na biso oyo elandi, tokozwa biyano na mituna wana mpe mituna mosusu.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai 2001, lokasa 27.
Okoki kolimbola?
• Ndenge nini bato ya kozanga kokoka bakoki kopusana penepene na Nzambe na lolenge oyo ebongi?
• Ndenge nini tokoki komekola bato ya sembo ya ntango ya kala na mabondeli na biso?
• Tozwi liteya nini na mabondeli ya baklisto ya ekeke ya liboso?
• Ntango nini mabondeli na biso ekoki kozala lokola mpaka-ya-malasi ya nsolo kitoko liboso na Nzambe?
[Elilingi na lokasa 23]
Mpo na nini Nzambe andimaki mbeka ya Abele, kasi aboyaki oyo ya Kaina?
[Elilingi na lokasa 24]
“Nazali bobele mabelé mpe mputulu ya mɔtɔ”
[Elilingi na lokasa 25]
“Nakopesa yo ndambo moko ya zomi kati na biloko nyonso bikopesa yo ngai”
[Elilingi na lokasa 26]
Mabondeli na yo ezalaka lokola mpaka-ya-malasi ya nsolo kitoko liboso na Yehova?