Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/9 nk. 14-15
  • Elembo ‘ya Yukala’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elembo ‘ya Yukala’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Bakoleka yo te”
  • Likambo ya sika na lisolo ya bomoi na ye
  • Okopona baninga ya lolenge nini?
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • Jérémie: mosakoli na bikateli na Nzambe oyo bato balingaki koyoka yango te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mosakoli na “eleko ya nsuka ya mikolo”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • Mokanda ya Biblia nimero 24​—Yilimia
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/9 nk. 14-15

Elembo ‘ya Yukala’

NA EKEKE ya nsambo liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Mokonzi Nebukadanesala akɔtaki na Yelusaleme, atumbaki engumba yango, mpe akweisaki bifelo na yango. Akangaki Sidikiya, mokonzi ya Yuda, mpe atɔbɔlaki ye miso. Longola yango, “mokonzi ya Babele abomaki mpe mikóló nyonso ya Yuda.”​—Yilimia 39:1-8.

Na ntembe te, Yukala, mwana ya Selemiya, azalaki moko na mikóló to bankumu ya Yuda oyo bato ya Babilone babomaki. Lelo oyo, toyebi likambo ya sika mpo na moto yango oyo Biblia etángi nkombo na ye. Kasi, liboso tólobela yango, tótalela naino oyo Biblia elobi mpo na Yukala mpe mpo na eleko oyo ye azalaki na bomoi.

“Bakoleka yo te”

Yehova apesaki Yilimia mokumba ya kosakola etumbu oyo akanaki kopesa Yuda mpe Yelusaleme. Yehova alobaki na Yilimia ete bakonzi, bankumu, banganga-nzambe, mpe bato ya Yuda ‘bakobundisa’ ye. Kasi, abakisaki ete “bakoleka yo te zambi ngai nazali na yo elongo.”​—Yilimia 1:17-19.

Ntango basoda ya Babilone bazingaki Yelusaleme, engumba-mokonzi ya Yuda, Mokonzi Sidikiya atindaki bato mbala mibale bákende kokutana na Yilimia mpo ayebisa bango soki Nebukadanesala akotika mokano na ye ya koboma engumba mpe básɛnga mosakoli yango abondela ete makambo esalema bongo. Moko na bato oyo mokonzi atindaki ezalaki Yukala. Nsango oyo Yehova atindaki Yilimia asakola ezalaki ete basoda ya Babilone to Bakaladi, bakobebisa engumba yango. Moto nyonso na Yelusaleme oyo akotikala na kati akokufa na nzala, to na maladi, to mpe na mopanga. Nzokande, baoyo bakobima mpo na komikaba na mabɔkɔ ya Bakaladi, bakobika. Maloba ya Yilimia esilikisaki mpenza bankumu ya Yuda!​—Yilimia 21:1-10; 37:3-10; 38:1-3.

Yukala azalaki na kati ya bankumu oyo balobaki na Mokonzi Sidikiya boye: “Tolɔmbi yo ete moto oyo [Yilimia] abomama, zambi azali kolɛmbisa mabɔkɔ ya bato ya etumba.” Yukala azalaki na kati ya bato oyo babwakaki Yilimia na libulu ya pɔtɔpɔtɔ oyo, na nsima, moto mosusu abimisaki ye kati na yango. (Yilimia 37:15; 38:4-6) Lokola Yilimia atosaki Yehova, abikaki ntango Yelusaleme ebomamaki, kasi emonani ete Yukala akufaki ntango ebongiseli oyo azalaki kotyela motema ekweaki.

Likambo ya sika na lisolo ya bomoi na ye

Likambo moko ya sika etali bomoi ya Yukala eyebanaki na mobu 2005, na Jérusalem. Bato ya arkeoloji bazalaki kotimola esika moko oyo bakanisaki komona ndako ya Mokonzi Davidi. Bamonaki ndako moko monene ya mabanga mpe bakanisi ete ebebisamaki ntango bato ya Babilone bazwaki Yelusaleme na ntango ya Yilimia.

Eyebani te soki yango nde ezalaki ndako ya Davidi. Kasi, bato ya arkeoloji bayebi nkolo ya elembo moko ya mabelé ya santimɛtrɛ moko, oyo bamonaki, oyo fɔtɔ na yango ezali na lokasa 14. Elembo yango ezalaki kokanga mokanda moko oyo esilá kobeba. Likoló na yango bakomi ete: “Ya Yehuchal, mwana ya Shelemiyahu, mwana ya Shovi.” Na ntembe te, makomi oyo ezali na elembo yango ekomamaki na kashɛ ya monguna ya Yilimia: Yukala, mwana ya Selemiya.

Eilat Mazar, moto moko ya arkeoloji oyo alimbolaki makomi oyo ezali na elembo wana, akomi ete Yukala azalaki “ministre ya molɔngɔ ya mibale,” nsima ya Gemalia, mwana ya Safana, oyo bamonaki nkombo na ye na makomi oyo ebɛtami na kashɛ, oyo bakundolaki na Engumba ya Davidi.a

Kondima na biso na Liloba ya Nzambe etaleli te biloko ya kala oyo bakoki kokundola; kasi ezali kokokisama ya bisakweli nde esengeli kondimisa biso Biblia. Masolo ya kala ezali komonisa ete Yilimia alobaki solo ntango asakolaki ete Yelusaleme ekobomama. Liwa ya nsɔni oyo banguna ya Yilimia bakufaki esengeli kolendisa kondima na biso ete soki tozali sembo lokola Yilimia, banguna na biso ‘bakoleka biso te mpo Yehova azali na biso elongo.’

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba lisolo ya Gemalia ná Safana, talá lisolo “Oyebi lisolo ya Safana na libota na ye?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛmbɛ 2002, nkasa 19-22.

[Elilingi na lokasa 15]

Yilimia alɛmbisaki nsango ya Nzambe te mpo na mangungu

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 14]

Gabi Laron/Institute of Archaeology/ Hebrew University ©Eilat Mazar

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto