Mituna ya batángi
Mpo na nini Libongoli ya Mokili ya Sika elobi na Deteronome 31:2 ete Moize “azalaki lisusu na ndingisa te ya kobima mpe kozonga” lokola mokambi ya Yisalaele, nzokande Babiblia mosusu elobaka ete akokaki lisusu te kobima mpe kokɔta?
Atako liloba ya Liebele oyo ezali na esika wana ekoki kobongolama na ndenge nyonso mibale, Babiblia mosusu ya Lingala elobi ete na nsuka ya bomoi na ye, Moize alɛmbaki mpenza mpe azalaki lisusu te na likoki ya kokokisa mikumba na ye ya mokambi. Na ndakisa, Biblia haut fleuve elobi ete Moize alobaki boye: “Ngai nazali na mbula mokama na ntuku mibale lelo. Nakoki kobima mpe kokɔta lisusu te.” Biblia Liloba lya Nzambe mpe elobi boye: “Lelo nakokisi mibu nkama na ntuku ibale; nakoki kotambola lisusu bipai binso te.” Ndenge moko mpe, Bible na lingala ya lelo oyo elobi boye: “Nakómi sik’oyo na mbula 120; nakokoka lisusu té kotambwisa bino.”
Kasi, Deteronome 34:7 emonisi ete atako Moize akómaki na mbula mingi, alɛmbaki te. Totángaka boye: “Moize azalaki na mbula mokama na ntuku mibale wana ekufaki ye, mpe miso na ye ebebaki te, mpe nguya ya nzoto na ye esilaki te.” Na yango, tokoki koloba ete Moize azalaki na makasi ya kotambwisa Bayisalaele, kasi Yehova alingaki lisusu te ete akoba kotambwisa bango. Yango emonani polele na likambo oyo Moize alobaki na nsima: “[Yehova] alobelaki ngai ete, Okokata ngámbo ya Yaladene oyo te.” Na ntembe te, na esika wana Yehova azongelaki ekateli oyo azwaki na mai ya Meliba.—Mituya 20:9-12.
Moize aumelaki mingi na bomoi mpe asalaki makambo mingi ya malamu na bomoi na ye, oyo tokoki kokabola na biteni misato. Na boumeli ya mbula 40, azalaki na Ezipito, epai “alakisamaki na kati ya bwanya nyonso ya Baezipito” mpe azalaki “na nguya na maloba na ye mpe na misala na ye.” (Misala 7:20-22) Na boumeli ya 40 mosusu, afandaki na Midyani. Kuna, akolisaki bizaleli ya elimo oyo asengelaki na yango mpo na kokamba libota ya Yehova. Mpe na boumeli ya mbula 40 ya nsuka, Moize akambaki mpe ayangelaki Bayisalaele. Kasi, sikoyo Yehova azwi ekateli ete, na esika ya Moize, Yosua nde akokatisa Bayisalaele na ngámbo mosusu ya Ebale Yaladene mpo na kokɔtisa bango na Mokili ya Ndaka.—Deteronome 31:3.
Boye, Libongoli ya Mokili ya Sika ebongoli Deteronome 31:2 na ndenge mpenza esengeli. Soki Moize akokaki lisusu te kokamba Bayisalaele, ezali te mpo alɛmbaki na bobange, kasi mpo Yehova nde alingaki lisusu te ete atambwisa bango.