Banzela ya Baloma emonisaka mayele ya mosala ya bato ya kala
MONIMA nini ya Baloma ya kala eleki bamonima mosusu? Mbala mosusu okoloba ete ezali Colisée, oyo bitika na yango ezali tii lelo na engumba Rome. Soki tolingi kolobela biloko oyo bato ya Loma ya kala batongá oyo eumeli mingi koleka to mpe oyo ebongolá makambo mosusu na bomoi ya bato, tosengeli kolobela nde banzela.
Ezali kaka te biloko ya kotɛkisa nde elekaki na banzela minene ya Baloma to mpe basoda. Romolo Staccioli, moto moko oyo ayekolaka makomi ya kala, alobaki ete banzela yango esalisá mpo na kopalanganisa “makanisi, ntɔki, mayele ya filozofi mpe mateya ya mangomba,” bakisá mpe mateya ya boklisto.
Na ntango ya kala, banzela ya Loma ezalaki kotalelama lokola bamonima. Na boumeli ya bankama ya bambula, Baloma batongaki banzela ebele oyo, soki tosangisi yango nyonso, ekoki koleka kilomɛtrɛ 80 000 mpe ezali na etando oyo ezali lelo oyo mabelé ya bikólo koleka 30.
Nzela monene ya liboso ezalaki Via Appia (na Lifalanse voie Appienne.) Bazalaki kobenga yango mokonzi ya banzela mpe ebandaki na Loma tii na Brundisium (lelo oyo Brundisi), engumba moko oyo ezali na libongo epai bamasuwa ezalaki kolongwa mpo na kokende na Ɛsti. Nkombo ya nzela yango eutá na nkombo ya Appius Claudius Caecus, mokonzi ya Loma oyo abandisaki mosala na yango na mobu soki 312 L.T.B. Banzela mosusu oyo eutaki na Loma ezali Via Salaria mpe Via Flaminia; yango mibale ekendaki na ngámbo ya ɛsti tii na Mbu Adriatique, mpo na kokende na mikili ya Balkans tii na bitúká epai Ebale Rhin mpe Ebale Danube eleki. Nzela mosusu, oyo ebengami Via Aurelia ekendaki na ngámbo ya nɔrdi na etúká ya Gaule mpe na etúká ya péninsule Ibérique; mpe nzela mosusu, Via Ostiensis, ekendá na Ostie, libongo oyo bato ya Loma bazalaki kosalela mingi mpo na kokende na Afrika.
Mosala ya kotonga oyo eleki monene na Loma
Banzela ezalaki kosalisa engumba Loma na makambo mingi ata na ntango oyo bafandi na yango babandaki naino te kotonga banzela ya sika. Batongaki engumba yango na esika oyo banzela ya kala ekutanaki, esika kaka moko oyo Ebale Tibre ezali moke mpe bato bakoki kokatisa yango na makolo. Mikanda ya kala elobaka ete mpo na kobongisa lisusu banzela oyo ezalaki banda kala, Baloma balandaki mayele ya bato ya Carthage. Kasi, ekoki kozala ete bazwaki mayele yango ya kotonga libosoliboso epai ya Ba-Étrusque. Biteni mosusu ya banzela oyo batongá ezali tii na moi ya lelo. Longola yango, liboso Loma ekóma ekólo ya makasi, banzela mingi ezalaki na etúká wana. Ekoki kozala ete bazalaki kosalela banzela yango mpo na komema bibwele na bisika oyo bakokaki koleisa yango. Kasi, kotambola na banzela yango ezalaki mpasi mpamba te ezalaki na mputulu mingi na elanga mpe pɔtɔpɔtɔ mingi na eleko ya mbula. Baloma batongaki kaka banzela wana ya kala.
Baloma bazalaki naino kopona malamu bisika oyo nzela ekoleka mpe bazalaki kotonga yango na biloko ya makasi, ya malamu, mpe ya kitoko. Mingimingi, banzela ezalaki kolanda ntaka oyo eleki mokuse longwa na esika moko tii na esika mosusu; yango wana, biteni mingi ya banzela yango ezalaki semba. Kasi, mbala mingi banzela ezalaki kolanda bisika oyo bakoki kokima bangomba milai mpe mabulu mozindo. Na bisika oyo ekoki kosalema, bazalaki kolekisa banzela yango na mopanzi ya ngomba, na ngámbo oyo ezwaka moi mingi. Yango ezalaki kosalisa bato oyo bazalaki kotambola na banzela yango bázwa mikakatano mingi te soki mbula ebɛti.
Ndenge nini Baloma bazalaki kotonga banzela na bango? Bazalaki kosalela mayele ndenge na ndenge, kasi, nsima ya koyekola banzela yango, bato ya arkeoloji bamonaki mayele oyo tolingi kolobela.
Bazalaki naino kopona bisika oyo nzela ekoleka. Yango ezalaki mosala ya bakapita. Na nsima, basoda, bato ya misala ya mabɔkɔ, to baombo bazalaki kosala mosala makasi ya kotimola. Bazalaki kotimola baterase mibale ngámbo na ngámbo. Mɛtrɛ koleka mibale ekabolaki baterase yango; kasi mbala mingi ezalaki mɛtrɛ 4, mpe ezalaki mwa monene lisusu koleka na mabunu (virages). Nzela oyo basilisi kotonga ekokaki kozala na bonene ya mɛtrɛ 10 soki tobakisi bisika ya bato ya makolo na ngámbo nyonso mibale. Na nsima bazalaki kolongola mabelé na kati ya baterase mpo esala libulu. Soki bakómi na mabelé ya makasi, bazalaki kotondisa libulu yango na bitongeli ya ndenge misato to minei. Ntango mosusu bazalaki kotya mabanga ya minene na nse. Na nsima, bazalaki kolandisa mabanga ya mike to ya papala, mbala mosusu bazalaki kokangisa yango na simá. Bongo na likoló bazalaki kolandisa mabanga mikemike mpe bazalaki kofina yango makasi.
Banzela mosusu ya Baloma ezalaki kaka na mabanga mikemike oyo bafini yango makasi. Kasi, bato ya ntango wana bazalaki kosepela mingi nde na banzela oyo ezali na simá. Na likoló, banzela yango ezalaki na dale ya mabanga. Banzela yango ezalaki etombwaná mwa moke na kati mpo mai ya mbula ekitaka tii na baterase. Mayele wana ya kotonga banzela ezalaki kobatela yango makasi mpe yango wana banzela yango mosusu ezali tii lelo.
Mbula soki 900 nsima ya kotonga Via Appia, Procopius, moto ya mayele na masolo ya kala ya mboka Byzance alobaki ete ezalaki “kitoko mingi.” Mpo na badale oyo ezalaki likoló na yango, akomaki boye: “Atako bambula eleki mingi mpe ebele ya makalo ezalaki koleka likoló na yango mokolo na mokolo, banzela yango ebebi te, ezali kaka sɛlisɛli ndenge ezalaká kala.”
Ndenge nini banzela ezalaki kokatisa bibale mpe biloko mosusu? Eloko ya liboso ezalaki bagbagba oyo, mosusu kati na yango ezali tii na moi ya lelo, likambo oyo ezali kondimisa ete Baloma bazalaki na mayele mingi ya kotonga. Bato mingi bayebaka te ete na bisika mosusu, banzela ya Loma ezalaki kokɔta na nse ya mabelé; kasi kotonga yango ezalaki lisɛki te na kotalela mayele mpe biloko ya mosala ya ntango wana. Buku moko elobi boye: “Baloma oyo bayebaki mosala ya kotonga . . . basalaki mosala oyo balingaki ete etikala mpo na bankama ya bambula.” Tozali na ndakisa ya lidusu moko oyo ezali na Furlo, na nzela oyo babengi Via Flaminia. Na mobu 78 T.B., bato oyo bayebi mosala ya kotonga babongisaki makambo nyonso malamu mpe batɔbɔlaki na kati ya mabanga lidusu moko ya mɛtrɛ 40 na molai, mɛtrɛ 5 na bonene mpe mɛtrɛ 5 na bozindo. Ezalaki mosala ya kokamwa mpenza soki totaleli bisaleli oyo bazalaki na yango. Kotonga nzela ya ndenge wana ezalaki moko na misala minene oyo bato basalá.
Bato ya mibembo mpe kopalangana ya makanisi
Bato ya ndenge na ndenge bazalaki kosalela banzela wana mpo na mibembo; na ndakisa basoda, bakomelesa, basakoli, batamboli, bato ya masano mpe babundi. Bato oyo bazalaki kosala mibembo na makolo bakokaki kotambola kilomɛtrɛ 25 to 30 na mokolo. Bato ya mobembo bakokaki koyeba bantaka oyo ekaboli mboka ndenge na ndenge na bisika oyo bakomaki. Yango ezalaki mabanga ya minene to ya mike, mbala mingi ezolonganá, oyo bazalaki kotya nsima ya mɛtrɛ 1 480 nyonso. Nzelanzela ezalaki mpe na bisika ya kopema, epai bato ya mobembo bakokaki kozwa bampunda mosusu, kosomba bilei, mpe ntango mosusu kolekisa butu. Bisika yango mosusu ekómaki mwa bingumba.
Mwa moke liboso lingomba ya boklisto ebotama, Kaisala Augusto abandaki mosala monene ya kobongisa banzela yango. Aponaki bato oyo basengelaki kotambwisa misala ya kobongisa nzela moko to banzela mingi. Atongisaki monima moko oyo babengaki miliarium aureum na esika monene ya Loma. Monima yango oyo ezali na makomi ya bronzɛ ezalaki lokola esika oyo banzela nyonso ya Italie ekutanaki. Yango nde ebimisá lisese oyo elobaka ete: “Nzela nyonso esukaka na Loma.” (na Lifalanse, Tous les chemins mènent à Rome.) Augusto asɛngaki mpe básala bakarte ya banzela nyonso ya ekólo mpo bato bámonaka yango. Emonani ete banzela nyonso ekokaki mpo na mposa mpe makambo oyo ezalaki na ntango wana.
Bato mosusu ya mobembo na ntango ya kala bazalaki kosalela mikanda, bakarte, mpo bázwa mikakatano te na mibembo na bango. Biloko yango ezalaki kolakisa makambo lokola ntaka oyo ekaboli bisika ndenge na ndenge ya kopema mpe makambo oyo bakokaki kosalela moto na bisika yango. Kasi, mikanda mpe bakarte yango ezalaki ntalo mingi mpe moto nyonso te nde akokaki kosomba yango.
Atako bongo, baklisto oyo bazalaki kopalangisa nsango malamu bazalaki kobongisa mpe kosala mibembo mingi ya milai. Ntoma Paulo asalaki ndenge oyo bato mingi bazalaki kosala na ntango wana, elingi koloba asepelaki kosala mobembo na masuwa ntango azalaki kokende na ɛsti, mpo mopɛpɛ etalisaka na ngámbo wana. (Misala 14:25, 26; 20:3; 21:1-3) Na Mbu ya Meditelane, na eleko ya molunge, mipɛpɛ eutaka na wɛsti. Nzokande, ntango Paulo azalaki kosala mibembo na ngámbo ya wɛsti, mbala mingi azalaki kosalela banzela ya Baloma. Paulo asalaki bongo ntango abongisaki mobembo na ye ya mibale mpe ya misato ya misionɛrɛ. (Misala 15:36-41; 16:6-8; 17:1, 10; 18:22, 23; 19:1)a Na mobu soki 59 T.B., Paulo asalaki mobembo na Via Appia mpo na kokende na Loma mpe akutanaki na bandeko na ye baklisto na Zando ya Apiusi, na ntaka ya kilomɛtrɛ 74 na sudi-ɛsti ya Loma. Baklisto mosusu bazalaki kozela ye na esika mosusu oyo bazalaki kobenga Tavɛrnɛ-Misato, esika moko ya kopema oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 14 na Loma. (Misala 28:13-15) Na mobu soki 60 T.B., Paulo alobaki ete nsango malamu esakolamaki “na kati ya mokili mobimba” oyo eyebanaki na ntango wana. (Bakolose 1:6, 23) Nyonso wana esalemaki mingimingi na lisalisi ya banzela ya Baloma.
Nyonso wana emonisi ete banzela ya Baloma ezali bamonima ya kokamwa mpe ya makasi oyo esalisaki mpo na kopalanganisa nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.—Matai 24:14.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá karte oyo ezali na lokasa 33 ya mwa buku ‘Voyez le bon pays,’ ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 14]
Libanga oyo bakomi bakilomɛtrɛ
[Elilingi na lokasa 15]
Via Appia pembeni ya Rome
[Elilingi na lokasa 15]
Nzela moko na engumba Ostie, Italie
[Elilingi na lokasa 15]
Bilembo oyo makalo ya kala etiká na nzela, Autriche
[Elilingi na lokasa 15]
Eteni ya nzela ya Loma ná mabanga oyo ezali kolakisa bakilomɛtrɛ, Jordanie
[Elilingi na lokasa 16]
Malita ya kala na Via Appia, libándá ya Rome
[Elilingi na lokasa 16]
Lidusu ya Furlo na Via Flaminia, na etúká ya Marches
[Elilingi na lokasa 16, 17]
Gbagba ya Tiberius na Via Emilia na engumba Rimini, Italie
[Elilingi na lokasa 17]
Paulo akutanaki na bandimi na Zando ya Apiusi
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 15]
Na lobɔkɔ ya mwasi, Ostie: ©danilo donadoni/Marka/age fotostock; na lobɔkɔ ya mobali, nzela ná mabanga oyo ezali kolakisa bakilomɛtrɛ: Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.