“Tosengeli kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato”
Apesaki litatoli malamumalamu na “mpiko”
MOKOLO moko, ebele ya bato basilikelaki ntoma Paulo mpe balingaki kobɛta ye mpe koboma ye. Na mbala moko, basoda ya Loma bayaki mbangu mpe babɔtɔlaki ye na mabɔkɔ ya bato yango mpe bakendaki na ye. Likambo yango ezalaki ebandeli ya makambo minene oyo eumelaki soki mbula mitano. Nyonso wana esalaki ete bakonzi mpe basali minene ya Leta ya Loma báyoka nsango etali Yesu Klisto.
Na mobu soki 34 ya ntango na biso (T.B.), Yesu amonisaki ete Paulo (Saulo) akomema nkombo na ye epai ya “bakonzi.” (Misala 9:15) Tii na mobu 56 T.B., likambo yango ekokisamaki naino te. Nzokande, makambo ebongwanaki ntango ntoma Paulo akómaki na nsuka ya mobembo na ye ya misato.
Batombokeli ye, kasi azongi nsima te
Paulo asengelaki kokoba mobembo na ye mpo na kokende na Yelusaleme; kasi, baklisto mosusu bayebisaki ye makambo oyo bazwaki “na nzela ya elimo” ete soki akei na engumba yango akokutana na botɛmɛli makasi. Atako bongo, Paulo azalaki na mpiko mpe alobaki ete: “Namibongisi kaka mpo na kokangama te kasi mpe mpo na kokufa na Yelusaleme mpo na nkombo ya Nkolo Yesu.” (Misala 21:4-14) Paulo akobaki mobembo na ye tii na Yelusaleme mpe ntango kaka akɔtaki na tempelo, Bayuda oyo bautaki na etúká ya Azia, oyo bayebaki ete mosala ya kosakola nsango malamu oyo Paulo asalaki kuna ebotaki mbuma malamu, batombokisaki ebele ya bato mpo báboma ye. Basoda ya Loma bayaki nokinoki kobikisa ye. (Misala 21:27-32) Kokóma na mabɔkɔ ya basoda ya Loma epesaki Paulo libaku ya kosakola nsango ya Yesu epai ya bato oyo bazalaki kosepela na mosala na ye te mpe bakonzi.
Asakoli epai ya bato oyo ezalaki mpasi mpo na kokutana na bango
Basoda oyo babɔtɔlaki Paulo na mabɔkɔ ya bato oyo balingaki kosala ye mabe bakendaki na ye na esika oyo ezalaki kobengama Linɔ́ngi ya Antonia mpo na kobatela ye.a Ntango Paulo atɛlɛmaki na basikalie ya esika yango, abandaki koloba na ebele ya bato wana mpo na kopesa bango litatoli. (Misala 21:33–22:21) Kasi, ntango kaka alobaki ete Nzambe apesaki ye mokumba ya kosakola epai ya bato oyo bazalaki Bayuda te, bato yango batombokaki lisusu. Na nsima, Lusia, komanda ya basoda, apesaki mitindo ete bábɛta Paulo fimbo mpo aloba mpo ye ayeba ntina oyo Bayuda bazalaki kofunda ye. Kasi, ntango Paulo ayebisaki bango ete azali Moloma, babɛtaki ye lisusu fimbo te. Na mokolo oyo elandaki, Lusia akendaki na Paulo liboso ya Sanedrina, esambiselo monene ya Bayuda, mpo na koyeba mabe oyo asalaki.—Misala 22:22-30.
Na esambiselo yango, Paulo azwaki lisusu libaku ya kopesa litatoli malamumalamu epai ya Bayuda. Mosakoli yango ya mpiko alobaki ete andimaka lisekwa. (Misala 23:1-8) Atako bongo, Bayuda yango oyo bazalaki koyina ye bazalaki kaka kokana koboma ye, yango wana basoda bakɔtisaki Paulo na lopango na bango. Na kati ya butu, Nkolo alendisaki ye na maloba oyo: “Zalá na mpiko! Mpo lokola opesi litatoli malamumalamu na Yelusaleme mpo na makambo oyo etali ngai, ndenge moko mpe osengeli kopesa litatoli na Loma.”—Misala 23:9-11.
Bayuda oyo bafandaki likita mpo na koboma Paulo bazwaki libaku ya kokokisa mokano na bango te mpamba te basoda bamemaki Paulo butubutu na Kaisalia, mboka-mokonzi ya etúká ya Yudea. (Misala 23:12-24) Na Kaisalia, Paulo azwaki lisusu mabaku ya kopesa “bakonzi” litatoli. Liboso, amonisaki guvɛrnɛrɛ Felikisi ete makambo nyonso oyo bafundaki ye na yango ezalaki lokuta. Na nsima, ateyaki Felikisi ná mwasi na ye Dulusila makambo etali Yesu, ezaleli ya komipekisa, boyengebene, mpe makambo etali etumbu ya Nzambe. Atako bongo, Felikisi atikaki Paulo na bolɔkɔ mbula mibale mpo akanisaki ete Paulo akofuta ye kanyaka, kasi Paulo asalaki yango te.—Misala 23:33–24:27.
Ntango Fesitusi akómaki mokonzi na esika ya Felikisi, Bayuda bazongelaki lisusu kofunda Paulo mpo akatela ye etumbu ya liwa. Paulo asambaki lisusu na Kaisalia. Mpo bákende kosambisa ye lisusu na Yelusaleme te, Paulo alobaki boye: “Natɛlɛmi liboso ya kiti ya kosambisa ya Kaisala . . . Nasɛngi nakende kosamba epai ya Kaisala!” (Misala 25:1-11, 20, 21) Mwa mikolo na nsima, ntango ntoma Paulo asambaki liboso ya Agilipa II, mokonzi yango alobaki na ye boye: “Na mwa ntango moke okondimisa ngai nakóma moklisto.” (Misala 26:1-28) Na mobu soki 58 T.B., Paulo atindamaki na Loma. Na boumeli ya mbula mibale oyo azalaki mokangami kuna, ntoma Paulo asalelaki mabaku nyonso mpo na kosakola makambo ya Klisto. (Misala 28:16-31) Emonani ete Paulo asambaki liboso ya Amperɛrɛ Néron, oyo amonaki ete asali likambo moko te ya mabe; apesaki ye bonsomi, mpe Paulo akobaki mosala na ye ya misionɛrɛ. Lisolo moko te emonisi ete ntoma mosusu azwaki libaku ya kosakola nsango malamu epai ya bakonzi minene ndenge wana.
Ndenge tomoni yango, na bomoi na ye, Paulo akokisaki likambo oyo bantoma mosusu balobaki liboso ya esambiselo monene ya Bayuda ete: “Tosengeli kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato.” (Misala 5:29) Ntoma yango atikelaki biso ndakisa malamu mpenza. Atako bato bazalaki kosala milende mpo na kopekisa ye, ntoma Paulo atosaki etinda ya kopesa litatoli malamumalamu. Na botosi na ye makasi epai ya Nzambe, Paulo akokisaki mokumba na ye lokola ‘mbɛki oyo aponami’ mpo na komema nkombo ya Yesu “epai ya bikólo mosusu mpe epai ya bakonzi mpe epai ya bana ya Yisalaele.”—Misala 9:15.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Calendrier des Témoins de Jéhovah 2006, Novɛmbɛ/Desɛmbɛ.
[Etanda/Bililingi na lokasa 9]
PAULO AZALAKI KOSAMBA MPO NA KOMILONGISA?
Na motuna yango, Ben Witherington III, moto moko ya mayele, akomaki boye: “Mpo na Paulo, likambo ya ntina ezalaki te aluka komilongisa, kasi nde asakola nsango malamu epai ya bakonzi, ezala ya Bayuda mpe oyo bazalaki Bayuda te. . . . Kutu, ezali nsango malamu nde ezalaki kosambisama.”