Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 15/11 nk. 26-30
  • Ndimáká disipilini ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndimáká disipilini ya Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntina oyo bato mosusu babimisamaka na lisangá
  • Esengeli kobongola motema liboso ya kozongisama na lisangá
  • Mpo na nini koyambola lisumu?
  • Tyelá bandeko na yo ya sembo motema
  • Ndenge oyo bakɛngɛli basalisaka
  • Kobá kondima disipilini ya Nzambe
  • Tóbatela kimya mpe bopɛto ya lisangá
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Mpo na nini kobimisa moto na lisangá ezali ebongiseli ya bolingo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Tomekola motema mawa na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Ndenge ya komonisa bolingo mpe motema mawa ntango ndeko moko asali lisumu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 15/11 nk. 26-30

Ndimáká disipilini ya Yehova

“Koboyaka disipilini ya Yehova te.”​—MASESE 3:11, NW.

1. Mpo na nini tosengeli kondimaka disipilini ya Nzambe?

SALOMO, mokonzi moko ya Yisalaele ya kala, ayebisaki ntina oyo mokomoko na biso asengeli kondimaka disipilini ya Nzambe. Alobaki boye: “Ee mwana na ngai, koboyaka disipilini ya Yehova te mpe koyokaka mpamela na ye mabe te, mpamba te Yehova apamelaka moto oyo alingaka, ndenge tata asalaka na mwana oyo asepelaka na ye.” (Masese 3:11, 12, NW) Soki Tata na yo ya likoló apesaka yo disipilini, ezali mpo alingaka yo.

2. “Disipilini” elimboli nini, mpe ndenge nini moto akoki kozwa yango?

2 “Disipilini” elimboli etumbu, kosembolama, kolakisama, to koteyama. Ntoma Paulo akomaki boye: “Disipilini moko te ezalaka esengo mpo na sikoyo, kasi nde mawa; nzokande na nsima epai ya baoyo bateyami na yango ebotaka mbuma ya kimya, elingi koloba, boyengebene.” (Baebele 12:11) Kondima disipilini ya Yehova, Nzambe mosantu, ekoki kosalisa yo otambola na nzela ya boyengebene mpe na bongo, opusana penepene na ye. (Nzembo 99:5) Okoki mpe kosembolama na nzela ya bandeko na yo bandimi, na makambo oyo ozali koyoka na makita, to mpe na boyekoli na yo moko ya Liloba ya Nzambe mpe ya mikanda ya “kapita ya sembo.” (Luka 12:42-44) Na ntembe te okozala na botɔndi mingi soki babendi likebi na yo na likambo moko oyo osengeli kobongisa! Kasi, ntango moto asali lisumu ya monene, disipilini nini ebongi na ye?

Ntina oyo bato mosusu babimisamaka na lisangá

3. Ntango nini moto abimisamaka na lisangá?

3 Basaleli ya Nzambe bayekolaka Biblia mpe mikanda ya moombo ya sembo mpe ya mayele. Na makita mpe na mayangani balimbwelaka bango mibeko ya Yehova. Na ndenge yango baklisto bayebaka malamu makambo oyo Yehova azali kosɛnga bango. Moto abimisamaka na lisangá se soki asali to azali kosala lisumu monene mpe alingi kobongola motema te.

4, 5. Biblia elobeli ndakisa nini ya moto oyo abimisamaki na lisangá, mpe mpo na nini na nsima, Paulo alendisaki baklisto ya Kolinti bázongisa ye na lisangá?

4 Tótalela ndakisa moko ezali na Biblia, ya moto moko oyo abimisamaki na lisangá. Baklisto ya lisangá ya Kolinti bazalaki kokanga miso na “pite ya ndenge oyo [ezalaki] kutu te na kati ya bikólo mosusu, ete mobali moko [akamataki] mwasi ya tata na ye.” Paulo alendisaki baklisto ya Kolinti ‘bápesa moto yango epai ya Satana mpo na libebi ya mosuni, ete elimo ebikisama na mokolo ya Nkolo.’ (1 Bakolinti 5:1-5) Ntango moto yango abimisamaki na lisangá, ezalaki lokola nde apesami na mabɔkɔ ya Satana; na maloba mosusu, azongaki na mokili ya Satana. (1 Yoane 5:19) Ndenge babimisaki moto yango na lisangá, balongolaki kati na bango moto oyo azalaki ndakisa mabe mpe babatelaki “elimo” ya lisangá.​—2 Timote 4:22; 1 Bakolinti 5:11-13.

5 Nsima ya basanza, Paulo alendisaki baklisto ya Kolinti bázongisa mosumuki yango na lisangá. Mpo na nini? Alobaki ete mpo ‘bákosama na Satana te.’ Emonani ete mosumuki yango abongolaki motema mpe atikaki etamboli ya mabe. (2 Bakolinti 2:8-11) Soki baklisto ya Kolinti baboyaki kozongisa moto yango na lisangá, Satana alingaki kokosa bango, to balingaki komonisa ete bazali motema makasi mpe balimbisaka te, bizaleli oyo elingaki kosepelisa Zabolo. Emonani ete ‘balimbisaki mpe babɔndisaki’ nokinoki moto wana oyo abongolaki motema.​—2 Bakolinti 2:5-7.

6. Kobimisa moto na lisangá ezali na matomba nini?

6 Kobimisa moto na lisangá ezalaka na matomba nini? Esalaka ete nkombo mosantu ya Yehova efingama te mpe ebatelaka lokumu ya basaleli na ye. (1 Petelo 1:14-16) Soki moto oyo aboyi kobongola motema abimisami na lisangá, emonisaka ete lisangá ekangami na mitinda ya Nzambe mpe yango ebatelaka bopɛto ya lisangá. Disipilini wana ekoki mpe kosalisa moto yango azongela makanisi ya malamu na nsima.

Esengeli kobongola motema liboso ya kozongisama na lisangá

7. Davidi azalaki komiyoka ndenge nini ntango abombaki masumu na ye?

7 Bandeko mingi babongolaka motema ntango bakwei na lisumu monene mpe babimisamaka na lisangá te. Kasi, kobongola motema ya solosolo ezalaka likambo moke te. Tózwa ndakisa ya Mokonzi Davidi, ye oyo akomaki Nzembo 32. Nzembo yango ezali komonisa ete Davidi abombaki naino masumu minene oyo asalaki mpo na Bata-seba. Komitungisa mpo na masumu na ye esilisaki ye makasi ndenge moi makasi esilisaka nzete mai. Davidi anyokwamaki na nzoto mpe na makanisi; kasi ntango ‘ayebisaki bipɛngweli na ye, Yehova alimbisaki ye.’ (Nzembo 32:3-5) Na nsima, Davidi ayembaki boye: “Esengo na ye oyo [Yehova] atángeli ye mabe te.” (Nzembo 32:1, 2) Motema na ye ekitaki mpenza lokola Nzambe alimbisaki ye!

8, 9. Ndenge nini moto amonisaka ete abongoli mpenza motema, mpe yango ezali na ntina nini na oyo etali kozongisama na lisangá?

8 Ndakisa yango emonisi biso polele ete mosumuki asengeli kobongola motema mpo Nzambe ayokela ye mawa. Kasi, kobongola motema elimboli te koyoka nsɔni to kobanga ete likambo eyebana. Kobongola motema elimboli koyoka mawa mpo na etamboli ya mabe oyo tolandaki mpe kotika mpenza etamboli yango. Moto oyo abongoli motema azalaka na “motema motutami mpe na mawa” mpe alukaka ete soki likoki ezali, ‘abongisa mbeba’ na ye.​—Nzembo 51:17; 2 Bakolinti 7:11.

9 Kobongola motema ezali mpenza likambo ya ntina mpo moto azongisama na lisangá. Moto akoki te kozongisama na lisangá kaka mpo alekisi mwa ntango mingi libándá. Liboso azongisama na lisangá, esengeli mpenza komonana ete abongwani. Ye moko asengeli kondimisama ete asalaki lisumu monene mpe afingisaki nkombo ya Yehova mpe abebisaki lokumu ya lisangá na ye. Mosumuki asengeli kobongola motema, kobondela Nzambe na etingya mpo na kosɛnga ye bolimbisi, mpe kotosa masɛngami na ye ya sembo. Ntango moto asɛngi ete bázongisa ye na lisangá, asengeli komonisa polele ete abongoli motema mpe azali kosala “misala oyo ebongi na kobongola motema.”​—Misala 26:20.

Mpo na nini koyambola lisumu?

10, 11. Mpo na nini ezali na ntina te kobomba lisumu?

10 Moto mosusu, ntango akwei na lisumu, akoki kokanisa boye: ‘Soki nayebisi lisumu na ngai, bakotuna ngai mituna ebele ebele mpe bakoki kobimisa ngai na lisangá. Nzokande, nyonso wana ekosalema te soki nafandi na ngai nyee, moto moko mpe te akoyeba yango.’ Moto oyo azali kokanisa bongo, abosanaka makambo mosusu ya ntina mingi. Makambo nini?

11 Yehova azali “Nzambe ya mawa mpe ya ngɔlu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo. Akobatela boboto na ye mpo na nkóto nkóto, mpe akolimbisa mabe mpe nkanza mpe lisumu.” Atako bongo, asembolaka basaleli na ye “na mezire oyo ekoki.” (Exode 34:6, 7; Yilimia 30:11, NW) Soki osali lisumu moko monene, ndenge nini Nzambe akolimbisa yo soki ozali kobomba yango? Yehova ayebi yango malamu, mpe akangaka miso na mabe te.​—Masese 15:3; Habakuku 1:13.

12, 13. Nini ekoki kokómela moto oyo azali kobomba lisumu na ye?

12 Na ntango okwei na lisumu monene, koyambola yango ekosalisa yo mpo lisosoli na yo etika kotungisa yo. (1 Timote 1:18-20) Nzokande, kobomba lisumu ekoki kobebisa lisosoli na yo mpe komema yo na kozongela yango to mpe kokóma na momeseno ya kosala mabe yango. Kobosana te ete ntango osali lisumu, ezali te ete osaleli moto mosusu to lisangá mabe; osaleli nde Nzambe mabe. Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Efandelo ya [Yehova] ezali na Likoló; miso na ye ekotalaka mpe ntɔkɔ na ye ekomekaka bana na bato. [Yehova] akomeka moyengebene mpe moto mabe.”​—Nzembo 11:4, 5.

13 Yehova akopambola te moto oyo azali kobomba lisumu monene mpe azali koluka kotikala na lisangá na ye ya pɛto. (Yakobo 4:6) Yango wana, soki okweaki na lisumu mpe olingi kokoba kosala oyo ezali sembo, koyoka nsɔni te, kendé koyambola yango. Soki osali yango te, lisosoli na yo ekobanda kaka kotungisa yo, mingimingi soki otángi to oyoki toli moko na likambo wana. Kanisá naino: okosuka wapi soki Yehova alongoli yo elimo na ye, ndenge asalaki Mokonzi Saulo? (1 Samwele 16:14) Soki ozali lisusu na elimo ya Nzambe te, ekozala mpasi te okwea na lisumu ya monene koleka.

Tyelá bandeko na yo ya sembo motema

14. Mpo na nini moto oyo asali lisumu asengeli kolanda toli oyo ezali na Yakobo 5:14, 15?

14 Soki moto moko asali lisumu kasi abongoli motema, asengeli kosala nini? “Tiká abenga bankulutu ya lisangá epai na ye, mpe tiká bango bábondela mpo na ye, kopakoláká ye mafuta na nkombo ya Yehova. Mpe libondeli ya kondima ekobikisa moto oyo azali kobɛla, mpe Yehova akotɛlɛmisa ye.” (Yakobo 5:14, 15) Mpo na ‘kobota mbuma oyo ebongi na kobongola motema’ moko ya makambo oyo moto yango asengeli kosala ezali ya kokutana na bankulutu. (Matai 3:8) Bandeko yango oyo bazali bato ya sembo mpe ya boboto ‘bakobondela mpo na ye mpe bakopakola ye mafuta na nkombo ya Yehova.’ Se ndenge pomadi enyolisaka nzoto, batoli na bango oyo euti na Biblia ekobɔndisa moto oyo abongoli mpenza motema.​—Yilimia 8:22.

15, 16. Ndenge nini bankulutu balandaka ndakisa ya Nzambe, ndenge ekomami na Ezekiele 34:15, 16?

15 Yehova, Mokɛngɛli na biso, apesaki ndakisa malamu mpenza ntango alongolaki Bayuda na boombo na Babilone na mobu 537 liboso ya ntango na biso (L.T.B.) mpe ntango abimisaki Yisalaele ya elimo na “Babilone Monene” na 1919! (Emoniseli 17:3-5; Bagalatia 6:16) Na ndenge yango, akokisaki elaka na ye oyo: “Ngai mpenza nakozala mobateli ya bampate na ngai, mpe nakolalisa bango; . . . Nakoluka oyo abungi, mpe nakozongisa oyo akimisami, mpe nakokanga oyo abukani, mpe nakokembisa oyo abɛli.”​—Ezekiele 34:15, 16.

16 Yehova aleisaki bampate na ye ya elilingi, alalisaki bango na kimya, mpe alukaki baoyo babungaki. Ndenge moko mpe, bakɛngɛli basalaka nyonso mpo etonga ya Nzambe ezala na kimya mpe elya malamu na elimo. Bankulutu balukaka mpate oyo abandi kotangwa na lisangá. Nzambe ‘akangaki oyo abukani,’ bakɛngɛli mpe “bakangaka” mpate oyo azokisami na maloba ya moto mosusu, to mpe na mabe na ye moko. Se ndenge Nzambe ‘akembisaki mpate oyo abɛli,’ bankulutu mpe basalisaka mpate oyo azali maladi na elimo, mbala mosusu mpo na lisumu oyo asali.

Ndenge oyo bakɛngɛli basalisaka

17. Mpo na nini tosengeli kokakatana te koluka lisalisi ya elimo epai ya bankulutu?

17 Bankulutu balandaka na esengo nyonso toli oyo: “Bókoba komonisa motema mawa . . . , bósala bongo na kobanga.” (Yuda 23) Baklisto mosusu basili kokwea na pite to na ekobo, oyo ezali masumu minene. Kasi, soki babongoli mpenza motema, bakoki kolikya ete bankulutu bakoyokela bango mawa, bakomonisela bango boboto mpe bakosalisa bango bákóma lisusu makasi na elimo. Paulo azalaki nkulutu mpe alobaki mpo na bankulutu nyonso boye: “Ezali te ete tozali bakonzi ya kondima na bino, kasi tozali nde baninga ya mosala mpo na esengo na bino.” (2 Bakolinti 1:24) Yango wana, tókakatanaka te koluka lisalisi ya elimo epai ya bankulutu.

18. Ndenge nini bankulutu batalelaka ndeko oyo asali lisumu?

18 Mpo na nini okoki kotya motema ete bankulutu bakosalisa yo soki osalaki lisumu monene? Mpamba te bazali libosoliboso babateli ya bampate ya etonga ya Nzambe. (1 Petelo 5:1-4) Mobateli moko te ya mpate akoki kobɛta nyama ya kimya lokola mpate oyo azali kolela mpo amizokisi. Yango wana, ntango bankulutu bazali kosolola na ndeko oyo asali libunga, bamimonaka te lokola bazuzi oyo bazali kosambisa mosali mabe oyo basengeli kokatela etumbu; bamonaka ete bazali liboso ya ndeko oyo akwei na lisumu oyo, soki likoki ezali, basengeli kosalisa ye azwa lisusu makasi na elimo. (Yakobo 5:13-20) Bankulutu basengeli kosambisa na bosembo mpe ‘kosalela etonga makambo na boboto.’ (Misala 20:29, 30; Yisaya 32:1, 2) Lokola baklisto nyonso, bankulutu basengeli ‘kosala na boyengebene mpe kolinga boboto mpe kotambola na bopɔlɔ esika moko na Nzambe.’ (Mika 6:8) Bizaleli yango ezali na ntina mingi mpo na kozwa bikateli na makambo etali bomoi ya bato mpe mosala mosantu ya ‘bampate ya elanga ya Yehova.’​—Nzembo 100:3.

19. Bankulutu balukaka komonisa elimo nini ntango bazali kosembola moto?

19 Babateli ya bampate baponamaka na elimo santu mpe balukaka ete elimo yango etambwisa bango. Soki “moto abɛti libaku liboso ete ayeba yango,” mibali oyo bazali na makoki ya elimo bamekaka “kosembola moto yango na elimo ya boboto.” (Bagalatia 6:1; Misala 20:28) Bankulutu bamekaka kosembola makanisi ya moto yango na boboto, kasi kozanga mpe ete bákakola mibeko ya Nzambe; basalaka lokola monganga ya malamu oyo asalaka malɛmbɛ mpo moto ayoka mpasi mingi te ntango azali kozongisa na esika na yango mokuwa ya lobɔkɔ to ya lokolo oyo ebukani. (Bakolose 3:12) Lokola bankulutu babondelaka naino mpe batángaka Biblia liboso bámonisa na moto ete bayokeli ye mawa, ekateli na bango emonisaka makanisi ya Nzambe.​—Matai 18:18.

20. Ntango nini bankulutu bakoki komona malamu koyebisa na lisangá ete ndeko Songolo azwi mpamela?

20 Soki bamoni ete lisumu oyo moto asali eyebani to ekoyebana na bato mingi, ntango mosusu bayebisaka na lisangá ete moto yango azwi mpamela mpo na kobatela lokumu ya lisangá. Bayebisaka mpe lisangá soki bamoni ete ebongi mpe kokebisa bandeko. Moto oyo azwi mpamela mpe azali kozongela makasi ya elimo azali lokola moto oyo azoki mpe mpota na ye ezali kosila mokemoke; na ntango wana, azalaka naino na makoki te ya kosala makambo mosusu. Yango wana, ebongi mpenza ete mpo na mwa ntango, moto oyo abongoli motema asukaka kaka na koyoka, na esika apesaka biyano na makita. Bankulutu bakoki mpe kopona ndeko moko ayekola na moto yango mpo na kosalisa ye alonga bolɛmbu na ye mpe azwa lisusu “makasi na kati ya kondima.” (Tito 2:2) Bankulutu basalaka makambo nyonso wana na bolingo, kasi te mpo na koluka kopesa etumbu na moto oyo asali lisumu.

21. Wapi balolenge mosusu oyo bankulutu bakoki kosalisa bandeko ntango bakwei na makambo mosusu ya mabe?

21 Bankulutu bazali na ndenge mingi oyo bakoki kosalisa moto na elimo. Na ndakisa, soki ndeko moko oyo azalaká momɛli-masanga alangwe mbala moko to mbala mibale ntango azalaki ye moko na ndako. To, ndeko moko oyo atiká komɛla likaya, amɛli lisusu mbala moko to mibale. Ata soki ndeko yango asɛngi bolimbisi na libondeli mpe andimi mpenza ete Nzambe alimbisi ye, asengeli koluka lisalisi ya nkulutu moko mpo azongela lisusu lisumu yango te. Nkulutu moko to bankulutu mibale bakoki kosolola na ye. Kasi, nkulutu (to bankulutu) yango bakoyebisa mokɛngɛli-mokambi, mpamba te akoki koyeba makambo mosusu oyo bankulutu yango bayebi te.

Kobá kondima disipilini ya Nzambe

22, 23. Mpo na nini osengeli kokoba kondima disipilini ya Nzambe?

22 Moklisto nyonso oyo alingi ete Nzambe andima ye asengeli koyokaka disipilini ya Yehova. (1 Timote 5:20) Yango wana, landá toli nyonso oyo omoni na ntango ozali koyekola Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia to mpe toli oyo oyoki na makita to na mayangani ya basaleli ya Nzambe. Lukáká ntango nyonso koyeba soki ozali kosala mokano ya Yehova. Na ndenge yango, disipilini ya Nzambe ekosalisa yo otikala makasi mpe okwea na lisumu te.

23 Kondima disipilini ya Nzambe ekosalisa yo omibatela na kati ya bolingo na ye. Ya solo, bato mosusu babimisamaki na lisangá; kasi, soki ‘ozali kobatela motema na yo’ mpe ozali ‘kotambola lokola moto ya bwanya,’ likambo yango ekokómela yo te. (Masese 4:23; Baefese 5:15) Nzokande, soki obimisamá na lisangá, tolendisi yo osala makambo oyo esengeli mpo ozonga na lisangá. Nzambe alingi ete bato nyonso oyo bamipesi epai na ye básambela ye na bosembo mpe na ‘esengo na motema.’ (Deteronome 28:47) Okoki kosala yango mpo na libela soki ozali ntango nyonso kondima disipilini ya Yehova.​—Nzembo 100:2.

Okopesa eyano nini?

• Mpo na nini bato mosusu babimisamaka na lisangá?

• Kobongola motema ya solosolo esɛngaka nini?

• Mpo na nini esengeli koyambola lisumu monene?

• Ndenge nini bankulutu basalisaka basumuki oyo babongoli motema?

[Elilingi na lokasa 26]

Mpo na nini ntoma Paulo apesaki Bakolinti malako ete bábimisa moto moko na lisangá?

[Elilingi na lokasa 29]

Lokola bakɛngɛli ya mpate na ntango ya kala, bankulutu “bakangaka” mpota ya bampate ya Nzambe oyo bazoki

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto