Mituna ya batángi
Yesu azangaki nde limemya to boboto epai ya mama na ye na eyano oyo apesaki ye na fɛti ya libala na Kana?—Yoane 2:4.
Mwa moke nsima ya batisimo ya Yesu, babengaki ye ná bayekoli na ye na fɛti moko ya libala na Kana. Mama na ye mpe azalaki wana. Ntango vinyo esilaki, Malia ayebisaki Yesu ete: “Bazali na vinyo te.” Yesu ayanolaki mama na ye ete: “Likambo nini ngai na yo, mwasi? Ngonga na ngai ekómi naino te.”—Yoane 2:1-4.
Lelo oyo, soki moto abengi mama na ye “mwasi” mpe alobi na ye ete “likambo nini ngai na yo?,” bakoloba ete azangi limemya to afingi ye. Nzokande, koloba ete Yesu azangaki limemya ekomonisa ete toyebi te mimeseno ya Bayuda ya ntango ya Yesu mpe ndenge oyo bazalaki koloba na ntango wana. Kosimba ntina ya ndenge bazalaki kosalela maloba wana na ntango ya kala ekosalisa mingi.
Mpo na liloba “mwasi,” buku moko (Vine’s Expository Dictionary of Old and New Testament Words) elobi boye: “Soki moto alobi na mwasi bongo, ezalaki te mpo na kopamela ye, kasi nde mpo na komonisa bolingo to limemya oyo azali na yango mpo na ye.” Mikanda mosusu mpe emonisi bongo. Na ndakisa, Biblia moko (The Anchor Bible) elobi ete: “Kosalela liloba yango emonisaki te ete Yesu azali kopamela mama na ye, azangi bonkonde to bolingo . . . Ezalaki nde maloba ya bonkonde oyo Yesu azalaki kosalela ntango azali kosolola na basi.” Buku mosusu (The New International Dictionary of New Testament Theology) emonisi ete liloba yango “esalelamaki te na makanisi ya kotyola to na kozanga bonkonde.” Mpe lisusu, buku ya Gerhard Kittel (Theological Dictionary of the New Testament) elobi ete bazalaki kosalela liloba yango “mpo na kotyola to kosambwisa moto te.” Yango wana, tosengeli te koloba ete Yesu azangaki limemya to azangaki boboto epai ya mama na ye ntango abengaki ye “mwasi.”—Matai 15:28; Luka 13:12; Yoane 4:21; 19:26; 20:13, 15.
Ezali boni mpo na maloba “likambo nini ngai na yo?” Yango ezali elobeli oyo Bayuda bazalaki kosalela mingi mpe ekomamá na bisika mingi na Biblia. Na ndakisa, na 2 Samwele 16:10, Davidi azali kopekisa Abishai aboma Simi na maloba oyo: “Bino bana ya Seluya nazali na bino na likambo nini? Soki azali kotuka [ezali] mpo Yehova alobi na ye ete, ‘Tuká Davidi!’” Ndenge moko mpe totángaka na 1 Mikonzi 17:18 ete ntango mwasi akufelá mobali oyo azalaki kofanda na Zalefata amonaki ete mwana na ye akufi, alobaki na Eliya ete: “Ɛ moto ya Nzambe, ozali na ngai na likambo nini? Oyeli ngai ete ozipola masumu na ngai mpe ete oyeisa kufa epai ya mwana na ngai.”
Bandakisa wana ya Biblia emonisi ete mbala mingi bazalaki kosalela maloba “likambo nini ngai na yo?” mpo na kokitisa moto lokumu to kotyola ye te, kasi nde mpo na koboya kosala likambo moko oyo basɛngi yo to komonisa ete ondimi te likanisi oyo moto apesi. Kasi, mpo na nini Yesu alobaki na Malia bongo?
Emonani ete ntango Malia ayebisaki Yesu ete “bazali na vinyo te,” azalaki kaka te kopesa ye nsango, kasi azalaki nde kosɛnga ye asalisa bango. Yesu asalelaki maloba wana mpo na komonisa ete aboyi likanisi oyo Malia apesaki; mpe maloba oyo abakisaki: “Ngonga na ngai ekómi naino te,” esalisi biso tóyeba ntina oyo alobaki bongo.
Kobanda ntango Yesu azwaki batisimo mpe apakolamaki na elimo santu na mobu 29 ya ntango na biso (T.B.), ayebaki malamu ete lokola azali Masiya, mokano ya Yehova mpo na ye ezali ete atikala sembo kino akokufa, akosekwa mpe akozwa nkembo na likoló. Yesu alobaki ete: “Mwana ya moto ayaki, mpo básalela ye te, kasi mpo na kosalela mpe kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Matai 20:28) Lokola liwa na ye ebɛlɛmaki, Yesu amonisaki yango polele na maloba oyo: “Ngonga ekoki.” (Yoane 12:1, 23; 13:1) Yango wana, na libondeli oyo asalaki butu moko liboso ya liwa na ye, Yesu alobaki ete: “Tata, ngonga ekoki; pesá mwana na yo nkembo, mpo mwana na yo apesa yo nkembo.” (Yoane 17:1) Nsukansuka, ntango ebele ya bato bayaki mpo na kokanga ye na Getesemane, Yesu alamusaki bayekoli na ye mpe alobaki: “Ngonga eyei! Talá! Mwana ya moto atɛkami na mabɔkɔ ya basumuki.”—Malako 14:41.
Nzokande, na libala wana ya Kana, Yesu autaki kaka kobanda mosala na ye ya Masiya mpe “ngonga” na ye ekokaki naino te. Mposa na ye ya libosoliboso ezalaki ya kosala mokano ya tata na ye na lolenge mpe na ntango oyo tata na ye alingaki; moto ata moko te akokaki kobebisa mokano wana. Yesu ayebisaki mama na ye likambo yango polele, kasi na limemya mpe na boboto. Malia mpe ayokaki nsɔni te, amonaki mpe te ete mwana na ye afingi ye. Kutu, lokola Malia asimbaki ntina ya maloba ya Yesu, ayebisaki bato oyo bazalaki kosala misala na fɛti yango ete: “Oyo nyonso akoyebisa bino, bósala.” Na esika ya koboya kotosa mama na ye, Yesu asalaki likamwisi na ye ya liboso lokola Masiya: Abongolaki mai vinyo ya kitoko mpenza, mpe yango emonisaki ete azalaki na bokatikati; atako asengelaki kosala mokano ya Tata na ye, aboyaki te kokokisa mposa ya mama na ye.—Yoane 2:5-11.
[Elilingi na lokasa 31]
Yesu ayebisaki mama na ye likambo yango polelepolele, kasi na boboto