Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 1/1 nk. 3-4
  • Kolonga na bomoi elimboli nini mpo na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kolonga na bomoi elimboli nini mpo na yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kozala na bomoi ya malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Ndenge oyo okoki kolonga na bomoi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Oyo okoki kosala mpo olonga mpenza
    Lamuká!—2014
  • Kolonga ya solosolo elimboli nini?
    Lamuká!—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 1/1 nk. 3-4

Kolonga na bomoi elimboli nini mpo na yo?

JESSE LIVERMORE oyo ayebani na bato mingi lokola moto oyo ayebaki kosala mombongo koleka bato nyonso kino lelo oyo, ayebaki kozwa bikateli malamu na makambo ya mombongo. Yango wana akómaki na bozwi mingi. Azalaki kolata bilamba ya ntalo makasi, kofanda na ndako moko monene oyo ezalaki na bashambre 29 mpe kotambola na motuka moko ya ntalo makasi mpenza.

Davida mpe azalaki na mposa ya kolonga na bomoi. Azalaki moto ya mibale na kompanyi moko monene mpe etikalaki moke akóma mokonzi ya liboso. Azalaki na mposa ya kozwa bozwi mpe lokumu. Nzokande, David azwaki ekateli ya kolongwa na kompanyi wana. Alobi boye: “Nayebi ete nakozwa lisusu mosala kitoko lokola oyo te.” Okanisi ete David asalaki libunga?

Bato mingi bakanisaka ete mpo olonga na bomoi esengeli ozala na bozwi to oyebana. Nzokande, ekómaka ete baoyo bazali na bozwi bázanga esengo mpe bámona ete bomoi ezali na ntina te. Yango nde ekómelaki mpenza Livermore. Atako azalaki na bozwi, bomoi na ye etondaki na basusi mpe na makambo mingi ya mawa. Atungisamaki mingi na makanisi, mabala na ye ebebaki mpe azalaki na boyokani ya malamu te ná bana na ye. Nsukansuka, ntango bozwi na ye ekitaki makasi, mokolo moko Livermore akendeki na bare moko ya kitoko mpe abandaki komilelalela mpo na biloko nyonso oyo abungisaki. Asɛngaki masanga mpe abimisaki karnɛ na ye mpe akomelaki mwasi na ye maloba ya nsuka. Ntango asilisaki komɛla, akɔtaki na shambre moko ya moke oyo ezalaki molili mpe amibomaki.

Atako bantina oyo etindaki Livermore amiboma ezali ebele, likambo oyo ekómelaki ye emonisi bosolo ya maloba ya Biblia oyo: ‘Baoyo balingaka kaka kozala bato ya bomɛngo . . . bamitɔbɔlakatɔbɔlaka na ebele ya bampasi.’​—1 Timote 6:9, 10.

Baoyo balobaka ete mpo na kolonga na bomoi esengeli kozala na bozwi to koyebana, bamikosaka? Yo moko, omonaka ete olongá na bomoi? Mpo na nini olobi bongo? Makambo nini etindi yo oloba ete olongá na bomoi? Lolenge oyo otalelaka kolonga na bomoi euti na nini? Lisolo oyo elandi ekolobela batoli oyo esilaka ngala te, oyo esalisá bamilio ya bato bálonga na bomoi. Tiká tolobela ndenge oyo yo mpe okoki kolonga na bomoi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Topesi ye nkombo mosusu.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto